Baklisto ya liboso na mokili ya Bagrɛki
NA MIKILI mingi oyo baklisto ya ekeke ya liboso basakolaki nsango malamu, bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki. Mikanda oyo bazalaki kosalela mpo na kosakola nsango ya Yesu ezalaki na monɔkɔ ya Grɛki. Ntango elimo santu etindaki bango bákoma oyo tobengaka lelo Makomami ya Grɛki, mingi kati na bango bakomaki na monɔkɔ ya Grɛki; basalelaki elobeli mpe bandakisa oyo bato oyo bazalaki koloba monɔkɔ yango bayebaki malamu. Kasi, ezala Yesu to bantoma na ye, ata mpe bakomi mosusu ya Makomami ya Grɛki, moko te azalaki moto ya ekólo Grèce. Bango nyonso bazalaki Bayuda.—Baloma 3:1, 2.
Mpo na nini baklisto basalelaki monɔkɔ ya Grɛki mingi ndenge wana mpo na kopalanganisa mateya na bango? Baklisto mpe bamisionɛrɛ ya ekeke ya liboso bazalaki kosala ndenge nini mpo bato oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki básepela na nsango na bango? Mpe makambo oyo esalemaki na eleko yango ezali na ntina nini mpo na biso?
Ndenge mimeseno ya Bagrɛki epalanganaki
Na ekeke ya minei liboso ya ntango na biso (L.T.B.), Alexandre le Grand akweisaki bokonzi ya Baperse mpe abandaki kolonga mikili mingi. Mpo na kosangisa mikili nyonso oyo alongaki, ye mpe bakonzi oyo bakitanaki ye bazalaki kosɛnga bato ya mikili yango bákóma kosalela monɔkɔ mpe makambo mosusu nyonso ya Bagrɛki.
Ata nsima, ntango Baloma balongaki Bagrɛki mpe balongolaki bango nguya nyonso oyo bazalaki na yango, bato ya bikólo ya zingazinga ya Grèce bakobaki kaka kolanda mimeseno ya Bagrɛki. Na ekeke ya mibale mpe ya liboso L.T.B., Bayangeli ya Rome bazalaki kosepela na makambo nyonso ya Bagrɛki: Misala ya ntɔki, etongeli na bango ya bandako, mikanda mpe filozofi na bango. Yango nde etindaki mokomi Horace aloba boye mpo na Grèce: “Moombo azwaki nkolo na ye na boombo.”
Ntango Baloma bazalaki koyangela mokili, mimeseno ya Bagrɛki ekɔtaki mpenza na bingumba ya minene na Asie Mineure, na Syrie mpe na Égypte. Na mikili nyonso wana, mimeseno ya Bagrɛki ekɔtaki mpenza na makambo nyonso ya bomoi, ezala na misala ya Leta, na mibeko, na makambo ya mimbongo, na baizine, ata tii na elateli mpe na ndenge ya kotya monzɛlɛ. Mingimingi, na bingumba mingi ya Grèce, ezalaki na bisika ya masano epai bilenge bazalaki kokende koyekola mpe kotala bateyatre ya Bagrɛki.
Emil Schürer, moto moko ya mayele na makambo ya istware, alobaki boye: “Mimeseno ya Bagrɛki ekɔtelaki ata Bayuda. Atako bandimaki yango mbala moko boye te, ekɔtelaki bango malɛmbɛmalɛmbɛ.” Na ebandeli, Bayuda oyo bakangamaki mpenza na losambo na bango bazalaki koboya mimeseno ya Bagrɛki mpo ekokaki kokɔtisela bango makanisi ya bapakano, kasi mokemoke, mimeseno ya Bagrɛki ekɔtaki mpe makasi na bomoi ya Bayuda. Schürer abakisi boye: “Kutu, mwa ekólo moke wana ya Bayuda ezingamaki bipai nyonso na bikólo oyo ezalaki kolanda mimeseno ya Bagrɛki; mpe lokola bazalaki kosala mimbongo mingi na bato ya bikólo yango, bazalaki kokutana na bango ntango nyonso.”
Ntina ya libongoli ya Septante
Lokola Bayuda mingi batikaki mboka na bango mpe bakendaki kofanda na bokula ya Mer Méditerranée, bafandaki na bingumba oyo ezalaki kolanda mimeseno ya Bagrɛki, epai bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki. Bayuda yango bakobaki na losambo na bango, mpe bazalaki kokende na Jérusalem mbula na mbula mpo na biyenga ya losambo na bango. Kasi na nsima, Bayuda yango mingi bayebaki lisusu monɔkɔ ya Liebele te.a Yango wana, esengelaki bábongola Makomami ya Liebele na monɔkɔ ya Grɛki, oyo bato nyonso bazalaki koloba. Bato ya mayele ya Bayuda babandaki mosala yango, soki na mobu 280 L.T.B. Ekoki kozala ete bato yango ya mayele bazalaki na engumba Alexandrie, na Égypte, oyo ekómaki esika monene ya mateya mpe mimeseno ya Bagrɛki. Nsukansuka, babimisaki libongoli ya Septante.
Biblia Septante ezalaki buku moko ya ntina mingi. Yango esalisaki mpenza bato ya mikili ya Mpoto báyeba mateya ya motuya mingi ya Makomami ya Liebele. Soki Biblia wana te, bato mingi balingaki koyeba te makambo oyo Nzambe azalaki kosalela Bayisalaele mpo ekomamaki na monɔkɔ oyo bato mingi bayebaki te, mpe ekokaki kosalisa te mpo na kopalanganisa nsango malamu na mokili mobimba. Libongoli ya Septante esalelaki maloba, elobeli mpe monɔkɔ oyo esalisaki mpo na kopalanganisa boyebi ya Yehova epai ya bato ya bikólo ndenge na ndenge. Lokola monɔkɔ yango eyebanaki na mikili mingi na ntango wana, yango ebongaki mpenza mpo na kopalanganisa mateya ya Nzambe na mokili mobimba.
Baprozelite mpe bato oyo bazalaki kobanga Nzambe
Na ekeke ya mibale L.T.B., Bayuda babongolaki mikanda na bango mingi na monɔkɔ ya Grɛki mpe babimisaki mosusu ya sika mbala moko na monɔkɔ yango. Yango esalisaki bato ya bikólo mosusu báyeba lisolo ya Yisalaele mpe losambo na bango. Bato ya mayele na masolo ya kala balobi ete na eleko wana, bato mingi ya bikólo mosusu “bakangamaki mpenza na Bayuda, bazalaki kosangana na losambo na bango mpe kotosa mibeko na bango, nyonso to ndambo.”—Lisolo ya Bayuda na eleko ya Yesu Klisto (na Lingelesi).
Bato mingi ya bikólo mosusu bakɔtaki tii na Lingomba ya Bayuda, bamikatisaki ngenga mpe bakómaki baprozelite. Bamosusu bandimaki makambo mosusu ya Lingomba ya Bayuda, kasi baboyaki kokɔta mpenza mobimba na Lingomba yango. Bango nde bato oyo Makomi ya Grɛki ezalaki kobenga mbala na mbala “bato oyo babangaka Nzambe.” Biblia elobi ete Koloneyi “azalaki moto oyo amipesá na losambo mpe oyo azalaki kobanga Nzambe.” Ntoma Paulo akutanaki na bato mingi oyo bazalaki kobanga Nzambe mpe bazalaki kosambela elongo na Bayuda na Asie Mineure mpe na Grèce. Na ndakisa, na engumba Antioche de Pisidie, alobaki mokolo moko na bato oyo bayanganaki na sinagoga boye: “Mibali, Bayisalaele mpe bino bamosusu oyo bobangaka Nzambe.”—Misala 10:2; 13:16, 26; 17:4; 18:4.
Na yango, ntango bayekoli ya Yesu babandaki kosakola nsango malamu epai ya Bayuda oyo bazalaki kofanda na bikólo mosusu, bato mingi oyo bayokaki nsango yango bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki. Bisika oyo Bayuda yango bafandaki esalisaki mpenza mpo na bokoli ya lisangá ya baklisto. Ntango emonanaki polele ete Nzambe azalaki kopesa mpe bato ya bikólo mosusu elikya ya lobiko, bayekoli ya Yesu bamonaki ete na miso ya Nzambe, “ezali na Moyuda te mpe na Mogrɛki te.”—Bagalatia 3:28.
Nsango malamu epai ya Bagrɛki
Na ebandeli, na kotalela mangomba mpe bizaleli ya bikólo mosusu, Bayuda mosusu oyo bakómaki baklisto bazalaki kokakatana mpo na kondima bato ya bikólo mosusu na lisangá ya baklisto. Yango wana, ntango emonanaki ete Nzambe azali mpe kondima bato ya bikólo mosusu, bantoma mpe bankulutu oyo bazalaki na Jerusalem bamonisaki polele ete bandimi ya ndenge wana basengeli koboya makila, pite mpe losambo ya bikeko. (Misala 15:29) Yango ezalaki na ntina mingi mpo na moto nyonso oyo alandaki lolenge ya bomoi ya Bagrɛki, mpo Baloma ná Bagrɛki bamipesaki na “bamposa ya kosangisa nzoto na ndenge ya nsɔni” mpe na kosangisa nzoto mibali na mibali to basi na basi. Baklisto bakokaki kosala makambo ya ndenge wana te.—Baloma 1:26, 27; 1 Bakolinti 6:9, 10.
Moko te na kati ya baklisto oyo bazalaki bamisionɛrɛ na mokili ya Bagrɛki alekaki ntoma Paulo. Tii lelo oyo, soki okei na Athènes, na ekólo Grèce, okomona ekeko moko ya bronze na nse ya aréopage, oyo batyá wana mpo na kokanisaka lisukulu ya kafukafu oyo Paulo asalaki na engumba yango. Lisolo yango ezali na mokapo ya 17 ya mokanda ya Misala. Paulo abandaki lisolo na ye na maloba oyo: “Mibali ya Atene.” Wana ezali maloba oyo molobi nyonso na Athènes azalaki kobanda na yango, mpe na ntembe te maloba yango ekitisaki mitema ya bayoki ya Paulo, oyo bakokaki kozala bato ya filozofi (Ba-Épicurien ná Ba-Stoïcien). Na esika asilika to aluka komonisa bayoki na ye ete bazali kosambela banzambe ya lokuta, Paulo alukaki nde boyokani na bango mpe, mpo na yango, alobaki na bango ete amoni lokola basambelaka mingi. Alobelaki etumbelo na bango moko oyo bakomaki likoló na yango ete: “Epai ya Nzambe oyo ayebani te,” mpe na nsima alobaki na bango ete wana nde Nzambe oyo ye azali kosakwela bango.—Misala 17:16-23.
Mpo na kosimba mitema ya bayoki na ye, Paulo azalaki kosalela kaka maloba mpe makanisi oyo bakokaki kondima. Ba-Stoïcien bakokaki kondima ete Nzambe nde akelá bato, ete bato nyonso bautá kaka na moto moko, ete Nzambe azali mosika na biso te mpe ete Nzambe nde asimbi mpema ya bomoi ya bato. Mpo na komonisa ete ye mpe andimaka makambo yango, Paulo atángaki maloba ya bakomi mibale oyo bazalaki kondima filozofi na bango: Aratus (Phaenomena) mpe Cléanthe (Loyembo mpo na Zeus). Ezalaki mpe na makambo oyo ekokaki koyokanisa Paulo ná Ba-Épicurien. Bango bazalaki kondima ete Nzambe azali na bomoi mpe tokoki koyeba ye, akoká na nyonso, asɛngaka bato eloko moko te mpe afandaka na batempelo oyo etongami na mabɔkɔ ya bato te.
Paulo alobelaki kaka makambo oyo bayoki na ye bayebaki malamu. Kutu, mokanda moko elobi boye: Maloba “mokili (kosmos),” “libota,” mpe “Nzambe” ezali maloba oyo bato ya filozofi ya Grèce bazalaki kosalela mingi. (Misala 17:24-29) Yango elingi koloba te ete Paulo azalaki kokakola solo mpo na kobenda bato wana. Kutu, maloba oyo asukisaki na yango, oyo elobelaki lisekwa mpe lisambisi, ekesanaki mpenza na bindimeli na bango. Atako bongo, asalaki nyonso mpo aloba makambo oyo ekosepelisa bayoki na ye, oyo makanisi na bango etondaki na filozofi.
Mikanda mingi oyo Paulo akomaki, atindaki yango na masangá ya bingumba ya Grèce to na bingumba oyo Rome ezalaki koyangela, na mikili oyo monɔkɔ ya Grɛki ezalaki kolobama. Makomi yango, oyo ezalaki na elobeli ya polele mpe ya nguya, ezalaki na makanisi mpe bandakisa oyo bato nyonso oyo bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki bayebaki malamu. Paulo alobelaki masano, mbano oyo balongi bazalaki kozwa, molakisi oyo azalaki kokende kotika mwana na eteyelo mpe bandakisa mosusu oyo eutaki na bomoi ya Bagrɛki. (1 Bakolinti 9:24-27; Bagalatia 3:24, 25) Atako Paulo azalaki kosalela elobeli ya Bagrɛki, aboyaki mpenza mateya mpe bindimeli na bango.
Akómaki nyonso mpo na bato ya ndenge nyonso
Ntoma Paulo alobaki ete mpo na kosakwela basusu nsango malamu, asengelaki kokóma “makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso.” Akomaki ete: “Epai ya Bayuda nakómaki lokola Moyuda, mpo nakoka kozwa Bayuda,” mpe epai ya Bagrɛki, akómaki lokola Mogrɛki, mpo na kosalisa Bagrɛki báyeba mikano ya Nzambe. Ya solo, Paulo azalaki mpenza na makoki ya kosala yango, mpo azalaki Moyuda oyo autaki na engumba oyo ezalaki kosalela monɔkɔ mpe mimeseno ya Bagrɛki. Lelo oyo, baklisto nyonso basengeli mpe kosala lokola Paulo.—1 Bakolinti 9:20-23.
Lelo oyo, bamilio ya bato ya bikólo mpe mimeseno ndenge na ndenge bazali kotika bikólo na bango mpo na kokende kofanda na bikólo mosusu. Yango ezali mokakatano monene mpo na baklisto, oyo bazali kosala nyonso mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe kokokisa mokumba oyo Yesu apesá bango ya kokómisa “bato bayekoli na bikólo nyonso.” (Matai 24:14; 28:19) Mbala na mbala, bamonaka ete soki bato bayoki nsango malamu na monɔkɔ na bango moko, esimbaka mpenza mitema na bango mpe bakakatanaka te kondima yango.
Yango wana, zulunalo oyo, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—Eyebisaka Bokonzi ya Yehova, ezali kobimisama sanza na sanza na minɔkɔ 169, mpe moninga na yango Lamuká! ebimaka na minɔkɔ 81. Longola yango, mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato oyo bayei kofanda pene na bango, Batatoli ya Yehova mingi basalaka makasi mpo na koyekola minɔkɔ mosusu, ata minɔkɔ ya makasi lokola Arabe, chinois mpe Russe. Ata lelo oyo, baklisto bazali kaka na mokano oyo bandeko na bango ya ekeke ya liboso bazalaki na yango. Ntoma Paulo amonisaki yango na maloba oyo: “Nakómaki makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso, mpo ata ndenge nini nakoka kobikisa bamosusu.”—1 Bakolinti 9:22.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bayuda mingi na Yelusaleme bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki. Yango wana, na Yelusaleme ezalaki na “oyo ebengami Sinagoga ya Basikwami, mpe oyo ya bato ya Cyrène ná bato ya Alexandrie mpe oyo ya bato oyo bautaki na Cilicie ná Asie,” oyo na ntembe te bazalaki koloba monɔkɔ ya Grɛki.—Misala 6:1, 9.
[Karte na lokasa 18]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Rome
GRÈCE
Athènes
ASIE
Antioche (de Pisidie)
CILICIE
SYRIE
JUDÉE
Jérusalem
ÉGYPTE
Alexandrie
Cyrène
MER MÉDITERRANÉE
[Elilingi na lokasa 19]
Libongoli ya “Septante” esalisaki bato báyeba Yehova na ekeke ya liboso
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Israel Antiquities Authority
[Elilingi na lokasa 20]
Etanda oyo batyá na Aréopage mpo na kokanisaka lisukulu oyo Paulo asalaká wana