Nazali na botɔ́ndi mpo ete nalekisi ntango mingi ya bomoi na ngai na mosala ya Yehova
LISOLÓ YA OTTILIE MYDLAND
Na nsuka ya ekeke ya 19, masuwa moko oyo etambolaka na mopɛpɛ masɛmaki na libóngo ya Kopervik na wɛ́sti ya ekólo Norvège. Na ntango yango bato bazalaki kotambola na makálo oyo ezalaki kobéndama na bampunda na banzela. Bato bazalaki kosalela miinda ya pétrole mpe bazalaki na bandako ya mabaya oyo mingi kati na yango epakolamaki lángi ya mpɛmbɛ, mpe bazalaki kotya molungé na ndako na mɔ́tɔ ya nkóni na makala ebéngami houille to charbon. Nabotamaki kuna na sanza ya Yúni ya mobu 1898, mwana ya mibale kati na libota ya bana mitano.
NA MOBU 1905, Tata azalaki na mosala te, na bongo akendaki na États-Unis. Azongaki nsima ya mbula misato mpe amemaki valisi moko oyo etondaki na biloko mpo na biso bana mpe bilamba ya soie mpe biloko mosusu mpo na mama na biso. Kasi biloko bileki motuya oyo ayaki na yango ezalaki bongo babúku Études des Écritures ya ndeko Charles Taze Russell.
Tata abandaki koyebisa baninga mpe bandeko na ye makambo oyo ye ayekolaki na babúku wana. Na ndakonzambe ya mboka, azalaki kosalela Biblia mpo na komonisa ete lifelo ya mɔ́tɔ ezali te. (Mosakoli 9:5, 10) Na mobu 1909, mbula moko nsima wana tata autaki na États-Unis, Ndeko Russell ayaki na ekólo Norvège mpe asalaki masukúlu na bingumba Bergen mpe Kristiania, oyo ekómá lelo mboka-mokonzi Oslo. Tata akendaki na engumba Bergen mpo na kolanda masukúlu yango.
Bato mingi bafundaki Tata ete azalaki kopalanganisa mateya ya lokuta. Namiyokaki mawa mpo na ye mpe nasungaki ye na kokabola batrakte oyo ekolimbolaka Biblia epai na bazalani na biso. Na 1912, natikaki trakte oyo ezalaki kolobela lifelo epai ya mwana mwasi ya mokonzi moko ya lingomba. Afundaki ngai na Tata. Namitungisaki mpenza na komonáká ete mwana mwasi ya mokonzi ya lingomba akoka kobimisa maloba ya mbindo motindo wana!
Bayekoli mosusu ya Biblia, lokola Batatoli ya Yehova bazalaki kobéngama na ntango wana, bazalaki koya na bantango mosusu kotala biso na engumba Kopervik kati na bango, Ndeko Theodor Simonsen molobi moko ya makoki mpenza. Nazalaki kobéngisa bato na masukúlu oyo ye azalaki kosala na ndako na biso. Liboso ya lisukúlu azalaki kobɛta lindánda mpe koyemba, nsima ya lisoló na ye azalaki mpe koyemba loyembo ya nsuka. Tozalaki kopesa ye limemya mingi.
Mopaya mosusu ezalaki bongo Anna Andersen, mobongisi-nzela, to mosakoli ya ntango nyonso. Azalaki kotambola engumba na engumba na ekólo Norvège mobimba, mbala mingi na velo, kokaboláká mikanda mikolimbolaka Biblia epai na bato. Azalaki liboso mondimi na Lingomba ya Armée du Salut na pɛ́tɛ́ ya officier mpe ayebanaki na ba officiers mosusu ya lingomba yango na engumba Kopervik. Bapesaki ye nzela ete asala lisukúlu na ndakonzambe na bango, mpe nabengisaki bato ete báya koyoka yango.
Mobongisi-nzela mosusu oyo ayaki kotala biso ezalaki Karl Gunberg. Ndeko mobali moko ya bopɔlɔ, ya kimya, mpe alingaki mingi kosɛkisa bato, na bantango mosusu azalaki kosala lokola mobongoli, na biró ya filiale ya engumba Oslo. Bambula mingi na nsima tosalaki biso nyonso kuna.
Napusamaki na bindimeli ya lingomba
Na ebandeli ya ekeke oyo bato mingi bazalaki na kondima makasi bobele epai na Nzambe mpe na Biblia te kasi batingamaki lisusu na bindimeli, lokola lifelo ya mɔ́tɔ mpe Bosato. Yango wana yikiyiki ekɔtaki ntango Bayekoli ya Biblia bazalaki koteya ete mateya wana mazalaki na boyokani na Biblia te. Napusamaki na bifundeli ya makasimakasi oyo bazalani na biso bazalaki kofunda Tata na yango ete azalaki motɛmɛli ya mateya ya lingomba. Mokolo moko nalobaki na ye ete: “Oyo ozali koteya ezali solo te. Ezali nde kotɛmɛla solo ya lingomba!”
Alendisaki ngai ete: “Yaká awa, Ottilie, mpe talá oyo Biblia elobi.” Na bongo atángelaki ngai Makomami. Lokola litomba, nakómaki kotyela ye motema mpe mateya oyo azalaki koteya ngai. Alendisaki ngai natángaka bavolimi ya Études des Écritures, na bongo na boumeli ya eleko ya molungé ya mobu 1914, mbala mingi nazalaki kofanda mpe kotánga yango likoló na mwa ngomba, nazalaki kotala engumba na nsé.
Na Augústo ya mobu 1914 bato batondaki na libándá ya lopango ya ndako moko epai banyataka bazulunalo mpo na kotánga bansango oyo elobaki ete Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki. Tata ayaki mpe amonaki makambo oyo mazalaki kosalema. Angangaki ete: “Matɔ́ndi na Nzambe!” Asosolaki ete ebandeli ya etumba ekokisaki bisakweli ya Biblia na ntina na makambo oyo ye azalaki kosakola. (Matai 24:7) Na yango, Bayekoli mingi ya Biblia bakanisaki ete etikalaki moke bakokende na likoló. Ntango likambo yango esalemaki bongo te, bamoko balɛmbaki.
Nazwi ekateli mpo na solo ya Biblia
Na mobu 1915, ntango nakómaki na mbula 17, nasilisaki kelasi na eteyelo ya ntéi mpe nabandaki kosala mosala na biró moko. Nabandaki bongo kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mbala na mbala. Kasi kino mobu 1918 makita ya pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mazalaki naino kosalema te na engumba Kopervik. Na ebandeli na yango, tozalaki bobele bato mitano mpo na koyangana. Tozalaki kotánga mikanda ya la Société Watch Tower, lokola Études des Écritures, mpe tozalaki kosalela yango na lisoló ya mituna mpe biyano. Atako mama azalaki kokɔtela Bayekoli ya Biblia epai na bato mosusu, ye moko akómaki Moyekoli ya Biblia te.
Kobanda na mobu 1918, nayebaki Anton Saltnes na biro epai nazalaki kosala, nasalisaki ye mpe akómaki Moyekoli ya Biblia. Na ntango yango nakómaki kosakola sanza na sanza mpe nazwaki batisimo na liyangani moko oyo lisalemaki na engumba Bergen na mobu 1921.
Na sanza ya Máí ya mobu 1925 liyangani moko lisalemaki mpo na etúká mobimba ya Scandinavie na engumba Örebro, na ekólo Suède. Bato koleka 500 bayanganaki, kati na bango Joseph F. Rutherford, prezidá ya la Société Watch Tower. Tozalaki bato soko 30 ya engumba Oslo oyo basalaki mobembo na engbunduka moko oyo esalaki mobembo bobele mpo na Bayekoli ya Biblia.
Bayebisaki kati na liyangani yango ete biro ya filiale ekofungwama mpo na mikili ya Mpótó ya Nɔ́rdi ya Copenhague, mboka mokonzi ya ekólo Danemark, mpo na kotambwisa mosala ya kosakola na mikili ya Scandinavie mpe na bikólo bibéngami Pays Baltes. Ndeko William Dey ya ekólo Écosse aponamaki mpo na kokamba mosala ya kosakola. Balingaki ye mingi, mpe mosika te ayebanaki na nkombo ya engambe mwana Écosse. Na ebandeli Ndeko Dey ayebaki ata lokotá moko te ya mikili ya Scandinavie, na yango na boumeli ya makita mpe ya mayangani azalaki kofanda na nsima mpe kobatela bana mpo ete baboti na bango bákoka kolanda na likebi nyonso mateya oyo mazalaki kopesama na ebaelo.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mársi 1925, elobelaki Emoniseli mokapo 12 mpe elimbolaki ete mokapo oyo ezali kolobela kobotama ya Bokonzi ya Nzambe mpe kobotama yango esalemaki na likoló na mobu 1914. Ezalaki na ngai mpasi mpo na kososola yango, na bongo nazongelaki botángi ya lisoló yango mbala na mbala. Nsukansuka ntango nayebaki malamumalamu ntina na yango, nayokaki esengo mpenza.
Ntango boyebi na biso ya mateya ya Biblia engɛngisamaki, bamoko bakakatanaki mpe batikaki lisangá ya Nzambe. Kasi ntango ekómaki mpasi mpo na kokanga ntina ya mbongwana, nazalaki ntango nyonso kotánga lisusu lisoló yango mbala na mbala mpo na koyeba kososola. Soki nalóngi te kokanga ntina ya ndimbola yango ya sika, nazalaki kozela engɛngiseli. Mbala mingi nazalaki kozwa litomba mpo ete nazalaki komonisa motema molai lolenge yango.
Mosala na Betele
Na boumeli ya bambula nasalaki mosala ya mobombi mosolo (trésorier), mokomeli, mpe motaleli ya kosalela mosolo (consultant) na biró monene. Na mobu 1928 moto oyo azalaki kotalela kɔnti ya la Société akómaki kobɛla mpe asengelaki kotika Betele. Lokola nayebaki mosala yango, basɛngaki ngai ete nasala na esika yango. Nabandaki mosala na Betele na sanza ya Yúni ya mobu 1928. Nzokande na libaku moko, Ndeko Dey ayaki kotala biso mpe atalelaki lolenge mosolo ya la Société ezalaki kosalelama. Libota ya Betele na biso mpe lipesaki ndakisa na mosala ya kosakola na engumba Oslo, epai kuna tozalaki na lisangá bobele moko.
Bamoko basungaki Ndeko Sakshammer na mokumba na ye ya kokabola mikanda, na kokangisa zulunalo Âge d’or (lelo Lamuká!) mpe kotinda yango. Bandeko Simonsen mpe Gunberg bazalaki kati na baoyo bapesaki biso mabɔ́kɔ. Ezalaki esengo, mbala mingi tozalaki koyemba nzembo ntango tozalaki kosala.
Nazali kotya motema na elikya ya Bokonzi
Na mobu 1935 tososolaki ete “ebele monene” ezalaki te kelasi mosusu kuna na likoló. Toyekolaki ete yango ezali nde kelasi ya bato oyo bakobika na bolɔ́zi monene mpe oyo bazali na libaku malamu ya kozala na bomoi ya seko kati na Paladiso na mabelé. (Emoniseli 7:9-14) Na bososoli oyo ya sika, bamoko oyo bazalaki kolya limpa mpe komela vinyo na Ekaniseli bamindimisaki ete elikya na bango ezalaki ya bomoi na mabelé, mpe batikaki kosangana na bilembo yango.
Atako nazalaka na ntembe te na ntina na elikya na ngai ya kokende na likoló, namitunaka mbala mingi, ‘Mpo na nini Nzambe aponi ngai?’ Nazalaki komiyoka ete nabongi na libaku monene motindo wana te. Ngai mwasi ya nzoto mike, monzemba mpe moto ya nsɔ́ninsɔ́ni, namonaki yango lokola likambo ya kokamwisa mpenza ete ngai nakozala mokonzi koyangela esika moko na Yesu na likoló. (2 Timoté 2:11, 12; Emoniseli 5:10) Nzokande, namanyolaka maloba ya ntoma Paulo oyo ete “bato mingi na nguya mpe te” babyangami, kasi “Nzambe aponi biloko na bolɛmbu kati na mokili ete ayokisa biloko na nguya nsɔ́ni.”—1 Bakolinti 1:26, 27.
Mosala na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba
Na mokolo mwa 9 Apríli 1940, basodá ya ekólo Allemagne bakɔtaki mpo na kobundisa ekólo Norvège, mpe eumelaki te bazwaki mboka. Lokola litomba ya etumba, bato mingi bakómaki kondima nsango ya Bokonzi. Longwa na sanza ya Ɔkɔtɔ́bɛ 1940 kino na sanza ya Yúni 1941, tokabolaki babúku mpe mwa babúku koleka 272 000. Yango elingi koloba ete mokomoko kati na Batatoli koleka 470 ya ekólo Norvège akabolaki, na mwayɛnɛ, babúku mpe mwa babúku koleka 570 na boumeli ya sanza libwa wana!
Na mokolo mwa 8 Yulí 1941, bapolisi ya Gestapo bakutanaki na bakɛ́ngɛli-bakambi nyonso mpe bakebisaki bango ete soki batiki kosakola te, bakotinda bango nyonso na káa ya bakangami. Bakonzi mitano ya bapolisi yango ya Allemagne bakɔtaki na Betele mpe babɔtɔlaki biloko mingi ya la Société Watch Tower. Bamemaki basangani ya libota ya Betele mpe basambisaki bango, kasi moko te kati na biso akɔtaki na bolɔ́kɔ. Nsukansuka, na mokolo ya 21 Yulí 1921, babɔtɔlaki ndako ya la Société, oyo ezalaki na balabála Inkognitogaten No. 28 B, mpe bapekisaki mosala na biso ya kosakola. Nazongaki na engumba Kopervik mpe nazwaki mosala mpo na kokokisa bamposa na ngai ya mosuni.
Na eleko yango, Tata azalaki kosala lokola mobongisi-nzela. Mokolo moko ba Nazi bayaki mpe bazalaki kolukaluka na ndako ya Tata. Bazwaki mikanda na ye nyonso, na mabongoli na ye ya Biblia mpe mikanda mibéngami Concordances de la Bible. Tozalaki kozwa bobele bilei moke ya elimo na boumeli ya eleko wana. Mpo na kotikala makasi na elimo, tozalaki koyekola mikanda ya kala mbala na mbala, lokola mokanda Gouvernement, mpe tokóbaki koteya.
Likambo ya mawa, na bisika mingi bokabwani ekɔtaki kati na bandeko. Bamoko bazalaki na likanisi ete tosengelaki koteya polele mpe kokende ndako na ndako nzokande bamosusu bamonaki ete tosengelaki koteya na nkúku, kosolola na bato na myango mosusu. Na yango bandeko oyo bakɔmeli, oyo bazalaki koyokana malamu mpenza liboso mpe oyo tolingaki mingi, batikaki kosolola. Bokabwani kati na bango epesaki ngai mpasi mingi koleka mikakatano mosusu nyonso na bomoi na ngai lokola Motatoli ya Yehova.
Kozongisama ya mosala nsima ya etumba
Nsima ya etumba, na eleko ya molungé ya mobu 1945, Ndeko Dey ayaki na ekólo Norvège mpe asalaki masukúlu na engumba Oslo, na Skien, mpe na Bergen. Asɛngaki bandeko ete báyokana mpe atunaki ete baoyo nyonso basepeli kozongisa boyokani bátɛlɛma. Bato nyonso batɛlɛmaki! Kowelana esilaki mpo na libela na Desɛ́mbɛ ya mobu 1945, nsima wana Ndeko Nathan H. Knorr, prezidá ya la Société Watch Tower, ayaki.
Bobele na eleko wana, na mokolo mwa 17 Yulí 1945, nazwaki telegrame ya Ndeko Enok Öman uta na biro ya filiale, kolobáká na ngai ete: ‘Ntango nini okozongela mosala na Betele?’ Batatoli mosusu balobaki na ngai ete nasengelaki kotikala na ndako mpo na kobatela tata na ngai, oyo akómaki mobangé na mibu koleka 70. Kasi tata alendisaki ngai ete nazongela mosala na Betele, mpe nasalaki bongo. Na 1946, Ndeko Marvin F. Anderson, ya ekólo États-Unis, akómaki mokɛngɛli ya biro ya filiale na biso, mpe mosala ya kosakola ebongisamaki.
Na boumeli ya bileko ya lói nazalaki kozonga na Kopervik mpo na kotala libota na ngai. Bandeko na ngai mibale ya mibali mpe mibale ya basi bakómaki Batatoli ya Yehova te, kasi bazalaki ntango nyonso komonisa boboto epai na Tata mpe epai na ngai. Nkulutu na ngai ya mobali akómaki mokonzi ya libóngo ya masuwa, mpe leki na ngai ya mobali azalaki molakisi. Atako na mosuni nazalaki na bozwi te, kasi Tata azalaki koloba na bandeko na ngai ete: “Ottilie aleki bino na bozwi.” Mpe yango ezalaki solo! Bozwi ya mosuni oyo bazwaki ekokaki kokokanisama te na bozwi ya elimo oyo nazalaki na yango! Tata akufaki na mobu 1951, wana azalaki na mbula 78. Mama akufáká na mobu 1928.
Likambo ya ntina mingi na bomoi na ngai ezalaki ete nayanganaki na liyangani ya mikili mingi ya basaleli ya Yehova na engumba New York City na mobu 1953. Na mobu yango motángo ya basakoli na mokili mobimba eutaki koleka na 500 000, mpe bato koleka 165 000 bayanganaki na liyangani! Liboso ya liyangani ya mobu 1953, nasalaki na boumeli ya pɔ́sɔ moko na Betele ya Brooklyn, biro monene ya lisangá ya Yehova na mabelé.
Nazali kosala oyo ekoki na ngai
Na bambula oyo euti koleka miso ezali lisusu komona malamu te mpo na mpasi oyo babéngi cataracte. Nalisalisi ya manɛ́ti, nakoki naino kotánga mwa moke makomi ya minene. Mpe mbala mibale na pɔ́sɔ, bandeko ya basi bayaka kotala ngai mpe batángelaka ngai, nazali na botɔ́ndi mingi mpo na likambo yango.
Nasakolaka lisusu mingi te. Na bantango mosusu na eleko ya molungé, bandeko ya basi bamemaka ngai wana nafandi na kiti ya kotambolisa kino na esika oyo nakoki kosakola ata moke. Nazali mpe kotinda mbala na mbala bazulunalo mpe mwa babúku na biteyelo na Kopervik, lokola na eteyelo ya yambo epai nazalaki moyekoli ekómi lelo pene na mbula monkámá. Nazali na esengo mpamba te nazali na likoki ya kosakola sanza na sanza.
Nasepelaka mingi lisusu mpo ete ndako mpo na kolya mpe Ndako ya Bokonzi ezali esika moko na eteni ya ndako na ngai ya kolala na Betele, oyo uta mobu 1983 ekómaki na Ytre Enebakk zingazinga ya engumba Oslo. Na yango nazali na likoki ya koyangana na losambo ya ntɔ́ngɔ́, na ntango ya bilei, mpe na makita na biso na lisalisi ya kiti ya kotambolisa (déambulateur). Mpe nazali lisusu na esengo mpo ete nakoki naino kokende mayangani ya minene mpe ya mike. Nasepelaka kokutana na baninga oyo nayebani na bango uta bambula mingi, na bandeko ya sika ya mibali mpe ya basi mpe bana na bango lokola.
Nazali kobatela kondima kino nsuka
Ezali lipamboli kozingama na bato ya molende, oyo bazali kosepelisa, mpe ya elimo na Betele. Ntango nabandaki mosala na Betele, libota mobimba ezalaki bobele na baoyo bazalaki na elikya ya kokende na likoló. (Bafilipi 3:14) Sikawa na Betele bandeko nyonso, longola bobele ngai, bazali kozela bomoi ya seko na mabelé.
Ya solo, tozalaki kozela ete Yehova atya nsuka nokinoki. Nzokande, nazali na esengo ya komona ete ebele monene ezali se kokóla. Namoni bokóli mpenza! Ntango nabandaki mpenza mosala ya kosakola, basakoli bazalaki soko 5 000 kati na mokili mobimba. Sikawa bazali koleka 5 400 000! Ya solo, namoni ‘oyo moke . . . kokóma nkóto mpenza, mpe oyo aleki moke kokóma libota na nguya.’ (Yisaya 60:22) Tosengeli kokoba kozela Yehova, lokola mosakoli Habakuku akomaki yango ete: “Ata [elaka] ezali koumela, [“zela,” NW] yango; ekoya solo mpenza.”—Habakuku 2:3.