Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/5 nk. 18-23
  • Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe batángami bato na esengo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe batángami bato na esengo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Komonana ya bamemi-nsango ya Nzambe lelo oyo
  • Esengo ya bamemi-nsango ya Nzambe
  • Ebongiseli ya Yehova ezali kokende sé liboso
  • Tóluka koyeba banani bazali bamemi-nsango ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mokanda ya Biblia nimero 26​—Ezekiele
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Ezekiele​—I
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Yehova asalisaka biso tókokisa mosala na biso ya kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/5 nk. 18-23

Bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe batángami bato na esengo

“Babikisami na [Yehova] bakobutwa; bakoya epai na Siona na nzembo, na esengo na seko likoló na mitó na bango.”​—YISAYA 35:10.

1. Mokili ezali mpenza na mposa makasi ya nini?

LELO oyo koleka bileko mosusu nyonso, bato bazali na mposa ya moto oyo akomemela bango nsango malamu. Bato bazali na mposa makasi ete báyoka moto moko azali kosakola solo na ntina na Nzambe mpe mikano na ye, motatoli oyo azali kobanga te, azali kokebisa moto mabe na ntina na kobebisama oyo ezali koya mpe kosalisa bato ya motema sembo ete bázwa kimya ya Nzambe.

2, 3. Na ntina na Yisalaele, lolenge nini Yehova akokisaki elaka na ye oyo ekomami na Amosa 3:7?

2 Na mikolo ya Yisalaele ya kala, Yehova alakaki ete akopesa bamemi-nsango ya motindo wana. Na nsuka ya ekeke ya libwa L.T.B., mosakoli Amosa alobaki ete: “Nkolo [Yehova] akosala likambo te bobele ete akoyebisa mwango na ye epai na baombo na ye, bango basakoli.” (Amosa 3:7) Na bikeke oyo bilandaki esakweli yango, Yehova asalaki misala mingi ya nguya. Na ndakisa, na mobu 607 L.T.B., apesaki etumbu makasi na libota na ye liponami mpamba te bakómaki batomboki mpe bazalaki na ngambo ya makila. Apesaki mpe etumbu na mabota oyo mazalaki zingazinga mpe mazalaki kosepela na ntina na monyoko ya Yisalaele. (Yilimia, mikapo 46-​49) Na nsima, na mobu 539 L.T.B., Yehova akweisaki Babilone, ekólo oyo elekaki nguya kati na mokili mobimba, mpe litomba oyo emonanaki ezalaki ete na 537 L.T.B., batikali ya Yisalaele bazongaki na mokili na bango mpo na kotonga lisusu tempelo.​—2 Ntango 36:22, 23.

3 Yango ezalaki mpenza makambo oyo maningisaki mokili, mpe na boyokani na maloba ya Amosa, Yehova ayebisaki yango liboso epai na basakoli oyo bazalaki kosala lokola bamemi-nsango ete bákebisa Yisalaele na ntina na makambo masengelaki kokómela bango. Na katikati ya ekeke ya mwambe L.T.B., abimisaki Yisaya. Na katikati ya ekeke ya nsambo L.T.B., abimisaki Yilimia. Na nsima, pene na nsuka ya ekeke yango, abimisaki Ezekiele. Basakoli yango mpe basakoli mosusu ya sembo bapesaki litatoli monene na ntina na mikano ya Yehova.

Komonana ya bamemi-nsango ya Nzambe lelo oyo

4. Nini ezali komonisa ete bato bazali na bosɛnga ya bamemi-nsango ya kimya?

4 Ezali boni lelo oyo? Bato mingi lelo kati na mokili bazali kobanga ete likambo moko ya nsɔ́mɔ lilingi kosalema wana bazali komona kobeba ya bizaleli ya bato. Baoyo balingi boyengebene bazali koyoka mpasi na motema ntango bazali komona bokosi mpe mabe ya mangomba ya boklisto. Lokola Yehova asakolaki yango na nzela na Ezekiele, bazali ‘kokimela mpe kolela na ntina na makambo na mbindo nyonso masalami na kati na mboka.’ (Ezekiele 9:4) Nzokande, bato mingi bazali koyeba te soki Nzambe azali na mikano nini. Esengeli ete báyebisa bango mikano yango.

5. Lolenge nini Yesu amonisaki ete bamemi-nsango bakozala na mikolo na biso?

5 Lelo oyo, ezali na moto moko oyo azali koloba kozanga kobanga lokola Yisaya, Yilimia, mpe Ezekiele? Yesu amonisaki ete moto moko akosala bongo. Wana azalaki kosakola makambo oyo masengelaki kosalema na ntango na biso, alobaki ete: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.” (Matai 24:14) Nani lelo oyo azali kokokisa esakweli yango, kosaláká lokola momemi-nsango, mosakoli ya nsango malamu? Bokokani oyo ezali komonana kati na ntango na biso mpe ntango ya Yisalaele ya kala ekosalisa biso ete tóyanola na motuna yango.

6. (a) Lobelá makambo “Yisalaele ya Nzambe” ekutanaki na yango na boumeli ya Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba. (b) Lolenge nini Ezekiele 11:17 ekokisamaki epai na Yisalaele ya kala?

6 Na boumeli ya mikolo ya mpasi ya Etumba ya Liboso ya Mokili mobimba, basaleli ya Yehova na ntango na biso, batikali bapakolami oyo babéngami “Yisalaele ya Nzambe,” bakangamaki na boombo, lolenge moko na Yisalaele oyo ekangamaki na Babilone. (Bagalatia 6:16) Banyokwamaki na boombo kati na Babilone Monene, lisangani ya mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, oyo mangomba ya boklisto ezali bongo eteni na yango eleki monene mpe eleki mabe. Atako bongo, maloba ya Yehova oyo alobaki na nzela ya Ezekiele mamonisi ete basundolamaki te. Alobaki ete: “Nakolɔkɔta bino na kati na bato, mpe nakoyanganisa bino longwa na mikili kuna epalanganisamaki bino, mpe nakopesa bino mokili na Yisalaele.” (Ezekiele 11:17) Mpo na kokokisa elaka yango na ntina na Yisalaele ya kala, Yehova abimisaki Sirise moto ya Pelese, oyo akweisaki Babilone, ekólo oyo elekaki nguya kati na mokili mobimba mpe afungolaki nzela na batikali ya Yisalaele ete bázonga na mokili na bango. Kasi ezali boni mpo na lelo?

7. Likambo nini esalemaki na mobu 1919 emonisaki ete Yesu akweisaki Babilone Monene? Limbolá.

7 Na ebandeli ya ekeke oyo, ezalaki na elembeteli moko ya nguya oyo emonisaki ete Sirise Monene azalaki kosala. Ezalaki nani? Moto mosusu te bobele Yesu Klisto, oyo atyamaki na kiti ya bokonzi na 1914 kati na Bokonzi ya likoló. Mokonzi yango monene amonisaki bolingi malamu epai na bandeko na ye bapakolami awa na mabelé, ntango, na mobu 1919, baklisto bapakolami babimaki na boombo ya elimo mpe bazongaki na “mokili” na bango, elingi koloba ezaleli na bango ya elimo. (Yisaya 66:8; Emoniseli 18:4) Na yango, Ezekiele 11:17 ezwaki kokokisama ya mikolo na biso. Na ntango ya kala, kokwea ya Babilone efungolaki nzela mpo ete Bayisalaele bázonga na mokili na bango. Na mikolo na biso, kozongisama ya Yisalaele ya Nzambe ezalaki elembeteli ete Babilone Monene ekwei na mabɔkɔ ya Sirise Monene. Kokwea yango eyebisamaki na anzelu ya mibale na Emoniseli mokapo 14, ntango angangaki ete: “[Babilone] monene ekwei! oyo asili komɛlisa mabota nyonso vinyo na kongala na pite na ye.” (Emoniseli 14:8) Oyo nde bokwei mpo na Babilone Monene, mingimingi mpo na mangomba ya boklisto! Mpe oyo nde lipamboli mpo na baklisto ya solo!

8. Na lolenge nini mokanda ya Ezekiele ezali kolobela esengo ya libota ya Nzambe nsima ya kobimisama na bango na boombo ya elimo na mobu 1919?

8 Na Ezekiele 11:18-​20, tozali kotánga maloba ya mosakoli oyo mazali komonisa esengo ya libota ya Nzambe nsima ya kozongisama na bango. Kokokisama ya liboso ya maloba na ye elimbolaki kopɛtolama ya Yisalaele na mikolo ya Ezela mpe Nehemia. Kokokisama na yango na mikolo na biso ezali mpe na ndimbola ndenge yango. Tiká ete tótalela yango. Yehova alobi ete: “Bakozonga kuna [na mokili na bango], mpe bakolongola biloko biboyami nyonso mpe biloko nyonso na mbindo bizali wana.” Bobele lokola yango esakolamaki, kobanda na 1919, Yehova apɛtolaki libota na ye mpe apesaki bango lisusu nguya mpo na kosalela ye. Babandaki kolongola na ezingelo na bango ya elimo misala nyonso mpe bindimeli nyonso ya Babilone oyo ezalaki kobebisa bango na miso na ye.

9. Mapamboli nini Yehova apesaki na libota na ye, kobanda na mobu 1919?

9 Na bongo, engebene vɛrsɛ́ 19, Yehova akóbaki koloba ete: “Nakopesa bango motema moko, mpe nakotya [elimo, NW] na sika na kati na bango; mpe nakolongola motema na libanga na kati na mosuni na bango, mpe nakopesa bango motema na mosuni.” Na boyokani na maloba oyo, na 1919, Yehova asangisaki basaleli bapakolami na ye, na elobeli ya elilingi apesaki bango “motema moko,” mpo ete bákoka kosalela ye “lipeka na lipeka.” (Sefania 3:9, NW) Lisusu, Yehova apesaki basaleli na ye elimo santu mpo na kolendisa bango lisusu kati na mosala ya kopesa litatoli mpe kolóna kati na bango mbuma malamu oyo elobelami na Bagalatia 5:22, 23. Mpe na esika ya kozala na motema makasi lokola libanga, Yehova apesi bango motema malamu mpe ya botosi oyo ekoki kosala mokano na ye.

10. Mpo na nini Yehova asili kopambola libota na ye oyo lizongisamaki kobanda na mobu 1919?

10 Mpo na nini asalaki bongo? Yehova ye moko alimboli. Na Ezekiele 11:20 tozali kotánga boye: “Ete bátambola na mibeko na ngai mpe bábatela malako na ngai, mpe bátosa yango; mpe bango bakozala bato na ngai, mpe ngai nakozala Nzambe na bango.” Yisalaele ya Nzambe bayekolaki kotosa mibeko ya Yehova na esika ya kolanda makanisi na bango moko. Bazalaki kosala mokano ya Nzambe kazanga kobanga bato. Na yango, bakeseni mpenza na baoyo bazwami kati na mangomba ya boklisto. Bazalaki libota ya Yehova. Na motindo yango, Yehova azalaki pene na kosalela bango lokola bamemi-nsango na ye, “moombo na sembo mpe na mayele.”​—Matai 24:45-​47.

Esengo ya bamemi-nsango ya Nzambe

11. Lolenge nini mokanda ya Yisaya ezali kolobela esengo ya libota ya Nzambe?

11 Okoki komona esengo na bango wana bayebaki etɛlɛmɛlo malamu na bango, boye te? Lokola etuluku, bazali kozongela maloba oyo ya Yisaya 61:10: “Nakosepela kosepela mingi kati na [Yehova], molimo na ngai ekozwa esengo mpo na Nzambe na ngai.” Elaka ya Yisaya 35:10 ekokisamaki likoló na bango: “Babikisami na [Yehova] bakobutwa; bakoya epai na Siona na nzembo, na esengo na seko likoló na mitó na bango; bakozwa esengo mpe bakosepela, mawa mpe kokimela ikokima mbango.” Yango ezalaki esengo ya bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe na mobu 1919 wana babandaki kosakola nsango malamu na molende epai na bato nyonso. Kobanda ntango wana kino lelo, bazali ntango nyonso kokokisa mosala yango mpe esengo na bango ezali sé kokóla. Kati na Lisoló na ye likoló na Ngomba, Yesu alobaki ete: ‘Esengo na bango bakoyeisa kimya, zambi bakotángama bana na Nzambe.’ (Matai 5:9) Bosolo ya maloba yango emonisami epai na batikali bapakolami, “bana ya Nzambe” kobanda na mobu 1919 kino lelo.

12, 13. (a) Banani bazali kosalela Yehova elongo na Yisalaele ya Nzambe, mpe mosala nini bazali kosala? (b) Esengo monene nini basaleli bapakolami ya Yehova basili kozwa?

12 Wana bambula ezalaki koleka, motángo ya Yisalaele ya Nzambe ezalaki kokóla kino na bambula 1930 ntango koyanganisama ya batikali bapakolami ekómaki pene na kokokisama. Na bongo, tokoki nde koloba ete motángo ya basakoli ya nsango malamu etikaki kobakisama? Soko moke te. Ebele monene ya baklisto oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé ezalaki kokóla, mpe basilaki kobanda kosangana na bandeko na bango bapakolami kati na mosala ya kosakola. Ntoma Yoane amonaki ebele monene yango na emonaneli, mpe lolenge alobelaki bango ezali kobenda likebi: “Bazali liboso na kiti na bokonzi na Nzambe, mpe bakosaleláká ye butu na moi.” (Emoniseli 7:15) Ɛɛ, ebele monene bakɔtaki na mosala ya kosalela Nzambe. Litomba oyo emonanaki ezali ete, ntango motángo ya bapakolami ebandaki kokita, nsima ya mobu 1935, mosala ya litatoli ekóbaki kopesama na molende na baninga yango ya sembo.

13 Na bongo Yisaya 60:3, 4 ekokisamaki: “Mabota bakoya epai na pole na yo mpe mikonzi kino kongɛnga na kobima na yo. Tombolá miso na yo epai na epai mpe talá; bazali koyangana nyonso elongo, bazali koya epai na yo; bana babali na yo bakolongwa na mosika mpe bana basi na yo bakokumbama na loketo.” Esengo oyo maloba yango ezali komemela Yisalaele ya Nzambe emonisami malamu mpenza na Yisaya 60:5, epai kuna tozali kotánga boye: “Bongo okomona mpe okongɛnga, motema na yo ekotetema mpe ekoya monene; zambi kofuluka na mai-na-monana ebongwelami yo, bozwi na mabota ekoyela yo.”

Ebongiseli ya Yehova ezali kokende sé liboso

14. (a) Emonaneli nini ya makambo ya likoló Ezekiele amonaki, mpe etindá nini azwaki? (b) Libota ya Nzambe na mikolo na biso bazali kososola nini, mpe mokumba nini bazali kokokisa?

14 Na 613 L.T.B., Ezekiele amonaki kati na emonaneli ebongiseli ya Yehova oyo ezalaki lokola likalo oyo ezalaki kokende sé liboso. (Ezekiele 1:4-​28) Na nsima, Yehova alobaki na ye ete: “Mwana na moto, kendá na ndako na Yisalaele mpe lobelá bango maloba na ngai.” (Ezekiele 3:4) Na mobu oyo 1997, tozali komona ete ebongiseli ya Yehova na makoló ezali ntango nyonso kokende liboso mpo na kokokisa mikano ya Nzambe. Nzokande, topusami ntango nyonso ete tóyebisa basusu mikano yango. Na mikolo na ye, Ezekiele alobaki maloba oyo mapemamaki mbala moko na Yehova. Lelo oyo, tozali koloba maloba mauti na Liloba ya Yehova lipemami, Biblia. Oyo nde nsango kitoko búku wana ezali na yango mpo na bato! Wana ebele ya bato bazali komitungisa na ntina na mikolo mizali koya, Biblia ezali komonisa ete makambo mazali mabe koleka​—mpe bobele na ntango yango, ezali mpe komonisa ete makambo mazali malamu mpenza​—koleka lolenge bato bakokaki kokanisa yango.

15. Mpo na nini makambo ya mokili mazali kobeba koleka lolenge bato mingi bakokaki kokanisa yango?

15 Makambo mazali mabe mpamba te, lokola toyekolaki yango na masoló maleki, mangomba ya boklisto mpe mangomba mosusu ya lokuta makobomama mosika te, makobebisama nyɛɛ lokola esalemaki na ntina na Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. Lisusu, bibongiseli nyonso ya politiki, oyo bimonisami na elilingi ya nyama na yauli ya mitó nsambo mpe maseke zomi na mokanda ya Emoniseli, mosika te bikolongolama, lokola esalemaki na ntina na mabota mingi ya bapakano oyo mazalaki nzinganzinga na Yelusaleme. (Emoniseli 13:1, 2; 19:19-​21) Na mikolo ya Ezekiele, Yehova alobelaki makasi mpenza mpasi oyo esengelaki komonana ntango kobomama ya Yelusaleme ebɛlɛmaki. Kasi maloba yango makozwa ndimbola mosusu ntango bato bakososola ete kobomama ya mokili oyo ebɛlɛmi. Yehova alobaki na Ezekiele ete: “Na bongo, kimelá, mwana na moto, kimelá liboso na miso na bango kino loketo na yo elingi kobukana, mpe na mawa na bololo. Mpe, wana ekoloba bango ete, Ozali kokimela mpo na nini? Okozongisa ete, Na ntina na nsango, mpo ete ekokóma; mitema nyonso mikonangwa, mpe mabɔkɔ nyonso makolɛmba, mpe milimo nyonso mikosenzwa, mpe mabɔlɔ́ngɔ́ nyonso makozala motau lokola mai. Talá, ekokóma, mpe ekosalema. Nkolo [Yehova] alobi bongo.” (Ezekiele 21:6, 7; Matai 24:30) Makambo ya nsɔ́mɔ mazali koya. Lobanzo na biso mozindo mpo na bazalani na biso ezali kopusa biso ete tókebisa bango, tólobela bango “lapólo” ya nkɛlɛ ya Yehova oyo ezali koya.

16. Mpo na bato na bopɔlɔ, mpo na nini makambo mazali malamu koleka lolenge bato mingi bakokaki kokanisa yango?

16 Bobele na ntango yango, mpo na bato na bopɔlɔ, makambo mazali malamu koleka lolenge bato mingi bakokaki kokanisa yango. Na lolenge nini? Na lolenge oyo ete Yesu akufaki mpo na masumu na biso mpe sikawa azali koyangela lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe. (1 Timoté 1:15; Emoniseli 11:15) Mikakatano minene oyo bato bazali kokutana na yango, mosika te mikosilisama na nzela ya Bokonzi ya makoló. Liwa, maladi, bobubi, nzala, mpe mobulu ekokóma makambo ya kala, mpe Bokonzi ya Nzambe ekoyangela paladiso na mabelé mobimba kozanga kotɛmɛlama. (Emoniseli 21:3, 4) Bato bakosepela na kimya ya Nzambe​—boyokani ya kimya ekozala elongo na Yehova Nzambe mpe kati na bato, bamoko na bamosusu.​—Nzembo 72:7.

17. Bokóli nini ezali kopesa bosepeli na mitema ya bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe?

17 Na bipai mosusu na mokili, bibele ya bato na bopɔlɔ bazali kondima nsango ya kimya ya Nzambe. Mpo na kolobela bobele mwa bandakisa moke, na mobu moleki, Ukraine esalaki bokóli ya 17 % ya motángo ya basakoli, Mozambique 17 %, Lituanie 29 %, Russie 31 % mpe Albanie 52 %. Bokóli yango ezali komonisa bankóto ya bato ya motema sembo oyo balingi kosepela na kimya ya Nzambe mpe bazwi etɛlɛmɛlo na bango na ngámbo ya boyengebene. Bokóli yango ya nokinoki ezali komemela biso esengo kati na bondeko na biso ya boklisto.

18. Bato bándima to bándima te, ezaleli na biso esengeli kozala nini?

18 Bato bazali kondima nsango malamu noki epai yo ofandi? Soki ezali bongo, tozali kosepela mingi elongo na yo. Nzokande, na bateritware mosusu, esɛngaka bangonga mingi mpenza ya mosala makasi liboso ete moto moko oyo akomonisa bosepeli azwama. Elingi koloba ete baoyo bazali kosala na bateritware ya motindo wana basengeli kokanga mabɔkɔ? Te, ezali bongo te. Batatoli ya Yehova bamikundolaka maloba ya Nzambe oyo alobaki na Ezekiele ntango atindaki mpo na mbala ya liboso, elenge mosakoli ete akende kosakola epai na bazalani na ye Bayuda: “Soko bakoboya koyoka (mpo ete bazali ndako na batomboki) bakoyeba ete mosakoli azalaki na kati na bango.” (Ezekiele 2:5) Lolenge moko na Ezekiele, bándima to bándima te, tozali kokóba koyebisa bato nsango malamu ya kimya ya Nzambe. Soki bandimi, tokozwa esengo. Soki bapesi biso mokɔngɔ, basɛki biso, ata banyokoli biso, likambo te, tokoyika bobele mpiko. Tolingi Yehova, mpe Biblia elobi ete: “Bolingo . . . ekoyikaka nyonso mpiko.” (1 Bakolinti 13:4, 7) Lokola tozali kosakola na mpiko, bato bayebi Batatoli ya Yehova. Bayebi nsango na biso. Ntango nsuka ekoya, bakoyeba ete Batatoli ya Yehova basalisaki bango ete básepela na kimya ya Nzambe.

19. Lokola tozali basaleli ya solo ya Nzambe, libaku malamu nini tosengeli komonisela yango motuya?

19 Ezali na libaku mosusu ya malamu koleka oyo ya kosalela Yehova? Soko moke te! Esengo na biso eleki monene ezali kouta na boyokani na biso elongo na Nzambe mpe koyeba ete tozali kosala mokano na ye. “Esengo ezali na bato baoyo bayoki mingongo na kosanzola na bilambo; ɛ [Yehova], bazali kotambola na pole na elongi na yo.” (Nzembo 89:15) Tiká ete ntango nyonso tómonisa motuya na esengo ya kozala bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe epai na bato. Tiká ete tósala oyo ekoki na biso kati na mosala yango kino Yehova akoloba ete ekoki.

Ozali komikundola?

◻ Lelo oyo, banani bazali bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe?

◻ Ndenge nini toyebi ete Babilone Monene ekweaki na mobu 1919?

◻ Lobanzo nini mpenza “ebele monene” bazali na yango?

◻ Mpo na nini avenire ezali mabe koleka lolenge bato bakokaki kokanisa yango?

◻ Mpo na bayengebene, mpo na nini avenire ekoki kozala malamu koleka lolenge bazali kokanisa yango?

[Bililingi na lokasa 21]

Ntango bazali komona kobeba ya bizaleli ya bato, mingi bazali kolɛmba

[Bililingi na lokasa 23]

Lelo oyo, bamemi-nsango ya kimya ya Nzambe bazali bato na esengo koleka awa na mabelé

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto