Baklisto mpe Mokili
“Bózalaka na bizaleli na mayele liboso na bato na libándá.”—BAKOLOSE 4:5.
1. Yesu alobaki nini na ntina na bayekoli na ye mpe mokili?
KATI na libondeli moko asalaki epai ya Tata na ye ya likoló, Yesu alobaki na ntina na bayekoli na ye ete: “Bamokili basili koyina bango zambi bazali bato na mokili te pelamoko ngai nazali moto na mokili te.” Na nsima abakisaki ete: “Nalɔmbi te ete olongola bango na mokili kasi ete obatela bango na ye mabe.” (Yoane 17:14, 15) Baklisto basengelaki kokabwana na mokili na nzoto te—na ndakisa, na kofandáká kati na bamonastere. Kasi, Klisto ‘atindaki bango kati na mokili’ mpo ete bázala batatoli na ye “kino na nsuka na mokili.” (Yoane 17:18; Misala 1:8) Nzokande, asɛngaki na Nzambe ete asɛnzɛla bango mpamba te Satana, “mokóló na mokili oyo,” akopusa bato ete báyina bayekoli mpo na nkombo ya Klisto.—Yoane 12:31; Matai 24:9.
2. (a) Ndenge nini Biblia esalelaka liloba “mokili”? (b) Ezaleli nini ya bokatikati Yehova amonisaka mpo na mokili?
2 Kati na Biblia liloba “mokili” (na Greke, koʹsmos) mbala mingi emonisaka lisangani ya bato bazangi sembo, oyo ‘lizali kolala na kati na oyo mabe.’ (1 Yoane 5:19) Lokola baklisto bazali kotosa mitindá ya Yehova mpe lisusu bazali kokokisa mobeko ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai na bato ya mokili, na bantango mosusu matata mazalaki kobima kati na bango mpe mokili. (2 Timoté 3:12; 1 Yoane 3:1, 13) Nzokande, Makomami mazali mpe kosalela liloba koʹsmos mpo na kolobela libota mobimba ya bato. Kolobeláká mokili na ndimbola yango, Yesu alobaki ete: “Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi [Mwana mobotami-bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi na seko. Mpo ete Nzambe atindi Mwana na ye kati na mokili ete asambisa mokili te kasi ete mokili ebika mpo na ye.” (Yoane 3:16, 17; 2 Bakolinti 5:19; 1 Yoane 4:14) Na yango, atako azali koyina makambo oyo mazali kosalema na ebongiseli mabe ya Satana, Yehova amonisaki bolingo na ye mpo na bato na ndenge atindaki Mwana na ye na mabelé mpo na kobikisa baoyo nyonso ‘bakokóma na kobongwana na motema.’ (2 Petelo 3:9; Masese 6:16-19) Ezaleli ya Yehova oyo ezali komonisa bokatikati na ndenge azali kotalela mokili esengeli kotambwisa basambeli na ye.
Ndakisa ya Yesu
3, 4. (a) Lolenge nini Yesu atalelaki bokonzi? (b) Lolenge nini Yesu atalelaki mokili?
3 Mwa moke liboso ya liwa na ye, Yesu ayebisaki Ponto Pilata ete: “Bokonzi na ngai ezali na mokili oyo te.” (Yoane 18:36) Na boyokani na maloba yango, liboso Yesu aboyaki likabo ya Satana oyo alingaki kopesa ye bokonzi likoló ya makonzi ya mokili, mpe aboyaki ete Bayuda bákómisa ye mokonzi. (Luka 4:5-8; Yoane 6:14, 15) Kasi, Yesu amonisaki bolingo mingi mpo na bato. Ntoma Matai alobelaki ndakisa ya likambo yango na maloba oyo ete: “Emoni ye bibele, ayoki mawa mpo na bango ete balɛmbi mpe balemalemi lokola bampate bazali na mobateli te.” Mpo na bolingo, asakolaki epai ya bato na bingumba mpe na bamboka na bango. Ateyaki bango mpe abikisaki bango na maladi. (Matai 9:36) Mpe amibanzabanzaki mpo na bamposa ya mosuni ya bato oyo bayaki koyoka mateya na ye. Tozali kotánga boye: “Yesu abyangi bayekoli epai na ye, alobi ete, Nayokeli ebele mawa, mpo ete longwa na mikolo misato bazali esika moko na ngai mpe bazali na biloko na kolya te. Nalingi kopalanganisa bango na nzala te ete bálɛmba na nzela te.” (Matai 15:32) Talá komibanzabanza oyo ezali komonisa bolingo!
4 Bayuda bazalaki mpenza kokanisela Basamalia mabe, kasi Yesu asololaki ntango molai na mwasi Mosamalia mpe afandaki mikolo mibale na engumba moko ya Basamalia mpo na kopesa litatoli ya mozindo. (Yoane 4:5-42) Atako Nzambe atindaki ye epai na ‘bampate na ndako na Yisalaele baoyo babungi,’ na mabaku mosusu Yesu atyaki likebi na kondima ya bato mosusu oyo bazalaki Bayuda te. (Matai 8:5-13; 15:21-28) Ɛɛ, Yesu amonisaki ete likoki ezali ya kozala ‘moto ya mokili te’ kasi komonisa bolingo mpo na bato ya mokili. Tozali komonisa bolingo lolenge moko epai ya bato na esika tofandi, na esika ya mosala, to na esika tozali kokende kosomba biloko? Tozali komibanzabanza mpo na bolamu na bango—bobele mpo na bamposa na bango ya elimo te kasi lisusu mpo na bamposa mosusu soki tozali na likoki ya kosalisa bango? Yesu amibanzabanzaki mpo na basusu, mpe na kosaláká bongo, afungolaki nzela mpo na koteya bato na ntina na Bokonzi. Ya solo, tokoki te kosala makamwisi lokola Yesu asalaki. Kasi komonisa boboto, mbala mingi esalaka, na elobeli ya elilingi, makamwisi na kolongoláká makanisi mabe mpo na Batatoli ya Yehova.
Ezalela ya Paulo epai ya bato “na libándá”
5, 6. Lolenge nini Paulo amitambwisaki liboso ya Bayuda oyo bazalaki “na libándá”?
5 Na mikanda na ye mingi, ntoma Paulo alobeli bato “na libándá,” elingi koloba baoyo bazali baklisto te, ezala Bayuda to Bapakano. (1 Bakolinti 5:12; 1 Batesaloniki 4:12; 1 Timoté 3:7) Azalaki na ezalela nini liboso ya bato yango? ‘Ayei ndenge nyonso epai na bato nyonso ete na nzela nyonso abikisa bamosusu.’ (1 Bakolinti 9:20-22) Ntango akómi na engumba moko mpo na koteya, azalaki kokende liboso epai ya Bayuda oyo bafandaki na engumba yango. Azalaki kosala ndenge nini? Na mayele mpenza mpe na limemya nyonso apesaki bilembeteli ya solosolo biuti na Biblia mpo na komonisa ete Masiya asilaki koya, akufaki mpo na kopesa mbeka, mpe ete asilaki kosekwisama.—Misala 13:5, 14-16, 43; 17:1-3, 10.
6 Na lolenge yango, Paulo azalaki kotonga likoló ya boyebi ya Mibeko mpe basakoli oyo Bayuda bazalaki na yango mpo na koteya bango na ntina na Masiya mpe Bokonzi ya Nzambe. Alóngaki mpe kondimisa basusu. (Misala 14:1; 17:4) Atako akutanaki na botɛmɛli ya bakonzi ya Bayuda, Paulo amonisaki bolingo mpo na bandeko na ye Bayuda na ntango akomaki ete: “Bandeko, mposa na motema na ngai mpe libondeli na ngai liboso na Nzambe na ntina na bango [Bayuda] ezali ete bábika. Natatweli bango ete bazali na mposa mpo na Nzambe nde na nzela na bososoli te.”—Baloma 10:1, 2.
Lisalisi mpo na bandimi oyo bazalaki Bayuda te
7. Lolenge nini baprozelite mingi bayanolaki na nsango malamu oyo Paulo asakolaki?
7 Baprozelite bazalaki bato ya mabota mosusu oyo bakómaki kosambela na Lingomba ya Bayuda mpe bakatamaki ngenga. Baprozelite na Lingomba ya Bayuda bazalaki na Loma, na Antiokia ya Sulia, na Etiopia, mpe na Antiokia ya Pisidia—ɛɛ, epai na Bayuda nyonso ya lipalangana. (Misala 2:8-10; 6:5; 8:27; 13:14, 43; kokanisá na Matai 23:15.) Na bokeseni na bakonzi mingi ya Bayuda, emonani ete baprozelite bazalaki na lofundo te, mpe bakokaki te komiloba na lolendo nyonso ete bazali bakitani ya Abalayama. (Matai 3:9; Yoane 8:33) Nzokande, batikaki kosambela banzambe ya bapakano mpe na komikitisa nyonso bayaki epai ya Yehova, bazwaki mwa boyebi na ntina na ye mpe mibeko na ye. Bandimaki elikya ya Bayuda na ntina na koya ya Masiya. Lokola basilaki liboso komonisa mposa ya kobongwana na ndenge bazalaki koluka solo, mingi kati na bango bazalaki pene ya kosala mbongwana mosusu mpe bandimaki mateya ya ntoma Paulo. (Misala 13:42, 43) Ntango prozelite moko oyo liboso azalaki kosambela banzambe ya bapakano abongwanaki mpo na kokóma moklisto, abongisamaki bobele mpo na kotatola epai na Bapakano mosusu oyo bazalaki naino kosambela banzambe yango.
8, 9. (a) Longolá baprozelite, etululuku nini mosusu ya Bapakano basepelaki na Lingomba ya Bayuda? (b) Lolenge nini bato mingi oyo bazalaki kobanga Nzambe kasi bakatamaki ngenga te bayanolaki na nsango malamu?
8 Longolá baprozelite oyo bakatamaki ngenga, bato mosusu oyo bazalaki Bayuda te bazalaki kosepela na Lingomba ya Bayuda. Kati na bango, Koloneli azali moto ya liboso oyo akómaki moklisto. Atako azalaki prozelite te, “azalaki moto na kosambela mpe na kobanga Nzambe.” (Misala 10:2) Na komantere na ye likoló ya mokanda ya Misala, Profesere Frederick Bruce akomaki ete: “Mbala mingi bapakano motindo wana babéngamaka ‘bato na kobanga Nzambe’; atako yango ezali mpenza ebéngeli oyo eyokani na ndimbola ya likambo yango te, ezali oyo ebongi kosalelama. Bapakano mingi ya ntango wana, atako babongaki te mpo na kobongwana na losambo ya Bayuda (lisɛngami ya kokatama ngenga ezalaki mokakatano monene mpo na mibali), bazalaki kosepela na losambo ezangi mindɔndɔ ya Nzambe bobele moko oyo ezalaki kosalema na biyanganelo ya Bayuda mpe basepelaki na mitindá ya etamboli malamu na bomoi ya Bayuda. Bamoko kati na bango bazalaki kokende na biyanganelo mpe bakómaki na mwa boyebi ya mabondeli mpe mateya ya Makomami, oyo bazalaki koyoka wana ezalaki kotángama na mabongoli ya Greke.”
9 Ntoma Paulo akutanaki na bato mingi oyo bazalaki na bobangi Nzambe ntango azalaki kosakola kati na biyanganelo na Asie Mineure mpe na Grèce. Na engumba Antiokia ya Pisidia abéngaki baoyo bazalaki na eyanganelo ete “mibali na Bayisalaele, mpe bato na kobanga Nzambe.” (Misala 13:16, 26) Luka akomi ete nsima wana Paulo ateyaki Sabata misato kati na eyanganelo na engumba Tesaloniki, “bamoko na kati na bango [Bayuda] bandimisami [na boklisto], mpe basangani na Paulo na Sila, mpe ebele monene na [Bagreke, NW] bakumisi na Nzambe, mpe mwa ndambo monene na basi na lokumu.” (Misala 17:4) Emonani ete bamoko kati na Bagreke oyo bakatamaki ngenga te bazalaki bato na kobanga Nzambe. Ezali solo ete Bapakano motindo wana bazalaki kosangana na Bayuda.
Kosakola epai na “bato bazangi kondima”
10. Lolenge nini Paulo asakolaki epai na Bapakano oyo bayebaki Makomami te, mpe yango ebotaki mbuma nini?
10 Kati na Makomami ya Greke ya boklisto, ebéngeli “bato bazangi kondima” ekoki kolimbola bato nyonso oyo bazali na lisangá ya boklisto te. Mbala mingi esalelamaka mpo na bapakano. (Baloma 15:31; 1 Bakolinti 14:22, 23; 2 Bakolinti 4:4; 6:14) Na engumba Atene bato mingi bazangi kondima bateyamaki na mayele ya filozofi ya Bagreke mpe bazalaki na boyebi ata moke te ya Makomami. Likambo yango epekisaki nde Paulo ete atatola epai na bango te? Te. Nzokande, abongolaki lolenge na ye ya kobanda lisoló. Na mayele mpenza, amonisaki makanisi ya Biblia kozanga ete atánga yango uta na Makomami ya Liebele, oyo bafandi ya engumba Atene bayebaki yango te. Na mayele mpenza amonisaki boyokani kati na solo ya Biblia mpe makanisi mosusu oyo Basetoa (stoïciens) ya kala, bato ya maloba ya ntɔ́ki balobaki. Mpe amonisaki liteya ya Nzambe ya solo bobele moko mpo na bato nyonso, Nzambe oyo akosambisa na bosembo na nzela ya moto oyo akufaki mpe asekwisamaki. Na bongo, Paulo ateyaki na ntina na Klisto na mayele nyonso epai ya bafandi ya engumba Atene. Yango ebotaki mbuma nini? Atako mingi basɛkaki ye to mpe babɛtaki ntembe, “mibali mosusu basangani na ye mpe bandimi. Kati na bango Dionusi mosambisi na Ngomba na Ale, na mwasi moko, nkombo na ye Damali, na bamosusu na bango esika moko.”—Misala 17:18, 21-34.
11. Kolinti ezalaki engumba ya motindo nini, mpe mosala ya kosakola ya ntoma Paulo ebotaki mbuma nini na engumba yango?
11 Kati na engumba Kolinti, Bayuda bazalaki mwa mingi mpenza, na yango, Paulo abandaki mosala na ye na koteyáká kati na eyanganelo. Kasi ntango Bayuda batɛmɛlaki ye, Paulo akendaki epai ya Bapakano. (Misala 18:1-6) Mpe bato yango bazalaki na makambo kilikili! Bato ya Kolinti bazalaki na mosala mingi, bazalaki bato bautá na bisika ndenge na ndenge, engumba yango ezalaki na misala ya mombongo, mpe eyebanaki na mokili ya Grèce mpe ya Loma mpo na misala ya mbindo ya bafandi na yango. Kútu, “Kokolintinia” elimbolaki kosala misala ya mbindo. Kasi, nsima wana Bayuda baboyaki mateya ya Paulo, Klisto amonanaki epai na ye mpe alobaki ete: “Bangá te, kasi lobá . . . , zambi bato mingi bazali na ngai na mboka oyo.” (Misala 18:9, 10) Makambo masalemaki mpenza lolenge Klisto alobaki yango. Paulo asalaki lisangá kati na engumba Kolinti atako basangani na yango mosusu bazalaki liboso na motindo ya bomoi ya “bato ya Kolinti.”—1 Bakolinti 6:9-11.
Tóluka kobikisa “bato ya mitindo nyonso” na mikolo na biso
12, 13. (a) Lolenge nini teritware na biso ekokani na oyo ya eleko ya Paulo? (b) Ezalela nini tomonisaka na bisika oyo mangomba ya boklisto mazali kosala uta kala to epai na bato oyo bazali lisusu kotya motema na mangomba te?
12 Lelo oyo, lokola ezalaki na ekeke ya liboso, “ngɔlu na Nzambe esili komonana mpo na lobiko na bato [ya mitindo, NW] nyonso.” (Tito 2:11) Nsango malamu esili kopalangana na mikili nyonso mpe na bisanga pene na nyonso ya mai monene. Mpe, lokola ezalaki na eleko ya Paulo, tozali kokutana na “bato ya mitindo nyonso.” Na ndakisa, bamoko kati na biso bazali kosakola na mikili epai mangomba ya boklisto mazali kosala uta bikeke mingi. Lolenge moko na Bayuda na ekeke ya liboso, ekoki kozala ete basangani na yango bakangami makasi na bonkɔkɔ ya mangomba na bango. Nzokande, tozali na esengo ya koluka baoyo bazali na motema malamu mpe tozali kotonga likoló na boyebi nyonso ya Biblia oyo bazali na yango. Tozali komimonisa te ete toyebi mingi koleka bango to kotyola bango ata soki bakonzi ya mangomba na bango bazali mbala mosusu kotɛmɛla biso to konyokola biso. Kasi, tozali koyeba ete bamoko kati na bango bakoki kozala na “molende mpo na Nzambe” atako bazangi boyebi ya sikisiki. Lolenge moko na Yesu mpe Paulo, tozali komonisa bolingo ya solosolo mpo na bato, mpe tozali na mposa makasi ete bábikisama.—Baloma 10:2, NW.
13 Na mosala ya kosakola, mingi kati na biso bazali kokutana na bato oyo bazali lisusu kotya motema na mangomba te. Nzokande, ekoki kozala ete bazali naino bato oyo bazali na bobangi Nzambe, bazali na mwa kondima epai na Nzambe mpe bazali komeka komitambwisa na kolongobana kati na bomoi na bango. Kati na libota oyo linyongotani epai bobangi Nzambe ezali sé kokita, tosengeli kosepela ete tozali kokutana na bato oyo bazali na mwa kondima epai na Nzambe, boye te? Mpe tozali na mposa makasi ya kolakisa bango lolenge ya losambo oyo ezangi bokosi mpe lokuta, boye te?—Bafilipi 2:15.
14, 15. Lolenge nini teritware monene mpo na kosakola nsango malamu esili komonana?
14 Kati na lisese na ye ya moluba, Yesu alobaki ete mosala ya kosakola ekosalema na etando monene. (Matai 13:47-49) Kolimboláká lisese yango, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yúni 1992, lokasa 20, elobaki ete: “Na boumeli ya bikeke mingi, basangani ya [mangomba ya boklisto] babongolaki Liloba na Nzambe, bayeisaki yango na bakopi mingi mpe bakabolaki yango na kokokisáká bongo mosala moko ya ntina mingi. Na nsima, mangomba basalaki to basungaki bisika oyo bikobimisaka Biblia, epai babongolaki Makomami na minɔkɔ milobami na bamboka mosika ya mokili. Batindaki mpe bamisionere ya minganga mpe balakisi oyo babimisaki bato oyo bakómaki baklisto bobele mpo na kokokisa bamposa ya libumu. Ntalo monene na mbisi oyo ezali na ntina te, oyo endimamaki na Nzambe te, eyanganisamaki. Atako bongo, bamilió na bato oyo bazalaki baklisto te, bakómaki kotánga Biblia mpe bakómaki na boyokani elongo na motindo moko ya boklisto, atako yango ezalaki boklisto ya mabe.”
15 Kobongwanisa bato na mangomba ya boklisto ebotaki mbuma mingi mpenza na Amerika ya Súdi, na Afrika, mpe na bisanga mosusu ya mai monene. Na mikolo na biso, basɔkɛmi mingi bazali komonana na bisika yango, mpe tokoki kokóba mosala malamu soki tozali na makanisi ya kokende liboso, na bolingo mpo na bato yango ya komikitisa, lolenge moko Paulo azalaki na yango mpo na baprozelite ya Lingomba ya Bayuda. Kati na baoyo bazali na mposa ya lisungi na biso, ezali lisusu na bamilió ya bato oyo tokoki kobénga bango ete “baninga” ya Batatoli ya Yehova. Bato yango basepelaka mingi na ntango tokendaka kotala bango. Bamoko toyekolaki na bango Biblia mpe bazalaki koyangana na makita, mingimingi na Ekaniseli ya liwa ya Klisto. Bato wana basali teritware monene epai tokoki kosakola nsango malamu ya Bokonzi, boye te?
16, 17. (a) Mitindo nini ya bato tozali komemela bango nsango malamu? (b) Ndenge nini tozali komekola Paulo na kosakoláká epai ya bato ya mitindo nyonso?
16 Lisusu, ezali boni mpo na baoyo bonkɔkɔ na bango ekeseni na mateya ya mangomba ya boklisto—ezala tokutani na bango na mikili na bango to bayei kofanda na mboka na biso? Mpe ezali boni mpo na bamilió ya bato oyo basili kopesa mangomba mokɔngɔ, mpe bazali lisusu kondima Nzambe te to bazali kondima makambo oyo maleki mayele ya bomoto te? Lisusu, ezali boni mpo na baoyo, na molende lokola oyo bato basalaka mpo na losambo, bazali kotya likebi na mateya ya filozofi ya sika to na makambo bato basepelaka koyoka oyo ebimisami na babúku oyo moto akoki kotánga ye moko mpe ezali kotɛkama na bamagazini ya mikanda? Tosengeli nde kobosana bato motindo wana, kotaleláká bango ete bakoki kobikisama te? Ekozala boye te soki tomekoli ntoma Paulo.
17 Ntango Paulo azalaki kosakola na engumba Atene, akweaki te na motambo ya kobɛta ntembe na mateya ya filozofi elongo na bayoki na ye. Nzokande, abongolaki lolenge na ye ya kokanisa na bango elongo mpo na komiyokanisa na bato oyo bazalaki koyoka ye, komonisáká solo ya Biblia polele mpe na lolenge elongobani. Lolenge moko, tozali na mposa te ete tókóma naino na boyebi mingi ya mateya ya mangomba to ya filozofi ya bato oyo tokosakolela bango. Nzokande, tokobongola bokɔti na biso na lisoló mpo ete litatoli na biso ebota mbuma, na lolenge yango tokokóma “nyonso mpo na bato [ya mitindo, NW] nyonso.” (1 Bakolinti 9:22) Ntango akomelaki baklisto ya engumba Kolose, Paulo alobaki ete: “Bózalaka na bizaleli na mayele liboso na bato na libándá; bótondisa ntango na bino. Tiká ete maloba na bino mázala na ngɔlu, na elengi na mongwa ntango nyonso ete bóyeba soko ekoki na bino kozongisela bato nyonso maloba nini.”—Bakolose 4:5, 6.
18. Tozali na mokumba nini, mpe likambo nini tosengeli kobosana yango te?
18 Lolenge moko na Yesu mpe ntoma Paulo, tiká ete tómonisa bolingo epai ya bato ya mitindo nyonso. Mingi mpenza, tiká ete tósala molende ya koteya nsango malamu ya Bokonzi epai ya bato. Epai mosusu, tóbosana te ete Yesu alobaki na ntina na bayekoli na ye ete: “Bazali bato na mokili te.” (Yoane 17:16) Ndimbola na yango mpo na biso ekotalelama na lisoló lilandi.
Bozongeli
◻ Lobelá ezalela ya bokatikati oyo Yesu azalaki na yango mpo na mokili.
◻ Lolenge nini Paulo asakolaki epai ya Bayuda mpe baprozelite?
◻ Lolenge nini Paulo asololaki na bato oyo bazalaki na bobangi Nzambe mpe bato bazangi kondima?
◻ Lolenge nini tokoki kozala “nyonso mpo na bato [ya mitindo nyonso]” kati na mosala na biso ya kosakola?
[Bililingi na lokasa 10]
Na komoniseláká bato ya kartyé boboto, ekosalisa ete bálongola makanisi mabe bazalaka na yango mpo na baklisto