Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/7 nk. 8-13
  • “Yehova akosundola bato na ye te”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Yehova akosundola bato na ye te”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baklisto ya sembo bayebaka ete bakoki kokutana na minyoko
  • Makambo tozali koyekola na masoló ya Biblia
  • Yehova amibanzabanzaka mpo na baoyo bazali konyokwama
  • Makabo ya Yehova mazali kosunga biso
  • Yehova azali ‘Ekimelo na biso na ntango ya mpasi’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Yehova abikisaka moto oyo azali na mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mpo na nini bato malamu bazali kozwa mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Batelá esengo na ntango ya mpasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/7 nk. 8-13

“Yehova akosundola bato na ye te”

“Moyengebene azali na makambo mingi na mpasi nde [Yehova] akobikisa ye kati na yango nyonso.”​—NZEMBO 34:19.

1, 2. (a) Lolenge nini Yehova azali kopambola basaleli na ye lelo oyo? (b) Baklisto mingi bazali kokutana na makambo nini, mpe mituna nini mizali kobima?

NA KOKOKISAMA ya esakweli ya Biblia, basambeli ya Yehova bafandi kati na paladiso ya elimo. (2 Bakolinti 12:1-4) Batatoli ya Yehova bazwami kati na bondeko oyo esangisi bango na mokili mobimba mpe emonisami na bolingo mpe bomoko. (Yoane 13:35) Bazali na boyebi mingi mpe mozindo ya solo ya Biblia. (Yisaya 54:13) Bazali na botɔ́ndi mingi epai na Yehova mpo ete apesi bango libaku malamu ya kozala babyangami kati na hema na ye ya elimo!​—Nzembo 15:1.

2 Atako bato nyonso kati na lisangá ya Yehova bazali kosepela na bokóli ya elimo, emonani ete bamoko bazali na mwa kimya wana basusu bazali kokutana na minyoko ya ndenge na ndenge. Baklisto mingi bazali kati na ezalela ya mawa na boumeli ya ntango molai mpe elikya ya bopemi ezali te. Makambo motindo wana makoki komema na kolɛmba. (Masese 13:12) Minyoko ezali nde elembo ete Nzambe azali kosepela na biso te? Yehova azali nde kobatela ndambo ya baklisto wana azali kosundola basusu?

3. (a) Yehova azali nde mobandisi ya minyoko oyo basaleli na ye bazali kokutana na yango? (b) Mpo na nini ata basambeli ya sembo ya Yehova bazali kozwa minyoko?

3 Biblia eyanoli ete: “Tiká te ete moto oyo amekami aloba ete, Nazali komekama na Nzambe. Mpo ete Nzambe amekami na mabe te, ye mpe akomekaka moto te.” (Yakobo 1:13) Yehova azali Mobateli mpe Mosungi ya basaleli na ye. (Nzembo 91:2-6) “Yehova akosundola bato na ye te.” (Nzembo 94:14, NW) Yango elingi koloba te ete basambeli ya sembo ya Yehova bakokutana na mikakatano te. Ebongiseli ya biloko ya ntango oyo eyangelami na bato oyo bazali mpenza na ezaleli ya kozanga kokoka. Mingi babebisami, mpe mwa ndambo mosusu bazali mpenza mabe. Moko te kati na bango azali kotalela Yehova mpo na kozwa mayele. Yango ezali komemela bato mingi minyoko. Biblia ezali koloba polele ete basaleli ya Yehova bakoki ntango nyonso te kopɛngola matomba mabe mauti na ezaleli ya kozanga kokoka mpe misala mabe ya bato.​—Misala 14:22.

Baklisto ya sembo bayebaka ete bakoki kokutana na minyoko

4. Likambo nini baklisto nyonso bakoki kokutana na yango wana bazali naino kobika kati na ebongiseli mabe ya biloko ya ntango oyo, mpe mpo na nini?

4 Atako bazali komikɔtisa na makambo ya mokili te, bayekoli ya Yesu bazali kobika kati na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo. (Yoane 17:15, 16) Satana amonisami kati na Biblia lokola nguya oyo ezali koyangela mokili oyo. (1 Yoane 5:19) Na yango, baklisto nyonso basengeli koyeba ete lelo to lobi bakoki kokutana na mikakatano makasi. Koyebáká likambo yango, ntoma Petelo alobi ete: “Bómisɛnzɛla, bólala mpɔngi te; motɛmɛli na bino, oyo mabe, azali kotambola lokola nkosi konguluma, kolukáká soko akolya nani. Bótɛmɛla ye ngwi mpo na kondima, bóyeba ete mpasi na motindo moko mpenza ezali kobimela bandeko na bino na bipai mosusu na mokili.” (1 Petelo 5:8, 9) Ɛɛ, bandeko nyonso basengeli koyeba ete bakoki kokutana na minyoko.

5. Lolenge nini Yesu amonisaki polele ete baklisto ya sembo bakokutana mpe na mikakatano kati na bomoi?

5 Ata soki tolingaka Yehova mingi mpenza mpe tozali kotosa mitindá na ye, tokokutana na mikakatano kati na bomoi na biso. Yesu amonisaki yango polele kati na lisese na ye oyo lizwami na Matai 7:24-​27, esika amonisaki bokeseni kati na baoyo bazali kotosa maloba na ye mpe baoyo bazali kotosa yango te. Akokanisaki bayekoli ya botosi na moto na mayele oyo atongi ndako likoló na mabanga. Mpo na baoyo bazalaki kotosa maloba na ye te akokanisaki bango na mobali zoba oyo atongi ndako na ye likoló na zɛlo. Nsima ya mopɛpɛ makasi, bobele ndako oyo etongamaki likoló ya mabanga nde etikalaki. Tósimba likambo oyo ete na ntina na ndako ya moto na mayele, “mbula enɔki mpe mpela eyei mpe mipɛpɛ mipɛpi mpe ibɛti ndako yango nde ekwei te.” Yesu alakaki te ete moto na mayele akozala ntango nyonso na kimya. Nzokande, mayele ya moto yango esengelaki kobongisa ye na kolónga mikakatano. Likanisi motindo yango limonisami na lisese ya molóni. Kati na lisese yango Yesu alimboli ete ata basambeli ya botosi oyo bazali “na motema kitoko na malamu” basengeli ‘kobota mbuma na etingya.’​—Luka 8:4-​15.

6. Kati na lisese ya Paulo litali bitongeli oyo bizikaka na mɔ́tɔ, banani bazali konyokwama na komekama?

6 Wana azalaki kokomela Bakolinti, ntoma Paulo asalelaki elobeli ya masese mpo na komonisa mposa ya bizaleli malamu oyo bizali koumela mpe bikoki kosalisa biso na kolónga komekama. Bitongeli oyo bizikaka na mɔ́tɔ te lokola wolo, motako, mpe mabanga ya motuya ekokani na bizaleli ya moto oyo azali na bobangi Nzambe. (Kokanisá na Masese 3:13-​15; 1 Petelo 1:6, 7.) Epai mosusu, bizaleli ya mosuni bikokanisami na bitongeli oyo bizikaka na mɔ́tɔ. Na nsima Paulo alobi ete: “Mosala na moto na moto ekomonana polele. Zambi mokolo yango ekomonisa yango mpo ete mokomonana na mɔ́tɔ mpe mɔ́tɔ ekososolisa motindo na mosala mosalaki moto na moto. Soko mosala motongi moto ekoumela, ye akozwa libonza.” (1 Bakolinti 3:10-​14) Awa lisusu, Biblia elimboli ete na ntembe te biso nyonso tokokutana na komekama makasi ndenge na ndenge.

7. Engebene Baloma 15:4, lolenge nini Makomami makoki kosalisa biso ete tóyika mpiko na komekama?

7 Kati na Biblia, ezali na masoló mingi ya basaleli ya sembo ya Nzambe oyo bayikaki mpiko na minyoko, mbala mosusu mpo na ntango molai. Kasi, Yehova asundolaki bango te. Ntoma Paulo azalaki mbala mosusu kokanisa bandakisa motindo wana ntango alobaki ete: “Mpo na nyonso ikomamaki kalakala, ikomami mpo na kolakisa biso ete tózala na elikya na nzela na koyika mpiko mpe na kolendisama na makomi.” (Baloma 15:4) Tótalela ndakisa ya mibali misato oyo, atako bazalaki na boyokani malamu na Nzambe, banyokwamaki mingi.

Makambo tozali koyekola na masoló ya Biblia

8. Yehova apesaki nzela na makambo nini na kotalela oyo ekómelaki Yosefe, mpe mpo na ntango boni?

8 Yehova asepelaki mingi na Yosefe, mwana mobali ya Yakobo banda bolenge na ye. Nzokande, atako asalaki mbeba moko te, anyokwamaki mingi mpenza. Bandeko na ye moko bakangaki ye na nkuku mpe basalelaki ye mabe. Batekaki ye lokola moombo na mokili ya bapaya epai kuna bafundaki ye na makambo ya lokuta mpe batyaki ye na “bolɔ́kɔ.” (Genese 40:15) Kuna, “bazokisaki makaka na ye na minyɔtɔ, akangamaki kati na minyɔlɔ́lɔ.” (Nzembo 105:17, 18) Na boumeli ya bomoi na ye, mpe na bolɔ́kɔ, na ntembe te Yosefe abondelaki Yehova mpo na kozwa bopemi. Nzokande, na boumeli ya mibu 13, atako Yehova alendisaki ye na mitindo mikeseni, mikolo nyonso wana azalaki sé moombo to mokangami.​—Genese 37:2; 41:46.

9. Na boumeli ya bambula mingi, Davidi asengelaki koyika mpiko na makambo nini?

9 Likambo motindo yango ekómelaki mpe Davidi. Ntango Yehova azalaki koluka kopona mobali oyo abongi mpo na koyangela Yisalaele, alobaki ete: “Nazwi Davidi mwana na Yisai, mobali mobongi na motema na ngai moko.” (Misala 13:22) Atako etɛlɛmɛlo na ye endimamaki na miso ya Yehova, Davidi anyokwamaki mingi. Mpo na likámá ya liwa, abombanaki na boumeli ya bambula mingi kati na mokili mokauki, na mibenga, na mabanga mpe na mokili ya bapaya. Alandamaki lokola nyama ya zámba, alɛmbaki mpe abangaki. Kasi, ayikaki mpiko na lisalisi ya nguya ya Yehova. Na elónga mpenza, Davidi alobaki na ntina na oyo akutanaki na yango ete: “Moyengebeni azali na makambo mingi na mpasi nde [Yehova] akobikisa ye kati na yango nyonso.”​—Nzembo 34:19.

10. Likambo nini ya mawa ekómelaki Nabota mpe libota na ye?

10 Na mikolo ya mosakoli Eliya, na Yisalaele ezalaki na bato bobele 7 000 oyo bagumbamelaki nzambe ya lokuta Baala te. (1 Mikonzi 19:18; Baloma 11:4) Nabota, oyo mbala mosusu azalaki moko kati na bango, akómaki moto oyo anyokwamaki mpo na bokesene. Anyokwamaki na nsɔni na kofundamáká ete azalaki motuki. Akweisamaki mpe akatelamaki etumbu na mokonzi ete abomama na mabanga, mpe bambwá balɛmbutaki makila na ye. Ata mpe bana na ye babomamaki! Nzokande, asalaki likambo moko te. Bato oyo bafundaki ye bazalaki bakosi. Likambo yango nyonso ezalaki mwango mabe ya Zezabele, Mwasi ya mokonzi, asalaki bongo mpo ete mokonzi azwa elanga ya vinyo ya Nabota.​—1 Mikonzi 21:1-​19; 2 Mikonzi 9:26.

11. Ntoma Paulo ayebisi biso nini na ntina na mibali mpe basi ya sembo oyo lisoló na bango ezwami na Biblia?

11 Yosefe, Davidi mpe Nabota bazali bobele bandakisa misato kati na ebele ya mibali mpe basi ya sembo oyo batángami kati na Biblia oyo banyokwamaki. Ntoma Paulo akomaki lisoló ya bozongeli ya basaleli ya Yehova oyo banyokwamaki na boumeli ya ntango molai. Kati na yango alobelaki baoyo “batukami mpe babɛtami na mpimbo, ɛɛ bakangami mpe batyami na bolɔ́kɔ. Babwakelami mabanga, bazengami ndambo mibale na mosumani, babomami na mopanga; batamboli na mposo na mpate mpe na mposo na ntaba, bazangi, banyokolami, basalelami makambo mabe. Mokili ebongi na bango te. Balemalemi kati na masobe mpe na ngomba mpe na malusu mpe na mikaka na mokili.” (Baebele 11:36-​38) Kasi Yehova asundolaki bango te.

Yehova amibanzabanzaka mpo na baoyo bazali konyokwama

12. Wapi minyoko mosusu oyo Batatoli ya Yehova bazali kokutana na yango lelo oyo?

12 Ezali boni mpo na basaleli ya Nzambe lelo oyo? Mpo na lisangani mobimba ya bandeko, tokoki kotya motema na libateli ya Nzambe mpe kokatisa mikolo oyo ya nsuka mpe bolɔ́zi monene kozanga ete tózwa likámá. (Yisaya 54:17; Emoniseli 7:9-​17) Nzokande, mpo na moto mokomoko, toyebi ete “ntango mpe makambo makanami te” ekómelaka bato nyonso. (Mosakoli 9:11, NW) Lelo oyo ezali na baklisto mingi ya sembo oyo bazali konyokwama. Basusu bazali koyika mpiko kati na bobóla makasi. Biblia elobeli baklisto oyo bazali “bitike mpe basi bakufeli-mibali” oyo bazali na bolɔ́zi. (Yakobo 1:27) Basusu bazali konyokwama na makámá mauti na biloko bizalisami, bitumba, mobulu, kosalelama mabe ya bokonzi, maladi mpe liwa.

13. Makambo nini ya mpasi mauti kolobelama kala mingi te?

13 Na ndakisa, na lapólo ya mobu ya mosala 1996, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, bafiliale ya la Société Watch Tower emonisaki ete bandeko na biso mosusu basi mpe mibali bazali konyokwama kati na bolɔ́kɔ na ntina na botosi na bango ya mitindá ya Biblia. Masangá misato na mokili moko ya Amerika ya Súdi mapanzanaki ntango bituluku ya basodá ya batomboki babenganaki bankámá ya Batatoli na mboka yango. Na mokili moko ya Afrika ya Wɛ́sti, Batatoli mosusu bazwamaki katikati ya babundi ya ngámbo mibale na bitumba ya banamboka mpe babomamaki. Na mokili moko na Amerika ya Ntéi, mokakatano ya makambo ya nkita mpo na bandeko mosusu ebakisamaki ntango ekumbaki ebebisaki mboka. Na bisika mosusu, epai bobóla mpe kozanga bilei ekoki kozala mpenza mokakatano monene te, bopusi mabe ekoki kolongola esengo ya bamoko, nzokande basusu bazali na bozito ya bopusi ya bomoi ya mikolo na biso. Na ntina na lityo ya bato, basusu bakoki kolɛmba wana bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi.

14. (a) Liteya nini tozwi na ndakisa ya Yobo? (b) Na esika ete tózala na makanisi mabe, tosengeli kosala nini wana tokutani na mikakatano?

14 Makambo motindo wana masengeli te kokamatama lokola elembeteli ya kozanga kondimama na Nzambe. Tómikundola oyo ekómelaki Yobo mpe botɛmɛli oyo akutanaki na yango. Azalaki “moto malamu bɛ mpe na sembo.” (Yobo 1:8) Oyo nde motema mpasi Yobo ayokaki ntango Elifaza apamelaki ye ete asalaki mabe! (Yobo, mikapo 4, 5, 22) Tosengeli te kosukisa na lombangu ete tozali kokutana na mikakatano mpamba te tosalelaki Yehova mabe na likambo moko to mpamba te Yehova alongoli lipamboli na ye epai na biso. Kozala na makanisi mabe na ntango tokutani na bolɔ́zi ekoki kolɛmbisa kondima na biso. (1 Batesaloniki 3:1-3, 5) Wana tokutani na makambo ya mpasi, ezali malamu komanyola likambo oyo ete Yehova mpe Yesu bazali pembeni na moyengebeni ezala ata likambo nini ekómeli ye.

15. Ndenge nini toyebi ete Yehova amibanzabanzaka mpenza mpo na minyoko oyo mizali kokómela basaleli na ye?

15 Ntoma Paulo andimisi biso lisusu ntango alobi ete: “Nani akotangola biso na bolingo na Klisto? Bolɔ́zi soko nkaká soko minyoko soko nzala soko bolumbu soko likamba soko mopanga? . . . Nandimi solo ete ata kufa, ata bomoi, ata [baanzelu], ata mikonzi, ata makambo na ntango oyo, ata makambo makoya nsima, ata ndenge na nguya na mokili, ata molai, ata bozindo, ata eloko mosusu nini ekoki kotangola biso te na bolingo na Nzambe bozali kati na Klisto Yesu, Nkolo na biso.” (Baloma 8:35, 38, 39) Yehova azali komibanzabanza mingi mpo na biso mpe ayebi bampasi na biso. Wana azalaki kokima, Davidi akomaki ete: “Miso na [Yehova] ikotalaka bato na boyengebene mpe matoi na ye ikoyokaka konganga na bango. Yehova azali penepene na bango bazali na mitema mitutami.” (Nzembo 34:15, 18; Matai 18:6, 14) Tata na biso ya likoló amibanzabanzaka mpo na biso mpe ayokaka mawa mpo na baoyo bazali konyokwama. (1 Petelo 5:6, 7) Azali kopesa biso oyo tozali na yango mposa mpo na koyika mpiko, ata na monyoko ya ndenge nini oyo tokutani na yango.

Makabo ya Yehova mazali kosunga biso

16. Bibongiseli nini ya Yehova bizali kosalisa biso na koyika mpiko, mpe na lolenge nini tozali kozwa yango?

16 Atako tokoki te kozwa bomoi oyo ezangi minyoko kati na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo enuni, ‘tosabolami te.’ (2 Bakolinti 4:8, 9) Yesu alakaki ete akopesa bayekoli na ye mosungi. Alobaki ete: “Nakobondela Tata mpe akopesa bino Mosungi mosusu ete afanda na bino libela. Ye [elimo, NW] na solo.” (Yoane 14:16, 17) Na Pantekote ya mobu 33 T.B., ntoma Petelo ayebisaki bayoki na ye ete bakokaki kozwa “likabo na [elimo santu, NW].” (Misala 2:38) Elimo santu ezali kosunga biso lelo? Ɛɛ! Nguya ya Yehova oyo ezali kosala epesaka biso mbuma malamu mpenza lokola: “Bolingo, esengo, kimya, motema pɛtɛɛ, boboto, malamu, kondima, bopɔlɔ, komikanga motema.” (Bagalatia 5:22, 23) Nyonso oyo ezali bizaleli malamu oyo ezali kosalisa biso na koyika mpiko.

17. Solo nini ya Biblia ezali kolendisa kondima mpe ekateli na biso ya kotya motema na Yehova?

17 Elimo santu esalisaka biso mpe na koyeba ete malɔ́zi ya ntango oyo “ezangi bozito mpe eumeli bobele ntango moke” wana tokokanisi yango na mbano ya bomoi ya seko. (2 Bakolinti 4:16-​18) Tondimisami ete Nzambe akobosana misala na biso te mpe bolingo oyo tozali komonisa mpo na ye te. (Baebele 6:9-​12) Ntango tozali kotánga maloba mapemami ya Biblia, tolendisami na bandakisa ya basaleli ya sembo ya ntango ya kala oyo bayikelaki minyoko mingi mpiko kasi batángamaki bato na esengo. Yakobo akomi ete: “Bandeko, bóbila elakiseli na bolɔ́zi mpe mpiko na basakoli, baoyo balobaki na nkombo na Nkolo. Talá, tolobi ete tobyangi bango bato na esengo baoyo bayiki mpiko bongo.” (Yakobo 5:10, 11) Biblia elaki “nguya oyo eleki nguya ya bomoto” mpo na kosunga ete tóyika mpiko na komekama. Yehova mpe apambolaka biso na elikya ya lisekwa. (2 Bakolinti 1:8-​10; 4:7, NW) Wana tozali kotánga Biblia mokolo na mokolo mpe komanyola likoló na bilaka na yango, tokolendisa kondima na biso mpe ekateli na biso ya kotya elikya epai na Nzambe.​—Nzembo 42:5.

18. (a) Na 2 Bakolinti 1:3, 4, tolendisami na kosala nini? (b) Na lolenge nini bakɛngɛli baklisto bakoki komonisa ete bazali maziba ya libɔndisi mpe ya kozwa bopemi?

18 Lisusu, Yehova asili kopesa biso paladiso ya elimo kati na yango tokoki kosepela na bolingo ya solosolo ya bandeko baklisto mibali mpe basi. Biso nyonso tozali na mokumba ya kolendisana bamoko na bamosusu. (2 Bakolinti 1:3, 4) Mingimingi, bakɛngɛli baklisto bakoki kozala liziba monene ya kobɔndisa mpe ya kozwa bopemi. (Yisaya 32:2) Lokola bazali “makabo na motindo na mibali,” batindami ete bálendisa baoyo bazali konyokwama, “koyikisa bato na motema mokuse mpiko,” mpe “kosunga bato na motau.” (Baefese 4:8, 11, 12, NW; 1 Batesaloniki 5:14) Bankulutu balendisami na kosalela malamumalamu bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, bakisa mpe mikanda mosusu oyo mibimisami na “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Matai 24:45-​47) Mikanda yango mizali na batoli ya motuya oyo ezwi moboko na Biblia mpe ekoki kosunga biso na kolónga​—mpe ata kopɛngola​—mikakatano mosusu oyo mizali kopesa biso mpasi. Tiká ete tómekola Yehova na kobɔndisanáká mpe na kolendisanáká na ntango ya mikakatano!

19. (a) Nini ezali kosunga biso na kopɛngola minyoko mosusu? (b) Na nsuka, tosengeli kotya motema na nani, mpe nini ekopesa biso likoki ya kolónga komekama?

19 Lokola tosili mpenza kopusana na mikolo ya nsuka mpe wana makambo ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo ezali sé kobeba, baklisto bazali kosala oyo bakoki mpo na kopɛngola mikakatano. (Masese 22:3) Lisosoli malamu, makanisi mabongi, mpe boyebi ya mitindá ya Biblia ekoki kosalisa biso ete tókamata bikateli ya mayele. (Masese 3:21, 22) Tozali koyoka Liloba ya Yehova mpe tozali kotosa yango mpo na kopɛngola kosala mabunga mazangi ntina. (Nzembo 38:4) Nzokande, toyebi ete ata milende nini tokoki kosala, yango ekoki te kolongola mitungisi nyonso na bomoi na biso. Kati na ebongiseli ya biloko ya ntango oyo, bayengebeni mingi bazali kokutana na minyoko makasi. Nzokande, tokoki kolónga mikakatano na biso na kolikyáká ete “Yehova akosundola bato na ye te.” (Nzembo 94:14, NW) Mpe toyebi ete ebongiseli ya biloko ya ntango oyo mpe mabe na yango, mosika te, ekoleka. Na bongo, tiká ete tózwa ekateli ete “tólɛmbaka mpo na kosalaka malamu te zambi na ntango oyo ekoki, tokobuka soko tokotika motema te.”​—Bagalatia 6:9.

Toyekoli nini?

◻ Mimekano nini ezali kokómela baklisto nyonso?

◻ Bandakisa nini ya Biblia ezali kosalisa biso na kososola ete minyoko ezali te elembeteli ya koboyama na Yehova?

◻ Yehova azalaka na mayoki nini na ntina na minyoko oyo basaleli na ye bazali kokutana na yango?

◻ Wapi bamoko ya makabo ya Yehova oyo ezali kosalisa biso na koyika mpiko?

[Bililingi na lokasa 10]

Davidi, Nabota, mpe Yosefe bango nyonso misato banyokwamaki

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto