Tóluka koyeba banani bazali bamemi-nsango ya solo
“Ngai . . . nakokisi liloba na moombo ngai, nakokisi mpenza toli ya bamemi-nsango na ngai.”—YISAYA 44:25, 26, NW.
1. Lolenge nini Yehova amonisaka bamemi-nsango ya solosolo mpe lolenge nini atɔndɔlaka bamemi-nsango ya lokuta?
YEHOVA NZAMBE azali Momonisi Monene ya bamemi-nsango na ye ya solosolo. Amonisaka bango na kosaláká ete nsango oyo apesaka na nzela na bango ekokisama. Yehova azali mpe Motɔndɔli Monene ya bamemi-nsango ya lokuta. Lolenge nini atɔndɔlaka bango? Abebisaka bilembo na bango mpe bisakweli na bango. Na lolenge yango amonisaka ete bazali bato oyo bamiponi bango moko, oyo nsango na bango ezali kouta na makanisi mabe na bango—ɛɛ, makanisi na bango ya bozoba mpe ya bomoto!
2. Matata nini ebimaki kati na bamemi-nsango na ntango ya Yisalaele ya kala?
2 Yisaya mpe Ezekiele balobaki ete bazalaki bamemi-nsango ya Yehova Nzambe. Ezalaki solo? Tiká tótalela yango. Yisaya asakolaki na Yelusaleme kobanda pene na 778 L.T.B. kino mwa moke na nsima ya 732 L.T.B. Ezekiele amemamaki na Babilone na 617 L.T.B. Kuna, asakolaki epai na bandeko na ye Bayuda. Basakoli yango mibale basakolaki na mpiko ete Yelusaleme ekobebisama. Nzokande basakoli mosusu balobaki ete Nzambe akotika te ete likambo wana lisalema. Banani bamonanaki ete bazalaki bamemi-nsango ya solosolo?
Yehova atɔndɔli basakoli ya lokuta
3, 4. (a) Wapi nsango mibale ekeseni oyo epesamaki epai na Bayisalaele ntango bazalaki na Babilone, mpe lolenge nini Yehova atɔndɔlaki momemi-nsango ya lokuta? (b) Likambo nini Yehova alobaki ete ekokómela basakoli ya lokuta?
3 Wana azalaki na Babilone, Ezekiele apesamelaki emonaneli ya makambo oyo mazalaki kosalema na tempelo ya Yelusaleme. Mibali 25 bazalaki na ekɔtelo ya ekuke na yango ya ɛ́sti. Kati na bango, ezalaki na bana mibale ya mokonzi, Yaazania mpe Pelatia. Ndenge nini Yehova amonaki bango? Ezekiele 11:2, 3 eyanoli ete: ‘Mwana na moto, baoyo bazali bato bakobanzabanza masumu mpe bakopesaka toli mabe na mboka oyo; bakolobaka ete, Elaka na kotonga ndako ebɛlɛmi te?’ Bamemi-nsango ya kimya ya lokuta yango bazalaki koloba ete ‘Likámá lizali te mpo na Yelusaleme. Yango wana, mosika te tokotonga ndako mingi kati na yango.’ Na bongo, Nzambe alobaki na Ezekiele ete atɔndɔla basakoli yango ya lokuta. Na vɛrsɛ́ 13 ya mokapo 11, Ezekiele ayebisi biso oyo ekómelaki moko na bango: “Wana ezalaki ngai kosakola, Pelatia mwana na Beneya akufaki.” Yango esalemaki bongo mpamba te mbala mosusu Pelatia azalaki mwana ya mokonzi oyo alekaki na lokumu, na bopusi mpe azalaki mosambeli monene na bikeko. Liwa na ye ya mbalakaka emonisi ete azalaki mosakoli ya lokuta!
4 Kobomama ya Pelatia na Yehova epekisaki te basakoli mosusu ya lokuta ete bátika kokosa na nkombo ya Nzambe. Bakosi yango bakóbaki na ezaleli na bango mabe ya kosakoláká makambo mazalaki kotɛmɛla mokano ya Nzambe. Na yango, Yehova Nzambe ayebisaki Ezekiele ete: “Mawa epai na basakoli na zoba baoyo bakobilaka [elimo, NW] na bango mpenza, nde bamoni likambo te!” Lolenge moko na Pelatia, bimonaneli ya matumoli na ntina na Yelusaleme bikozala “lisusu te,” “bimonaneli na kimya mpo na ye, wana ezalaki kimya te.”—Ezekiele 13:3, 15, 16.
5, 6. Lolenge nini Yisaya amonanaki ete azalaki mosakoli ya solosolo atako bamemi-nsango ya lokuta bazalaki?
5 Mpo na Yisaya, nsango na ye nyonso oyo eutaki na Nzambe na ntina na Yelusaleme ekokisamaki. Na eleko ya molungé na mobu 607 L.T.B., bato ya Babilone babebisaki engumba, bakangaki mpe bamemaki na Babilone Bayuda oyo batikalaki na bomoi. (2 Ntango 36:15-21; Ezekiele 22:28; Danyele 9:2) Minyoko yango mipekisaki basakoli ya lokuta kokosa libota ya Nzambe na maloba na bango ya mpamba? Te, bamemi-nsango yango ya lokuta bakóbaki kokosa!
6 Longola wana, Bayisalaele oyo bamemamaki batyamaki liboso na balobeli ya bozwi ya lofundo na Babilone, liboso na basakoli na makambo mazali koya mpe liboso na bato ya astroloji. Nzokande, Yehova asalaki ete bamemi-nsango yango nyonso bálónga te, básakola makambo oyo makosalema te. Mosika te, amonisaki ete Ezekiele azalaki momemi-nsango na ye ya solosolo, lolenge moko na Yisaya. Yehova akokisaki maloba nyonso oyo alobaki na nzela na bango, bobele lokola alakaki yango: “Ngai napekisi bilembo na bato na nkuta, nakómisi basakoli ete bázala bazoba, nazongisi bato na mayele nsima, nabongoli mayele na bango ete mázala zoba ebɛbɛ. Nakokisi liloba na moombo na ngai, nasali toli na [bamemi-nsango, NW] na ngai.”—Yisaya 44:25, 26.
Nsango ya ekweli ya Babilone mpe ya Yelusaleme
7, 8. Nsango nini epemami na elimo santu Yisaya azalaki na yango mpo na Babilone, mpe maloba na ye malimbolaki nini?
7 Yuda mpe Yelusaleme esengelaki kobebisama kozanga ete mofandi azala wana na boumeli ya mibu 70. Nzokande, Yehova alobaki na nzela na Yisaya mpe Ezekiele ete engumba esengelaki kotongama lisusu mpe mokili mokofandama lisusu na bato na ntango moko ya sikisiki oyo ye moko alobaki! Yango ezalaki mpenza esakweli ya kokamwa. Mpo na nini? Mpamba te Babilone eyebanaki lokola mboka oyo epesaka soko moke te bonsomi na bakangami na yango. (Yisaya 14:4, 15-17) Na bongo, nani akokaki mpenza kobimisa bakangami yango? Nani akokaki kokweisa Babilone yango ya nguya, na bifelo na yango milai mpe na myango na yango ya bibale mpo na kobatela yango? Bobele Yehova Mozwi-na-Nguya-Nyonso akokaki kokweisa yango! Mpe alobaki mpenza ete akokweisa yango: “Ngai . . . nalobi na bozindo [bozindo ya mai oyo ezalaki kobatela engumba] ete, Kaoka, nakokaokisa mpe bibale na yo. Nalobi mpo na Kulese [“Sirise,” NW] ete, ye azali mobateli na etonga na ngai, ye akosukisa mokano na ngai; nalobi mpe na Yelusaleme ete, Akotongama mpe na Tempelo ete, Miboko na yo ikotiama.”—Yisaya 44:25, 27, 28.
8 Kanisá naino! Ebale Pelata, oyo ezalaki mpenza epekiseli monene mpo na bato, epai na Yehova emonanaki lokola mwa litanga ya mai likoló na etando oyo ezali kopela mɔ́tɔ makasi. Na mbala moko, epekiseli yango ekaukaki! Babilone ekweaki. Atako yango esalemaki mbula 150 liboso ete Sirise moto na Pelese abotama, Yehova alobaki na nzela na Yisaya ete mokonzi wana asengelaki kokanga mokonzi ya Babilone mpe kobimisa Bayuda bakangamaki kuna na kopesáká nzela ete bázonga mpo na kotonga lisusu Yelusaleme mpe tempelo na yango.
9. Yehova aponaki nani lokola ntoma mpo na kopesa etumbu na Babilone?
9 Tozali kokuta esakweli yango na Yisaya 45:1-3: ‘Yehova alobi boye epai na mopakolami na ye epai na Sirise oyo nasimbi lobɔkɔ na ye na mobali mpo na kobuka mabota liboso na ye . . . mpo na kozipola pome liboso na ye ete bikuke bifungama te, ete, Ngai nakoleka liboso na yo mpe nakozalisa alima bisika bizali na mobulu, nakobukabuka bikuke na motako, nakokatakata bikangeli na ebende, Nakopesa yo biloko na motuya bizali kati na molili mpe bozwi bobombami na bisika na nkuku, ete oyeba ete ngai, Yehova, Nzambe na Yisalaele, nabyangi yo na nkombo na yo.’
10. Na lolenge nini Sirise azalaki “mopakolami” mpe na lolenge nini Yehova akokaki kosolola na ye koleka mbula nkámá liboso ete abotama?
10 Tóyeba ete Yehova alobaki na Sirise lokola nde asilaki kobotama. Yango ezali na boyokani na maloba ya Paulo ete Yehova “akobyangaka biloko bimonani naino te ete bízala.” (Baloma 4:17) Bobele bongo, Nzambe amonisaki Sirise lokola “mopakolami na ye.” Mpo na nini asalaki bongo? Kútu, nganga monene ya Yehova apakolaki Sirise mafuta ya bulɛɛ na motó soko moke te. Ya solo, ezali kopakolama ya esakweli. Ezali komonisa koponama mpo na mokumba moko monene. Na bongo, Yehova akokaki kolobela liboso koponama ya Sirise lokola mopakolami.—Kokanisá na 1 Mikonzi 19:15-17; 2 Mikonzi 8:13.
Nzambe akokisaka maloba ya bamemi-nsango na ye
11. Mpo na nini bafandi ya Babilone bazalaki komiyoka ete bazalaki na libateli?
11 Na ntango Sirise akendaki kobunda na Babilone, bafandi na yango bamiyokaki kati na libateli. Engumba na bango ezingamaki na libulu moko mozindo mpe monene, oyo esalemaki na Ebale Pelata. Epai oyo ebale ezalaki koleka kati na engumba, ezalaki na libongo moko molai na bokúla ya ɛ́sti ya ebale. Mpo na kokabola yango na engumba, Nebukadanesala atongaki oyo ye abéngaki ete “efelo monene, oyo lolenge moko na ngomba ekoki kolongolama te . . . Bolai na yango ekokani na ngomba.”a Efelo yango ezalaki na bikuke ya motako (cuivre). Mpo na kokɔta, esengelaki komata longwa na epai ya likoló ya ebale. Likambo ya kokamwa ezali te ete bakangami ya Babilone bazalaki soko moke te na elikya ya kobima!
12, 13. Lolenge nini maloba ya Yehova oyo alobaki na nzela na momemi-nsango na ye Yisaya makokisamaki ntango Babilone ekweaki na mabɔkɔ ya Sirise?
12 Kasi ezali bongo te mpo na Bayuda bakangami oyo bazalaki kondimela Yehova! Bazalaki na elikya makasi. Na nzela na basakoli na ye, Nzambe alakaki ete akosikola bango. Na lolenge nini Nzambe akokisaki elaka na ye? Sirise apesaki etindá na mapinga na ye ete bálekisa mai ya Ebale Pelata na nzela mosusu, na bakilomɛtɛlɛ mingi na Nɔ́rdi ya Babilone. Na bongo, mai oyo ezalaki kobatela engumba ekaukaki. Na butu wana ya mpasi, wana bafandi na engumba bazalaki kosepela eyenga, kozanga likebi, batikaki bikuke mibale polele epai ya likoló ya Ebale Pelata. Yehova abukaki mpenza te bikuke ya motako; akataki mpe te bibende oyo bizalaki kokanga yango, kasi asalelaki nde mwango na ye ya kokamwa mpo ete ekuke etikala polele mpe ekangama te na bibende, ezala kobuka bibende to kotika ekuke polele ezalaki na bopusi bobele moko. Bifelo ya Babilone bizalaki lisusu na ntina te. Mampinga ya Sirise masengelaki komata te mpo na kokɔta na kati. Yehova azalaki liboso na Sirise, kolɛmbisáká “mabondo ya mabelé,” ɛɛ, bipekiseli nyonso. Yisaya amonisamaki ete azalaki momemi-nsango ya solosolo ya Nzambe.
13 Ntango Sirise azwaki engumba mobimba, biloko na yango nyonso ya motuya bikómaki na mabɔkɔ na ye, bakisá mpe oyo bibombamaki na biteni ya ndako ya molili. Mpo na nini Yehova Nzambe asalaki bongo mpo na Sirise? Mpo ayeba ete Yehova ‘oyo abéngaki ye na nkombo,’ azali Nzambe ya bisakweli ya solo mpe Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. Asengelaki koyeba ete Nzambe asalaki ebongiseli mpo na ye ete akóma na bokonzi oyo ekopesa ye nzela ete asikola Yisalaele, libota na Ye.
14, 15. Ndenge nini toyebi ete Sirise asengelaki kopesa lokumu ya bolóngi na ye likoló na Babilone epai na Yehova?
14 Yoká maloba oyo Yehova alobaki na Sirise: “Mpo na moombo na ngai Yakobo mpe Yisalaele moponami na ngai, nabyangi yo na nkombo na yo, napesi yo nkombo naino oyebi ngai te. Ngai nazali [Yehova], mpe mosusu azali te, Nzambe mosusu azali te, bobele ngai; nakangi yo na loketo, ata oyebi ngai te, ete bato báyeba longwa na ebimelo na ntango mpe longwa na elimwelo na ntango ete mosusu azali te, bobele ngai; ngai nazali [Yehova], mosusu azali te. Ngai nakosala pole mpe nakobongisa molili; nakoyeisa kimya [elingi koloba, mpo na libota na ye likangamaki] mpe nakokómisa mabe [mpo na Babilone]; ngai [Yehova] nakosala oyo nyonso.”—Yisaya 45:4-7.
15 Sirise asengelaki kopesa lokumu ya bolóngi na ye epai na Yehova, mpamba te ezalaki Ye nde alendisaki Sirise ete akokisa mokano na Ye na engumba mabe wana mpe asikola libota na Ye oyo likangamaki. Na kosaláká bongo, Nzambe asɛngaki na makoló na ye ete másopa bopusi to nguya ya boyengebene. Apesaki nzela na mabelé na ye ete mázipwana mpe mábota makambo ya boyengebene mpe lobiko mpo na libota na ye oyo likangamaki. Makoló mpe mabelé yango ya elilingi etosaki etindá yango. (Yisaya 45:8) Koleka mbula monkámá nsima ya liwa na ye, emonanaki ete Yisaya azalaki solo momemi-nsango ya Yehova!
Nsango malamu ya momemi-nsango mpo na Siona!
16. Nsango malamu nini esengelaki kosakolama kati na engumba Yelusaleme oyo ebebisamaki ntango Babilone ekweaki?
16 Ezali na likambo mosusu koleka. Yisaya 52:7 ezali kolobela nsango malamu na ntina na Yelusaleme: “Kitoko boni likoló na ngomba ezali makolo na ye oyo akoyeisa nsango malamu, ye oyo akosakola kimya mpe akoyeisa nsango malamu na kosepela, ye oyo akosakola kobikisama, ye oyo akoloba na Siona ete, Nzambe na yo azali [“akómi,” NW] mokonzi.” Kanisá esengo oyo ezalaki na komonáká momemi-nsango moko azali kouta na ngomba mpe kobɛlɛma na Yelusaleme! Asengelaki kozala na nsango. Nsango yango nini? Ezali bongo nsango ya esengo na ntina na Siona. Nsango ya kimya, ɛɛ, nsango ya mokano malamu ya Nzambe. Yelusaleme mpe tempelo na yango esengeli kotongama lisusu! Mpe momemi-nsango asakoli na mpiko nyonso ete: “Nzambe na yo akómi mokonzi!”
17, 18. Lolenge nini kokwea ya Babilone liboso na Sirise ezalaki na bopusi likoló na nkombo ya Yehova?
17 Ntango Yehova apesaki nzela na bato ya Babilone ete bábalola kiti na ye ya elilingi oyo bakonzi ya libota ya Davidi bazalaki kofanda, na ntembe te emonanaki ete azalaki lisusu mokonzi te. Maladuku, nzambe mokonzi ya Babilone, amonanaki ete azali mokonzi. Nzokande, ntango Nzambe ya Siona akweisaki Babilone, amonisaki boyangeli na ye na molɔ́ngɔ́ mobimba—ete azali Mokonzi aleki bonene. Mpe mpo na komonisa yango, Yelusaleme, “mboka na Mokonzi monene,” mpe tempelo na yango esengelaki kotongama lisusu. (Matai 5:35) Na ntina na momemi-nsango oyo ayaki na nsango malamu yango, atako makolo na ye ezalaki na mputulu, na bosɔtɔ, mpe ezokaki, na miso ya baoyo balingaki Siona mpe Nzambe na yango, ezalaki komonana kitoko mpenza!
18 Na lolenge ya esakweli, kokwea ya Babilone elimbolaki ete Bokonzi ya Nzambe etyamaki mpe moto oyo amemaki nsango malamu azalaki mosakoli ya likambo yango. Lisusu, momemi-nsango wana ya kala, oyo asakolamaki na nzela ya Yisaya, azalaki elilingi ya moto oyo akomema nsango moko monene—monene mpo na maloba na yango mpe motó na likambo na yango oyo ezali kolobela Bokonzi, na matomba malamu na yango mpo na bato nyonso oyo bazali na kondima.
19. Nsango nini etali mokili ya Yisalaele Yehova apesaki na nzela na Ezekiele?
19 Ezekiele mpe apesamelaki bisakweli minene ya botongi lisusu. Asakolaki ete: “Nkolo [Yehova] alobi boye ete, . . . nakofandisa bato na mboka, mpe bisika bibebaki bikotongama. Mpe bango bakoloba ete, Mabelé oyo mazalaki mpamba ekómi lokola elanga na Edene.”—Ezekiele 36:33, 35.
20. Elendiseli nini Yisaya apesaki na Yelusaleme na lolenge ya esakweli?
20 Wana bakangamaki na Babilone, basaleli ya Nzambe bazalaki kolela Siona. (Nzembo 137:1) Sikawa, bakokaki kosepela. Yisaya alendisaki bango ete: “Bandá koyemba nzembo, bino bisika na mpamba kati na Yelusaleme; zambi [Yehova] abɔndisi bato na ye, asikoli Yelusaleme. [Yehova] azipoli lobɔkɔ na ye na bulɛɛ, liboso na miso na mabota nyonso; mpe nsuka nyonso na mokili bakomona kobikisa na Nzambe na biso.”—Yisaya 52:9, 10.
21. Na lolenge nini maloba ya Yisaya 52:9, 10 makokisamaki nsima ya kokwea ya Babilone?
21 Ɛɛ, libota liponami ya Yehova bazalaki na ntina monene ya koyoka esengo. Basengelaki sikawa kofanda na bisika oyo bitikalaki mpamba, kokómisáká yango lokola elanga ya Edene. Yehova “afungolaki lobɔkɔ na ye mosantu” mpo na bango. Angumbaki lisɛ́ti na ye ya mabɔkɔ na lolenge ya elilingi, kosaláká ete azongisa bango na mokili oyo bazalaki kolinga. Yango ezalaki likambo moke te. Te, bato nyonso oyo bazalaki na ntango wana bamonaki ‘lobɔkɔ lofungwami’ ya Nzambe kotya nguya kati na makambo ya bato mpo na komema lobiko ya libota moko. Bato ya mabota bapesamelaki elembeteli monene ete Yisaya mpe Ezekiele bazalaki solo bamemi-nsango ya Nzambe. Moto moko te akokaki kobɛta ntembe ete Nzambe ya Siona azalaki Nzambe bobele moko ya solo mpe ya bomoi kati na mabelé mobimba. Na Yisaya 35:2, tozali kotánga boye: “Bakomona nkembo na [Yehova], bokonzi na Nzambe na biso.” Baoyo bandimaki elɛmbɛtɛli yango ya bonzambe ya Yehova bazongaki kosambela ye.
22. (a) Mpo na nini lelo oyo basambeli ya Yehova bakoki kozala na botɔ́ndi? (b) Mpo na nini tosengeli mpenza kozala na botɔ́ndi ete Yehova azali kotɔndɔla bamemi-nsango ya lokuta?
22 Oyo nde botɔ́ndi tosengeli kozala na yango mpo ete Yehova amonisaka bamemi-nsango na ye ya solosolo! Azali solo ‘Oyo akokisi liloba ya moombo na ye, asali toli na bamemi-nsango na ye.’ (Yisaya 44:26) Bisakweli ya kotongama lisusu oyo apesaki na Yisaya mpe Ezekiele bimonisaki bolingo na ye monene, boboto na ye, mpe ngɔlu na ye epai na basaleli na ye. Ya solo, Yehova abongi na kozwa masanzoli na biso nyonso mpo na ntina yango! Mpe lelo oyo biso tosengeli kozala mpenza na botɔ́ndi mpo ete azali kotɔndɔla bamemi-nsango ya lokuta. Yango ezali bongo mpamba te bamemi-nsango yango ya lokuta bazali mingi kati na mokili mobimba. Nsango na bango elobelaka te mikano ya Yehova. Lisoló oyo lilandi likosunga biso ete tóyeba bamemi-nsango yango ya lokuta.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Búku The Monuments and the Old Testament, ekomami na Ira Maurice Price, 1925.
Okoki kolimbola?
◻ Lolenge nini Yehova amonisaka bamemi-nsango na ye ya solosolo?
◻ Na nzela na Yisaya, Yehova aponaki nani lokola ntoma na ye mpo na kokweisa Babilone?
◻ Na lolenge nini bisakweli ya Yisaya oyo bizalaki kolobela kokwea ya Babilone bikokisamaki?
◻ Litomba nini kokwea ya Babilone ememaki likoló na nkombo ya Yehova?
[Elilingi na lokasa 9]
Babilone emonanaki lokola ekolóngama te na mabota oyo mazalaki na ntango ya Ezekiele