Sɛkɛlɛ́ na nkombo ya Nkolo
NA SANZA ya Mársi 1995, bato 12 bakufaki, mpe bankóto mosusu bazwaki makɔnɔ mpo na ngɛngɛ ya gaze moko oyo etyamaki na engbunduka etambolaka na nsé ya mabelé (métro) na engumba Tokyo, na ekólo Japon; mpe likambo yango esalisaki mpo na kotɔndɔla sɛkɛlɛ́ oyo ebombamaki. Mwa lingomba ebéngami Aum Shinrikyo (Solo oyo eleki basolo nyonso) ebombaki ebele ya gaze ebéngami “sarin,” mpo kosalela yango na kokokisa mikano ya nkuku.
Sanza moko na nsima, bɔ́mbi moko epanzanaki mpe ebebisaki ndako moko ya Letá na engumba Oklahoma City, na États-Unis, mpe ebomaki bato 167. Bilembeteli bimonisaki lokola ete likámá wana ezalaki na boyokani na likambo oyo ete mbula mibale liboso, guvernemá etyaki nsuka na misala ya lingomba ya ba Davidiens na engumba Waco, na etúká ya Texas. Na ntango wana basangani 80 ya lingomba wana bakufaki. Kopanzana ya bɔ́mbi wana etɔndɔlaki lisusu likambo oyo ezalaki sɛkɛlɛ́ epai ya bato mingi: Bituluku mingi ya bato oyo basili kobongisama na mosala ya sodá bazali sikawa kosala na États-Unis, mpe ekanisami ete mwa ndambo kati na bituluku yango bizali koanga myango ya kobebisa misala ya guvernemá.
Na nsima, pene na nsuka ya mobu 1995, bibembe ya bato 16 oyo bazikisamaki na mɔ́tɔ emonanaki na zamba moko pene na engumba Grenoble, na ekólo France. Bato yango bazalaki basangani ya mwa lingomba ebéngami “Ordre du temple solaire,” oyo, na sanza ya Ɔkɔtɔ́bɛ 1994 elobelamaki mingi na bipanzelo ya nsango na ekólo Suisse mpe na ekólo Canada na ntango basangani na yango 53 bamibomaki bango moko to mpe babomaki bango. Kasi ata nsima ya likambo yango ya nsɔ́mɔ, mwa lingomba yango elandaki kosala misala na yango. Kino lelo oyo, mposa mpe mikano na yango ezali naino sɛkɛlɛ́ mpo na bato.
Makámá ya sɛkɛlɛ́ ya mangomba
Na kotalela makambo motindo wana, tokoki kokamwa te ete bato mingi bazali kotalatala na likebi mpenza misala ya bituluku ya losambo. Na ntembe te moto moko te akolinga kopesa mabɔkɔ na masangá ya nkuku—ezala ya losambo to ya losambo te—oyo ezali kosalela bosembo na ye na lolenge mabe mpe ezali kotindika ye ete alanda mikano oyo andimi yango te. Na yango, bato bakoki kosala nini mpo na kopɛngola kokwea na motambo ya komikɔtisa na masangá ya nkuku oyo mikano na yango milongobani te?
Ya solo, moto nyonso oyo akani kokóma mosangani ya lisangá moko ya nkuku akosala angɛlɛ ete ayeba malamu mikano na yango ya solosolo. Esengeli te kotindikama na baninga to bayebani, mpe bikateli yango bisengeli kozwa moboko na mayoki mpamba te kasi likoló na bilembeteli. Omikundwela ete mbala mingi ekozala moto ye moko—kasi basusu te—nde akonyokwama soko makambo mabe mabimi.
Kolanda mitindá ya Biblia ezali mwango moleki malamu mpo na kokima bituluku ya makámá oyo mikano na yango milongobani te. (Yisaya 30:21) Yango esangisi koboya komikɔtisa na makambo ya politiki, komonisa bolingo mpo na basusu, ata mpe mpo na banguna, koboya “misala ya nzoto,” mpe kolóna mbuma ya elimo ya Nzambe. Likoló na nyonso, baklisto ya solo basengeli kokɔta na makambo ya mokili te, lolenge moko Yesu amikɔtisaki na makambo ya mokili te, mpe lolenge wana ya bomoi ezali kopɛngola kosangana na masangá ya nkuku ya mokili.—Bagalatia 5:19-23; Yoane 17:14, 16; 18:36; Baloma 12:17-21; Yakobo 4:4.
Batatoli ya Yehova bazali bayekoli ya solosolo ya Biblia oyo bazali kotalela kondima na bango na motuya mpenza mpe bazali kosala milende mpo na komitambwisa engebene mitindá na yango. Bayebani malamu kati na mokili mobimba lokola basambeli oyo bazali ‘koluka kimya mpe kolanda yango.’ (1 Petelo 3:11, NW) Búku na bango Les Témoins de Jéhovah: Prédicateurs du Royaume de Dieu elobi na bosikisiki mpenza ete: “Batatoli ya Yehova bazali soko moke te lisangá ya nkuku. Bindimeli na bango oyo biuti na Biblia bilimbolami malamu kati na mikanda na bango oyo moto nyonso akoki kotánga yango. Lisusu, bazali kosala milende makasi ya kobyanga bato ete báyangana na makita na bango mpo na komona mpe koyoka bango moko makambo oyo mazali kosalema kuna.”
Lingomba ya solo esalaka makambo na nkuku soko moke te. Basambeli ya Nzambe ya solo bateyami ete bábomba bomoto na bango te to mpe bapɛngwa na mokano na bango te ya kozala Batatoli ya Yehova. Bayekoli ya liboso ya Yesu batondisaki Yelusaleme mobimba na mateya na bango. Bazalaki komonisa liboso ya bato nyonso bindimeli mpe mosala na bango. Ezali sé bongo mpo na Batatoli ya Yehova lelo oyo. Ya solo, ntango boyangeli mabe epekisi na libunga nyonso bonsomi ya losambo, baklisto basengeli kokokisa mosala na bango na bokɛngi mpe na mpiko, kotosáká “Nzambe lokola mokonzi liboso na kotosa bato,” ezalela oyo etyameli bango na makasi na ntina na litatoli na bango ya mpiko liboso ya bato nyonso.—Misala 5:27-29, NW; Mis. 8:1; 12:1-14; Matai 10:16, 26, 27.
Soki esila kokómela yo na kokanisa ete Batatoli ya Yehova bakoki kozala lisangá ya nkuku to mpe mwa lingomba moke, mbala mosusu ezalaki bongo mpo ete yo nde oyebaki makambo mingi te na ntina na bango. Ezalaki sé bongo mpo na bato mingi na ekeke ya liboso.
Misala mokapo 28 eyebisi biso bokutani ya Paulo mpe “mikóló na Bayuda” na engumba Loma. Balobaki na ye ete: “Tokosepela koyoka makanisi na yo na monɔkɔ na yo, zambi mpo na lingomba oyo, eyebani na biso ete eboyami na bisika nyonso.” (Misala 28:16-22) Na eyano na ye, Paulo “alimboli na bango ntina na Bokonzi na Nzambe,” mpe “bamosusu bandimaki.” (Misala 28:23, 24) Na ntembe te koluka koyeba makambo ya solosolo na ntina na boklisto ya solo ememelaki bango bolamu ya seko.
Lokola bamipesi na mosala ya polele mpe liboso ya bato nyonso mpo na Nzambe, Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya kolimbola makambo nyonso matali mosala na bango mpe bindimeli na bango epai ya moto nyonso oyo azali na mposa ya koyeba bosolo ya makambo. Mpo na nini te kosala bolukiluki yo moko, mpe na bongo okoka koyeba malamu makambo na ntina na kondima na bango?
[Elilingi na lokasa 6]
Batatoli ya Yehova bazali na esengo ya komonisa epai na bato soki bazali mpenza banani mpe mosala nini bazali kokokisa