Okotɛlɛma liboso na kiti ya kosambisama?
“Ekoya mwana na moto na nkembo na ye mpe baanzelu na ye nyonso esika moko na ye, akofanda na kiti na bokonzi na ye na nkembo.”—MATAI 25:31.
1-3. Ntina nini tozali na yango ya kozala na makanisi malamu likoló na makambo matali bosembo?
‘OZALI NA EKWELI TO NA EKWELI TE?’ Likebi ya bato mingi elamwisamaka na ntango bayokaka bansango na ntina na makambo matali kosambisama. Basambisi bakoki komeka kozala sembo, kasi bosembo elóngaka ntango nyonso? Osilá naino te koyoka na ntina na bokesene mpe kozanga bosembo kati na makambo matali kosambisa? Likambo ya kozanga bosembo ebandi uta kala, lokola tozali komona yango kati na lisese ya Yesu oyo ezwami na Luka 18:1-8.
2 Ata soki osilá kokutana na makambo ya lolenge nini kati na kosambisa oyo esalemaka epai na bato, talá oyo Yesu alobaki na nsuka: “Nzambe akolóngisa baponami na ye te, baoyo bazali kobyanga ye butu na moi . . . ? Nalobi na bino ete akolóngisa bango nokinoki. Kasi wana ekoya mwana na moto, akokuta kondima awa na nsé?”
3 Ee, Yehova akosala na boye ete na nsuka, basaleli na ye bálóngisama. Yesu asangani kati na yango, mingi mpenza eleko oyo tozali sikawa mpamba te tozali kobika na “mikolo na nsuka” ya ebongiseli mabe ya ntango oyo. Mosika te Yehova akosalela Mwana na ye ya nguya mpo na kolongola mabe nyonso awa na mabelé. (2 Timoté 3:1; 2 Batesaloniki 1:7, 8; Emoniseli 19:11-16) Tokoki kozwa bososoli likoló na mokumba ya Yesu kati na moko na masese ya nsuka oyo apesaki, oyo ebéngamaka mingimingi lisese ya bampate mpe bantaba.
4. Tosilaki kososola nini na ntina etali ntango ya kokokisama ya lisese ya bampate mpe bantaba, kasi mpo na nini tolingi kotalela lisusu lisese yango sikawa? (Masese 4:18)
4 Tosilá kososola uta kala ete lisese yango emonisaki Yesu afandi lokola Mokonzi na 1914 mpe uta ntango yango azali kosambisa—bomoi ya seko mpo na bato oyo bazali komonisa ete bakokani na bampate, mpe kufa ya libela mpo na bantaba. Kasi kotalelama lisusu ya lisese yango ezali komonisa bososoli ya sika na ntina etali ntango ya kokokisama na yango mpe makambo oyo yango ezali komonisa. Kosembolama yango ezali koyeisa lisusu monene ntina ya mosala na biso ya kosakola mpe ndimbola ya lolenge oyo bato bazali koyamba yango. Mpo na kokanga malamu ntina ya moboko oyo lisese yango epesi nzela na kososola mozindo, tiká tótalela oyo Biblia ezali komonisa na ntina na Yehova mpe Yesu, bango mibale lokola Bakonzi mpe lokola Basambisi.
Yehova Mosambisi aleki monene
5, 6. Mpo na nini ebongi ete tókoka kotalela Yehova lokola Mokonzi mpe lokola Mosambisi?
5 Yehova azali koyangela na nguya likoló na molɔ́ngɔ́ mpe likoló na bikelamu nyonso. Lokola azali na ebandeli te mpe azali na nsuka te, azali “Mokonzi na seko.” (1 Timoté 1:17; Nzembo 90:2, 4; Emoniseli 15:3) Azali na bokonzi ya kotya mibeko, mpe ya kolandela yango. Kasi kati na bokonzi na ye, azali na lotómo ya kozala Mosambisi. Yisaya 33:22 elobi ete: “[Yehova] azali mosambisi na biso, [Yehova] azali [Mopesi-mibeko] na biso; [Yehova] azali Mokonzi na biso, ye akobikisa biso.”
6 Uta kala, basaleli ya Nzambe bayebi ete Yehova azali Mosambisi ya makambo mpe ya bowelani. Na ndakisa, nsima wana “Mosambisi na mokili mobimba” amonaki mpenza ete mabe mazalaki na Sodomo mpe Gomola, akataki ete bafandi wana basengelaki kobomama mpe akokisaki ekateli yango ya sembo. (Genese 18:20-33; Yobo 34:10-12) Yango esengeli mpenza kondimisa biso mpe tóyeba ete Yehova azali Mosambisi ya sembo oyo akoki ntango nyonso kokokisa bikateli na ye!
7. Lolenge nini Yehova azalaki kosala lokola Mosambisi epai na Yisalaele?
7 Na Yisalaele ya kala, Yehova ye moko azalaki kokata makambo na bantango mosusu. Soki ozalaki na ntango wana, mbɛlɛ olingaki kolendisama na koyebáká ete ezali na mosambisi moko ya sembo oyo azali kokata makambo, boye te? (Levitike 24:10-16; Mituya 15:32-36; 27:1-11) Nzambe asilaki mpe kobimisa “malako” oyo mazalaki nyonso elakiseli ebongi mpo na kosambisa makambo. (Levitike 25:18, 19; Nehemia 9:13; Nzembo 19:9, 10; 119:7, 75, 164; 147:19, 20) Azali “Mosambisi na mabelé mobimba,” na bongo biso banso totalelami kati na kosambisama yango.—Baebele 12:23, NW.
8. Emonaneli nini eyokani na yango Danyele amonaki?
8 Tozali na elembeteli euti na “motatoli oyo amonaki,” epesami likoló na likambo yango. Mosakoli Danyele amonaki emonaneli ya banyama mabe oyo elimbolaki bongo biyangeli mpe bikonzi. (Danyele 7:1-8, 17) Alobaki lisusu ete: “Bakiti ya bokonzi etyamaki kuna mpe Mokóló na kalakala afandaki. Bilamba na ye bizalaki mpembe lokola mbula mpembe.” (Danyele 7:9, NW) Tomoni ete Danyele amonaki bakiti ya bokonzi “mpe Mokóló na kalakala [Yehova] afandaki.” Omituna naino motuna oyo, ‘Awa Danyele azalaki komona Yehova kokóma Mokonzi’?
9. ‘Kofanda na kiti’ ya bokonzi ekoki mpe kolimbola nini? Pesá bandakisa.
9 Ya solo, soki totángi ete moto moko “afandaki” na kiti ya bokonzi, tokoki kokanisa ete akómaki mokonzi, mpamba te na bantango mosusu Biblia esalelaka elobeli motindo wana. Na ndakisa: “Ebandaki [Zimili] kozala mokonzi, naino esili ye komifandisa na kiti na bokonzi, . . . ” (1 Mikonzi 16:11; 2 Mikonzi 10:30; 15:12; Yilimia 33:17) Esakweli moko etalelaki Masiya elobaki ete: “Akofanda mpe [akoyangela, “NW”] likoló na kiti na ye ya bokonzi.” Na yango, ‘kofanda na kiti ya bokonzi’ ekoki kolimbola kokóma mokonzi. (Zekalia 6:12, 13) Yehova alobelami lokola Mokonzi oyo afandi na kiti ya bokonzi. (1 Mikonzi 22:19; Yisaya 6:1; Emoniseli 4:1-3) Azali “Mokonzi na seko.” Nzokande, wana amonisaki lolenge mosusu ya bokonzi na ye monene, ekoki kolobama na ntina na ye ete akómaki Mokonzi, lokola ete autaki lisusu kofanda sika na kiti na bokonzi na ye.—1 Ntango 16:1, 31; Yisaya 52:7; Emoniseli 11:15-17; 15:3; 19:1, 2, 6.
10. Mokumba ya liboso ya bakonzi na Yisalaele ezalaki nini? Pesá ndakisa.
10 Kasi ezali na likambo moko ya ntina mingi: Mokumba ya liboso mpenza ya bakonzi ya ntango ya kala ezalaki bongo koyoka mpe kokata makambo na kosambisa. (Masese 20:8; 29:14) Tómikundola ekateli ya mayele oyo Salomo akamataki na ntango basi mibale bazalaki kowela mwana moko. (1 Mikonzi 3:16-28; 2 Ntango 9:8) Moko na bandako na ye ya boyangeli ezalaki “Ndako na kiti na bokonzi, wana ekataki ye makambo,” ebéngamaki mpe “ndako na esambiselo.” (1 Mikonzi 7:7) Yelusaleme elobelamaki lokola esika oyo “kiti na bakati na makambo” ezalaki. (Nzembo 122:5) Emonani polele ete, ‘kofanda na kiti ya bokonzi’ ekoki kolimbola mpe kosalela bokonzi mpo na kosambisa.—Exode 18:13; Masese 20:8.
11, 12. (a) Kofanda oyo Yehova afandaki na kiti ya bokonzi, oyo elobelami na Danyele 7, elimbolaki nini? (b) Lolenge nini mikapo mosusu mizali kondimisa ete Yehova akofanda mpo na kosambisa?
11 Sikawa tózonga na esika oyo Danyele amonaki “Mokóló na kalakala afandi.” Danyele 7:10 (NW) ebakisi ete: “Kosambisa ebandaki mpe mikanda mifungwamaki.” Ee, Mokóló na kalakala afandaki mpo na kokata makambo na ntina na boyangeli ya mokili mpe kokata likambo ya Mwana na moto, oyo abongi na koyangela. (Danyele 7:13, 14) Na nsima, tozali kotánga ete “kino ekómaki [Mokóló na kalakala, NW] mpe ekateli elóngisaki bato na bulɛɛ,” baoyo batalelamaki ete babongi koyangela elongo na Mwana na moto. (Danyele 7:22) Na nsuka, “basambisi bakofanda” mpe bakokweisa nguya ya nsuka ya mokili.—Danyele 7:26.a
12 Na yango, komona oyo Danyele amonaki Nzambe ‘afandi na kiti ya bokonzi’ elimbolaki koya na ye mpo na kopesa ekateli. Mikolo mingi liboso Davidi ayembaki ete: “Yo [Yehova] olobeli ngai sembo kati na likambo na ngai: ofandi na kiti na yo mpe okati makambo na nzela na boyengebene.” (Nzembo 9:4, 7) Mpe Yoele akomaki ete: “Tiká ete mabota bálamuka, bábuta kino na lobwaku na Yosafata; mpo ete nakofanda wana mpo na kosambisa mabota nyonso.” (Yoele 3:12; kokanisá na Yisaya 16:5.) Ezala Yesu mpe Paulo basambisamaki, mpe moto afandaki liboso na bango mpo na koyoka bango mpe kozwa ekateli likoló na bango.b—Yoane 19:12-16; Misala 23:3; 25:6.
Etɛlɛmɛlo ya Yesu
13, 14. (a) Endimiseli nini basaleli ya Nzambe bazali na yango ete Yesu asengelaki kokóma Mokonzi? (b) Ntango nini Yesu afandaki na kiti na ye ya Bokonzi, mpe na ndimbola nini ayangelaki kobanda na mobu 33 T.B. kino lelo?
13 Yehova azali Mokonzi mpe Mosambisi. Ezali boni mpo na Yesu? Anzelu oyo asakolaki kobotama na ye alobaki ete: “[Yehova] Nzambe akopesa ye kiti na bokonzi na Davidi Tata na ye, . . . mpe bokonzi na ye ekozala na nsuka te.” (Luka 1:32, 33) Yesu asengelaki kozala mosangoli ya seko ya libula ya bokonzi ya Davidi. (2 Samwele 7:12-16) Asengelaki koyangela uta na likoló, mpamba te Davidi alobaki ete: “[Yehova] alobelaki Nkolo na ngai [Yesu] ete, Kisa na lobɔ́kɔ na ngai ya mobali kino ekotya ngai bayini na yo lokola etɛmɛlo na makolo na yo. E tiká ete [Yehova] abimisa yo na Siona na makasi na mokonzi. Zalá na bokonzi kati na bayini na yo.”—Nzembo 110:1-4.
14 Yango esengelaki kosalema ntango nini? Yesu ayangelaki te lokola Mokonzi na ntango azalaki na bomoi awa na mabelé. (Yoane 18:33-37) Akufaki na mobu 33 T.B., asekwisamaki, mpe amataki na likoló. Baebele 10:12 elobi ete: “[Moto oyo] atombolaki mbeka moko mpo na masumu libela mpe afandaki na lobɔ́kɔ na mobali na Nzambe.” Bokonzi nini Yesu azalaki na yango? “[Nzambe] azalisi ye na lobɔ́kɔ na ye na mobali na bisika na Likoló, mosika likoló na lokumu mpe bokonzi mpe nguya mpe bankolo nyonso . . . mpe azalisi ye motó likoló na makambo nyonso mpo na [lisangá, NW].” (Baefese 1:20-22) Lokola Yesu azalaki bongo mokonzi likoló na baklisto na eleko wana, Paulo akomaki ete Yehova “abikisi biso longwa na nkanga na molili mpe akɔtisi biso na bokonzi na Mwana na ye na bolingo.”—Bakolose 1:13; 3:1.
15, 16. (a) Mpo na nini tolobi ete Yesu akómaki te Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na mobu 33 T.B.? (b) Ntango nini Yesu abandaki koyangela kati na Bokonzi na ye?
15 Nzokande, na ntango wana Yesu azalaki te koyangela lokola Mokonzi mpe Mosambisi likoló na mabota. Afandaki pene na Nzambe, kozeláká ntango oyo asengelaki kosala lokola Mokonzi na Bokonzi ya Nzambe. Paulo akomaki na ntina na ye ete: “Alobaki ntango mosusu na anzelu nani ete, Fandá na lobɔ́kɔ na ngai na mobali kino ekotya ngai bayini na yo lokola etɛmɛlo na makolo na yo,” boye te?—Baebele 1:13.
16 Batatoli ya Yehova basili kosakola bilembeteli mingi oyo emonisi ete eleko oyo na boumeli na yango Yesu azalaki kozela kozwa bokonzi esukaki na 1914, na ntango wana akómaki mokonzi na Bokonzi ya Nzambe na makoló mazangi komonana. Emoniseli 11:15, 18 elobi ete: “Bokonzi na mokili oyo esili kokóma Bokonzi na Nkolo na biso mpe na Klisto na ye, mpe akozala mokonzi libela na libela.” “Mabota bangalaki, nde nkele na yo eyaki.” Ee, mabota bangalanaki moko na mosusu na boumeli ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. (Luka 21:24) Bitumba, koningana ya mabelé, maladi, nzala, mpe makambo mosusu ya motindo wana oyo tozali komona uta 1914 endimisi biso ete Yesu azali koyangela sikawa kati na Bokonzi ya Nzambe, mpe nsuka ya mokili ebɛlɛmi.—Matai 24:3-14.
17. Makambo nini ya ntina tosili bongo kosimba?
17 Na mokuse: Tokoki koloba ete Nzambe afandi na kiti lokola Mokonzi, kasi na elobeli mosusu, akoki kofanda na kiti na ye ya bokonzi mpo na kosambisa. Na mobu 33 T.B., Yesu afandaki na lobɔ́kɔ ya mobali na Nzambe, mpe azali sikawa Mokonzi ya Bokonzi. Kasi, awa Yesu azali sikawa koyangela lokola Mokonzi, azali mpe kosala lokola Mosambisi? Mpe, mpo na nini yango esengeli kobenda likebi na biso, mingi mpenza na eleko oyo?
18. Elembeteli nini emonisi ete Yesu akozala mpe Mosambisi?
18 Yehova, ye oyo azali na lotómo ya kopona basambisi, aponaki Yesu lokola Mosambisi oyo akokisi masɛngami na Ye. Yesu amonisaki yango ntango alobaki na ntina na bato oyo bazali kokóma na bomoi na elimo ete: “Tata azali kosambisa moto te, kasi asili kopesa kosambisa nyonso epai na Mwana.” (Yoane 5:22) Kasi, mokumba ya Yesu ya kosambisa esuki te bobele na kosambisa ya motindo wana, mpamba te azali mosambisi ya baoyo bazali na bomoi mpe ya bakufi. (Misala 10:42; 2 Timoté 4:1) Paulo alobaki mokolo mosusu ete: “[Nzambe] asili kopona mokolo wana ekosambisa ye mikili nyonso na sembo, mpe akosambisa bango na moto oyo asili kopona. Amonisi bato nyonso polele ete ezali solo, mpo ete asekwisi ye na bakufi.”—Misala 17:31; Nzembo 72:2-7.
19. Mpo na nini ebongi koloba ete Yesu afandi na kiti ya bokonzi mpo na kosala mosala ya kosambisa?
19 Tozali mpenza na elongá ya koloba ete Yesu afandi na kiti ya nkembo ya bokonzi mpe azali kokokisa mokumba ya Mosambisi? Ee. Yesu ayebisaki Petelo ete: “Na kozalisa na sika, wana Mwana na moto akofanda na kiti na bokonzi na ye na nkembo, bino baoyo bosili kobila ngai bokofanda mpe na kiti na bokonzi zomi na mibale kosambisáká mabota zomi na mibale na Yisalaele.” (Matai 19:28) Atako Yesu azali sikawa Mokonzi na Bokonzi, mosala na ye mosusu oyo molobelami na Matai 19:28 ekozala bongo ya kofanda na kiti ya bokonzi mpo na kosambisa na boumeli ya Mbula nkóto. Na ntango yango akosambisa bato banso, bato sembo mpe bato sembo te. (Misala 24:15) Ezali malamu kosimba likambo oyo awa tolingi kotalela moko na masese ya Yesu oyo ezali na boyokani na eleko na biso mpe na ntina na bomoi na biso.
Lisese elobi nini?
20, 21. Bantoma ya Yesu batunaki nini mpo na mikolo na biso, mpe yango ebimisaki motuna nini mosusu?
20 Mwa moke liboso ete Yesu akufa, bantoma na ye batunaki ye ete: “Nyonso oyo ekoya ntango nini mpe elembo na [kozala, NW] na yo mpe nsuka na ekeke ekozala nini?” (Matai 24:3) Yesu asakolaki makambo minene oyo masengelaki kosalema awa na mabelé ‘liboso ete nsuka eya.’ Mwa moke liboso ete nsuka eya, mabota “bakomona Mwana na moto azali koya na mapata na Likoló na nguya mpe na nkembo mingi elongo.”—Matai 24:14, 29, 30.
21 Kasi, bato na mabota yango bakosala nini ntango Mwana na moto akoya na nkembo na ye? Tóluka eyano kati na lisese ya bampate mpe bantaba, oyo ebandi na maloba oyo: “Ekoya Mwana na moto na nkembo na ye mpe baanzelu na ye nyonso esika moko na ye, akofanda na kiti na bokonzi na ye na nkembo. Akoyanganisa mabota nyonso liboso na ye.”—Matai 25:31, 32.
22, 23. Makambo nini mamonisi ete lisese ya bampate mpe bantaba ekokanaki te na 1914?
22 Lisese oyo ekokanaki na ntango Yesu afandaki na nguya ya bokonzi na ye na 1914, lokola tokanisaki yango uta kala? Matai 25:34 ezali mpenza koloba na ntina na ye lokola Mokonzi, na yango emonani polele ete lisese yango ebandaki kokokana uta Yesu akómaki Mokonzi na 1914. Kasi kosambisama nini abandaki yango nokinoki? Ezalaki kosambisama ya “mabota nyonso” te. Nzokande, atyaki likebi na ye likoló na baoyo bazalaki komiloba ete bazalaki basangani ya “ndako na Nzambe.” (1 Petelo 4:17) Na boyokani na Malaki 3:1-3, Yesu, ye momemi nsango ya Nzambe, ayaki kotala baklisto bapakolami oyo bazalaki naino awa na mabelé mpo na kosambisama. Ezalaki mpe ntango ya kokweisa etumbu likoló na boklisto ya nkombo mpamba, oyo elobaki na lokuta nyonso ete ezali “ndako na Nzambe.”c (Emoniseli 17:1, 2; 18:4-8) Nzokande likambo moko te ezali komonisa ete na eleko wana, to uta ntango wana, na nsuka Yesu afandaki mpo na kosambisa bato ya mabota nyonso lokola bampate mpe bantaba.
23 Soki totaleli mosala ya Yesu na lolenge elobelami kati na lisese yango, tozali komona ete na nsuka azali kosambisa mabota nyonso. Lisese yango limonisi te ete kosambisama yango esengelaki kokóba na boumeli ya eleko moko molai ya bambula mingi, lokola nde bato nyonso oyo bakufaki na bambula oyo euti koleka bakatelamaki ete babongi na kufa ya seko to babongi na bomoi ya seko. Emonani ete ntálo monene ya bato oyo basili kokufa na bambula oyo euti koleka basili kokenda na nkunda ya bato banso. (Emoniseli 6:8; 20:13) Nzokande, lisese yango emonisi ntango oyo Yesu akosambisa bato ya “mabota nyonso” baoyo bakozala na bomoi na ntango wana mpe baoyo bakozwa etumbu ya kosambisa na ye.
24. Lisese ya bampate mpe bantaba ekokokana ntango nini?
24 Elingi koloba ete, lisese yango ezali kolobela makambo oyo makosalema na mikolo mizali koya, wana Mwana na moto akoya kati na nkembo na ye. Akofanda mpo na kosambisa bato oyo bakozala na bomoi na eleko wana. Kosambisama na ye ekotala mpenza lolenge ya bomoto oyo basilaki komonisa. Na ntango yango “bokeseni kati na moto na sembo mpe moto mabe” ekomonana polele. (Malaki 3:1) Koyebisama mpenza ya etumbu mpe kokokisama na yango ekosalema na ntango moko ya sikisiki. Yesu akobimisa bongo bikateli ya sembo oyo ekotalela makambo mamonani polele kati na bomoi ya moto moko na moko.—Talá mpe 2 Bakolinti 5:10.
25. Matai 25:31 ezali komonisa nini wana ezali koloba ete Mwana na moto afandi na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo?
25 Na yango, elimboli ete mpo na Yesu ‘kofanda na kiti na ye na bokonzi na nkembo’ mpo na kosambisa, lokola elobelami kati na Matai 25:31, ezali kotalela mikolo mikoya wana Bokonzi na ye ya nguya ekofanda mpo na koyebisa mpe kokweisa etumbu likoló na mabota. Ee, kosambisa oyo etaleli Yesu, oyo elobelami na Matai 25:31-33, 46 ekokani na oyo elobelami na Danyele mokapo 7, epai kuna Mokonzi oyo azali koyangela, Mokóló na kalakala, afandaki mpo na kokokisa mokumba na ye ya Mosambisi.
26. Ndimbola nini ya sika ya lisese wana emonani polele?
26 Kososola lisese ya bampate mpe bantaba na lolenge wana ezali komonisa ete kokokisama ya ekateli likoló na bampate mpe bantaba ekosalema na mikolo mizali koya. Ekokokisama nsima ya kobima ya “bolɔ́zi monene” oyo elobelami na Matai 24:29, 30 mpe nsima wana Mwana na moto ‘akoya na nkembo na ye.’ (Kokanisá na Malako 13:24-26.) Na nsima, wana ebongiseli mobimba oyo mabe ekokóma na nsuka na yango, Yesu akoyanganisa esambiselo, akokata mpe akobimisa etumbu.—Yoane 5:30; 2 Batesaloniki 1:7-10.
27. Makambo nini tosengeli koluka koyeba na ntina na lisese ya nsuka ya Yesu?
27 Yango engɛngisi bososoli na biso na ntina na ntango oyo lisese ya Yesu ekokokisama, oyo ezali komonisa ntango nini bampate mpe bantaba bakosambisama. Kasi yango ezali na bopusi nini likoló na biso baoyo tozali kosakola na molende nyonso nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe? (Matai 24:14) Yango ezali kokitisa motuya ya mosala na biso, to yango ememeli biso mokumba monene lisusu? Tiká tótalela lisoló lilandi mpo na komona bopusi oyo ezali na yango likoló na biso.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liloba oyo ebongolami “basambisi” kati na Danyele 7:10, 26 ezwami mpe na Ezɛla 7:26 mpe na Danyele 4:37; 7:22.
b Na ntina na likambo oyo ete Baklisto bazalaki kofundana na esambiselo, Paulo atunaki ete: “Mpo na nini bokoyebisa yango liboso na bango [elimboli mpenza, “bozali kofandisa”] bazali na ntina kati na lingomba te?”—1 Bakolinti 6:4.
c Talá búku Emoniseli—kokokana na yango monene ebelemi!, nkasa 56, 73, 235-245, 260, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
Ozali komikundola?
◻ Na ndimbola nini Yehova asalaki lokola Mokonzi mpe lokola Mosambisi?
◻ Bandimbola nini mibale ekoki kopesama na ntina na ‘kofanda na kiti ya bokonzi’?
◻ Nini tozalaki koloba liboso na ntina na ntango ya kokokisama ya Matai 25:31, kasi ntina nini tozali na yango ya kosembola likanisi yango?
◻ Ntango nini Mwana na moto akofanda na kiti na ye ya Bokonzi, lokola emonisami na Matai 25:31?