Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w07 15/8 nk. 22-26
  • Yehova alingaka bosembo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova alingaka bosembo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kozanga bosembo epalangani
  • Mituna oyo ebongi kotunama
  • Mokili ya sika ya bosembo
  • Satana akolonga te
  • Nzambe akosala eloko mokolo mosusu mpo na kosilisa bokesene?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Bosembo ekozala mokolo mosusu awa na mabele?
    Makambo mosusu
  • Mokili ya boyengebene ezali ndɔ́tɔ mpamba te!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • “Nzela na ye nyonso bosembo”
    Pusaná penepene na Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
w07 15/8 nk. 22-26

Yehova alingaka bosembo

“Ngai, Yehova, nalingaka bosembo.”​—YISAYA 61:8, NW.

1, 2. (a) “Kozala sembo” elimboli nini mpe “kozanga bosembo” elimboli nini? (b) Biblia elobi nini na ntina na Yehova mpe bosembo na ye?

KOZALA sembo elimboli kosala makambo alima, to mpe kopona bilongi te. Kozanga bosembo elimboli kopona bilongi, kokanisela basusu mabe, kosala mabe, kosala basusu makambo na nko.

2 Eleki mbula soki 3 500, Moize akomaki na ntina na Yehova, Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba, ete: “Banzela na ye nyonso ezali bosembo. Nzambe ya boyengebene, epai na ye kozanga bosembo ezalaka te.” (Deteronome 32:4, NW) Mbula koleka 700 na nsima, Yisaya apemamaki na Nzambe mpe akomaki boye: “Ngai, Yehova, nalingaka bosembo.” (Yisaya 61:8, NW) Na siɛklɛ ya liboso, Paulo alobaki boye: “Nzambe azangi nde bosembo? Yango ekóma bongo soki moke te!” (Baloma 9:14) Kaka na eleko yango, Petelo alobaki ete: “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala boyengebene andimami na ye.” (Misala 10:34, 35) Ya solo mpenza, “Yehova alingaka bosembo.”​—Nzembo 37:28, NW; Malaki 3:6.

Kozanga bosembo epalangani

3. Ndenge nini kozanga bosembo ekɔtaki na mokili?

3 Bato mingi bazali sembo te lelo oyo. Bakoki kosala biso makambo ya kozanga bosembo ata na esika nini: na mosala, na kelasi, na bakonzi ya Leta, to mpe na kati ya libota. Ya solo, makambo ya kozanga bosembo ndenge wana ebandi lelo te. Kozanga bosembo ekɔtaki na mokili ntango bankɔkɔ na biso ya liboso balandaki makanisi ya Satana Zabolo oyo alendisaki bango bátombokela Nzambe mpe bákóma komitambwisa bango moko. Adama, Eva, ná Satana bazangaki mpenza bosembo na ndenge basalelaki mabe bonsomi ya kopona oyo Yehova apesaki bango. Makambo ya mabe oyo basalaki ekɔtisaki mpasi mpe liwa epai ya bato nyonso.​—Genese 3:1-6; Baloma 5:12; Baebele 2:14.

4. Kozanga bosembo ekɔtaki na mokili banda ntango nini?

4 Kozanga bosembo ekɔtá na mokili banda botomboki na Edene, eleki sikoyo mbula soki 6 000. Yango ezali likambo ya kokamwa te mpamba te Satana azali nzambe ya mokili oyo. (2 Bakolinti 4:4) Azali moto ya lokuta mpe tata ya lokuta, mokoseli-bato-makambo mpe motɛmɛli ya Yehova. (Yoane 8:44) Asalaka ntango nyonso makambo oyo ezangi mpenza sembo. Na ndakisa, na ntango ya Noa, ezalaki mpe mpo na makambo mabe oyo Satana azalaki kolendisa nde Nzambe amonaki ete “masumu ya bato ezalaki mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso kati na motema na bango ezalaki bobele epai ya mabe mikolo nyonso.” (Genese 6:5) Makambo ebongwanaki te ata ntango Yesu ayaki awa na mabelé. Yesu alobaki boye: “Mokolo moko na moko ekoki na mabe na yango moko,” elingi koloba mikakatano na yango, lokola kozanga bosembo. (Matai 6:34) Biblia elobi solo ete: “Bozalisi mobimba ezali kokoba komilelalela elongo mpe ezali konyokwama elongo tii sikoyo.”​—Baloma 8:22.

5. Mpo na nini makambo ya kozanga bosembo ebakisami mingi na mikolo na biso?

5 Tomoni mpenza ete makambo ya mabe oyo ememaka kozanga bosembo ebandá kala. Kasi lelo oyo, makambo ebebi lisusu koleka. Mpo na nini? Mpamba te banda bambula mwa mingi sikoyo, tozali na “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya makambo ya ntango oyo mpe na “bantango ya ndenge mosusu mpe ya mpasi mpenza” lokola nsuka ekómi mpenza pene. Biblia esakolaki ete na mikolo yango, bato bakozala “bato oyo bamilingaka bango moko, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, batuki, . . . bato bazangi botɔndi, bato bazangi bosembo, bazangi bolingo ya libota, bandimaka boyokani te, bakoselaka bato makambo, bazangi komipekisa, bato ya kongala, bazangi bolingo ya makambo ya malamu, bato oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, bato bavimbi na lolendo.” (2 Timote 3:1-5) Bizaleli wana etindaka bato na kosala makambo ndenge na ndenge ya kozanga bosembo.

6, 7. Makambo nini ya kozanga mpenza bosembo ezali konyokola bato na mikolo na biso?

6 Na boumeli ya mbula nkama oyo eleki, makambo ya kozanga bosembo esalemaki na ndenge oyo emonaná naino te. Ya liboso, na eleko yango bitumba ezalaki mingi koleka. Na ndakisa, bato mosusu ya mayele na masolo ya kala balobi ete na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bato soki milio 50 to 60 bakufaki, mingimingi mibali, basi mpe bana oyo bazalaki basoda te. Nsima ya etumba yango, bamilio mosusu ya bato bakufaki mpe na bitumba ndenge na ndenge, mingi na bango bazalaki basoda te. Satana azali kolendisa makambo wana ya kozanga bosembo mpo azali na nkanda makasi, ayebi ete etikali moke Yehova aboma ye. Esakweli moko ya Biblia elobeli likambo yango na maloba oyo: “Zabolo akiteli bino, azali na nkanda makasi, mpo ayebi ete azali na eleko moko ya ntango mokuse.”​—Emoniseli 12:12.

7 Mbula na mbula, mbongo oyo baguvɛrnema ya mokili ezali kobimisa mpo na makambo ya basoda ezali kokóma dolare pene na miliare misato. Nzokande, bamilio ya bato bazali kozanga biloko ya ntina mpo na kobikela; kanisá ndenge ebele ya mbongo wana ekoki kosalisa soki basaleli yango na makambo ya malamu. Bato miliare soki moko bazali kozanga biloko ya kolya; nzokande, na bisika mosusu biloko ezali beboo. Lapolo moko ya ONU emonisi ete mbula na mbula, bana soki milio 5 bazali kokufa mpo na nzala. Talá kozanga bosembo ya boye! Kanisá mpe ebele ya bazemi oyo ezali kosopama. Balapolo emonisi ete mbula na mbula zemi soki milio 40 tii milio 60 ezali kosopama! Yango mpe ezali mpenza kozanga bosembo!

8. Wapi lolenge kaka moko oyo bosembo ya solosolo ekoki kokɔta na mokili?

8 Bakonzi ya mokili bazali kokoka te kosilisa mikakatano minene oyo ezali kotungisa bato lelo oyo; milende ya bato ekobongisa mpe makambo te. Liloba ya Nzambe esakolaki ete na ntango na biso “bato mabe mpe bakosi bakokende lisusu mosika na kati ya mabe, kobungisáká bato nzela mpe kobungisamáká.” (2 Timote 3:13) Kozanga bosembo ekɔtá mpenza na bomoi ya bato na ndenge oyo bakoki te kosilisa yango bango moko. Kaka Nzambe ya bosembo nde akoki kosilisa yango. Kaka ye nde akoki kolongola Satana, bademo, mpe bato mabe.​—Yilimia 10:23, 24.

Mituna oyo ebongi kotunama

9, 10. Mpo na nini Asafa alɛmbaki?

9 Ata bato mosusu oyo bakomaki Biblia bamitunaki mpo na nini banda kala, Nzambe asilisaki te mikakatano ya bato mpe atyaki te bosembo mpe boyengebene ya solosolo. Tótalela ndakisa ya moto moko. Na maloba oyo ezali likoló ya Nzembo 73 batángi nkombo ya Asafa; ekoki kozala ete azalaki Molevi mpe alanga-nzembo moko monene na ntango ya Mokonzi Davidi to mpe ezali nde babɛti-miziki oyo bazalaki bakitani ya Asafa. Asafa ná bakitani na ye basalaki banzembo mingi oyo ezalaki koyembama na losambo. Kasi, na eleko moko, mokomi wana ya nzembo alɛmbaki na elimo. Amonaki ete bato mabe bazalaki na bozwi mpe bazalaki na bomoi ya malamu, mpe ete makambo ya mabe ezalaki kokómela bango te.

10 Akomaki boye: “Nazalaki na zuwa epai ya bato ya zoba, wana emonaki ngai esengo ya bato mabe. Mpo ete mpasi ezali na bango te mpe nzoto na bango ezali makasi mpe na mafuta. Bakoyoka bolɔzi lokola bato mosusu te mpe bakotungisama [lokola] bato mosusu te.” (Nzembo 73:2-8) Kasi na nsima, mokomi wana ya Biblia amonaki ete azalaki komikosa. (Nzembo 73:15, 16) Mokomi ya nzembo amekaki kosembola makanisi na ye, kasi akangaki mpenza te ntina oyo bato mabe bazalaki kozwa etumbu te, nzokande mbala mingi bato ya malamu nde bazalaki konyokwama.

11. Asafa asosolaki likambo nini?

11 Nsukansuka, moto wana ya sembo asosolaki makambo oyo ezalaki kozela bato mabe; amonaki ete Yehova akosembola makambo. (Nzembo 73:17-19) Davidi akomaki boye: “Zelá mpo na [Yehova] mpe batelá nzela na ye, akokembisa yo ete osangola mokili; okomona kobeba ya bato mabe.”​—Nzembo 37:9, 11, 34.

12. (a) Mokano ya Yehova ezali nini mpo na mabe mpe kozanga bosembo? (b) Ndenge nini otalelaka elaka oyo Yehova apesi ya kosilisa kozanga bosembo?

12 Na ntembe te, Yehova azali na mokano ya kosilisa makambo ya mabe mpe kozanga bosembo na mokili; akosala yango na ntango oyo ye moko aponi. Baklisto ya sembo basengeli mbala na mbala kokanisaka likambo yango. Yehova akolongola bato oyo baboyi kosala mokano na ye, mpe akopesa mbano na baoyo bazali kosala mokano na ye. “Miso na ye ekotalaka mpe ntɔkɔ na ye ekomekaka bana ya bato. [Yehova] akomeka moyengebene mpe moto mabe, molimo na ye eyini ye oyo alingi mobulu. Akonokisa makala ya mɔtɔ mpe sufulu likoló ya bato mabe; bakopesamela mopɛpɛ ya kozikisa. [Yehova] azali moyengebene mpe alingi boyengebene.”​—Nzembo 11:4-7.

Mokili ya sika ya bosembo

13, 14. Mpo na nini mokili ya sika ekozala mpenza mokili ya boyengebene mpe ya bosembo?

13 Yehova akoboma ebongiseli ya makambo oyo ezangi sembo oyo Satana azali kotambwisa mpe akotya mokili ya sika mpe ya malamu mingi. Bokonzi ya Nzambe, oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye básɛngaka ete eya nde ekotambwisa mokili yango. Na esika ya makambo ya mabe mpe kozanga bosembo, ekozala nde boyengebene mpe bosembo, mpamba te na ntango wana Yehova akoyanola mpenza libondeli oyo: “Tiká bokonzi na yo eya. Tiká mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabelé.​—Matai 6:10.

14 Biblia eyebisi biso lolenge ya boyangeli oyo ekozala na ntango wana; ekozala boyangeli oyo bato nyonso ya mitema sembo balukaka. Nzembo 145:16 ekokokisama mpenzampenza: “Okozipola lobɔkɔ na yo mpe okosilisa mposa ya bikelamu nyonso ya bomoi.” Longola yango, Yisaya 32:1 elobi ete: “Talá mokonzi [Klisto Yesu na likoló] akozala na lokumu kati na boyengebene, mpe bana ya mokonzi [bamonisi ya Klisto awa na mabelé] kati na kosambisa-sembo.” Mpo na Mokonzi Yesu Klisto, vɛrsɛ ya Yisaya 9:7 esakolaki boye: “Kofuluka ya bokonzi na ye mpe na kimya ekosuka te; na kiti ya bokonzi ya Davidi mpe likoló ya bokonzi na ye, ete abongisa yango mpe ete atɛlɛmisa yango na [bosembo, NW] mpe na boyengebene longwa na ntango oyo kino libela. Mposa ya [Yehova] ya bibele ekosala oyo.” Yo mpe olikyaka kofanda na mokili oyo Bokonzi wana ya sembo ekoyangela?

15. Makambo nini Yehova akosala mpo na bato na mokili ya sika?

15 Na mokili ya sika, tokomona likambo moko te oyo ekotinda biso tóloba maloba lokola oyo ezali na Mosakoli 4:1: “Ngai nabutwaki mpe nabanzaki mpo na minyoko nyonso misalami na nse ya moi. Mpe talá, mpisoli ya banyokolami mpe moko azali te mpo na kobɔndisa bango. Epai na banyɔkɔli na bango nguya ezali nde bazali na moko te mpo na kobɔndisa bango.” Ya solo, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, ezali mwa mpasi tómona na makanisi ndenge mpenza oyo mokili ya sika ya boyengebene ekozala. Mabe ekozala lisusu te; mokolo na mokolo tokobanda komona kaka makambo ya malamu. Yehova akolongola makambo nyonso ya mabe, mpe akosala yango na ndenge oyo tokoki kutu kokanisa te. Maloba oyo ntoma Petelo akomaki ebongi mpenza: “Ezali na likoló ya sika mpe na mabelé moko ya sika oyo tozali kozela engebene elaka na ye, mpe na kati na yango boyengebene ekofanda.”​—2 Petelo 3:13.

16. Mpo na nini tokoki koloba ete “likoló ya sika” ezali lelo oyo mpe na ndimbola nini ‘mabelé ya sika’ ezali kobongisama lelo oyo?

16 Kutu, “likoló ya sika,” elingi koloba bokonzi oyo Nzambe apesi na mabɔkɔ ya Klisto ezali sikoyo koyangela kuna na likoló. Baoyo bakozala bato ya liboso mpo na kosala ‘mabelé ya sika,’ elingi koloba libota ya sika ya bato ya mitema sembo, bazali koyanganisama na mikolo oyo ya nsuka. Lelo oyo, bazali bato pene na milio 7, na mikili 235 mpe na masangá soki 100 000. Bato yango bazali koyekola banzela ya sembo mpe ya boyengebene ya Yehova mpe na yango, na mokili mobimba bazali na bomoko oyo elendisami na bolingo. Bomoko na bango ezali makasi koleka bomoko mosusu nyonso oyo emonaná na mokili, eleki nyonso oyo bato oyo batambwisami na Satana bakoki kosala. Bolingo mpe bomoko yango ezali kolakisa mwa moke ndenge oyo makambo ekozala na mokili ya sika, oyo ekotambwisama na boyengebene mpe na bosembo.​—Yisaya 2:2-4; Yoane 13:34, 35; Bakolose 3:14.

Satana akolonga te

17. Mpo na nini Satana akolonga te ntango akobundisa basambeli ya Yehova?

17 Etikali moke Satana ná bato na ye bakobundisa basambeli ya Yehova na mokano ya kosilisa bango. (Ezekiele 38:14-23) Likambo yango ekosalema na eleko oyo Yesu abengaki “bolɔzi moko monene oyo esalemá naino boye te banda na ebandeli ya mokili tii sikoyo, ɛɛ ekosalema lisusu mpe te.” (Matai 24:21) Kasi, mokano ya Satana ekolonga? Te. Liloba ya Nzambe epesi biso elaka oyo: “[Yehova] alingi sembo; akobatela bayengebene na ye. Akobatela bango seko; nde bana ya bato mabe bakolongwa. Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.”​—Nzembo 37:28, 29.

18. (a) Nzambe akosala nini ntango Satana akobundisa basaleli na Ye? (b) Litomba nini ozwi nsima ya kotalela makambo oyo Biblia elobi na lolenge oyo bosembo ekolonga?

18 Ntango Satana ná bato na ye bakobundisa basaleli ya Yehova, motema molai na ye ekokóma na nsuka. Na nzela ya Zekalia, Yehova asakolaki boye: “Ye oyo amami bino azali komama kati na liso na [ngai].” (Zekalia 2:8) Ekozala lokola moto atye mosapi na liso ya Yehova. Na mbala moko, Yehova akotɛlɛma mpe akoboma nyɛɛ baoyo bakomeka kosala likambo ya ndenge wana. Basaleli ya Yehova bayebani na mokili mobimba ete bazali bato oyo baleki na bolingo, na bomoko, na kimya, mpe batosaka mibeko. Na yango, likambo oyo Satana akosala ekozala mpenza kozanga bosembo. Nzambe oyo “alingaka bosembo” akotikela yango nzela soki moke te. Yehova akokɔtela basaleli na ye mpe akoboma mpo na libela banguna na bango; bosembo ekolonga, mpe basambeli ya Nzambe kaka moko ya solo bakozwa lobiko. Tomoni ete makambo minene mpe ya esengo mpenza ezali liboso na biso!​—Masese 2:21, 22.

Okopesa eyano nini?

• Mpo na nini kozanga bosembo epalangani mingi?

• Ndenge nini Yehova akosukisa kozanga bosembo na mokili?

• Likambo nini esimbi motema na yo na boyekoli oyo mpo na ndenge bosembo ekolonga?

[Elilingi na lokasa 23]

Mabe ekómaki mingi liboso ya Mpela, ezali mpe mingi lelo, na “mikolo ya nsuka”

[Elilingi na lokasa 24]

Na mokili ya sika, bosembo mpe boyengebene ekozala

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto