Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/3 nk. 19-22
  • Mpo na nini moto na koimaima azalaka na esengo te

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini moto na koimaima azalaka na esengo te
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Komilela oyo ezali sembo
  • Likanisi ya Nzambe na ntina na bato ya koimaima
  • Kolonga elimo ya komilelalela
  • Komilelalela nyonso ezali mabe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Tóboya koimaima
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Mpo na nini tosengeli koboya ezaleli ya komilelalela?
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Mapamboli to bilakeli mabe​—⁠Bandakisa mpo na biso lelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/3 nk. 19-22

Mpo na nini moto na koimaima azalaka na esengo te

ESENGO monene ebongwanaki na kozanga elikya bobele nsima na mwa baposo. Esengo monene oyo Bayisraele bamonisaki na ebandeli mpo na bonsomi bautaki kozwa na kosikokwama na boombo ya Ezipito ebongwanaki na koimaima likolo na bilei. Na sanza ya mibale nsima na kobima na bango na Ezipito, libota wana ya kosilika elobaki ete balingaki kosepela kozala baombo na esika ya kozala na bomoi ya mpasi kati na mokili mokauki. Na basanza oyo elandaki, elimo wana ya koimaima elembisaki bikateli na bango ya kotosa Jéhovah mpe ebebisaki bilikya ya bato wana ya kokota na mabele ya ndaka.​—Exode 16:1-3; Mituya 14:26-30.

Ya solo, komilelalela esuki te bobele epai na bato na libota ya eleko moko to epai na moto moko. Nani oyo amilelaka te na bantango mosusu na ntina na mosala, bilei, mbula to moi makasi, bana, baninga ya pembeni to na ntalo ya biloko? Emonani lokola ete kozanga kokoka ya bato etindaka na komilelalela.​—Baloma 5:12; Yakobo 3:2.

Mpo na nini tomilelalelaka nokinoki? Mbala mosusu mpo ete tozangi mpiko, tolembi to tozali na bokono. Komilelalela ekoki kozala mwango ya komonisa kozanga bosepeli na biso, to ekoki kozala lolenge mosusu ya koloba: “Soki ezalaki ngai, mbele nalingaki kosala mosala yango malamu mingi!” Mbala mosusu komilelalela elendisamaka mpo na kozanga koyokana ya bomoto. Lisusu, ezali mpe na bambeba ya solo.

Ata soki bantina na yango ezali nini, komilelalela ekoki komema na libebi soki eumeli, lokola emonani na ndakisa ya Bayisraele oyo tolobelaki. Moto moko akoki kozala na moseno ya komilelalela ntango nyonso, komilelalela ata na lolenge oyo Jéhovah azali kotambwisa makambo. Mpo na nini ezali likama kosala bongo? Lolenge nini tokoki komonisa na malamu nyonso komilela oyo ezali sembo?

Komilela oyo ezali sembo

Soki motungisi ezali na ntina mingi te, motuna ya liboso oyo tosengeli komituna ezali oyo ete: Nakoki nde kozipa yango kati na bolingo? Ezali solo ete tokoki kozala na bantina ya komilelalela na ntina na moto moko, mbala mosusu ata moninga na biso kati na kondima. Ekoki kozala ete azangaki boboto to bosembo epai na biso. Ata bongo, komilelalela epai na basusu na ntina ya mbeba yango ekobongisa makambo? Biblia ezali kosenga ete tosala nini? Bakolose 3:13 elobi ete: “Soko moto moko azali na moto mosusu likambo, boyikanaka mpiko, bolimbisaka. Pelamoko Jéhovah alimbisi bino, bino mpe bobele bongo.” Na yango, ata wana komilelalela ezali na ntina, Makomami elendisi ezaleli ya kolimbisa na esika na komonisa elimo ya komilelalela.​—Matai 18:21, 22.

Bongo tokosala nini soko mbeba eleki monene mpo ete tokoka kozipa yango? Ekoki kozala na bantina malamu ya komonisa komilelalela. Ntango “kolela” ya ntina etali Sodomo mpe Gomola ekomaki epai na Jéhovah, azwaki bibongiseli mpo na kosembola makambo na bingumba wana ya mbindo. (Genese 18:20, 21) Komilelalela mosusu ya ntina ebimaki mwa moke nsima ya Pentekote ya mobu 33 T.B. Ntango bazalaki kokabola bilei epai na basi bakufeli mibali oyo bazalaki na bosenga, bamonisaki koponapona wana bapesaki bobele na basi oyo bazalaki koloba monoko ya Liebele. Lokola tokoki kososola yango, likambo wana ebimisaki koimaima epai na basi bakufeli mibali baoyo bazalaki koloba monoko ya Greke. Na nsima, komilelalela yango ekomaki na matoi na bantoma, mpe babongisaki nokinoki etuluku ya mibali oyo bazwaki mikumba ya kobongisa mokakatano wana.​—Misala 6:1-6.

Bobele bongo, bankulutu oyo baponami kati na lisanga ya boklisto basengeli kosala nokinoki mpo na kobongisa makambo minene oyo bamemi epai na bango. Masese 21:13 elobi ete: “Ye oyo akokanga matoi na ye wana mobola akolela, akolela ye moko nde akoyokama te.” Na esika ete bakanga miso likolo ya komilelalela ya sembo, bankulutu basengeli koyoka na boboto nyonso. Epai mosusu, biso nyonso tokoki kosalana elongo na bankulutu na komema mbeba ya minene epai na bango, na esika ya kolobaloba yango na moto nyonso oyo alingi koyoka.

Atako bongo, mingi kati na biso bakoki kondima na bosolo nyonso ete ntango mosusu kozanga kokoka etindaka biso na komilela kozanga ntina. Botaleli ya malamu ya etamboli ya Bayisraele kati na mokili mokauki ekomonisa biso likama ya kotika nzela ete koimaima na likambo moko ekola kino na elimo ya komilelalela.

Likanisi ya Nzambe na ntina na bato ya koimaima

Koimaima ya Bayisraele na ntina na bilei ezali komonisa makama mibale ya moboko ya komilelalela. Ya liboso, komilela epalanganaka. Lisolo elobi ete: “Lingomba mobimba na bato na Yisraele baimaimaki epai na Moize mpe na Alona kati na lisobe.” (Exode 16:2) Ekoki mpenza kozala ete mwa ndambo na bato babandaki komilela mpo na kozanga na bilei, mpe nokinoki bato nyonso bakomaki komilelalela.

Ya mibale, mbala mingi moimaimi amonisaka likambo monene koleka lolenge na yango. Na likambo oyo, Bayisraele balobaki ete mbele balingaki kozala malamu mingi na Ezipito, epai bakokaki kolya mampa mpe misuni lokola balingi. Bamilelaki ete bamemaki bango kati na mokili mokauki bobele mpo bakufa na nzala.​—Exode 16:3.

Ezalela na Bayisraele wana ezalaki solo na mpasi motindo yango? Ekoki kozala ete bilei na bango ebandaki kosila, kasi Jéhovah asilaki kokanisa likambo yango, mpe na elaka na yango apesaki mana mpo na kokokisa mposa na bango ya mosuni. Kolekisa ndelo kati na komilela na bango ezalaki komonisa kozanga kotyela Nzambe motema. Wana bazalaki na Ezipito bamilelaki na elonga nyonso na ntina na minyoko. (Exode 2:23) Kasi ntango Jéhovah asikolaki bango na boombo, babandaki komilela na ntina na bilei. Wana ezalaki koimaima ezangi ntina. Moize akebisaki bango ete: “Koimaima na bino ezali epai na biso te kasi epai na Jéhovah.”​—Exode 16:8.

Elimo wana ya komilelalela ya Bayisraele emonisamaki mbala na mbala. Bobele kati na mbula moko mana yango ekomaki ntina ya komilelalela. (Mituya 11:4-6) Nokinoki na nsima maloba ya kolembisa ya mibali 10 kati na banongi Bayisraele 12 mabimisaki kolela na ntina ya makama ya kokamata Mabele ya Ndaka. Bato bakomaki kino koloba ete: “Soki tokufaki na mokili na Ezipito, malamu! To soko tokufaki na lisobe oyo malamu!” (Mituya 14:2) Oyo nde kozanga botondi monene! Ezali likambo ya kokamwa te soko Jéhovah alobaki na Moize ete: “Bato oyo bakotyola ngai ntango molai boni? Bakoboya kondima ngai kino ntango molai boni?” (Mituya 14:11) Baimaimi wana bazangi botondi basengelaki kotambolatambola na mokili mokauki na boumeli ya mibu 40 kino libota mobimba wana esengelaki kosila.

Ntoma Paulo azali kokundola biso ndakisa wana. Akebisaki baninga na ye baklisto na kozala te lokola Bayisraele wana baoyo bakomaki baimaimi, bobele mpo na kokufa na mokili mokauki. (1 Bakolinti 10:10, 11) Ezali polele ete, koimaima kozanga ntina mpe elimo ya komilelalela ekoki kobebisa kondima na biso mpe komema na koboyama na Jéhovah.

Nzokande, Jéhovah azali na motema molai epai na basaleli na ye baoyo bakomilela na ntango mosusu na ntina na makambo ya kolembisa. Ntango mosakoli Eliya akimaki na ngomba Holebe na ntina na minyoko ya mokonzi mwasi mabe Yezabele, akanisaki ete mosala na ye ya mosakoli esili kokoma na nsuka na yango. Azalaki na libunga ya kokanisa ete atikalaki bobele ye moko mosaleli na Jéhovah kati na mokili. Mpo na kolendisa kondima na Eliya, Nzambe amonisaki ye liboso nguya na Ye. Ayebisaki na mosakoli ete ezali na basaleli ya sembo ya Jéhovah 7.000 na Yisraele mpe mosala mozalaki naino mingi mpo na mosakoli. Na yango, Eliya abosanaki komilelalela na ye mpe akobaki na nguya ya sika. (1 Mikonzi 19:4, 10-12, 15-18) Soko bankulutu baklisto bakomonisa bososoli, bakokoka mpe kosolola na baninga na bango bandimi na lolenge ya kobondisa, kosalisa bango na komona mokumba na bango kati na kokokisama ya mokano na Nzambe.​—1 Batesaloniki 5:14.

Kolonga elimo ya komilelalela

Lolenge nini kolonga elimo ya komilelalela? Mpo na kolendisa moto ete atika komela makaya esengeli kopesa bilembetele ete likaya ezali mabe mpo na kolongono ya nzoto. Bobele bongo, koyeba mpo na nini elimo ya komilela ezali mabe ekoki kopusa biso na kotika momeseno ya komilelalela.

Litomba nini baoyo bazali kolonga elimo ya komilela bazali kozwa? Litomba ya ntina baoyo bazali kopengola ezaleli ya komilelalela bazali kozwa ezali ya komona makambo na lolenge ya Makomami mpe na bosolo nyonso. Moto na koimaima azwaka mpenza ntango te ya kokanisa lolenge Jéhovah azali kotalela likambo. Bayisraele na koimaima babosanaki ete Jéhovah Nzambe asikolaki bango na boombo mpe na ekamwiseli akabolaki Mai Motane mpo na bango. Makanisi mabe na bango epekisaki bango na komona nguya na Nzambe mpe elongolaki esengo na bango. Na nsuka, elikya na bango epai na Jéhovah esilaki.

Lisusu, moto oyo akoki kotalela na bosolo nyonso mikakatano na ye akososola esika mabunga na ye moko mazali ntina ya mikakatano na ye. Ekozala mpasi ete akoka lisusu kozongela yango. Yilimia akebisaki baninga na ye Bayisraele ete bamilelalela te na ntina na mpasi oyo bazalaki na yango nsima ya kobomama na Yelusaleme. Mpasi na bango eutaki na masumu na bango mpenza, mpe ezalaki likambo oyo basengelaki koyeba mpo bakoka kobongola motema mpe kozonga epai na Jéhovah (Bileli 3:39, 40) Bobele bongo, moyekoli Yuda akweisaki “batyoli na Nzambe” baoyo babwakaki etambwiseli ya Jéhovah mpe bakomaki “baimaimi oyo bazali koimaima mpo na makambo na bango.”​—Yuda 3, 4, 16.

Lokola mokonzi Salomo amonisaki yango na libaku moko, “motema na kosepela ekosalaka lokola nkisi; nde elimo etutami ekokaokisa mikwa.” (Masese 17:22) Elimo ya komilelalela ekolembisa maoki na biso mpe ekolongola esengo na biso. Ezali komonisa elimo ya kozanga kolonga kasi elimo ya kolonga makambo te. Kasi baoyo bazali koyekola kokanisa mpe koloba ˈlisanzoliˈ bazali na motema ya esengo, oyo ekoki ata kosala ete bamiyoka malamu.​—Bafilipi 4:8.

Na ntembe te, bomoi na biso ekozala malamu mingi soki tozali kotalela bizaleli malamu na bato na esika ya kotala mabunga na bango. Tokotombwana soko tosali makasi ete tozwa litomba na eleko ya komekama oyo tokutani na yango na esika ya koimaima na ntina ya mawa na biso. Ata komekama ekoki kozala libaku ya esengo soki totaleli yango lokola libaku malamu mpo na kolendisa kondima na biso mpe kokolisa mpiko na biso.​—Yakobo 1:2, 3.

Epai mosusu, ezali na ntina monene koyeba ete wana tozali koimaima tozali bobele komisalela mabe. Soki tozali ntango nyonso komilelalela, tokoki mpe kolembisa kondima na baninga na biso. Rapport mabe ya banungi Bayisraele 10 esalaki ete libota mobimba emona bokoti na mabele ya ndaka lokola likama oyo ekopesa litomba te. (Mituya 13:25 kino 14:4) Na libaku mosusu, Moize alembaki na ntina na koimaima ezangi nsuka oyo bato babisaki kino asengaki na Jéhovah ete aboma ye. (Mituya 11:4, 13-15) Nzokande, soki tolobeli makambo na lolenge ya kotonga, tokoki kolendisa kondima na bango mpe tokobakisa esengo na bango.​—Misala 14:21, 22.

Atako tokoki komekama ete tomilelalela na ntina na baninga na biso ya mosala, baninga, basangani na libota to ata na ntina na bankulutu ya lisanga, Jéhovah azali kolendisa biso na “kozala na bolingo mozindo moko na mosusu.” Bolingo ya lolenge oyo ekopusa biso na kozipa mabunga na basusu na esika ya koyeisa bikweli na bango monene. (1 Petelo 4:8) Likambo ya esengo, Jéhovah azali komikundola ete tozali bobele mputulu mpe azali kotala mabunga na biso te. (Nzembo 103:13, 14; 130:3) Soki biso nyonso tomeki kolanda ndakisa na ye, na ntembe te tokomilela mingi te.

Ntango bato bakokoma na kokoka, moto moko te akozala na bantina ya komilela mpo na makambo na ye. Naino tozali kozela boyei ya ntango wana, tosengeli kotemela komekama mpo na oyo etali komilelalela na ntina na basusu to na ntina na mikakatano na biso moko. Mpo na komonisa ete tozali kotyela Jéhovah motema mpe ete tolingi solo baninga na biso baklisto, tika ete “tosala makambo nyonso kozanga koimaima.” (Bafilipi 2:14) Ekosepelisa Jéhovah mpe ekopesa biso litomba monene. Mpo na bolamu na biso moko mpe na oyo ya basusu, tika tobosana te ete moto na koimaima azalaka na esengo te.

[Elilingi na lokasa 20]

Ata mana oyo Nzembe apesaki na ekamwiseli ekomaki ntina ya koimaima

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto