Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 15/11 nk. 5-7
  • Mokili ya boyengebene ezali ndɔ́tɔ mpamba te!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokili ya boyengebene ezali ndɔ́tɔ mpamba te!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini moto alóngi te?
  • Mokili ya boyengebene ekosalema solo​—Ndenge nini?
  • Bomoi kati na mokili ya boyengebene
  • Yehova alingaka bosembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Bosembo ekozala mokolo mosusu awa na mabele?
    Makambo mosusu
  • Nzambe akosala eloko mokolo mosusu mpo na kosilisa bokesene?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • “Nzambe azangi nde bosembo?”
    Pusaná penepene na Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 15/11 nk. 5-7

Mokili ya boyengebene ezali ndɔ́tɔ mpamba te!

DANIEL WEBSTER, moto ya politiki na États-Unis, alobaki ete, “Boyengebene ezali likambo oyo bato bamibanzabanzaka na yango mingi na mokili.” Mpe Biblia elobi ete: “Yehova alingi boyengebene.” (Nzembo 37:28, NW) Lokola basalemaki na elilingi ya Nzambe, babalani ya liboso bazalaki na bizaleli ya Nzambe, kati na yango boyengebene.​—Genese 1:26, 27.

Makomami mazali mpe kolobela ‘bapakano baoyo bazangi mibeko, awa ezali bango kosalaka makambo na Mibeko.’ Na bongo “bazali komonisa polele ete makambo malaki Mibeko makomami na mitema na bango. Lisosoli na mitema na bango ekotatolaka, makanisi na bango ndenge na ndenge makolobela mpe bango mpo na kokitisa bango soko kolóngisa bango.” (Baloma 2:14, 15) Ɛɛ, bato bapesameli lisosoli​—liyoki ya kati ya motema mpo na kokesenisa malamu na mabe. Ya solo, mposa ya boyengebene ezali epai ya moto uta kobotama na ye.

Esika moko na mposa ya boyengebene, moto azali mpe koluka bolamu, mpamba te Nzembo 106:3 elobi ete: “Esengo mingi na bango bakobatelaka [boyengebene, NW] baoyo bazali basembwi mikolo nyonso.” Kasi, mpo na nini moto alóngi te kotya mokili ya boyengebene?

Mpo na nini moto alóngi te?

Ntina ya moboko mpo na yango moto alóngi te kotya mokili ya boyengebene ezali bongo litɔnɔ oyo tosangolaki epai na baboti na biso ya liboso, Adama na Eva. Biblia elimboli boye: “Na bongo, mabe ekɔtaki na mokili mpo na moto moko, mpe kufa ekɔtaki mpo na mabe. Kufa mpe epalangani epai na bato nyonso mpo ete bato nyonso basali mabe.” (Baloma 5:12) Litɔnɔ yango ezali bongo lisumu. Atako bazalisamaki kozanga mbeba, Adama na Eva baponaki kotombokela Nzambe mpe na yango bamikómisaki bango moko basumuki. (Genese 2:16, 17; 3:1-6) Mpo na yango, batikelaki bana na bango libula ya lisumu, bopusi ya kosala mabe.

Bizaleli lokola lokoso mpe kokanisela basusu mabe ezali misala miuti na bopusi ya kosala masumu, boye te? Mpe bizaleli yango nde bizali kopesa nzela na bokesene na mokili, boye te? Ɛɛ, lokoso ezali ntina monene oyo bato bazali kobebisa ezingelo mpe bazali koyokisa basusu mpasi na makambo ya nkita! Na ntembe te kokanisela basusu mabe ezali ntina ya matata kati na bitúlúká mpe bokabwani mpo na kokesena ya mposo. Makambo motindo wana mazali mpe kopusa bato na koyiba, na kobuba, mpe kosala makambo oyo mazali koyokisa basusu mpasi.

Mbala mingi, ata mikano oyo mileki malamu mpo na kotya boyengebene mpe kosala malamu mizali kolónga te mpo na mposa na biso ya kosala masumu. Ntoma Paulo ye moko ayambolaki ete: “Malamu oyo elingi ngai kosala, nakosalaka yango te. Kasi mabe oyo elingi ngai te, nakosalaka bobele yango.” Akóbi kolimbola etumba oyo azalaki na yango, kolobáká ete: “Kati na motema na ngai moto, nasepeli na Mibeko na Nzambe; kasi namoni mobeko mosusu kati na bilembo na nzoto na ngai. Mobeko yango monene ezali kobunana etumba na Mibeko milingi ngai na makanisi na ngai, ezali mpe kokanga ngai moombo na mobeko na masumu mozali kati na bilembo na ngai.” (Baloma 7:19-23) Lelo oyo biso mpe tozali na etumba lolenge moko. Yango wana bokesene ezali komonana mbala na mbala.

Boyangeli ya moto ebakisi mpe bokesene kati na mokili. Na bikólo nyonso, mibeko ezali mpe bato oyo bazali kotosisa mibeko yango bazali. Ya solo, bazúzi mpe bisambiselo ezali. Na ntembe te, bato mosusu oyo batosaka mitindá bamekaki kotombola ntómo ya bato mpe kosala ete boyengebene ezala mpo na bato nyonso. Kasi, mbala mingi milende na bango milóngaki te. Mpo na nini? Kolobeláká na mokuse makambo ndenge na ndenge oyo mazali kosala ete bato bálónga te, Yilimia 10:23 elobi ete: “Ɛ [Yehova], nayebi ete nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” Lokola atangwi mosika na Nzambe, moto akoki te kotya mokili ya bosembo mpe ya boyengebene.​—Masese 14:12; Mosakoli 8:9.

Satana Zábolo azali mobebisi monene ya milende oyo bato bazali kosala mpo na kotya mokili ya boyengebene. Biblia elobi polele ete Satana, anzelu motomboki azali “mobomi na bato” mpe “mobuki na nkuta” mpe ete “mokili mobimba ezali kolala na kati na oyo mabe.” (Yoane 8:44; 1 Yoane 5:19) Ntoma Paulo amonisi ye lokola “nzambe na mokili oyo.” (2 Bakolinti 4:3, 4) Lokola Satana ayini boyengebene, azali kosala nyonso oyo akoki mpo na kokólisa misala ya mabe. Ntango nyonso oyo akoyangela mokili, bokesene ya lolenge nyonso mpe makambo na yango ya mawa ekokóba konyokola bato.

Makambo nyonso oyo malingi nde koloba ete bokesene ekoki kozanga te epai ya bato? Mokili ya boyengebene ezali ndɔ́tɔ mpamba?

Mokili ya boyengebene ekosalema solo​—Ndenge nini?

Mpo ete elikya ya komona mokili ya boyengebene ekóma likambo ya solo, bato basengeli komibalola na eutelo oyo ekoki kolongola bantina ya bokesene. Kasi nani akoki kolongola lisumu mpe koboma Satana mpe kotya nsuka na boyangeli na ye? Ezali polele ete moto moko te to mpe ebongiseli moko te ya bato ekoki kolónga kosala likambo monene motindo wana. Bobele Yehova Nzambe nde akoki kosala yango! Na ntina na ye, Biblia elobi ete: “Ye libanga, mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe na sembo mpe na mabe te, ye moyengebeni mpe mosembwi.” (Deteronome 32:4) Mpe lokola “Yehova alingi boyengebene,” alingi mpe ete bato bázala na bomoi kati na mokili ya boyengebene.​—Nzembo 37:28, NW.

Kolobeláká ebongiseli ya Nzambe mpo na kotya mokili ya boyengebene, ntoma Petelo akomaki ete: “Tozali kotalela Likoló na sika mpe nsé na sika, pelamoko elakaki ye; boyengebene ekofanda kati na yango.” (2 Petelo 3:13) ‘Likoló yango ya sika’ ezali bongo likoló oyo tomonaka na miso te. Nzambe asalaki likoló na kokoka, mpe ezali kokumisa ye. (Nzembo 8:3; 19:1, 2) “Likoló na sika” ezali boyangeli ya sika mpo na mabelé. “Likoló” ya lelo ezali bongo biyangeli ya bato. Mosika te, na etumba ya Nzambe oyo ebéngami Armagedon, biyangeli yango bikotika esika na “likoló [ya] sika”​—Bokonzi na ye ya likoló, to guvernemá na ye. (Emoniseli 16:14-16) Yesu Klisto azali Mokonzi na bokonzi yango. Lokola ekotya nsuka na boyangeli ya bato, guvernemá yango ekoyangela libela na libela.​—Danyele 2:44.

Na bongo, “nsé na sika” ezali nini? Yango ezali te etando ya sika, mpamba te Nzambe asalaki mabelé oyo na kokoka mpo ete ezala efandelo ya moto, mpe mokano na ye ezali ete etikala bongo libela. (Nzembo 104:5) “Nsé na sika” ezali bongo lisangá ya sika ya bato. (Genese 11:1; Nzembo 96:1) “Nsé” oyo ekobomama ezali bongo bato oyo bazali kati na ebongiseli mabe ya biloko ya lelo. (2 Petelo 3:7) “Nsé na sika” oyo ekokitana yango ekosalema na basaleli ya solo ya Nzambe, baoyo bayini misala mabe mpe balingi bosembo mpe boyengebene. (Nzembo 37:10, 11) Na lolenge yango, mokili ya Satana ekolongwa.

Kasi nini ekokómela Satana ye moko? Ntoma Yoane asakolaki ete: “[Klisto Yesu] asimbi dalagona, ye nyoka yango na kalakala, oyo azali Motɛmɛli, Satana, mpe akangi ye na monyɔlɔlɔ mbula nkóto. Abwaki ye na libulu bozindo, azipi yango, mpe atii elembo likoló na yango, na ntina ete azimbisa mabota lisusu te.” (Emoniseli 20:1-3) Lokola akokangisama na minyɔlɔlɔ, Satana akosala lisusu bopusi likoló na bato te, lolenge moko na moto oyo atyami na bolɔ́kɔ ya nsé ya mabelé. Mpo na bato, yango ekozala mpenza kosikwama, ebandeli ya mokili ya boyengebene! Mpe na nsuka ya mbula nkóto, Satana akobomama libela.​—Emoniseli 20:7-10.

Ezali boni mpo na lisumu oyo tosangolaki? Yehova asilaki kotya moboko mpo na kolongola lisumu. “Mwana na moto [Yesu Klisto] ayei mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.” (Matai 20:28) Liloba “lisiko” elimboli motuya oyo esengeli mpo na kosikola bakangami. Yesu apesaki bomoi na ye ya kokoka lokola lisiko mpo na kobikisa bato.​—2 Bakolinti 5:14; 1 Petelo 1:18, 19.

Uta sikawa, tokoki kozwa litomba na mbeka ya lisiko ya Yesu. Na komonisáká kondima na lisiko yango, tokoki kozala na etɛlɛmɛlo malamu liboso ya Nzambe. (Misala 10:43; 1 Bakolinti 6:11) Na nsé ya boyangeli ya Bokonzi ya Nzambe, lisiko ekopesa bato likoki ya kobikisama mpenza na lisumu. Mokanda ya nsuka ya Biblia ezali kolobela “ebale na mai na bomoi” ya elilingi kobima na kiti ya bokonzi ya Nzambe, mpe pembenipembeni na yango ezali na nzeté ya elilingi oyo izali kobota mbuma mpe nkasa na yango ezali “mpo na kobikisa bato na mabota.” (Emoniseli 22:1, 2) Oyo Biblia ezali komonisa awa ezali bongo ebongiseli kitoko oyo Mozalisi asili kokamata mpo na kobikisa basumuki na lisalisi ya mbeka ya lisiko ya Yesu. Kokokisama ya ebongiseli yango mobimba ekosikola bato ya botosi na lisumu mpe na liwa.

Bomoi kati na mokili ya boyengebene

Kanisá lolenge bomoi ekozala na nsé ya boyangeli ya Bokonzi. Koboma bato mpe mobulu ekozala lisusu te. (Masese 2:21, 22) Mikakatano ya nkita mikosila. (Nzembo 37:6; 72:12, 13; Yisaya 65:21-23) Bilembo nyonso ya bokabwani na ntina na etɛlɛmɛlo na bomoi, mposo, bitúlúká, mpe bikólo bikolongwa. (Misala 10:34, 35) Bitumba mpe mandóki ya bitumba ekozala lisusu te. (Nzembo 46:9) Bamilió ya bakufi bakozonga na bomoi kati na mokili oyo ezangi bokesene. (Misala 24:15) Moto nyonso akozala na nzoto kolɔngɔ́nɔ́. (Yobo 33:25; Emoniseli 21:3, 4) Biblia elaki biso ete “[Yesu Klisto] akoyeisa boyengebene.”​—Yisaya 42:3, NW.

Sikawa, bakoki kosalela biso bokesene, kasi biso tozongisela bato na bokesene soko moke te. (Mika 6:8) Ata soki tosengeli koyikela bokesene mpiko, tóbatela makanisi ya kolónga. Mosika te mokili ya boyengebene oyo elakami ekosalema solo. (2 Timoté 3:1-5; 2 Petelo 3:11-13) Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso asili kobimisa liloba na monɔkɔ na ye, mpe “ekolónga.” (Yisaya 55:10, 11) Sikawa ezali ntango ya komibongisa mpo na bomoi kati na mokili wana ya boyengebene na koyekoláká makambo oyo Nzambe azali kosɛnga epai na biso.​—Yoane 17:3; 2 Timoté 3:16, 17.

[Elilingi na lokasa 7]

Kati na mokili ya sika elakami na Nzambe, bilembo nyonso ya bokesene bikolongolama

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto