ETENI YA LIBOSOa—Ndenge Biblia ekómaki kino epai na biso
KATI na ndako moke ya mosala, mobali moko monyati ya mikanda mpe bilenge mibali bayekoli na ye bazali kotambwisa masini esalemi na mabaya mpo na bonyati mikanda, na likebi nyonso bazali kotya bapapyé likoló ya masini mpo na kokoma na yango. Nsima ya kolongola yango, bazali kotala malamumalamu makomi. Na nsima, bazali kotanda yango na nsinga ekangisami uta na efelo moko kino na efelo mosusu mpo na kokaukisa yango.
Na mbala moko, bato babɛti ekuke na makasi. Na bobángi nyonso, monyati na mikanda afungoli ekuke, mpe etuluku ya basodá na mandóki na bango bakɔti na elolo. Babandi koluka mokanda oyo epekisami makasi koleka mikanda mosusu—mokanda yango nde Biblia na elobeli oyo ata bato mpamba bakoki kotánga yango!
Basodá bakómi nsima mpenza. Lokola bakebisamaki mpo na likámá yango, mobongoli mpe mosungi na ye moko bapotaki mbangu liboso mpenza na ndako ya mosala, balongolaki ebele ya nkasa, mpe sikawa bazali kokatisa na ngámbo mosusu ya Ebale Rhin. Ah!, babikisi ndambo ya mosala na bango.
Mobongoli yango ezalaki bongo William Tyndale, oyo, na mobu 1525, na engumba Cologne, na ekólo Allemagne, azalaki kosala nyonso mpo na kobimisa libongoli na ye ya “Kondimana ya Sika” na Lingelesi atako epekisamaki. Likambo oyo akutanaki na yango ekómelaki mpe bato mingi. Na boumeli ya mibu pene na 1 900 kobanda ntango kokomama ya Biblia esukaki, bato mingi, mibali mpe basi basalaki nyonso mpo na kobongola mpe kokabola Liloba ya Nzambe. Lelo oyo biso tozali naino kozwa matomba na mosala na bango. Basalaki nini? Lolenge nini Biblia oyo tozali na yango lelo ekómaki kino na eleko na biso?
Ebandeli ya kosala bakopi mpe ya bobongoli Biblia
Uta kala basaleli ya solo ya Nzambe bapesaka motuya monene na Liloba na ye. Búku New Catholic Encyclopedia endimi ete: “Lolenge moko na bankɔkɔ na bango Bayuda, baklisto ya liboso bapesaki motuya mingi na botángi ya Mikanda Mosantu. Kolandáká ndakisa ya Yesu (Mt 4.4; 5.18; Lk 24.44; Yn 5.39), bantoma bamesanaki na K[ondimana] ya K[ala], elingi koloba ete bamipesaki na botángi mpe boyekoli na yango na boumeli ya ntango molai mpe na likebi, mpe balendisaki bayekoli na bango ete básala lolenge yango (Lom 15.4; 2 Tm 3:15-17).”
Mpo na ntina yango, esengelaki kosala bakopi ya Biblia. Na eleko oyo ezalaki liboso na Klisto, mosala yango mosalemaki mingi na basáli ya makoki babéngamaki ‘bakomeli na mayele’ oyo balingaki soko moke te ete mabunga mákɔta na makomi. (Ezela 7:6, 11, 12) Lokola bazalaki kosala molende makasi ya kobimisa bakopi oyo ezangi mabunga, batyaki moboko malamu mpo na basáli na bakopi ya Biblia oyo balandaki nsima.
Nzokande na boumeli ya ekeke ya minei L.T.B., mokakatano moko mobimaki. Alesandala Monene alingaki ete bato na mokili mobimba báteyama mimeseno ya Bagreke. Bolóngi na ye ya mikili mingi epalanganisaki Greke ya bato banso, to Koine, mpe ekómaki lokótá oyo elobamaki na mikili mingi na Moyen-Orient. Mpo na yango, Bayuda mingi bakólaki kozanga ete báyekola kotánga Liebele mpe na bongo bazalaki na likoki te ya kotánga Makomami. Na yango, pene na mobu 280 L.T.B., etuluku ya banganga-mayele Baebele bayanganaki na engumba Alesandalia, na Ezipito, mpo na kobongola Biblia ya Liebele na Koine oyo elobamaki mingi. Libongoli na bango eyebanaki na nkombo ya Septante, nkombo oyo euti na “Ntuku nsambo,” na lokótá Latin mpe ezali komonisa motángo ya bato oyo basanganaki na bobongoli na yango. Bobongoli yango esilaki pene na mobu 150 L.T.B.
Na eleko ya Yesu, Liebele ezalaki naino kolobama na Palestine. Kasi ezali Koine nde epalanganaki mingi kuna mpe na bitúká mosusu ya mosika na mokili ya Loma. Na yango, bakomi ya Biblia oyo bazalaki baklisto basalelaki Greke ya bato nyonso mpo na kopesa libaku epai ya bato mingi ya mabota ete bátánga yango. Lisusu, batángaki makomi ya kala uta na libongoli ya Septante mpe basalelaki maloba na yango mingi.
Lokola baklisto ya liboso bazalaki bamisionere ya molende, nokinoki basepelaki kosalela Septante mpo na kondimisa bato ete Yesu azalaki Masiya oyo bazalaki kozela uta kala. Yango ebulunganisaki Bayuda mpe epusaki bango na kobimisa mabongoli mosusu ya sika na Greke; mokano na yango ezalaki ya kobongola mikapo mosusu oyo baklisto bazalaki kosalela mpo na kondimisa mateya na bango. Na ndakisa, na Yisaya 7:14 libongoli ya Septante esalelaki liloba oyo lilimboli “ngɔndɔ,” mpo na kolobela mama ya Masiya na esakweli. Kasi mabongoli ya sika masalelaki liloba mosusu ya Greke, oyo elimboli “elenge mwasi.” Lokola baklisto balandaki kosalela Septante, Bayuda basundolaki mpenza mwango na bango mpe balendisaki likanisi ya kozonga na makomi ya Liebele. Nsukansuka, likambo yango limonanaki ete ezalaki lipamboli mpo na babongoli ya Biblia oyo bayaki na nsima mpamba te yango ebatelaki lokótá Liebele.
Babimisi ya liboso ya mikanda ya boklisto
Baklisto ya liboso oyo bazalaki bato ya molende babandaki kobimisa bakopi mingi ya Biblia oyo bakokaki mpe bazalaki kosala yango na mabɔkɔ. Bazalaki mpe bato ya liboso oyo babandaki kosalela codex, oyo ezalaki na nkasa elandana lokola babúku ya mikolo na biso, na esika ya kolanda kosalela barulo. Longola likambo oyo ete ezalaki na mpasi te mpo na koluka mikapo nokinoki, codex ekokaki kokɔta makambo mingi na volimi moko koleka oyo ekokaki kokɔta na rulo mobimba—na ndakisa, Makomami nyonso ya Greke to mpe Biblia mobimba.
Kanɔ́ ya Makomami ya Greke ya boklisto ekokisamaki pene na mobu 98 T.B. na mikanda oyo mikomamaki na Yoane, ntoma ya nsuka oyo atikalaki naino na bomoi. Ezali na eteni moko ya kopi ya Evanzile ya Yoane, oyo ebéngami Papirise Rylands 457 (P52), oyo ekomamaki liboso ya mobu 125 T.B. Kobanda na mobu 150 kino mobu 170, Tatien, moyekoli ya Justin Martyr, abimisaki Diatessaron, oyo ezali bongo kotyama na molɔngɔ́ ya lisoló ya bomoi ya Yesu uta na Baevanzile minei oyo ezali na Biblia oyo tozali na yango lelo.b Yango emonisi ete andimaki bobele Baevanzile wana lokola makomi ya solosolo mpe ete Baevanzile yango esilaki kobanda kotambola na mabɔkɔ ya bato. Pene na mobu 170 T.B., kataloge ya libosoliboso oyo eyebanaki ya mikanda ya “Kondimana ya Sika” ebéngami ete Eteni ya mokanda ya Muratori, ebimisamaki. Kati na yango ezali na mikanda mingi ya Makomami ya Greke ya boklisto.
Nokinoki kopalangana ya bindimeli ya baklisto ebimisaki bosɛnga ya mabongoli ya Makomami ya Greke ya boklisto mpe Makomami ya Liebele. Nsukansuka mabongoli mingi masalemaki na nkótá lokola Arménien, Copte, Géorgien, mpe Syriaque. Mbala mingi esengelaki kobimisa alfabɛ́ ya sika mpo na mokano wana. Na ndakisa, elobami ete Ulfilas, episkɔ́pɔ ya Lingomba ya Loma na ekeke ya minei, abimisaki alfabɛ́ gothique mpo na kobongola Biblia. Kasi atikaki mikanda ya Mikonzi mpamba te akanisaki ete yango ekolendisa mposa ya ba Goths na kosala bitumba. Nzokande, likambo yango epekisaki te ba Goths “oyo bakómaki baklisto” na kopunza engumba Loma na mobu 410 T.B.!
Biblia na nkótá ya Latin mpe Slave
Bobele na ntango yango, Latin ebandaki kopalangana mingi, mpe mabongoli mingi na Latin ya kala mabimaki. Kasi makesanaki na ekomeli na yango mpe na bosikisiki na yango. Na yango na mobu 382 T.B., Pápa Damase, asɛngaki na mokomeli na ye Jérôme ete abongisa Biblia na Latin oyo ekondimama na lingomba.
Jérôme abandaki mosala na ye na kotaleláká lisusu mabongoli ya Latin ya Makomami ya Greke ya boklisto. Nzokande, mpo na Makomami ya Liebele, alingaki sé kobongola uta na Liebele ya kala. Yango wana, na mobu 386 T.B., akendaki na Beteleme mpo na koyekola Liebele mpe koluka lisungi ya labi moko. Mpo na yango, ntembe monene ebimaki kati na lingomba. Bamoko, kati na bango Augustin, bakanisaki ete Septante epemamaki na Nzambe, mpe bafundaki Jérôme ete azalaki sembo te mpo ete “akendaki epai ya Bayuda.” Kosaláká nokinoki, Jérôme asilisaki mosala na ye pene na mobu 400 T.B. Na kozaláká pene na eutelo ya nkótá mpe mikanda ya ebandeli mpe na kobongoláká yango na elobeli ya sika, Jérôme abandisaki, uta koleka nkóto moko ya bambula myango ya bobongoli oyo mizali naino kosalema kino lelo. Biblia na ye eyebanaki na nkombo ya Vulgate, to libongoli mpo na bato banso, mpe yango esalisaki bato na boumeli ya bikeke mingi.
Na mikili ya boklisto na Ɛ́sti ya Mpótó bato mingi bazalaki naino na likoki ya kotánga libongoli ya Septante mpe Makomami ya Greke ya boklisto. Nzokande, na nsima, nkótá mpe minɔkɔ ya Slave, ekómaki kolobama mingi na Mpótó ya Ɛ́sti. Na mobu 863 T.B., bandeko mibale ya libota moko oyo bazalaki koloba Greke, Cyrille mpe Méthode, bakendaki na Moravie, oyo ezali sikawa na République Tchèque. Babandaki kobongola Biblia na lokótá Slave ya kala. Mpo na kosala yango babimisaki alfabɛ́ glagolitique, oyo na nsima alfabɛ́ cyrillique, euti na nkombo ya Cyrille ekitanaki yango. Yango nde ebimisaki alfabɛ́ oyo esalelamaka lelo na nkótá Russe, Ukrainien, Serbe, mpe Bulgare. Biblia ya lokótá Slave esalisaki bato ya bitúká wana na boumeli ya bikeke mingi. Kasi na nsima, wana nkótá izalaki kobongwana, bato mingi bayebaki yango lisusu te.
Biblia ya Liebele ebatelami
Na boumeli ya eleko yango, kobanda pene na ekeke ya motoba kino na ekeke ya zomi T.B., etuluku moko ya Bayuda oyo babéngamaki ba Masoretes bakólisaki myango ya sikisiki ya kosala bakopi mpo na kobatela makomi ya Makomami ya Liebele. Basalaki mosala monene kino kotánga milɔngɔ́ mpe ata likomi mokomoko, kobimisáká bokeseni kati na bamaniskri, nyonso wana mpo na kobatela makomi ya libosoliboso. Milende na bango mizalaki ya mpamba te. Mpo na kopesa ndakisa, bokokanisi kati na makomi ya ba Masoretes ya lelo mpe barulo ya Mbu Ekufa (Mer Morte), oyo ekomamaki katikati na mibu 250 L.T.B. mpe 50 L.T.B., ezali komonisa mbongwana ata moko te na oyo etali mateya atako elekaki mbula 1 000.c
Na eleko ebéngami Moyen-Âge, mikili ya Mpótó mizalaki mpenza na Bikeke ya Molili. Bato mpamba bazalaki mpenza te na likoki ya koyekola mpe kotánga. Na nsima, ata bakonzi ya mangomba, mingi kati na bango, bazalaki lisusu na likoki ya kotánga Latin ya lingomba te mpe mbala mingi bazalaki ata na likoki ya kotánga lokótá na bango moko te. Ezali mpe na eleko yango nde, na Mpótó, bazalaki kotya Bayuda na bakartyé ya bango moko oyo ebéngamaki ba ghettos. Kotyama wana na esika ya bango moko ezali moko ya bantina oyo ebatelaki boyebi ya Liebele ya Biblia. Nzokande, na ntina na makanisi mabe mpe kozanga kotyela bato mosusu motema, mbala mingi boyebi ya Bayuda ekokaki koyekolama te na baoyo bazalaki Bayuda te. Na Mpótó ya Wɛ́sti, boyebi ya Greke ekómaki mpe kobunga. Ezalela yango ekólaki lisusu makasi na ntina na limemya ya koleka ndelo oyo Lingomba ya Wɛ́sti ezalaki kopesa na Vulgate, libongoli ya Jérôme na Latin. Bato mingi batalelaki yango lokola libongoli bobele moko oyo endimami, atako Latin ezalaki kolobama lisusu te na nsuka ya eleko ya ba Masoretes. Na yango, lokola mposa ya koyeba Biblia ebandaki kokóla mokemoke, moboko etyamaki mpo na kowelana monene.
Bobongoli Biblia ekutani na botɛmɛli
Na mobu 1079, Pápa Grégoire VII abimisaki mobeko ya liboso ya lingomba oyo elandamaki na mibeko mingi mosusu mpo na kopekisa kobimisama mpe ntango mosusu ata kozala na mabongoli na nkótá ya mboka. Alongolaki ndingisa ya kosala Mísa na lokótá Slave na kolobáká ete kolanda kosala yango ekosɛnga ete bábongola biteni ya Makomami Mosantu. Na bokeseni mpenza na likanisi ya baklisto ya liboso, akomaki ete: “Nzambe Mozwi na Nguya Nyonso asepeli ete makomami mosantu mázala libombami na bisika mosusu.” Lokola yango ezalaki bongo likanisi ya lingomba, baoyo bazalaki kolendisa botángi ya Biblia bakómaki mokemoke kotalelama ete bazali likámá.
Atako bipekiseli bizalaki, kosala bakopi mpe kobongola Biblia na nkótá ya bato banso ekobaki. Mabongoli na nkótá mingi mazalaki kolekaleka na nkuku kati na mikili ya Mpótó. Bakopi nyonso wana ezalaki kosalema na mabɔkɔ, mpamba te masini ya konyata mikanda ebimaki naino te kino na katikati ya bambula ya 1400. Kasi lokola bakopi ezalaki ntalo mingi mpe lokola ezalaki komonana mingi te, bato oyo bazalaki na bozwi mingi te bazalaki kosepela na kozala ata na eteni ya mokanda moko ya Biblia to ata bobele mwa nkasa. Basusu bakangaki biteni milai na motó, ata mpe Makomami ya Greke ya boklisto mobimba!
Nzokande, na nsima mbonge monene ebimaki mpo na koluka kokɔtisa mbongwana na lingomba. Moko na bantina na yango ezalaki bongo bososoli ya sika ya litomba ya Liloba ya Nzambe na bomoi ya mokolo na mokolo. Lolenge nini mbonge yango mpe bokóli ya myango ya bonyati mikanda etalelaki Biblia? Likambo nini ekómelaki William Tyndale, oyo tolobelaki na ebandeli mpe libongoli na ye? Tokolanda lisoló oyo ya kosimba mayoki na ntango ebongi kati na banimero na biso ekolanda.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Eteni 2 ekobima na nimero ya 15 Sɛtɛ́mbɛ mpe eteni 3 na nimero ya 15 Ɔkɔtɔ́bɛ.
b Búku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc., ezali lolenge ya sika ya molɔngɔ́ ya masoló ya Baevanzile minei.
c Talá búku Insight on the Scriptures, Volimi 2, lokasa 315, ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Etanda na lokasa 8, 9]
Badati ya moboko—Kotambwisama ya BIBLIA
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
LIBOSO YA NTANGO NA BISO (L.T.B.)
Makomami ya Liebele esukaki soko na 443 L.T.B.
400 B.C.E.
Alesandala Monene (akufaki na 323 L.T.B.)
300 B.C.E.
Septante ebandaki soko na mobu 280 L.T.B.
200 B.C.E.
100 B.C.E. Ndambo monene ya barulo ya Mbu Ekufa soko na 100 L.T.B. kino 68 T.B.
NTANGO NA BISO (T.B.)
Yelusaleme ebomamaki na 70 T.B.
Kokomama ya Makomami ya Greke esukaki na 98 T.B.
100 C.E.
Papirise Rylands ya mokanda ya Yoane (liboso ya 125 T.B.)
200 C.E.
300 C.E.
400 C.E. Vulgate ya Latin ya Jérôme soko na 400 T.B.
500 C.E.
600 C.E.
Kobongisama ya makomi ya ba Masoretes 700 C.E.
800 C.E.
Cyrille na Moravie na 863 T.B.
900 C.E.
1000 C.E.
Mobeko oyo mopekisaki Biblia na lokótá ya mboka na 1079 T.B.
1100 C.E.
1200 C.E.
1300 C.E.
[Elilingi na lokasa 9]
Baklisto ya liboso babandisaki kosalela codex
[Elilingi na lokasa 10]
Jérôme akendaki na Beteleme mpo na koyekola Liebele