Boyekoli ya Makomami mapemami mpe ya mambí manso makangani na yango
Boyekoli nimero 5—Makomi ya Liebele kati na Makomami Mosantu
Lolenge Makomami ya Liebele, oyo mazali eteni moko ya Liloba ya Nzambe lipemami, matyamaki na bakopi, lolenge bosikisiki ya makomi yango ebatelamaki, mpe lolenge oyo yango ekómaki kino na mikolo na biso.
1. (a) Lolenge nini ‘maloba ya Yehova’ makeseni na biloko mosusu ya motuya ya ntango ya kala? (b) Mituna nini mizali kotunama na ntina na kobatelama ya Liloba ya Nzambe?
‘MALOBA ya Yehova’ oyo makomami makoki kokokisama na mai ya solo oyo masangisami kati na ebombelo monene ya mikanda mipemami. Tokoki mpenza kozala na botɔ́ndi mpo ete na boumeli ya eleko mobimba ya nsango wana oyo ezalaki kouta na likoló, Yehova asalaki ete “mai” yango másangisama esika moko mpo na kokóma eutelo oyo ekoki kokauka te, oyo etondi na makambo makopesaka bomoi! Biloko mosusu ya motuya na ntango ya kala, lokola mitole ya bakonzi, biloko ya libula, bikeko minene ya bato, bisilá kobeba, bisilá kolyama to kokwea wana ntango ezalaki koleka, kasi maloba ya Nzambe na biso, oyo makokani na biloko ya motuya, makoumela libela na libela. (Yis. 40:8) Nzokande, mituna mizali kotunama mpo na koyeba soki mai yango ya solo mabebisamaki nsima na kotyama kati na ebombelo oyo touti kolobela. Matikalaki mpenza pɛto? Mabongolamaki na bosembo nyonso uta na makomi ya nkótá na yango ya ebandeli, kosaláká ete makomi oyo bato ya minɔkɔ nyonso bazali na yango lelo mázala mpenza makomi oyo mabongi kotyelama motema? Tokomona ete ezali boyekoli kitoko mpenza wana tokotalela na mozindo makomi ya Liebele, oyo ezali eteni moko ya makambo ya ebombelo yango; tokomona bokɛngi oyo esalemaki mpo na kobatela bosikisiki ya makomi yango, mpe bibongiseli malamu oyo bizwamaki ete mabota nyonso ya mokili mákoka kozwa mpe kotánga yango na nzela ya mabongoli ndenge na ndenge ya kala mpe ya sika.
2. Lolenge nini makomi mapemami mabatelamaki kino na eleko ya Ezela?
2 Makomi ya ebandeli oyo mazalaki na lokótá ya Liebele mpe na lokótá Aramɛyɛ makomamaki na bato oyo basalaki lokola bakomeli mpo na Nzambe, kobanda na Mose na mobu 1513 L.T.B. kino mwa moke nsima na mobu 443 L.T.B. Engebene boyebi oyo tozali na yango lelo, makomi wana ya ebandeli mpenza mazali lisusu te. Nzokande, uta ebandeli, likebi mozindo lityamaki mpo na kobatela makomi yango mapemami, bakisá mpe bakopi na yango oyo epesamelaki ndingisa ya kosalema. Soko na mobu 642 L.T.B., na eleko ya Mokonzi Yosiya, “mokanda na Mobeko” ya Mose, na ntembe te oyo ya ebandeli mpenza, ezwamaki kati na ndako ya Yehova. Na ntango wana, mbula 871 esilaki koleka uta yango ezalaki kobatelama malamumalamu. Yilimia, moko na bakomi ya Biblia, amonisaki bosepeli monene na kozwama ya mokanda wana na boye ete akomaki yango na 2 Mikonzi 22:8-10, mpe soko na mobu 460 L.T.B., Ezela alobelaki lisusu likambo yango. (2 Nta. 34:14-18) Ezela asepelaki mpenza na makambo yango, mpamba te “azalaki mokomeli na mayele [“ya molende,” NW] na Mibeko na Mose oyo [Yehova], Nzambe na Yisalaele apesaki.” (Ezl. 7:6) Na ntembe te, Ezela azalaki na likoki ya kotalela barulo mosusu ya Makomami ya Liebele oyo esilaki kobongisama kino eleko na ye, bakisá mbala mosusu makomi ya kalakala mpenza ya mikanda mosusu mipemami. Ya solo, emonani ete Ezela azalaki mobateli to mokɛngɛli ya makomi ya Nzambe na eleko na ye.—Neh. 8:1, 2.
ELEKO YA BOSALEMI YA BAMANISKRI
3. Mposa nini emonanaki mpo na kosalama ya bakopi mosusu ya Makomami, mpe ekokisamaki ndenge nini?
3 Kobanda na eleko ya Ezela, mposa ya bakopi ya Makomami ya Liebele ekómaki monene. Ezalaki Bayuda nyonso te nde bazongaki na Yelusaleme mpe na Palestine na kokangolama na bango oyo esalemaki na mobu 537 L.T.B. mpe na nsima na yango. Kútu, mingi kati na bango batikalaki na Babilone, wana basusu bazalaki kosala mibembo mpo na mombongo mpe mpo na bantina mosusu ekeseni, na boye ete bakómaki kofanda na bingumba minene ya mimbongo ya mokili ya ntango wana. Mbula na mbula, Bayuda mingi bazalaki kosala mobembo mosantu kino Yelusaleme mpo na bilambo ndenge na ndenge kati na tempelo, mpe kuna bazalaki kosangana na losambo oyo lozalaki kotambwisama na lokótá ya Liebele ya Biblia. Na eleko ya Ezela, Bayuda oyo bazalaki na bamboka wana ya mosika bakómaki kosalela bisika ya mayangani oyo eyebani na nkombo biyanganelo, epai kuna botángi mpe masoló ezalaki kosalema likoló na Makomami ya Liebele.a Lokola bisika ya losambo bipalanganaki bipai mingi, bakomeli basengelaki kosala bakopi mingi ya bamaniskri na mabɔkɔ.
4. (a) Guéniza ezalaki nini, mpe ezalaki kosalelama ndenge nini? (b) Kati na moko ya ba guéniza yango, biloko nini ya ntina bizwamaki na ekeke ya 19?
4 Na momeseno, kati na biyanganelo yango, ezalaki na eteni moko ya ndako oyo ebéngamaki guéniza, epai kuna bazalaki kobomba biloko. Wana ntango ezalaki koleka, Bayuda bazalaki kotya kati na guéniza bamaniskri nyonso oyo ezalaki kosalelama lisusu te, oyo epasukaki to oyo enzulukaki mpo ete eumelaki mingi, mpe bakitanyaki yango na bamaniskri ya sika oyo ebongaki kosalelama na eyanganelo. Mbala na mbala, mikanda oyo mizalaki kati na guéniza mizalaki kokundama malamumalamu na nsé ya mabelé, mpo ete makomi—oyo mazalaki na nkombo mosantu ya Yehova—mátyolama te. Ezalaki na motindo wana nde, na boumeli ya bikeke, bankóto mingi ya bamaniskri ya Biblia na Liebele ya kala elimwaki. Nzokande, guéniza oyo ezalaki kati na eyanganelo ya engumba Caire ya Kala, oyo etondaki na bamaniskri, esalelamaki lolenge wana te, mbala mosusu mpo ete ezingamaki na bifelo mpe babosanaki yango kino katikati ya ekeke ya 19. Na mobu 1890, ntango eyanganelo yango ezalaki kobongisama lisusu, biloko oyo bizalaki kati na guéniza bitalelamaki lisusu mpe, mokemoke, biloko ya motuya oyo bizalaki kati na yango bitekamaki to bipesamaki makabo. Uta na yango, bamaniskri ya mwa mibimba mpenza mpe bankóto ya biteni ya bamaniskri (mosusu na yango elobelami ete ekomamaki na ekeke ya motoba T.B.) ememamaki na bibliotɛkɛ ya Eteyelo monene ya Cambrigde mpe na babibliotɛkɛ mosusu ya Mpótó mpe ya Amerika.
5. (a) Bamaniskri nini ya kala ya Liebele esilaki kotyama na bakataloge, mpe yango esili koumela ntango boni? (b) Boyekoli na yango ezali komonisa nini?
5 Lelo oyo, na babibliotɛkɛ ndenge na ndenge kati na mokili, ezali na bamaniskri soko 6 000 ya Makomami ya Liebele, na mobimba to na biteni na yango, oyo itángami mpe ityami kati na bakataloge. Esili koleka mwa ntango, bamaniskri motindo wana ezalaki te, oyo ikomamaki liboso ya ekeke ya zomi T.B. (longola bobele mwa biteni moke ya bamaniskri). Na nsima, na 1947, kati na etúká ya Mbu Ekufá, rulo moko ya mokanda ya Yisaya ezwamaki, mpe na bambula oyo elandaki, barulo mosusu ya ntina mingi ya Makomami ya Liebele izwamaki ntango mibengá to madusu oyo mazali na etúká ya Mbu Ekufá ebimisaki bamaniskri ikokani na biloko ya motuya oyo bibombamá kati na yango uta bambula pene na 1 900. Bato ya mayele basili sikawa komonisa ete ndambo ya bamaniskri yango ekomamaki na bikeke ya nsuka L.T.B. Boyekoli na nzela ya bokokanisi bamaniskri yango ya Makomami ya Liebele, oyo motuya na yango ezali pene na 6 000, ezali kopesa moboko malamu mpo na kondimisa makomi ya Liebele mpe komonisa ete makomi yango mabatelamaki malamu mpe makómeli biso na bosembo nyonso.
LOKÓTÁ YA LIEBELE
6. (a) Istware ya ebandeli mpo na lokótá ya Liebele ezalaki ndenge nini? (b) Mpo na nini Mose azalaki na makoki ya kokoma Genese?
6 Oyo bato bazali kobénga lelo ete lokótá ya Liebele ezalaki, na lolenge na yango ya ebandeli mpenza, lokótá oyo Adama azalaki koloba kati na elanga ya Edene. Na ntina wana, yango ekoki kobéngama ete lokótá ya moto. Yango ezalaki lokótá oyo lozalaki kolobama na mikolo ya Noa, atako na ntango wana maloba na yango makómaki mingi. Na motindo na yango mosusu ya maloba mingi koleka, Liebele ekómaki lokótá ya moboko oyo ebungaki te ntango Yehova akɔtisaki mobulungano kati na lokótá ya bato na Ndako molai ya Babele. (Gen. 11:1, 7-9) Liebele ezali moko na etuluku ya nkótá oyo babéngi na Lifalansé les langues sémitiques mpe yango ezali mama to motó ya libota mobimba wana ya nkótá. Yango ekanganaki na lokótá ya Kanana oyo lozalaki kolobama na eleko ya Abalayama, mpe uta na lolenge ya Liebele na bango, Bakanana babimisaki minɔkɔ ndenge na ndenge ya mboka. Na Yisaya 19:18, yango elobelami lokola “[lokótá] na Kanana.” Na eleko na ye, Mose azalaki nganga-mayele, mpe azwaki mayele yango bobele na bwanya ya Baezipito te kasi lisusu na lokótá ya Liebele oyo bankɔ́kɔ na ye bazalaki koloba. Na ntina yango, azalaki kotánga mikanda ya kala oyo akokaki kozwa, mpe mikanda yango mikómaki mbala mosusu biutelo ya moboko ya makambo mosusu oyo akomaki kati na mokanda ya Biblia oyo moyebani lelo na nkombo Genese.
7. (a) Bokóli nini ya lokótá ya Liebele eyaki kosalema nsima? (b) Liebele ya Biblia esalelamaki lolenge nini?
7 Na nsima, na mikolo ya bakonzi Bayuda, Liebele eyebanaki lokola “lokótá ya Bayuda.” (2 Mik. 18:26, 28, NW) Na eleko ya Yesu, Bayuda bazalaki koloba lolenge ya sika ya Liebele oyo lotondaki na maloba mingi, mpe na nsima yango eyaki kokóma Liebele ya Balabi. Nzokande, esengeli koyeba ete kati na Makomami ya Greke ya boklisto, lokótá yango lozali kobéngama ntango nyonso “Liebele,” kasi Aramɛyɛ te. (Yoa. 5:2; 19:13, 17; Mis. 22:2; Emon. 9:11) Uta kalakala, Liebele ya Biblia ezalaki lokótá ya pɛtɛɛ mpo na bosololi to bopesi nsango, oyo batatoli mingi ya Yehova liboso ya eleko ya boklisto bazalaki kososola yango malamu, bakisá mpe batatoli baklisto ya ekeke ya liboso.
8. Kozaláká na mokano ya Makomami kati na makanisi na biso, tosengeli mpenza kozala na botɔ́ndi mpo na likambo nini?
8 Makomami ya Liebele mazalaki lokola ebombelo ya mai ya solo oyo mazali pɛɛ lokola kulusatala, oyo mayebisamaki epai na bato mpe masangisamaki na nsé na kopemama na Nzambe. Nzokande, bobele baoyo bayebaki kotánga Liebele nde bakokaki, uta na liziba mpenza, komitókela mai wana mauti na Nzambe. Lolenge nini bato ya mabota ya nkótá ndenge na ndenge bakokaki bango mpe kozwa nzela ya komela mai yango ya solo, komizweláká bongo litambwisi ya Nzambe, bakisá mpe kopema mpo na milimo na bango? (Emon. 22:17) Mwango bobele moko ezalaki ya kobongola yango longwa na Liebele kino na nkótá mosusu, kopalanganisáká bongo mai ya ebale ya solo ya Nzambe epai na bibele nyonso ya bato. Tosengeli mpenza kotɔ́nda Yehova Nzambe mpo ete, kobanda soko na ekeke ya minei to na ekeke ya misato L.T.B. kino lelo, biteni ya Biblia bisili kobongolama na nkótá koleka 2 000. Yango ezali mpenza lipamboli mpo na bato nyonso oyo balingi boyengebene, baoyo bakómi mpenza na likoki ya kozwa “esengo” kati na mai wana motuya mingi!—Nz. 1:2; 37:3, 4.
9. (a) Ndingisa nini Biblia yango moko ezali kopesa na ntina na libongoli? (b) Mabongoli ya kala ya Biblia makokisaki lisusu mokumba nini ya malamu?
9 Biblia yango moko ezali nde kopesa ndingisa to ntina ya kobongolama ya makomi na yango na nkótá mosusu? Ɛɛ, ezali kopesa! Liloba oyo Nzambe ayebisaki na Yisalaele ete ‘Bósepela, bino bato, elongo na libota na ye,’ mpe etindá ya esakweli oyo Yesu apesaki na baklisto ete “Nsango Malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso,” esengeli kokokisama. Mpo ete likambo yango likoka kosalema, Makomami masengeli kobongolama na nkótá mosusu. Na kozongisáká miso nsima mpo na kotala bikeke 24 oyo na boumeli na yango Biblia elandi kobongolama, emonani polele ete Yehova asili kopambola mosala yango. Lisusu, mabongoli ya kala ya Biblia oyo mazali kino sikawa na lolenge ya bamaniskri mamonani ete mazali bilembeteli mosusu oyo bindimisi bosembo monene kati na makomi ya Liebele oyo makokani na ebombelo ya mai ya solo.—Det. 32:43; Mat. 24:14.
MABONGOLI YA LIBOSO MPENZA
10. (a) Pantatɛ́kɛ ya Basamalia ezali nini, mpe mpo na nini ezali na ntina mingi mpo na biso lelo? (b) Pesá ndakisa moko ya kosalelama ya Pantatɛ́kɛ ya Basamalia kati na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika.
10 Pantatɛ́kɛ ya Basamalia. Ezali na libongoli moko oyo liyebani na nkombo Pantatɛ́kɛ ya Basamalia, oyo lisalemaki uta kalakala mpenza; nde lokola nkombo emonisi yango, libongoli wana lizali bobele na mikanda mitano oyo mizali na ebandeli ya Makomami ya Liebele. Yango ezali mpenza libongoli epai kuna lɛ́tɛlɛ mokomoko ya makomi ya Liebele emonisami na elembo ekokani na yango kati na alfabɛ́ ya Basamalia; alfabɛ́ yango euti na alfabɛ́ ya kala ya Liebele. Pantatɛ́kɛ ya Basamalia ezali litatoli ya ntina oyo lizali komonisa makomi ya Liebele ya eleko wana. Kobongolama wana na nzela ya bilembo ya alfabɛ́ esalemaki na Basamalia—Basamalia wana bazalaki bakitani ya baoyo batikalaki na Samalia mpe ya baoyo bato ya Asulia bayaki na bango kino Samalia, nsima wana bokonzi ya mabota zomi ya Yisalaele elóngamaki na Baasulia mpe ezwamaki na mobu 740 L.T.B. Basamalia basangisaki losambo ya Yisalaele esika moko na losambo ya banzambe na bango ya bapakano, kasi bazalaki kondima Pantatɛ́kɛ. Ekanisami ete ezalaki na zingazinga ya ekeke ya minei L.T.B. nde basalaki libongoli na bango ya bomonisi balɛ́tɛlɛ ya Liebele na bilembo ya alfabɛ́ ya lokótá ya Samalia, atako bamoko kati na banganga-mayele bapesi makanisi ete yango esalamaki mbala mosusu na ekeke ya mibale L.T.B. Wana bazalaki kotánga makomi na yango, na ntembe te bazalaki kobénga maloba ya lokótá ya Liebele. Atako, na kokokanisáká makomi yango na makomi ya Liebele, emonani ete ezali na makeseni soko 6 000, nzokande mingi kati na makeseni yango mazali bobele makambo ya mikemike. Bakopi ya bamaniskri oyo eumeli koleka ekeke ya 13 T.B. ezali mingi te lelo oyo. Na bisika mingi, kati na maloba na nsé ya lokasa, Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi) ezali kolobela Pantatɛ́kɛ ya Basamalia.b
11. Targumu ezali nini, mpe yango ezali kopesa litomba nini na boyokani na makomi oyo masali Makomami ya Liebele?
11 Targumu ya Aramɛyɛ. Liloba ya lokótá ya Aramɛyɛ oyo libongolami na “bolimboli” to “bopesi ndimbola na kosaleláká maloba ya pɛtɛɛ” ezali bongo targum. Kobanda na ntango ya Nehemia, Aramɛyɛ ekómaki kosalelama lokola lokótá ya Bayuda banso oyo bazalaki kofanda na teritware ya Perse, mpe na yango mposa emonanaki ete botángi ya Makomami ya Liebele etambola elongo na mabongoli na yango na lokótá wana. Ezalaki soko na ekeke ya mitano T.B. nde mabongoli yango matyamaki na lolenge na yango ya nsuka oyo ezali kosalelama lelo. Atako targumu yango ezali bobele bopesi ndimbola ya makomi ya Liebele na maloba ya pɛtɛɛ, mpe ezali te libongoli na yango ya sikisiki, nzokande epesi moboko malamu mpo na makomi yango mpe ezali kosalisa mpo na koyeba malamu mikapo mosusu ya mpasi. Targumu elobelami mbala mingi kati na maloba na nsé ya lokasa ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi).c
12. Libongoli ya Septante ezali nini, mpe mpo na nini yango ezali na ntina mingi?
12 Septante na lokótá ya Greke. Libongoli oyo lileki ntina kati na mabongoli ya kala ya Makomami ya Liebele, mpe libongoli ya liboso uta na Liebele, ezali bongo libongoli ya lokótá ya Greke oyo babéngi Septante (yango elimboli “Ntuku nsambo”). Engebene lisoló ya kala, kobongolama na yango ebandaki soko na mobu 280 L.T.B., mpe esalamaki na Bayuda 72 ya mayele oyo bazalaki na Alesandalia, na mokili ya Ezipito. Na nsima, motángo 70 eyaki kosalelama na lolenge moko to mosusu; na yango libongoli wana libéngamaki Septante. Ekoki kozala ete libongoli yango lisilaki kosalema na ekeke ya mibale L.T.B. Yango esalelamaki lokola Makomami mpo na Bayuda oyo bazalaki koloba Greke mpe basalelaki yango mingi mpenza kino eleko ya Yesu mpe ya bantoma na ye. Na Makomami ya Greke ya boklisto, mingi kati na mikapo 320 oyo mitángami polelepolele mpe mikapo mosusu ya Makomami ya Liebele oyo mitángami mbala soko 890 na lolenge ya likolólikoló, bakisá mpe kolobelama ya maloba mosusu ya Makomami wana ya Liebele, nyonso etongami likoló na libongoli ya Septante.
13. Biteni nini ya ntina mingi ya libongoli ya Septante bisili kokóma kino na mikolo ya lelo, mpe ntina na yango ezali nini?
13 Lelo oyo, ezali na motuya monene ya biteni ya Septante oyo bikomamá na papirise, oyo bikoki kosalelama mpo na boyekoli. Biteni yango bizali na ntina mingi mpo ete bizali biteni oyo bikomamaki na eleko ya ebandeli ya boklisto, mpe atako bizali bobele na bavɛrsɛ́ to mikapo moke, nzokande bizali kosalisa mpo na kondimisa makomi ya Septante. Papirise Fouad 266 ezwamaki na Ezipito mpe emonanaki ete yango ekomamaki na ekeke ya yambo L.T.B. Yango ezali na biteni ya mokanda ya Genese mpe ya mokanda ya Deteronome. Kati na biteni ya mokanda ya Genese, nkombo ya Nzambe ezangi mpo ete papirise yango ebatelamaki malamu te. Nzokande, kati na mokanda ya Deteronome, nkombo yango ezali komonana na bisika mingi, mpe kati na makomi ya Greke yango ekomami na balɛ́tɛlɛ ya Liebele, oyo izalaki na lolenge ya karé.d Bapapirise mosusu eumeli kobanda soko na ekeke ya minei T.B., ntango vɛlɛ́ (vélin) ebandaki kosalelama mpo na kokomama ya bamaniskri; vɛlɛ́ ezali lolenge kitoko ya parshɛmɛ́ [parchemin] (ekótó mpo na kokomela) oyo esalemi mingimingi uta na loposo ya mwana ya ngɔmbɛ, na loposo ya mwana ya mpate, to na loposo ya ntaba.
14. (a) Origène andimisi likambo nini na ntina na libongoli ya Septante? (b) Ntango nini mpe lolenge nini makomi ya Septante mabebisamaki? (c) Litatoli nini baklisto ya liboso bapesaki mpenza wana bazalaki kosalela Septante?
14 Ezali likambo ya kosepelisa ete nkombo ya Nzambe, na lolenge ya tetragrami, ezali lisusu komonana kati na Septante oyo ezwami na búku Hexapla ya Origène, oyo ezali na ba colonnes motoba; mokanda yango mosilaki kokomama soko na mobu 245 T.B. Wana azalaki kolimbola Nzembo 2:2, Origène akomaki boye mpo na Septante: “Kati na bamaniskri ya sikisiki mpenza, NKOMBO ezali komonana na balɛ́tɛlɛ ya Liebele, nzokande na [balɛ́tɛlɛ] ya Liebele ya mikolo oyo te, kasi na balɛ́tɛlɛ na yango ya kalakala mpenza.”e Ezali na bilembeteli oyo bimonisi polele ete, na dati moko ya kalakala, makomi ya Septante mabebisamaki ntango bakitanyaki tetragrami na maloba Kyʹri·os (Nkolo) mpe The·osʹ (Nzambe). Lokola baklisto ya liboso basalelaki bamaniskri oyo ezalaki na nkombo ya Nzambe, ekoki te kokanisama ete balandaki bonkɔ́kɔ ya Bayuda mpe bazangaki kobénga “NKOMBO” na boumeli ya mosala na bango. Bazalaki mpenza na makoki ya kotatola polele nkombo ya Yehova uta na Septante ya Greke.
15. (a) Na kosaleláká etánda ya lokasa 314, lobelá bamaniskri ya libongoli ya Septante, oyo isalemaki na vɛlɛ́ mpe na mposo ya banyama mosusu. (b) Lolenge nini Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika ezali kolobela bamaniskri yango?
15 Kino lelo, ezali na bankámá ya bamaniskri ya libongoli ya Septante na lokótá ya Greke oyo ikomamaki na vɛlɛ́ to na bikótó mosusu. Mingi kati na yango, oyo ikomamaki na katikati ya ekeke ya minei mpe ekeke ya libwa T.B., izali na ntina mingi mpamba te izongeli biteni milai ya Makomami ya Liebele. Bamaniskri yango ebéngamaka “makomi mineneminene,” mpamba te ekomamaki na mobimba na yango na balɛ́tɛlɛ ya minene, oyo etangolami moko na mosusu. Ndambo mosusu oyo etikali ebéngamaka “makomi mikemike” mpo ete ekomamaki na ekomeli ya balɛ́tɛlɛ ya mike, oyo ekomami na mabɔkɔ. Bamaniskri ya makomi ya mikemike, to oyo ekomami na mabɔkɔ, ekóbaki kosalelama mingi uta na ekeke ya libwa kino kobimisama ya myango ya bonyati mikanda (Imprimerie). Bamaniskri ya ntina mingi ya makomi mineneminene oyo ikomamaki na ekeke ya minei mpe na ekeke ya mitano, oyo ibéngami Vaticanus No. 1209, Sinaïticus mpe Alexandrinus, yango nyonso ezali na libongoli ya Septante na Greke kati na yango; bobele makeseni mikemike nde mazali komonana kati na yango. Na maloba na nsé ya lokasa mpe na bandimbola izwami kati na yango, Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi) ezali kolobela mbala mingi mpenza libongoli wana ya Septante ya Greke.f
16. (a) Vulgate ya Latin ezali nini, mpe mpo na nini yango ezali na ntina mingi? (b) Pesá ndakisa ya kolobelama na yango kati na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika.
16 Vulgate na lokótá ya Latin. Libongoli oyo lizali makomi ya moboko oyo babóngoli mingi Bakatolike basalelaki mpo na kobimisa mabongoli na nkótá mingi ya mikili ya Mpótó oyo mizali na nsé na bopusi ya boklisto ya nkombo mpamba. Vulgate eutaki wapi? Liloba ya Latin vulgatus elimboli “ya bato nyonso, oyo eyebani na bato banso.” Ntango Vulgate ebimisamaki mpo na mbala ya liboso, ekomamaki na lokótá ya Latin ya bato nyonso, to oyo eyebanaki na bato banso na mikolo wana, mpo ete yango ekoka kososolama kozanga mpasi na bato mpamba ya Bokonzi ya Loma ya Wɛ́sti. Libosoliboso, nganga-mayele Jérôme, oyo asalaki libongoli yango, autaki kobongisa mbala mibale libongoli oyo babéngi Old Latin Psalms (Nzembo na Latin ya kala); libongoli yango esalemaki uta na libongoli ya Septante ya Greke. Nzokande, libongoli na ye ya Biblia Vulgate lisalemaki mpenza uta na lokótá ya Liebele mpe ya Greke ya ebandeli; na yango, libongoli wana liutaki na libongoli mosusu te. Jérôme asalaki mosala na ye ya kobongola, uta na Liebele kino na Latin, kobanda na mobu soko 390 T.B. kino mobu 405 T.B. Atako mosala yango mobimba mosangisaki mpe mikanda-apokrife, oyo na ntango wana mizalaki kati na bakopi ya Septante, kasi Jérôme akesenisaki na polele mpenza mikanda oyo mizali ya kanɔ́ ya Biblia mpe oyo mizali te kati na yango. Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi) ezali kolobela mbala mingi Vulgate ya Jérôme kati na maloba na yango na nsé ya lokasa.g
MAKOMI NA LOKÓTÁ YA LIEBELE
17. Bakomeli to Basoferimi bazalaki banani, mpe Yesu akweisaki bango na likambo nini?
17 Basoferimi. Bato oyo basalaki bakopi ya Makomami ya Liebele, kobanda na mikolo ya Ezela kino eleko ya Yesu, bazalaki kobéngama bakomeli, to Basoferimi. Wana ntango ezalaki koleka, bakomeli yango babandaki komipesa lotómo ya kokɔtisa mabongwani kati na makomi. Ya solo, Yesu ye moko akweisaki polele bato yango oyo bazalaki komikumisa ete bazalaki babateli na Mibeko; nzokande bamipesaki na lolendo nyonso lotómo oyo lopesamelaki bango te.—Mat. 23:2, 13.
18. (a) Bamasorete bazalaki banani, mpe bandimbola nini ya malamu bapesaki likoló na makomi ya Liebele? (b) Wapi ndambo ya makambo oyo Basoferimi basembolaki, lokola yango emonisami kati na Libongoli ya Mokili ya Sika?
18 Masore ebimisi mabongwani. Bakomeli oyo bakitanaki Basoferimi na bikeke oyo biyaki nsima na Klisto bayebanaki na nkombo ya Bamasorete. Bango bakomaki mabongwani nyonso oyo Basoferimi ya kala bakɔtisaki, kotyáká yango na pembeni ya lokasa to na esika makomi ya Liebele masukaki. Makomi wana ya pembeni ya lokasa mayaki koyebana na nkombo Masore. Masore epesaki molɔngɔ́ ya makambo minene 15 ya Basoferimi, elingi koloba, maloba to milɔngɔ́ ya maloba 15 oyo ityamaki matɔnɔ to mikɔlɔtɔ mikemike kati na makomi ya Liebele. Ndambo ya makambo minene wana ezali na bopusi te likoló na libongoli ya Lingelesi mpe na ndimbola na yango, kasi mosusu ezali na bopusi mpe ezali na ntina mingi.h Basoferimi batikaki ete bobángi mabe na bango ya kobénga nkombo ya Yehova ekanga bango kati na motambo mpe bakɔtisaki mabongwani likoló na etángeli ya nkombo wana na kokitanyáká yango na ʼAdho·naiʹ (Nkolo) na bisika 134 mpe na ʼElo·himʹ (Nzambe) na bisika mosusu. Masore epesi liste ya mabongwani nyonso wana.i Engebene nɔti moko kati na Masore, Basoferimi to bakomeli ya kala bafundami lisusu ete basalaki mabongisi (bosemboli mabungá) na bisika 18 to koleka 18, atako ezali solo ete mabongwani yango mazalaki mingi koleka.j Ekoki kozala ete bosemboli wana ya mabungá esalamaki na makanisi moko ya malamu mpo ete makomi ya ebandeli mamonisaki to kozanga limemya epai na Nzambe to kozanga botosi epai na bamonisi na ye awa na mabelé.
19. Makomi ya milelisami na milelisami ya Liebele mazali nini, mpe ntango nini yango etyamaki na lolenge ya sikisiki?
19 Makomi ya milelisami na milelisami. Alfabɛ́ ya Liebele esalemi na milelisami 22 (consonnes), mpe ezali na mileli (voyelles) te. Na ebandeli, motángi asengelaki kobakisa mileli engebene boyebi oyo azalaki na yango na lokótá ya Liebele. Kokomama ya Liebele ezalaki lokola ekomeli ya kokata maloba na mokuse. Ata kati na Lingala ya lelo, ezali na maloba mingi makatami na mokuse oyo bato bazali kosalela mpe epai kuna bobele milelisami nde ezali. Na ndakisa, ekomeli L.T.B. ezali bokatami na mokuse ya maloba Liboso ya Ntango na Biso. Bobele bongo, lokótá ya Liebele esalamaki na milɔngɔ́ ya maloba oyo matongami bobele na milelisami. Na bongo, “makomi ya milelisami na milelisami” elimboli makomi ya Liebele oyo ezangi mileli. Makomi ya milelisami na milelisami, oyo mazalaki kati na bamaniskri ya Liebele, matyamaki kati na lolenge na yango ya nsuka mpe ya sikisiki na katikati na ekeke ya liboso mpe ekeke ya mibale T.B., atako bamaniskri oyo izalaki na makomi makeseni elandaki kosalelama na boumeli ya mwa ntango. Na bokeseni na eleko ya Basoferimi, mabongwani masalemaki lisusu te na ntango yango.
20. Bamasorete basalaki nini na ntina na makomi ya Liebele?
20 Makomi ya Bamasorete. Na eteni ya mibale ya mbula nkóto ya liboso kati na Ntango na Biso, Bamasorete (na Liebele, ba·ʽalehʹ ham·ma·soh·rahʹ, elingi koloba “Babateli ya bonkɔ́kɔ”) babimisaki ebongiseli ya mileli ikokani na matɔnɔ mikemike (points-voyelles) mpe bilembo ya botomboli mongongo (accents). Atako ebéngeli ya maloba eyebanaki na nzela ya masoló mpe masapo ya bonkɔ́kɔ, nzokande mileli wana mpe bilembo wana ya botomboli mongongo ezalaki myango oyo ezalaki kosalisa moto na kotánga mpe kobénga maloba makomami, na kolandáká lolaka ya mileli. Bamasorete bakɔtisaki ata mbongwana moko te kati na makomi oyo babimisaki, kasi bazalaki kokoma maloba na pembeni ya lokasa kati na Masore, engebene lolenge oyo bamonaki malamu. Basalaki makasi ete bámipesa bonsomi te ya kokɔtisa mbongwana kati na makomi. Lisusu, kati na Masore na bango, babendaki likebi likoló na makambo ya sikisiki ya makomi mpe bapesaki bandimbola ya sikisiki oyo bamonaki ete ezalaki na ntina mpo na batángi.
21. Makomi ya Bamasorete ezali nini?
21 Biteyelo misato ya Bamasorete emipesaki na kolimbola lolenge ya kotombola mongongo mpe ya kobénga maloba ya makomi ya milelisami na milelisami; biteyelo yango bibéngamaki Eteyelo ya Babilone, Eteyelo ya Palestine mpe Eteyelo ya Tibelia. Makomi ya Liebele oyo mazali lelo kati na mabongoli manyatami ya Biblia ya Liebele ezali bongo makomi ya Bamasorete mpe yango ezali kosalela ebongiseli oyo etyamaki na Eteyelo ya Tibelia. Ebongiseli yango ebimisamaki na Bamasorete ya Tibelia, engumba oyo ezwami na bokúla ya wɛ́sti ya Libeke ya Galilai. Maloba na nsé ya lokasa oyo mazali kati na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi) mazali mbala mingi kolobela makomi ya Bamasorete (na nsé na elembo M) mpe banɔti na yango ya pembeni ya lokasa, oyo ebéngami Masore (na nsé na elembo Mmargin).k
22. Maniskri nini ya makomi ya Babilone ezwamaki, mpe lolenge nini yango ekoki kokokanisama na makomi ya Tibelia?
22 Eteyelo ya Palestine etyaki bilembo ya mileli likoló na milelisami. Bobele bamaniskri moke ya motindo wana nde ekómaki kino na eleko na biso, mpe yango emonisi ete ebongiseli wana ya kotya mileli ezalaki ya kozanga kokoka. Ebongiseli ya Babilone mpe ezalaki kotya bilembo ya mileli likoló na milelisami. Maniskri oyo emonisi lolenge ebongiseli ya Babilone ezalaki kotya bilembo ya mileli ezali bongo Codex ya Petersburg oyo ezali na búku ya Basakoli kati na yango, mpe oyo ekomamaki na mobu 916 T.B.; yango ebatelami kati na bibliotɛkɛ babéngi St. Petersburg Public Library, na Russie. Codex yango ezali na mokanda ya Yisaya, ya Yilimia, ya Ezekiele; yango ezali lisusu na mikanda ya basakoli “ya mike,” bakisá mpe banɔti na pembeni ya lokasa (Masore). Banganga-mayele batalelaki maniskri yango na mozindo mpenza mpe basalaki bokokanisi kati na yango mpe makomi ya Tibelia. Atako yango ezali kosalela ebongiseli ya kotya bilembo ya mileli likoló na milelisami, nzokande ezali mpenza kolanda makomi ya Tibelia na oyo etali makomi na yango ya milelisami na milelisami, elandi mileli na yango, mpe elandi Masore na yango. Na ebombelo babéngi British Museum, kopi ya Pantatɛ́kɛ na ebongiseli ya makomi wana ya Babilone ezwami kuna; emonanaki ete makambo oyo mazwami na kati na yango mazali mpenza na boyokani na makomi ya Tibelia.
23. Lolenge nini ya bamaniskri ya Liebele ezwamaki pene na Mbu Ekufá?
23 Barulo ya Mbu Ekufá. Kati na lisoló ya bamaniskri ya Liebele, mbongwana moko ya esengo ebandaki na 1947. Kati na mobengá to lidusu moko na Wadi Qumran (Nahal Qumeran), na etúká ya Mbu Ekufá, rulo ya liboso ya Yisaya ezwamaki, esika moko na barulo mosusu ya Biblia, mpe barulo mosusu oyo ezalaki ya Biblia te. Mwa moke na nsima, fotokopi mobimba ya rulo wana ya Yisaya (1QIsa), oyo ebatelamaki malamu, ebimisamaki na ntina ete banganga-mayele báyekola yango. Endimami ete rulo yango ekomamaki pene na nsuka ya ekeke ya mibale L.T.B. Ya solo, kozwama ya rulo wana ezalaki likambo ya kokamwisa mpenza—mpamba te ezalaki maniskri ya Liebele oyo eumelaki mbula soko nkóto moko koleka maniskri ya kalakala, oyo bato bazalaki na yango mpe oyo endimamaki, ya mokanda ya Yisaya, maniskri oyo euti na makomi ya Bamasorete!l Mibengá mosusu ya Qumran mibimisaki biteni ya barulo koleka 170 oyo bizalaki na bandambo ya mikanda nyonso ya Makomami ya Liebele, longola bobele mokanda ya Esetele. Boyekoli likoló na barulo motindo wana ezali naino kokóba.
24. Lolenge nini bamaniskri yango ekoki kokokanisama na makomi ya Bamasorete, mpe ndenge nini Libongoli ya Mokili ya Sika ezali kosalela yango?
24 Nganga-mayele moko ayebisi ete boyekoli mozindo oyo asalaki likoló na Nzembo 119, Nzembo oyo eleki molai, kati na rulo moko ya ntina mingi oyo ezali na mokanda ya Nzembo kati na yango (11QPsa) mpe oyo ezwamaki na etúká ya Mbu Ekufá, emonisaki ete Nzembo wana ezali na boyokani, kati na makambo pene na nyonso, elongo na Nzembo 119 oyo ezali kati na makomi ya Bamasorete. Na ntina etali rulo ya mokanda ya Nzembo, Molakisi J. A. Sanders amonisi ete: “Bokeseni mingi emonani bobele kati na ekomeli mpe ezali na ntina bobele mpo na banganga-mayele oyo bamipesaka na koyeba lolenge maloba ya Liebele ezalaki kobéngama na ntango ya kala mpe makambo mosusu ya lolenge wana.”a Bandakisa mosusu ya bamaniskri wana ya ntina emonisi, na bisika mingi, bobele makeseni ya mikemike. Rulo ya Yisaya yango moko, atako ezali na mwa makeseni kati na lolenge ya kokoma maloba mpe na gramere, nzokande ezali ata na likeseni moko te kati na makambo matali mateya. Makeseni oyo mazali na rulo yango ya Yisaya oyo ebimisamaki matalelamaki na mozindo ntango Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi) ezalaki kobongisama mpe rulo yango elobelami mingi kati na Biblia wana.b
25. Makomi nini ya Liebele masili sikawa kolobelama, mpe boyekoli na yango endimisi biso likambo nini?
25 Myango minene oyo misalelamaki mpo ete Makomami ya Liebele makómela biso misili sikawa kolobelama. Mingi mpenza Pantatɛ́kɛ ya Basamalia, Targumu ya Aramɛyɛ, libongoli ya Septante ya lokótá ya Greke, makomi ya Liebele ya Tibelia, makomi ya Liebele ya Palestine, makomi ya Liebele ya Babilone mpe makomi ya Liebele ya barulo ya Mbu Ekufá. Boyekoli mpe bokokanisi oyo esalemi kati na makomi wana nyonso endimisi biso ete Makomami ya Liebele masili kokómela biso lelo na mobimba mpe na bopɛto lokola na eleko oyo yango ekomamaki na basaleli bapemami ya Nzambe.
MAKOMI YA LIEBELE OYO MAPƐTOLAMI MALAMU
26. (a) Ntango nini boyekoli ya makomi ya Liebele na nzela ya bokokanisi ekólaki, mpe makomi nini ya moboko manyatamaki? (b) Lolenge nini makomi ya Ginsburg esalelamaki?
26 Ebimeli ya moboko mpe enyatami ya Biblia na Liebele, na ekeke ya 19, ezalaki oyo ebéngami Biblia ya Mibale ya Balabi (Second Rabbinic Bible) oyo ebimisamaki na Jacob ben Chayyim katikati na mobu 1524 mpe 1525. Ezalaki kino na ekeke ya 18 nde banganga-mayele babandaki kokólisa boyekoli na bango ya mozindo likoló na makomi ya Liebele. Kobanda na 1776 kino 1780, na mboka Oxford, Benjamin Kennicott abimisaki makomi makeseni uta na kokokanisama ya bamaniskri koleka 600 ya Liebele. Na nsima, kobanda 1784 kino 1798, J. B. de Rossi, nganga-mayele mpe moto ya Italie, abimisaki, na mboka Parme, makomi mauti na kokokanisama ya bamaniskri mosusu koleka 800. S. Baer, nganga-mayele Moyuda ya Allemagne, abimisaki mpe makomi ya moboko mpenza. Na bileko bilandaki, C. D. Ginsburg alekisaki bambula mingi mpo na kobimisa makomi ya ntina mingi ya Biblia ya Liebele, oyo mapɛtolami malamu. Ebimeli na yango ya liboso esalemaki na 1894, mpe ebongisamaki lisusu mpo na mbala ya nsuka na 1926.c Joseph Rotherham asalelaki ebimeli ya 1894 ya makomi yango mpo na kobimisa libongoli na ye ya Lingelesi, na 1902, oyo ebéngamaki The Emphasised Bible, mpe Molakisi Max L. Margolis elongo na baninga na ye ya mosala basalelaki makomi ya Ginsburg mpe ya Baer mpo na kobimisa libongoli na bango ya Makomami ya Liebele na 1917.
27, 28. (a) Biblia Hebraica ezali nini, mpe matambe nini yango esalaki mpo na kobongisama? (b) Lolenge nini Libongoli ya Mokili ya Sika esalelaki makomi yango?
27 Na 1906, Rudolf Kittel, nganga-mayele Moyuda, abimisaki na Allemagne ebimeli ya liboso (mpe na nsima, ebimeli ya mibale) ya makomi na ye ya Liebele oyo mapɛtolamaki mpe oyo nkombo na yango ezalaki ete Biblia Hebraica, to “Biblia ya Liebele.” Kati na búku yango, Kittel apesi likoki ya koyekola makomi na nzela ya ebele ya banɔti na nsé ya lokasa, oyo ezalaki kosala bokokanisi kati na bamaniskri mingi ya Liebele ya makomi ya Bamasorete, oyo mazalaki na ntango wana. Makomi ya moboko mpenza oyo ye asalelaki, ezalaki makomi ya Jacob ben Chayyim oyo mandimamaki na bato mingi. Ntango makomi ya Bamasorete ya Ben Asher, oyo maleki koumela mpe maleki motuya, oyo matyamaki na lolenge lobongi soko na ekeke ya 10 T.B., mazwamaki, Kittel abandaki mosala ya kobimisa ebimeli ya misato ya Biblia Hebraica, oyo, na mobimba mpenza, ekesanaki na bibimeli mosusu. Mosala yango mosilisamaki na baninga na ye ya mosala nsima na liwa na ye.
28 Ebimeli ya nsambo, ya mwambe mpe ya libwa ya Biblia Hebraica ya Kittel (oyo esalemaki kobanda 1951 kino 1955) esalelamaki lokola makomi ya moboko mpo na kobongola Makomami ya Liebele na Lingelesi, kati na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika. Ebimeli mosusu ya makomi ya Liebele, oyo ebéngami Biblia Hebraica Stuttgartensia, ya 1977, esalelamaki mpo na koyeisa sika makambo oyo mayebisami kati na maloba na nsé ya lokasa ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi) oyo ebimisamaki na 1984.
29. Likambo nini limonani kati na Biblia Hebraica oyo lizalaki na ntina mingi mpo na kozongisama ya nkombo ya Nzambe?
29 Lolenge oyo Kittel amonisaki Masore na pembeni ya lokasa, [Masore] oyo ebimisaki mabongwani ndenge na ndenge oyo bakomeli ya liboso ya eleko ya boklisto bakɔtisaki kati na makomi, esungaki mingi mpo na kobimisa Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi) na bosikisiki nyonso, bakisá mpe kozongisama ya nkombo ya Nzambe, Yehova. Boyekoli mozindo ya Biblia, oyo ezali sé kokóla, ezwi esaleli monene na nzela ya Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika.
30. (a) Na kosaleláká etánda ya lokasa 308 oyo ezali komonisa biutelo ya makomi oyo masali Makomami ya Liebele kati na Libongoli ya Mokili ya Sika, monisá istware ya makomi ya Liebele na nzela ya Biblia Hebraica oyo esalelamaki lokola eutelo ya moboko mpo na Libongoli ya Mokili ya Sika. (b) Wapi ndambo ya biutelo mosusu oyo Komité ya libongoli ya Biblia ya Mokili ya Sika esalelaki?
30 Kati na boyekoli oyo, ezali na etánda oyo emonisi biutelo ya makomi oyo masali Makomami ya Liebele kati na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika. Etánda yango emonisi na bokuse matambe ndenge na ndenge oyo makomi ya Liebele masalaki kino na Biblia Hebraica ya Kittel, oyo ezalaki eutelo ya moboko oyo esalelamaki. Biutelo mosusu oyo bisalelamaki bimonisami na milɔngɔ́ ya matɔnɔmatɔnɔ ya mpɛmbɛ. Yango emonisi te ete, mpo na mabongoli lokola Vulgate na Latin mpe Septante na Greke, makomi ya ebandeli mpenza masalelamaki. Lolenge moko na makomi mapemami ya Liebele yango moko, makomi ya libosoliboso ya mabongoli wana mazali lisusu te lelo oyo. Biutelo wana bisalelamaki na nzela ya mabongoli ya makomi oyo mabongi kotyelama motema to longwa na mabongoli ya kala oyo mabongi kondimama, mpe na lisalisi ya bandimbola oyo epesamaki na bokokanisi makomi ndenge na ndenge. Na kosaleláká biutelo wana ndenge na ndenge, Komité ya libongoli ya Biblia ya Mokili ya Sika ezalaki na makoki ya kobimisa libongoli ya Makomami ya Liebele, oyo lizali na bosikisiki mpe libongi kotyelama motema. Biutelo nyonso wana bimonisami kati na maloba na nsé ya lokasa oyo mazwami na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika.
31. (a) Na bongo, Makomami ya Liebele ya Libongoli ya Mokili ya Sika mazali mbuma oyo ebimi na nini? (b) Matɔ́ndi nini tokoki kopesa mpe elikya nini tokoki bongo komonisa?
31 Na bongo, Makomami ya Liebele oyo mazali kati na Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika mauti na boyekoli mpe na bolukiluki mozindo ya makambo mingi ya kala na ntina na Biblia. Yango etongami likoló na makomi oyo mazali na bosikisiki mpenza; ezali litomba liuti na makomi mabongolami mpe mapesameli biso na bosembo ya kokamwisa. Na ntina na lolenge na yango ya pɛtɛɛ mpe na ekomeli na yango kitoko, libongoli wana lizali kopesa nzela na boyekoli ya solosolo ya Biblia, mpamba te ezali libongoli ya kolongobana mpe ya sikisiki. Tiká ete matɔ́ndi mápesama na Yehova, ye Nzambe moyebisi na makambo ndenge na ndenge, mpo ete Liloba na ye lizali na bomoi mpe na nguya kino lelo! (Ebe. 4:12) Tiká ete bato na mitema sembo bálanda kotonga kondima na bango na nzela na boyekoli ya Liloba kitoko ya Nzambe mpe bápusama na kosala mokano ya Yehova na boumeli ya mikolo oyo ya ntina mingi.—2 Pet. 1:12, 13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ntango oyo biyanganelo bibandaki kosalelama eyebani te. Ekoki kozala na boumeli ya mbula 70 ya boombo na Babilone wana tempelo ezalaki lisusu te, to mpe mwa moke nsima na kozonga na bango uta na boombo, na mikolo ya Ezela.
b Talá liloba “Sam” kati na maloba na nsé ya lokasa, na Genese 4:8; Exode 6:2; 7:9; 8:15; mpe 12:40. Libongoli oyo ya nsuka lizali kosalisa biso na kokanga ntina ya Bagalatia 3:17.
c Talá lɛ́tɛlɛ “T” kati na maloba na nsé ya lokasa oyo mazali kolobela Mituya 24:17; Deteronome 33:13; mpe Nzembo 100:3.
d Reference Bible, appendice 1C, “The Divine Name in Ancient Greek Versions” (Nkombo ya Nzambe kati na mabongoli ya kala ya lokótá ya Greke).
e Búku Insight on the Scriptures, Vol. 2, lokasa 9.
f Biblia Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi) ezali komonisa makeseni yango na bilembo bilandi: LXXא mpo na Sinaïticus, LXXA mpo na Alexandrinus, mpe LXXB mpo na Vaticanus. Talá maloba na nsé na lokasa oyo mataleli 1 Mikonzi 14:2 mpe 1 Ntango 7:34; 12:19.
g Talá “Vg” kati na maloba na nsé ya lokasa oyo mataleli Exode 37:6.
h Reference Bible, appendice 2A, “Extraordinary Points” (Makambo minene).
i Reference Bible, appendice 1B, “Scribal Changes Involving the Divine Name” (Mabongwani oyo bakomeli bakɔtisaki likoló na nkombo ya Nzambe).
j Reference Bible, appendice 2B, “Emendations (Corrections) of the Sopherim” [Mabongisi (Bosemboli mabungá) ya Basoferimi].
k Talá maloba na nsé ya lokasa oyo mataleli Nzembo 60:5; 71:20; 100:3; mpe 119:79.
l Búku Insight on the Scriptures, Vol. 1, lokasa 322.
a The Dead Sea Psalms Scroll, 1967, J. A. Sanders, lokasa 15.
b Talá “1QIsa” kati na maloba na nsé ya lokasa oyo mataleli Yisaya 7:1; 14:4.
c Talá “Gins.” na maloba na nsé ya lokasa oyo mataleli Levitike 11:42.
[Etanda na lokasa 313]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MWA BAMANISKRI MINENE OYO EKOMAMAKI LIKOLÓ NA PAPIRISE
Ya Makomami ya Liebele
Nkombo ya Maniskri Papirise Nash
Dati ek. ya 2 to ya 1 L.T.B.
Lokótá Liebele
Ezwami na Cambridge, Angleterre
Makambo ya kati Milɔngɔ́ 24 ya Mibeko Zomi mpe mwa bavɛrsɛ́ ya Deteronome mik. 5, 6
Nkombo ya Maniskri Rylands 458
Elembo 957
Dati Ek. ya 2 L.T.B
Lokótá Greke
Ezwami na Manchester, Angleterre
Makambo ya kati Biteni mikemike ya Deteronome mik. 23-28
Nkombo ya Maniskri Fouad 266
Dati Ek. ya 1. L.T.B.
Lokótá Greke
Ezwami na Caire, Ezipito
Makambo ya kati Biteni ya Genese mpe ya Deteronome
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo oyo mitángami) Det. 18:5; Mis. 3:22; libakema (appendice) 1C
Nkombo ya Maniskri Rulo ya Levitike na Mbu Ekufá
Elembo 4Q LXX Levb
Dati Ek. ya 1. L.T.B.
Lokótá Greke
Ezwami na Yelusaleme, Yisalaele
Makambo ya kati Biteni mikemike ya Levitike
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo oyo mitángami) Lev. 3:12; 4:27
Nkombo ya Maniskri Chester Beatty 6
Elembo 963
Dati Ek. ya 2 T.B
Lokótá Greke
Ezwami na Dublin, Irlande, mpe Ann Arbor, Mich., U.S.A.
Makambo ya kati Biteni ya Mituya mpe Deteronome
Nkombo ya Maniskri Chester Beatty 9, 10
Elembo 967/968
Dati Ek. ya 3 T.B.
Lokótá Greke
Ezwami na Dublin, Irlande, mpe Princeton, N.J., U.S.A.
Makambo ya kati Biteni ya Ezekiele, Danyele, mpe Esetele
Ya Makomami ya Greke ya boklisto
Nkombo ya Maniskri Oxyrhynchus 2
Elembo P1
Dati Ek. ya 3 T.B.
Lokótá Greke
Ezwami na Philadelphie, Pa., U.S.A.
Makambo ya kati Mat. 1:1-9, 12, 14-20
Nkombo ya Maniskri Oxyrhynchus 1228
Elembo P22
Dati Ek. ya 3 T.B.
Lokótá Greke
Ezwami na Glasgow, Écosse
Makambo ya kati Biteni mikemike ya Yoane mik. 15, 16
Nkombo ya Maniskri Michigan 1570
Elembo P37
Dati Ek. ya 3/ya 4 T.B.
Lokótá Greke
Ezwami na Ann Arbor, Mich., U.S.A.
Makambo ya kati Mat. 26:19-52
Nkombo ya Maniskri Chester Beatty 1
Elembo P45
Dati Ek. ya 3. T.B.
Lokótá Greke
Ezwami na Dublin, Irlande; Vienne, Autriche
Makambo ya kati Biteni mikemike ya Matai, Malako, Luka, Yoane, mpe Misala
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo oyo mitángami) Luka 10:42; Yoa. 10:18
Nkombo ya Maniskri Chester Beatty 2
Elembo P46
Dati s. 200 T.B.
Lokótá Greke
Ezwami na Dublin, Irlande; Ann Arbor, Mich., U.S.A.
Makambo ya kati Mikanda libwa kati na mikanda ya Paulo
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo oyo mitángami) Lom. 8:23, 28; 1 Kol. 2:16
Nkombo ya Maniskri Chester Beatty 3
Elembo P47
Dati Ek. ya 3 T.B.
Lokótá Greke
Ezwami na Dublin, Irlande
Makambo ya kati Emon. 9:10–17:2
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo oyo mitángami) Emon. 13:18; 15:3
Nkombo ya Maniskri Rylands 457
Elembo P52
Dati s. 125 T.B.
Lokótá Greke
Ezwami na Manchester, Angleterre
Makambo ya kati Yoa. 18:31-33, 37, 38
Nkombo ya Maniskri Bodmer 2
Elembo P66
Dati s. 200 T.B.
Lokótá Greke
Ezwami na Genève, Suisse
Makambo ya kati Mingimingi ya Yoane
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo oyo mitángami) Yoa. 1:18; 19:39
Nkombo ya Maniskri Bodmer 7, 8
Elembo P72
Dati Ek. ya 3/ya 4 T.B.
Lokótá Greke
Ezwami na Genève, Suisse, mpe Bibliotɛkɛ ya Vatican na Loma, Italie
Makambo ya kati Yuda, 1 Petelo, mpe 2 Petelo
Nkombo ya Maniskri Bodmer 14, 15
Elembo P75
Dati Ek. ya 3 T.B.
Lokótá Greke
Ezwami na Genève, Suisse
Makambo ya kati Mingimingi ya Luka mpe ya Yoane
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo oyo mitángami) Luka 8:26; Yoa. 1:18
[Etanda na lokasa 314]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
MWA BAMANISKRI MINENE OYO EKOMAMAKI LIKOLÓ NA VƐLƐ́ MPE NA BIKÓTÓ MOSUSU
Ya Makomami ya Liebele (na lokótá ya Liebele)
Nkombo ya Maniskri Codex ya Alep
Elembo Al
Dati 930 T.B.
Lokótá Liebele
Ezwami na Na kala ezalaki na Alep, Syrie. Sikawa ezali na Israël.
Makambo ya kati Eteni monene ya Makomami ya Liebele (Makomi ya Ben Asher)
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya Sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo mitángami) Yos. 21:37
Nkombo ya Maniskri Codex Or4445 ya British Museum
Dati Ekeke ya 10 T.B.
Lokótá Liebele
Ezwami na Londres, Angleterre
Makambo ya kati Mingi ya Pantatɛ́kɛ
Nkombo ya Maniskri Codex ya Bakaraite ya Caire
Elembo Ca
Dati 895 T.B.
Lokótá Liebele
Ezwami na Caire, Ezipito
Makambo ya kati Basakoli ya liboso mpe oyo balandaki nsima
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya Sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo mitángami) Yos. 21:37; 2 Sam. 8:3
Nkombo ya Maniskri Codex ya Leningrad
Elembo B 19A
Dati 1008 T.B.
Lokótá Liebele
Ezwami na St. Petersburg, Russie
Makambo ya kati Makomami ya Liebele
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya Sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo mitángami) Yos. 21:37; 2 Sam. 8:3 Libakema (appendice) 1A
Nkombo ya Maniskri Codex ya Pétersbourg ya Basakoli
Elembo B 3
Dati 916 T.B.
Lokótá Liebele
Ezwami na St. Petersburg, Russie
Makambo ya kati Basakoli oyo balandaki nsima
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya Sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo mitángami) libakema 2B
Nkombo ya Maniskri Rulo ya liboso ya Yisaya ya Mbu Ekufá
Elembo 1QIsa
Dati Nsuka ya ekeke ya 2 L.T.B.
Lokótá Liebele
Ezwami na Yelusaleme, Israël
Makambo ya kati Yisaya
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya Sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo mitángami) Yis. 11:1; 18:2; 41:29
Nkombo ya Maniskri Rulo ya Nzembo ya Mbu Ekufá
Elembo 11QPsa
Dati Ekeke ya 1 T.B.
Lokótá Liebele
Ezwami na Yelusaleme, Israël
Makambo ya kati Biteni ya Nzembo 41 oyo ezwami na eteni ya misato ya nsuka ya mokanda ya Nzembo
Ya Libongoli ya Septante mpe ya Makomami ya Greke ya boklisto
Nkombo ya Maniskri Sinaïticus
Elembo 01( א)
Dati Ekeke ya 4 T.B
Lokótá Greke
Ezwami na Londres, Angleterre
Makambo ya kati Eteni ya Makomami ya Liebele, mobimba ya Makomami ya Greke elongo na mwa makomi mosusu oyo babéngi apokrife
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya Sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo mitángami) 1Nta 12:19; Yoa. 5:2; 2 Kol. 12:4
Nkombo ya Maniskri Alexandrinus
Elembo A (02)
Dati Ekeke ya 5 T.B.
Lokótá Greke
Ezwami na Londres, Angleterre
Makambo ya kati Mobimba ya Makomami ya Liebele mpe ya Makomami ya Greke (mwa biteni moke bisilá kobunga to kobeba) bakisá mpe mwa mikanda mosusu oyo mizali apokrife
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya Sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo mitángami) 1 Mik. 14:2; Luka 5:39; Mis. 13:20; Ebe. 3:6
Nkombo ya Maniskri Vaticanus 1209
Elembo B (03)
Dati Ekeke ya 4 T.B.
Lokótá Greke
Ezwami na Bibliotɛkɛ ya Vatican na Loma, Italie
Makambo ya kati Na ebandeli, ezalaki Biblia mobimba. Sikawa ezangi: Gen. 1:1–46:28; Nz. 106-137; mikapo oyo milandi Baebele 9:14; 1 Timoté; 2 Timoté; Tito; Filemona; Emoniseli
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya Sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo mitángami) Mko. 6:14; Yoa. 1:18; 7:53–8:11
Nkombo ya Maniskri Ephraemi Syri rescriptus
Elembo C (04)
Dati Ekeke ya 5 T.B.
Lokótá Greke
Ezwami na Paris, France
Makambo ya kati Biteni ya Makomami ya Liebele (nkasa 64) mpe ya Makomami ya Greke (nkasa 145)
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya Sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo mitángami) Mis. 9:12; Lom. 8:23, 28, 34
Nkombo ya Maniskri Codex Bezae Cantabrigiensis
Elembo Dea (05)
Dati Ekeke ya 5 T.B
Lokótá Greke-Latin
Ezwami na Cambridge, Angleterre
Makambo ya kati Mingi kati na Baevanzile minei mpe Misala, mwa bavɛrsɛ́ ya 3 Yoane
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya Sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo mitángami) Mat. 24:36; Mko. 7:16; Luka 15:21 (motindami emonisami na elembo “D”)
Nkombo ya Maniskri Codex Claromontanus
Elembo DP (06)
Dati Ekeke ya 6 T.B.
Lokótá Greke-Latin
Ezwami na Paris, France
Makambo ya kati Mikanda ya Paulo (sangisá mpe Baebele)
Bandakisa ya kosalelama na yango kati na Libongoli ya Mokili ya Sika—na mitindami (na Lingelesi) (Talá maloba na nsé ya lokasa mpo na mikapo mitángami) Gal. 5:12 (motindami emonisami na elembo “D”)
[Etanda na lokasa 308]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Biutelo mpo na makomi ya Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi)—Makomami ya Liebele
Makomi ya ebandeli na Liebele mpe bakopi ya libosoliboso
Targumu ya Aramɛyɛ
Barulo ya Mbu Ekufá
Pantatɛ́kɛ ya Basamalia
Septante ya Greke
Latin ya Kala
Ya Copte, ya Éthiopien, ya Arménien
Makomi ya milelisami na milelisami na Liebele
Vulgate ya Latin
Mabongoli ya Greke—Aquila, Théodotion, Symmaque
Peshitta ya Syriaque
Makomi ya Bamasorete
Codex ya Caire
Codex ya Petersburg oyo ezali na Basakoli
Codex ya Aleppo
Makomi ya Ginsburg na Liebele
Codex B 19A ya Leningrad
Biblia Hebraica (BHK), Biblia Hebraica Stuttgartensia (BHS)
Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi)
Makomami ya Liebele—Lingelesi; uta na Lingelesi kino na nkótá mingi mosusu ya lelo
[Etanda na lokasa 309]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Biutelo mpo na makomi ya Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi)—Makomami ya Greke ya boklisto
Makomi ya ebandeli na Greke mpe bakopi ya libosoliboso
Libongoli ya Arménien
Mabongoli na Copte
Mabongoli na Syriaque—ya Cureton, ya Philoxène, ya Héraclée, ya Palestine, Sinaïque, Peshitta
Latin ya kala
Vulgate ya Latin
Makomi ya Sixtus mpe Clément na Latin oyo matalelami lisusu
Bamaniskri ya makomi mikemike
Makomi ya Erasme
Makomi ya Stephanus
Textus Receptus
Makomi ya Griesbach na Greke
Emphatic Diaglott
Bapapirise—(Na ndakisa, Chester Beatty P45, P46, P47; Bodmer P66, P74, P75)
Bamaniskri ya libosoliboso ya makomi minene na Greke—Vatican 1209 (B), Sinaitic (א), Alexandrine (A), Ephraemi Syri rescriptus (C), Bezae (D)
Makomi ya Westcott mpe Hort na Greke
Makomi ya Bover na Greke
Makomi ya Merk na Greke
Makomi ya Nestle-Aland na Greke
Makomi ya Greke ya Lisangani ya Basosyete ya Biblia na Greke
Mabongoli ya Liebele 23 (Ekeke ya 14 kino ya 20), ebongolami uta na Greke to uta na Vulgate ya Latin, kosaleláká Tetragrami mpo na nkombo ya Nzambe
Libongoli ya Mokili ya Sika (na Lingelesi)
Makomami ya Greke ya boklisto—Lingelesi; uta na Lingelesi kino na nkótá mingi mosusu ya lelo