Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w97 1/12 nk. 29-31
  • Komilelalela nyonso ezali mabe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Komilelalela nyonso ezali mabe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mbeba oyo komilelalela ekoki kobimisela yo moko mpe bato mosusu
  • Lolenge nyonso ya komilelalela ekweisami?
  • Lisangá ya boklisto
  • Kende komilela epai na ye oyo azali na bokonzi
  • Mpo na nini moto na koimaima azalaka na esengo te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mpo na nini tosengeli koboya ezaleli ya komilelalela?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Tóboya koimaima
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Tólanda kosala na bomoko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
w97 1/12 nk. 29-31

Komilelalela nyonso ezali mabe?

Mitungisi motindo nini miyokisaka mpasi makasi koleka oyo na ntina na yango tokoki te komilela?​—Marquis De Custine, 1790-​1857.

NA BOUMELI ya mbula mibale mobimba ayikaki mpiko na motungisi ya moninga moko ya mosala oyo azalaki kosɛnga ye mbala na mbala ete básangisa nzoto. Lokola azalaki koboya, yango esalaki ete akóma kofinga ye mpe alongolaki ye na mosala. Lokola akómaki konyokwama na makanisi yango esalaki ete nzoto na ye ezala lisusu kolɔngɔ́nɔ́ te, kasi akokaki kosala nini? Ndenge moko na ye, moyekoli moko oyo azalaki kolónga bobele na esika ya liboso na kelasi, balongolaki ye mpo ete lisosoli na ye epekisaki ye kosangana na lisano ya bitumba oyo eteyelo na bango ebongisaki. Bango nyonso mibale bamonaki ete basalaki bango mabe, kasi basengelaki komilelalela? Soki bamilelalelaki, bakokaki kozala na elikya ete bakobɔndisama to yango elingaki nde bobele kobakisa mpasi?

Komilelalela motindo oyo to na mitindo mosusu ezali mpo na bato nyonso, lokola tozali kobika elongo na bato bazangi kokoka kati na mokili mabe. Komilelalela ezali komonana epai ya bato nyonso mpo na komonisa kozanga esengo, mawa, mpasi, to kozanga bosepeli likoló na likambo moko, to mpo na maloba ya moto moko. Bato mingi baboyaka komilelalela mpe kowelana; nzokande, moto asengeli ntango nyonso kokanga monɔkɔ? Likanisi ya Biblia ezali nini na likambo yango?

Mbeba oyo komilelalela ekoki kobimisela yo moko mpe bato mosusu

Na ntembe te, elimo ya komilelalela ntango nyonso ebimisaka makámá, mpe ekweisami na Biblia. Moto oyo azali na elimo ya komilelalela akomibendela makámá na nzoto mpe na elimo, mpe akotungisa bato oyo na ntina na bango azali komilelalela. Kolobeláká mwasi oyo amilelalelaka, lisese ya Biblia elobi ete: “Nsambá oyo ekotangisaka mai ekokimisa moto libándá na mokolo ya mbula makasi mpe mwasi na makɛlɛlɛ bazali lolenge moko.” (Masese 27:15, NW) Komilelalela mpo na kotɛmɛla Yehova to moko na bibongiseli na ye ebongi na etumbu. Ntango libota ya Yisalaele bazalaki komilelalela na ntina na mana ya ekamwiseli oyo bazwaki na boumeli ya mbula 40 ya mobembo na bango ya mpasi kati na mokili mokauki, kobengáká yango “biloko mabe,” Yehova atindaki banyoka ya ngɛngɛ mabe mpo na kopesa etumbu na bato ya komilelalela oyo bazangaki limemya, mpe mingi bakufaki.​—Mituya 21:5, 6.

Lisusu, Yesu apesaki bayekoli na ye toli ete, tómilelalelaka te na ntina na “mpumbu” ya mabunga oyo tozali komona epai na baninga na biso bato, kasi tóyeba bonene ya “libaya” ya kozanga kokoka oyo biso moko tozali na yango. (Matai 7:1-5) Bobele bongo, Paulo akweisaki kosambisa (lolenge moko ya komilelalela) moninga lokola ete “abongi te na kolimbisama . . . zambi yo mosambisi okosalaka makambo lokola bamosusu.” Makebisi oyo matali komilelalela ekopusa biso na koboya ete bato bálobela biso mabe kozanga ntina mpe tókolisa te elimo ya komilelalela.​—Baloma 2:1.

Lolenge nyonso ya komilelalela ekweisami?

Tokoki kosukisa na koloba ete, lolenge nyonso ya komilelalela esengeli kokweisama? Te, tokoloba bongo te. Biblia ezali komonisa ete kozanga bosembo ezali mingi kati na mokili mabe oyo tozali kobika mpe esengeli mpenza kosembolama. Kati na lisese moko, Yesu alobelaki mosambisi mabe moko oyo atako asepelaki te asalelaki mwasi-mokufeli mobali moko boyengebene mpo ete “alɛmbisa [ye] na koya mingi boye te.” (Luka 18:1-8) Na makambo mosusu biso mpe tosengeli kolendendela kati na komilelalela na biso kino bakobongisa mbeba.

Na kolendisáká biso ete tóbondelaka mpo Bokonzi ya Nzambe eya, Yesu amonisaki biso ntina ya koyeba kozanga kokoka ya mokili oyo mpe ya ‘kobelela’ epai na Nzambe mpo na kozwa lisungi, boye te? (Matai 6:10) Ntango “kolela” na ntina na Sodomo mpe na Gomola ya kala ekómelaki ye, Yehova atindaki bamemi nsango na ye “kotala soko basili kosala pelamoko nsango ekómi na esika na ngai” mpe mpo na kopesa lisungi. (Genese 18:20, 21) Mpo na kobɔndisama ya baoyo balelaki epai na ye, Yehova na nsima abongisaki likambo yango na kobomáká bingumba mibale mpe bafandi na yango oyo bazalaki na etamboli ya mbindo.

Lisangá ya boklisto

Matata makoki kozala kati na bandeko ya lisangá ya boklisto? Atako bazali mibali mpe basi ya kozanga kokoka, baklisto bazali kosala milende mpo na kosalela Nzambe kati na kimya mpe na bomoko. Nzokande, makambo makoki kobima kati na bango oyo makoki kotinda na komilelalela mpe ekosɛnga kopesa lisungi. Na ekeke ya liboso, likambo moko ebimaki na lisangá ya bapakolami mwa moke nsima ya Pantekote. Bato mingi oyo bakómaki baklisto sika batikalaki na Yelusaleme mpo na kozwa mateya mpe koyikisama mpiko. Bazalaki kokabolela bango bilei. Nzokande, “Bayuda oyo balobi lokótá na Greke baimaimaki na ntina na Baebele, mpo ete basi-bakufeli-mibali kati na bango bazangaki na ntango na kokabola biloko na mokolo na mokolo.” Atako bakweisaki bato oyo bazalaki komilelalela lokola bato na yikiyiki, bantoma batalelaki likambo yango mpo na kobongisa yango. Ya solo, komilela oyo ezangi kolekisa ndelo, oyo esalemi na limemya mpe na elimo ya malamu, ekoyokama malamu epai na baoyo bazali kokɛngɛla lisangá mpe bakotalela yango.​—Misala 6:1-6; 1 Petelo 5:3.

Kende komilela epai na ye oyo azali na bokonzi

Osili koyekola uta na bandakisa tolobeli na lisoló oyo ete komilelalela esengeli kosalema na elimo ya malamu mpe epai na ye oyo azali na bokonzi, boye te? Na ndakisa, ekozala bolema kokende komilela epai na polisi na ntina na ntalo makasi ya mpako to epai na zuzi na ntina na bokɔnɔ ya nzoto. Lisusu, ebongi te komilela na ntina na likambo moko oyo ezali kati na lisangá to na libándá ya lisangá epai ya moto oyo azali na bokonzi te to oyo akoki te kopesa lisungi.

Na mikili mingi lelo, ezali na bisambiselo mpe na bakonzi oyo babongi mpe ebongi kokutana na bango na elikya ya kozwa mwa libɔndisi. Ntango moyekoli oyo tolobelaki na ebandeli ya lisoló akendaki komilela na esambiselo, bazuzi balóngisaki ye, mpe bazongisaki ye na kelasi elongo na mokanda moutaki na eteyelo kati na yango basɛngaki ye bolimbisi. Bobele bongo, mosali oyo ya mwasi oyo batungisaki ye mpo na kosangisa nzoto azwaki libɔndisi na lisalisi ya lisangani (syndicat) ya basi-basali. Azwaki mokanda kati na yango bakambi ya mosala basɛngaki ye bolimbisi. Bakonzi na ye ya mosala bazwaki meko mpo na kosukisa mitungisi na ntina na kosangisa nzoto.

Nzokande, esengeli te kokanisa ete, komilelalela nyonso ekosuka ndenge moko. Mokonzi na mayele Salomo alobaki na bosolo nyonso ete: “Oyo ekunzami ekoki kosembolama te.” (Mosakoli 1:15) Tosengeli koyeba ete makambo mosusu makozela bobele Nzambe mpo na kobongisa yango na ntango ekoki.

[Elilingi na lokasa 31]

Bankulutu bayokamelaka mpe batalelaka komilelalela oyo ezangi kolekisa ndelo

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto