Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/8 nk. 3-4
  • Babikisami na ntango ya makámá

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Babikisami na ntango ya makámá
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ntango ya kosala na lombangu
  • Poná bomoi!
  • Makambo oyo Bokonzi ya Nzambe ekosala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Makámá mauti na biloko bizalisami​—Nzambe nde azali mobandisi na yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • ‘Poná bomoi mpo ozala na bomoi’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mokolo mosusu mabele ekosuka?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/8 nk. 3-4

Babikisami na ntango ya makámá

NA ENGUMBA Séoul, na ekólo Corée, magazini monene ya bitazi minei ekweaki na mbalakaka mpe ekundaki bankámá ya bato na nsé na yango! Basungi basalaki butu na moi mpo ete bákoka kobikisa bato mingi. Lokola mikolo mizalaki koleka, elikya ya komona babiki mosusu oyo bakundamaki na nsé ya mabondo ya betɔ́ (“béton”) mpe ya bibende ekómaki kosila.

Bobele na ntango oyo elikya ezalaki lisusu te, likambo moko ya kokamwa esalemaki. Mongongo moke ya moto azali komilela eyokanaki uta na nsé ya ebele ya biloko oyo bipalanganaki. Basungi batimolaki na molende nyonso, na mabɔkɔ, mpo na kobimisa mwana mwasi moko ya mibu 19 oyo akundamaki na nsé na boumeli ya mikolo 16 kasi akufaki te. Na ntango bifelo ya etómbola (ascenseur) bikweaki kozanga ete bibukana, bizingelaki ye mpe na lolenge yango abatelamaki, babetɔ́ ya bozito mingi oyo ekweaki na nsima ezwaki ye te. Atako nzoto na ye ebungisaki mai mingi mpe azokaki, kasi abikaki na liwa!

Na mikolo na biso, sanza mobimba ezali koleka te kozanga ete bálobela nsango ya likámá moko, ezala koningana ya mabelé, mopɛpɛ makasi, kobima ya mɔ́tɔ ya volcan, likámá ya motuka, to nzala. Mpe masoló matali mosala ya kobikisa bato mpe bato oyo bazali kobikisama mazali kokamwisa bamilió ya bato oyo bazali kolanda bansango. Nzokande, likebisi na ntina na likámá oyo lizali koya​—likámá lileki monene kati na lisoló ya bato​—mbala mingi ezali kotyelama likebi te. (Matai 24:21) Biblia ezali kolobela koya ya likambo yango na maloba oyo: “Talá mabe ekobima, longwa na libota kino libota; mpe mopɛpɛ makasi ekotombwa likoló, longwa na ndelo na nsuka na mokili. Mpe babomami na [Yehova] na mokolo yango bakozala longwa na molelo moko na mokili kino molelo mosusu na mokili; bakobimisamela bileli te, bakoyanganisama te, bakokundama mpe te; bakozala lokola nyei likoló na mabelé.”​—Yilimia 25:32, 33.

Maloba oyo mazali mpenza kobangisa! Kasi na bokeseni na makámá mauti na biloko bizalisami mpe makámá mosusu, likámá yango ekoboma bato bibomela te. Ɛɛ, lobiko​—lobiko na yo​—ekoki kozala!

Ntango ya kosala na lombangu

Mpo na kososola malamu ete likoki ya kobika lizali, esengeli koyeba liboso ntina oyo likámá yango ya mokili mobimba likosalema. Ya solo, yango ezali mwango bobele moko ya solosolo mpo na kosilisa mikakatano ya bato. Lelo oyo bobele bato moke nde bazali komiyoka ete babatelami. Atako siansi esali milende makasi, makɔnɔ oyo mabomaka mazali sé kosilisa ebele ya bato awa na mabelé. Bitumba oyo biuti na kowelana ya mangomba, bikólo, mpe politiki bizali koboma bankóto mingi ya bato. Nzala mpe ebakisami na bwale mpe mpasi oyo ezali kozwa mibali, basi mpe bana oyo basali eloko te. Kobeba ya bizaleli malamu ezali kokweisa miboko mpenza ya libota ya bato; ata bana mike basili kobeba.

Na bosikisiki ya kokamwa, esakweli moko ya Biblia oyo ekomámá esili koleka mibu 1 900 elobeli ezalela ya mikolo na biso. Yango elobi ete: “Ososola likambo oyo ete, na mikolo ya nsuka ntango ekotonda na makámá.”​—2 Timoté 3:1, engebene The New Testament in Modern English, ebongolami na J. B. Phillips; kokanisá na Matai 24:3-​22.

Obanzi ete ezali likambo ya kolongobana ete Nzambe ya bolingo akanga miso na bampasi na biso? Biblia elobi ete: “Zambi [Yehova] alobi boye, ye oyo asalaki lola, ye azali Nzambe, ye oyo atongaki mokili mpe asalaki yango; ye akokisaki yango, asalaki yango eloko na mobulu te, [ye] atongaki yango ete bato báfanda wana.” (Yisaya 45:18) Ɛɛ, na esika ya kotika mabelé kitoko oyo ete mábebisama mpe bafandi na yango nyonso bábomama, Nzambe akosala likambo moko. Motuna mozali kotunama, akosala yango lolenge nini?

Poná bomoi!

Biblia eyanoli kati na Nzembo 92:7 ete: “Ata bato mabe bakóli pelamoko matiti; ata baoyo nyonso bakosalaka mabe balóngi malamu, nde ezali mpo ete bakobomama bobele kobomama.” Mwango ya Nzambe mpo na kosilisa mikakatano ya mokili ezali bongo kosilisama ya mabe yango moko. Likambo ya esengo ezali ete yango elimboli te ete bato nyonso basengeli kobomama. Nzembo 37:34 endimisi biso ete: “Zilá mpo na [Yehova] mpe batelá nzela na ye, akokembisa yo ete osangola mokili; okomona kobeba na bato mabe.”

Maloba oyo mamonisi ete likoki lizali ya kobikisama na likámá lileki monene oyo likokwela bato. Nzambe apesi biso liponi. Maloba oyo Mose alendisaki na yango Bayisalaele ntango bazalaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka mabongi mpe epai na biso lelo oyo: “Natii liboso na yo bomoi mpe kufa, mpe lipamboli mpe elakeli mabe. Na bongo poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi.” (Deteronome 30:19) Kasi lolenge nini moto ‘akopona bomoi’ mpe kobikisama? Lobiko ya solosolo elimboli mpenza nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto