Makámá mauti na biloko bizalisami—Nzambe nde azali mobandisi na yango?
“NZAMBE, mpo na nini osali biso boye?”
Ezali wana maloba ya mobiki moko oyo amonaki libebi monene ntango ngomba Nevado del Ruiz na Colombie, oyo nsɔ́ngɛ́ na yango ezipami na mbulampembe, ebimisaki mɔ́tɔ na Novɛ́mbɛ 13, 1985. Pɔtɔpɔ́tɔ oyo eutaki na yango ekundaki engumba mobimba ya Armero mpe ebomaki bato koleka 20 000 bobele na butu moko.
Ezali likambo ya kokamwa te soki mobiki wana abimisaki maloba motindo yango. Lokola bato bazangi makoki ya komibikisa liboso na banguya ya nsomo ya biloko bizalisami, longwa na ntango ya kala, bato bakanisaki ete makambo wana ya mpasi mazali kouta na Nzambe. Bato ya ntango na kala bazalaki kopesa makabo, bapesaki ata bato lokola mbeka mpo na kobondela banzambe na bango ya mai monene, ya likoló, ya mabelé, ya ngomba, ya mɔ́tɔ mokoutaka na mabelé, mpe ya biutelo mosusu ya makámá. Ata lelo oyo, bato mosusu bazali kotalela makámá ya biloko bizalisami lokola likambo likanami uta kala to etumbu euti na Nzambe.
Nzambe azali solo mobandisi ya makámá oyo mazali kopesa mpasi mpe kobungisa biloko na bato kati na mokili mobimba? Tosengeli bongo kopamela ye? Mpo na koyanola, tosengeli kotalela malamumalamu nini ezalaka kati na makámá motindo wana. Ya solo, tosengeli kotalela lisusu mwa makambo mosusu oyo mayebani malamu.
“Likámá liuti na biloko bizalisami” ezali nini?
Ntango koningana ya mabelé esalamaki na engumba Tangshan, na Chine, mpe engebene mbándo (rapports) euti na Leta ya Chine, ebomaki bato 242 000, mpe ntango ekungola ebéngami Andrew epepaki na sud ya etúká ya Floride mpe ya Louisiane ebebisaki biloko oyo motuya na yango elekaki bamiliare mingi ya badolare, makámá yango ya biloko bizalisami malobelamaki mingi kati na bazulunalo ya mokili mobimba. Nzokande, elingaki kozala boni soki koningana wana ya mabelé esalamaka na mokili mokauki ya Gobi, oyo mozali na bato te, na ntáká ya bakilomɛtɛlɛ 1 100 na nórdi-wɛ́sti ya Tangshan, to soki ekungola Andrew ekendeki nzela mosusu mpe esilaki yango moko kati na mai monene, kozanga kokota na mokili? Mbele bato bazali kokanisela yango te lelo oyo.
Ezali bongo polele ete, ntango tozali kolobela makámá mauti na biloko bizalisami, tozali kolobela te bobele kotomboka ya banguya ya biloko bizalisami. Mobu nyonso bankóto ya koningana ya mabelé, ezala ya minene to ya mike ezali kosalama, mpe bibele ya bikungola, mipepe makasi, kopela ya ngomba oyo ebimisaka mɔ́tɔ, mpe makambo mosusu ya nsomo mazali bobele kobakisama na mituya mikomami na mikanda. Nzokande, soki makambo wana mabomi bato, mabebisi biloko mpe mabulunganisi motindo ya bomoi ya bato, makómi makámá.
Tosengeli koyeba ete likámá mpe kobebisama ya biloko ekokanaka ntango nyonso te na makasi ya nguya oyo ebimi na biloko bizalisami. Likámá lileki monene libimaka ntango nyonso te na nguya makasi ya biloko bizalisami. Na ndakisa, na 1971 koningana ya mabelé na bokasi ya 6,6 na emekeli ya Richter esalamaki na engumba ya San Fernando, na Californie, Etats-Unis, mpe bato 65 bakufaki. Mbula moko na nsima, koningana ya mabelé ya bokasi ya 6,2 esalamaki na engumba ya Managua, na Nicaragua, mpe bato 5 000 bakufaki!
Na yango, wana tokómi na bokóli monene ya kobebisama oyo euti na biloko bizalisami, tosengeli komituna: Biloko bizalisami bisili kokóma na makámá mingi koleka? To bato nde basangani na kobakisama ya mikakatano yango?
Nani azali mobandisi na yango?
Biblia ezali komonisa Yehova Nzambe lokola Mozalisi Monene ya biloko nyonso, ezala nguya ya biloko bizalisami ya mabelé oyo. (Genese 1:1; Nehemia 9:6; Baebele 3:4; Emoniseli 4:11) Yango elingi koloba te ete azali kobimisa mopepe nyonso to mbula nyonso oyo ezali kobeta. Nzokande, atyaki mibeko oyo mizali kotambolisa mabelé mpe ezingelo na yango. Na ndakisa, kati na Mosakoli 1:5-7, tozali kokuta makambo minene misato oyo mazali kopesa nzela na bomoi awa na mabelé—kobima mpe kolala ya moi mokolo na mokolo, kotambola malamu ya mipepe mpe zolongano ya mai. Ata bato bayebi yango to bazangi koyeba yango, na boumeli ya nkóto na nkóto ya mibu, bibongiseli wana ya bozalisi, mpe misusu oyo mikokani na yango, bizali kosala na boyokani na mbongwana ya bileko, na mitindo ya kati ya etando na biso, mpe na bopusi ya bikelamu oyo bizali likoló ya etando na biso. Ya solo, mokomi ya Mosakoli azali kobenda likebi likoló na bokeseni monene oyo ezali kati na myango mizangi kobongwana mpe mizangi nsuka ya biloko bizalisami mpe motindo ya bomoi mokuse ya moto.
Yehova azali bobele Mozalisi ya nguya ya biloko bizalisami te kasi azali lisusu na makoki ya kopekisa yango. Tozali kokuta kati na Biblia masoló ya lolenge oyo Yehova asalelaki to apekisaki banguya yango mpo na kokokisa mokano na ye. Lokola bokaboli ya Mai Motane na mikolo ya Moize mpe kotelema ya moi mpe ya sanza kati na makoló na mikolo ya Yosua. (Exode 14:21-28; Yosua 10:12, 13) Bobele bongo, Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe mpe Masiya oyo alakamaki, amonisaki mpe nguya na ye likoló na biloko bizalisami, na ndakisa, wana atelemisaki mopepe makasi oyo mozalaki kopepa na libéké ya Galilai. (Malako 4:37-39) Masoló lokola oyo mazali komonisa polele ete Yehova Nzambe mpe Mwana na ye, Yesu Klisto bakoki mpenza kosalela to kopekisa nguya nyonso oyo ezali kosala bopusi likoló na bomoi awa na mabelé.—2 Ntango 20:6; Yilimia 32:17; Matai 19:26.
Tokoki bongo kotalela Nzambe lokola mobandisi ya makámá mauti na biloko bizalisami mpe mpasi na yango oyo ezali se kokóla na mikolo na biso? Mpo na koyanola na motuna oyo, tosengeli liboso koyeba soki bilembeteli bizali solo komonisa ete nguya ya biloko bizalisami ekómi kobimisa makámá mingi, to mbala mosusu ekoki ata kopekisama te.
Na likambo yango, tala oyo mokanda Makámá mauti na biloko bizalisami—Misala ya Nzambe to misala ya bato? (na Lingelesi) ezali koloba: “Elembeteli moko te ezali komonisa ete ebongiseli ya mbongwana ya bileko oyo ezali komema na kozanga mai, na mpela mpe ekungola ezali kobongwana. Mpe moyekoli moko te ya motindo ya kati ya mabelé akoki koloba ete kobaluka ya mabelé, oyo ezali liziba ya koningana ya mabelé, ya ngomba oyo ebimisaka mɔ́tɔ mpe bobuti ya mbóngé ya mai monene ezali kokóma na makámá mingi.” Bobele bongo, mokanda Koningana ya mabelé (na Lingelesi) emonisi ete: “Mabanga ya mokili nyonso mazali na bilembo biyebani motuya te ya makambo minene mpe mike, oyo mokomoko na yango ekokaki kozala likámá monene mpo na bato soki esalamaka lelo oyo—mpe engebene bato ya mayele, makambo motindo yango masengeli kokóma mbala na mbala na mikolo mizali koya.” Elingi koloba ete, mabelé mpe nguya oyo euti na yango ebongwani mpenza te na boumeli ya bikeke. Na yango, ezala ete mituya mimonisi bokóli to mimonisi yango te kati na makambo mazali kosalama na mabelé to na ezingelo na yango, mabelé makómi te na makámá mingi ya nguya monene koleka.
Bongo, mpo na nini bazali koloba ete makámá mauti na biloko bizalisami makómi kosalama mingi mpe kobebisa biloko mingi? Soki mabe mazali kouta te na nguya ya biloko bizalisami, mabe mazali bongo kouta na bato. Mpe ya solo, bato na mayele bazali kondima ete misala ya bato mizali kolengela mpe kotya ezingelo na biso liboso na makámá mauti na biloko bizalisami. Na mikili ya bobóla, mposa ya kozwa bilei mingi ezali kopusa basáli bilanga mingi na kolona mbala na mbala elanga moko to bazali koluka elanga mosusu mpe bazali kosilisa zámba oyo ezali na ntina mpo na ezingelo na biso. Ezali kosala ete mai ya mbula mamema mabelé kitoko. Bokóli monene kati na motuya ya bato ezali lisusu komema na kopalanganisama ya bandako ya mabaya to na bifandelo na bisika ya mabe. Ata kati na mikili ya bozwi mingi, bato mingi, lokola bamilió ya bato oyo bafandi penepene ya San Andreas Fault na Californie, bamitye bango moko na likámá atako basilaki kokebisa bango na polele. Na lolenge yango, soki makambo mazangi kokanelama mabimi—ekungola, mpela, to koningana moko ya mabelé—tokoki kobénga makámá oyo mabimi ete ya “biloko bizalisami”?
Ndakisa monene ezali kozanga mai na mikili ya Afrika oyo ebengami ete Sahel. Mbala mingi tokanisaka ete kozanga mai ezali kozanga ya mbula to bosenga ya mai oyo ezali komema na nzala, na kozanga bilei mpe na kufa. Kasi, nzala makasi oyo ezali kati na etúká yango euti bobele na likambo oyo ete mai mazangi? Mokanda Nkɛlɛ ya biloko bizalisami (na Lingelesi) elobi ete: “Bilembeteli oyo bato ya mayele mpe masangá ya kopesa lisungi bazali na yango bizali komonisa ete soki nzala ya mikolo na biso ezali koumela mingi, ezali te mpo na kozanga mai ya ntango molai, kasi mpo na kosalela mabelé mpe mai na lolenge ya mabe. . . . Kopusama ya mokili mokauki epai na etúká ya Sahel euti mingi mpenza na bato.” Zulunalo moko ya Afrika ya Súdi, The Natal Witness, emonisi ete: “Nzala ezali likambo ya kozanga bilei te; ezali nde likambo ya kozanga makoki ya kozwa bilei. Na maloba mosusu, bobóla nde ezali kobimisa nzala.”
Tokoki mpe koloba bongo mpo na kobebisama oyo euti na makámá mosusu. Bolukiluki bosili komonisa ete bato na mikili ya bobóla bazali kokufa mingi na makámá mauti na biloko bizalisami koleka kati na mikili ya bozwi mingi. Na ndakisa, kobanda 1960 kino 1981, na kotalela bolukiluki moko na Japon, koningana ya mabelé 43 mpe makámá mosusu ebomaki bato 2 700, oyo epesi mwayene ya bato 63 oyo bakufaki na likámá moko na moko. Bobele na eleko yango, makámá 31 masalamaki na Perou mpe bato 91 000 bakufaki, to bato 2 900 na likámá mokomoko. Mpo na nini bokeseni wana? Nguya ya biloko bizalisami ebimisaki makámá, kasi misala ya bato—kati na etuluku, na makambo ya nkita mpe ya politike—nde ezali na mokumba monene mpo na kufa ya bato mpe kobebisama ya biloko.
Wapi lolenge ya kobongisa yango?
Na boumeli ya mibu mingi, bato ya zébi mpe bato na mayele basili kobimisa myango oyo bakoki komibatela na makámá ya biloko bizalisami. Bazali kolukaluka mozindo kati na mabelé mpo na komeka kososola mitindo ya koningana ya mabelé mpe mitindo ya ngomba oyo ebimisaka mɔ́tɔ. Na nzela ya ba satellites oyo ezali na likoló bazali kotalatala zingazinga ya mabelé mpo na koyeba nzela ya mipepe makasi mpe ya bikungola to kosakola mpela to kozanga ya mai. Bolukiluki nyonso wana esili kopesa bango boyebi oyo bazali kokanisa ete ekopesa bango nzela ya kokitisa bonene ya makámá mauti na biloko bizalisami.
Milende motindo wana misili kopesa matomba malamu? Na ntina ya bolukiluki wana oyo esalami na bamasini ya kokamwa oyo ezali kosenga mosolo mingi, lisangá moko oyo etalelaka libateli ya ezingelo emonisaki ete: “Bamasini wana ezali na ntina na yango. Kasi soki ezali kozwa motuya moleki monene ya mosolo mpe molende, soki ezali meko mpo na kobosana kotalela bandako ya likámá na bifandelo ya bobóla oyo eyeisaka makámá yango mpasi mingi—bongo ekoki kosala mabe mingi koleka na esika ya kosala malamu.” Na ndakisa, atako ezali na ntina mingi koyeba ete esika etúká ya Bangladesh oyo ezali na mpimo ezalaka na makámá ya mpela mpe ya komata ya mbóngé mbala na mbala, boyebi wana epekisi bamilió ya bafandi ya Bangladesh te na kofanda kuna mpo ete bazali na esika mosusu te. Litomba mabe na yango lizali bongo makámá ya mbala na mbala oyo ebomaka bankóto mingi ya bato.
Ezali polele ete, boyebi ya makambo ya teknike ezali na ntina bobele mwa moke. Likambo mosusu oyo esengami ezali ya kokitisa mpasi oyo ezali kosala ete bato bazali na liponi mosusu te bobele oyo ya kokende kofanda na bisika ya makámá to ya kobika na lolenge oyo ezali kobebisa ezingelo. Na elobeli mosusu, mpo na kokitisa makámá mauti na biloko bizalisami, esengeli kobongisa lisusu motindo na bituluku ya bato, makambo ya nkita, mpe bibongiseli ya politike oyo tozali kobika kati na yango. Nani akoki kokokisa mokumba motindo yango? Bobele Ye oyo azali na makoki ya koyangela ata banguya oyo ezali komema makámá mauti na biloko bizalisami.
Misala ya Nzambe oyo akokokisa mosika te
Yehova Nzambe akosilisa bobele mikakatano oyo mizali komonana te, kasi akosilisa mpe ntina mozindo ya mpasi na bato. Akosukisa bibongiseli ya politike, ya mombongo ya lokoso, mpe ya mangomba ya lokoso mpe ya konyokola bato oyo “ezali na bokonzi likoló na moto mpo na kopesa ye mpasi.” (Mosakoli 8:9) Moto nyonso oyo ayebi Biblia azangi koyeba te ete kati na yango ezali na bisakweli mingi oyo bizali komonisa ntango oyo Nzambe akozwa bikateli ya kosilisa mabe mpe mpasi na mabelé mpe akozongisa kimya mpe boyengebene kati na paradis na mabelé.—Nzembo 37:9-11, 29; Yisaya 13:9; 65:17, 20-25; Yilimia 25:31-33; 2 Petelo 3:7; Emoniseli 11:18.
Ya solo, ezali yango oyo Yesu Klisto ateyaki bayekoli na ye bakoka kobondela mpo na yango na libondeli oyo ete: “Tika bokonzi na yo eya. Tika mokano na yo esalama na nse lokola na likoló.” (Matai 6:10, NW) Bokonzi ya Masiya ekolongola mpe ekozwa esika ya biyangeli nyonso ya bato bazangi kokoka, lokola mosakoli Danyele ayebisaki: “Na mikɔlɔ na mikonji yango Njambe na lola akotɛmisa bokonji bokobebisama sɔkɔ mokɛ tɛ, mpe bokonji yango ekopɛsama na bato mosusu tɛ; ekobuka mpe ekosilisa makonji oyo yɔnsɔ, mpe ekotikala lobiko na lobiko.”—Danyele 2:44.
Bokonzi na Nzambe ekosala likambo nini oyo mabota ya lelo mazali kokoka kosala yango te? Biblia ezali kopesa elilingi kitoko mpo na oyo ekosalema. Na bokeseni na makambo oyo mamonisami na bililingi bizali na lokasa oyo, na ndakisa nzala mpe bobóla, “masango ikotondana na mokili ata kino likolo na nkeka,” mpe “njete na elanga ikobota mbuma na yango, mpe mabele ekobota mbuma na yango, mpe bakojala na kimia na mokili na bango.” (Nzembo 72:16; Ezekiele 34:27) Mpo na oyo etali ezingelo na biso, Biblia eyebisi biso ete: “[Mokili mokauki mpe etúká ezangi mai, NW] ekoyoka esengo, ekobimisa felele na habasɛlɛtɛ. . . . Jambi mai makopunjwa kati na lisobe. Jɛlo oyo ekaoki ekobongwana lijiba mpe mabele na mposa ekojala bitima na mai.” (Yisaya 35:1, 6, 7) Mpe bitumba bikozala lisusu te.—Nzembo 46:9.
Biblia eyebisi biso te lolenge nini Yehova Nzambe akokokisa nyonso wana, mpe lolenge oyo akosala ete banguya ya biloko bizalisami ezala lisusu ntina ya makámá te. Nzokande, toyebi likambo oyo ete baoyo nyonso bakofanda na nse ya boyangeli wana “bakosala mosala na mpamba tɛ, bakobota bana mpɔ na nsɔmɔ na pwasa tɛ, jambi bakojala bakitani na bapambolami na [Yehova, NW], mpe bana na bango elɔngɔ na bango.”—Yisaya 65:23.
Kati na zulunalo oyo, mpe kati na mikanda misusu ya Watch Tower Society, Batatoli ya Yehova basili komonisa mbala na mbala ete Bokonzi na Nzambe etyamaki na likoló na mobu 1914. Na nse ya litambwisi ya Bokonzi yango, litatoli ya mokili mobimba lisili kopesama na boumeli ya mibu soko 80, mpe lelo oyo tosili kobelema na “makoló ya sika mpe mabelé ya sika” oyo elakamaki. Bato bakosikolama bobele na makámá ya nguya ya biloko bizalisami te, kasi lisusu na mikakatano mpe minyoko oyo mizali kopesa bato mpasi uta mibu nkóto motoba oyo misili koleka. Na ntina na eleko yango bakoloba solo ete: “Makambo ya liboso masili koleka.”—2 Petelo 3:13; Emoniseli 21:4.
Kasi, ezali boni mpo na mikolo na biso? Nzambe azali kosunga baoyo bazali konyokwama na makámá mauti na biloko bizalisami to na makámá mosusu? Ya solo, azali mpenza kosunga, kasi azali kosala ntango nyonso te na motindo oyo ebele na bato bazali komizela na yango.
[Bililingi na lokasa 8, 9]
Misala ya bato misili kolengela ezingelo na biso na kobimisa makámá mauti na biloko bizalisami
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Laif/Sipa Press
Chamussy/Sipa Press
Wesley Bocxe/Sipa Press
Jose Nicolas/Sipa Press