Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w99 15/9 nk. 27-28
  • “Bobongoli makanisi na ngai mpo na Batatoli ya Yehova”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bobongoli makanisi na ngai mpo na Batatoli ya Yehova”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Masolo mosusu
  • Biyano na mituna na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Kopalanganisa mbóto ya Bokonzi na mabaku nyonso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • “Nazalaki moto ya nkandankanda”
    Biblia ebongolaka bato
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
w99 15/9 nk. 27-28

“Bobongoli makanisi na ngai mpo na Batatoli ya Yehova”

MOKONZI moko ya bolɔkɔ na ekólo Pologne alobaki bongo nsima ya kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1998 oyo elobelaki mosala ya Batatoli ya Yehova. Lisolo “Bato ya mitema makasi bakómi kondima,” emonisaki matomba oyo Batatoli ya Yehova bazwi na mosala ya kosalisa bato ya bolɔkɔ ya engumba Wołów, na Pologne.

Liboso Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo totángi na likoló ebima, likita moko monene esalemaki na mokolo ya 13 Sɛtɛmbɛ 1998 na bolɔkɔ ya Wołów mpo na kopesa bato ya bolɔkɔ zulunalo yango. Baoyo babéngamaki na likita yango ezalaki: Batatoli ya engumba yango, Batatoli oyo bazwi batisimo kasi bazalaki na bolɔkɔ, na bakangami mosusu oyo bazalaki kosepela na mateya ya solo, na mwa bakonzi ya bolɔkɔ. Bato oyo bazalaki na likita yango balobaki makambo oyo elandi.

Jerzy, Motatoli ya Yehova moko oyo azwaki batisimo na bolɔkɔ esili koleka mbula mitano, alobaki boye: “Nazali na esengo mingi, na ndenge nakoki kotánga lelo oyo milende oyo bandeko ya masangá ya penepene basalaki mpo na kosunga biso.” Alobaki lisusu: “Nazali kosala makasi mpo na kokende liboso, mpe namoni ndenge Yehova azali kobongisa ngai.”

Zdzisław, ye mpe azali na bolɔkɔ, alobaki mpo na mosala ya kosakola na bolɔkɔ ete: “Sikoyo, bakangami minei bazali komibongisa mpo na kozwa batisimo, mpe bato ya sika oyo bazali kosepela na mateya ya solo bazali koyangana na makita. Lisolo oyo epesi biso makasi mpo na kosala mingi na teritware oyo.” Zdzisław azali mpenza na makanisi malamu mpamba te azali naino na mbula 19 oyo akolekisa lisusu na bolɔkɔ!

Nsima ya kotánga lisolo ya bolɔkɔ ya Wołów, mokonzi moko ya bolɔkɔ alobaki boye: “Ezali mpenza lokumu na biso. Nakanisá naino te ete bolɔkɔ oyo bakoki kolobela yango malamu boye na minɔkɔ 130 na mokili mobimba. Nalingaka bino, mpe nasepelaka na milende bosalaka mpo na bolamu ya bato ya bolɔkɔ.” Mpe mokonzi mosusu alobaki: “Bobongoli makanisi na ngai mpo na Batatoli ya Yehova. Liboso, nazalaki komona bino lokola bato ya bindimela. Sikoyo namoni ete bozali bato oyo balandaka mibeko.”

Marek Gajos, mokambi ya bolɔkɔ ya Wołów, asɛkaki mpe alobaki ete: “Na ebandeli tokanisaki ete bokosala likambo moko ya malonga te. Totyaki bino kaka na molɔngɔ ya mangomba oyo elukaka kobongola makanisi ya bato ya bolɔkɔ na nzela ya Biblia. Kasi, ntango tomonaki matomba ya mosala na bino na ebandeli, tozwaki mokano ya kosala na bino elongo. Eleki sikoyo mbula libwa banda bozali koya mpe bolɛmbaka te, mpe nasepelaka mingi na makambo oyo bosali.”

Kasi, ndenge nini bango moko bato ya bolɔkɔ ya Wołów batalelaki lisolo yango? Bato ya bolɔkɔ basepelaki mingi mpenza na boye ete Batatoli oyo bazali na bolɔkɔ bazangaki bazulunalo. Bakonzi ya bolɔkɔ mpe basepelaki, basɛngaki zulunalo 40 mpo na bango moko. Mpo na kokokisa mposa wana, masangá ya engumba yango etindaki zulunalo 100 mpo na bandeko na bolɔkɔ. Na ntango yango, bato ya bolɔkɔ mingi bakómaki koya na makita.

Piotr Choduń, mokonzi ya bolɔkɔ oyo apesaki Batatoli ya Yehova mabɔkɔ mpo na kosakola na bolɔkɔ, alobaki boye: “Tobakaki zulunalo yango na bavitrine nyonso ya bolɔkɔ na biso. Tozali na elikya ete bato nyonso ya bolɔkɔ oyo babandi naino koyekola Biblia elongo na bino te bakotánga bazulunalo yango.”

Ezaleli malamu ya Batatoli mpe molende na bango na kosakola ezali se kobota mbuma malamu. Longolá bato 15 ya bolɔkɔ oyo bazwi batisimo, bakonzi mibale ya bolɔkɔ bamipesi epai ya Yehova mpe mokonzi moko asɛngi ayekola Biblia. Kasi, bandeko oyo bateyaka na bolɔkɔ ya Wołów bazali kopesa lokumu nyonso epai ya Yehova mpo na matomba oyo bazali kozwa.​—Talá 1 Bakolinti 3:6, 7.

[Elilingi na lokasa 28]

Batatoli misato na moninga moko ya bolɔkɔ na esika oyo balakisaka bazulunalo na ndako ya makita ya bolɔkɔ.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto