Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/7 nk. 30-31
  • Mituna ya Batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya Batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Masolo mosusu
  • Elikya nini ezali mpo na bampate mpe mpo na bantaba?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Tósunga na bosembo nyonso bandeko ya Kristo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Okotɛlɛma liboso na kiti ya kosambisama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Kristo Mokonzi asambisi bampate ná bantaba
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/7 nk. 30-31

Mituna ya Batángi

Tosepelaki mingi na boyekoli na biso ya lisese ya Yesu na ntina na bampate mpe bantaba. Na kotalela ndimbola ya sika oyo epesamaki na “Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli” ya 15 Ɔkɔtɔ́bɛ 1995, tokoki lisusu koloba ete lelo oyo Batatoli ya Yehova bazali kosangana na mosala ya bokaboli bampate na bantaba?

Ɛɛ. Ya solo, bato mingi bamitunaki likambo yango mpamba te Matai 25:31, 32 elobi ete: “Ekoya mwana na moto na nkembo na ye mpe baanzelu na ye nyonso esika moko na ye, akofanda na kiti na bokonzi na ye na nkembo. Akoyanganisa mabota nyonso liboso na ye mpe akokabola kati na bango lokola ekosalaka mobateli na bampate mpe na bantaba.” Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔ́bɛ 1995, emonisaki ntina oyo bavɛrsɛ́ yango ekokokisama na nsima ya kobanda ya bolɔ́zi monene. Yesu akoya na nkembo na ye elongo na baanzelu na ye mpe akofanda na kiti na ye ya kosambisa. Na nsima, akokabola bato. Na ndimbola nini? Akokata makambo engebene makambo bato basalaki to basalaki te liboso ya ntango wana.

Tokoki kokokanisa yango na matambe oyo malandamaka liboso ete likambo moko likoka kotalelama na esambiselo. Bilembeteli bisangisamaka na boumeli ya ntango molai liboso ete esambiselo ekoka kokata likambo mpe etumbu ekoka kopesama. Bilembeteli mpo na koyeba soki bato oyo bazali na bomoi na mikolo oyo bakomimonisa bampate to bantaba bisilaki kobanda kosangisama uta ntango molai. Mpe bizali sé kobakisama. Kasi ntango Yesu akofanda na kiti na ye ya bokonzi, likambo oyo lizali kosambisama likokóma na nsuka. Ye akozala nde pene ya kokata likambo. Bato bakokabolama mpo na kopesamela bomoi ya seko to liwa ya seko.

Nzokande, likambo ya kokabolama ya bato mpo na bomoi to mpo na liwa oyo elobelami na Matai 25:32 ekosalema na mikolo mizali koya elingi koloba te ete kokabolama moko te ezali kosalema liboso na yango. Na Matai mokapo 13, Biblia ezali kolobela mosala moko ya kokabolama oyo ezali kosalema liboso. Likambo ya kobenda likebi, búku Tosangani esika moko mpo na kosambela Nzambe ya solo bobele moko, nkasa 179-180 elobeli likambo yango na nsé na motó na likambo moke oyo elobi ete “Bato bakabwani.”a Búku yango elobi ete: “Ezali mpe na makambo mosusu ya ntina mpenza oyo Yesu asangisaki yango esika moko na kosukisama na biloko ya ntango oyo. Moko kati na yango etali kokabolama kati na “bana ya bokonzi” mpe “bana na oyo mabe.” Yesu alobaki mpo na bokabwani yango kati na moko na masese na ye, kati na yango alobelaki elanga moko ya masango oyo monguna moko akendaki kolóna matiti mabe likoló na yango.”

Búku yango ezalaki kolobela lisese ya Yesu oyo ezali na Matai 13:24-30 mpe oyo elimbolami na vɛrsɛ́ 36-43. Simbá ete na vɛrsɛ́ 38, masango malimboli bana na Bokonzi, kasi matiti mabe ezali bongo bana na oyo mabe. Vɛrsɛ́ 39 mpe 40 ezali komonisa ete na ‘nsuka na ekeke’​—eleko oyo tozali kobika na yango​—matiti mabe mazali koyanganisama. Mazali kokabolama mpe na nsuka makotumbama, makobebisama nyɛɛ.

Lisese yango ezali kolobela baklisto bapakolami (baoyo kati na lisese ya bampate na bantaba bazali kobéngama ete bandeko ya Yesu). Atako bongo, ezali polele ete kokabolama moko ya ntina mingi ezali kosalema na mikolo na biso, elingi koloba ete baklisto bapakolami bazali kokesenisa bango na baoyo bazali komiloba ete bazali baklisto nzokande misala na bango mizali komonisa ete bazali “bana na oyo mabe.”

Yesu apesaki bandakisa mosusu ya bato bazali kokabolama. Omikundola oyo alobaki na ntina na nzela monene oyo ezali komema na libebi ete: “Bazali mingi baoyo bakoingela na yango.” (Matai 7:13) Wana ezalaki bobele mwa makanisi te mpo na oyo ekokómela bango. Ezalaki makanisi na ntina na bokóli oyo ezali kolandana, ezali mpe bongo mpo na bato moke oyo bazali kolanda nzela ya nkaká oyo ezali komema na bomoi. Lisusu, omikundola ete na ntango atindaki bantoma na ye, Yesu alobaki ete bakokutana na baoyo babongi. Basusu babongi te, mpe bantoma basengelaki kopupola mputulu ya matambe “mpo na kobebisa” bato motindo yango. (Luka 9:5) Ezali likambo motindo yango nde ezali kosalema na ntango baklisto bazali kokokisa mosala na bango ya kosakola, boye te? Bamoko bandimaka, nzokande basusu baboyaka nsango euti na Nzambe oyo tozali komema.

Masoló ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na ntina na bampate na bantaba malobaki ete: “Atako kosambisama oyo elobelami kati na lisese wana ekokokisama na mikolo mizali koya, nzokande sikawa likambo moko ya ntina mingi ezali kokokisama. Biso baklisto tomipesi kati na mosala ya lobiko ya kosakola nsango oyo ezali kokɔtisa bokabwani kati na bato. (Matai 10:32-39).” Kati na Matai mokapo 10, tozali kotánga ete Yesu alobaki ete kolanda ye ekozala ntina ya bokabwani​—kati na tata na mwana, mwana mwasi na mama na ye.

Na nsuka, bandeko ya Klisto bapakolami na elimo basili kozwa esika ya liboso kati na mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi na mokili mobimba. Bato bazali komitya na ngámbo moko to na ngámbo mosusu na lolenge bazali kondima to koboya nsima ya koyoka nsango yango. Ezali likambo na biso bato te, mpe tosengeli te, koloba ete ‘Moto boye azali mpate; oyo kuna azali ntaba,’ na ndimbola oyo elobelami na Matai mokapo 25. Nzokande, lolenge tozali komemela bango nsango malamu ezali kopesa bango libaku ya komonisa etɛlɛmɛlo na bango​—soki bazali banani mpe lolenge nini bazali kotalela bandeko ya Yesu. Na yango, lokola bilembeteli oyo bizali sé kobakisama na likambo oyo lizali kotalelama na esambiselo, kokabolama kati na baoyo bazali kosunga bandeko ya Yesu mpe baoyo baboyi kosunga bango ezali komonana polele. (Malaki 3:18) Lokola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli emonisaki yango, mosika te Yesu akofanda na kiti na ye ya bokonzi mpe akokata likambo, na ntango yango bato bakokabolama solosolo na moboko ya boyengebene mpo na kozwa bomoi to mpo na kokufa.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisamaki na mobu 1983 na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto