Eyenga ya Mbotama: Feti ya mokili to mokolo mosantu ya lingomba?
NA EKÓLO Chine babéngaka ye Mobangé ya Eyenga ya Mbotama. Na ekólo Angleterre, ayebani na nkombo ya Tata Noël. Na ekólo Russie, babéngaka ye Nkɔkɔ Frost, mpe na États-Unis, bapesá ye nkombo Santa Claus (Saint Nicolas).
Mpo na bato mingi, mobangé yango ya boboto, azali na libumu monene mpe na mandefu milai mpɛmbɛ amonisaka mpenza Eyenga ya Mbotama. Kasi, eyebani mpe malamu ete Saint Nicolas azali moto ya solo te, azali sé moto ya lisapo euti na mimeseno ya misala ya episkɔ́pɔ moko ya ekeke ya minei ya engumba Myre (na ekólo Turquie ya mikolo na biso).
Mimeseno mpe bonkɔkɔ ezalaka ntango nyonso na bopusi makasi likoló na milulu, mpe ezali bobele bongo mpo na Eyenga ya Mbotama. Lisapo ya Saint Nicolas ezali sé ndakisa moko ya bonkɔkɔ oyo euti na feti ya bato ya mokili. Atako bato mosusu balobaka ete mimeseno ya Eyenga ya Mbotama miuti na makambo makomami kati na Biblia, nzokande bosolo ezali ete mimeseno yango mingi miuti mpenza na bopakano.
Ndakisa mosusu ezali bongo nzeté ya Eyenga ya Mbotama. Búku The New Encyclopædia Britannica elobi ete: “Losambo ya nzeté, oyo epalanganaki mingi epai ya bapakano na mikili ya Mpótó, ekóbaki na mimeseno ya bato ya mikili ya Scandinavie mitali kokembisa ndako mpe bibombelo na nzeté oyo nkasa na yango ekaukaka te na mbula ya sika mpo na kobengana mabe mpe mimeseno mitali kolóna nzeté mpo na bandɛkɛ na eleko ya Eyenga ya Mbotama, ata nsima wana bato yango babongwanaki na losambo ya boklisto.”
Kosalasala biloko ya bonzenga na nzeté ebéngami houx to nzeté mosusu oyo nkasa na yango ekaukaka te ezali mpe momeseno ya Eyenga ya Mbotama oyo epalangani mingi epai ya bato. Momeseno yango mpe euti mpenza na losambo ya bapakano. Baloma ya kala bazalaki kosalela bitape ya nzeté ya houx mpo na kokembisa batempelo na boumeli ya Saturnales, feti ya mikolo nsambo oyo ezalaki kosalema na katikati ya eleko ya malili mpo na Saturne, nzambe ya misala ya bilanga. Feti yango ya bopakano eyebanaki mpenza mpo na milangwa mpe misala ya mbindo.
Bato mosusu bakoki kotalela momeseno ya kopɛpwana na nsé ya nzeté ya gui na Eyenga ya Mbotama (lokola elakisami awa) ete ezali komonisa lolango, kasi yango ezali likambo oyo ezalaki kosalema kala na eleko ya Moyen-Âge. Banganga-nzambe (Druides) na ekólo Angleterre na ntango ya kala bazalaki kokanisa ete nzeté ya gui ezalaki na nguya ya kokamwa; na yango, bazalaki kosalela yango mpo na komibatela na bademó, na bilakeli mabe, mpe na makambo mosusu oyo ekoki komemela bango mabe. Na nsima, biyambayamba ebimaki ete soki bato bazali kopɛpwana na nsé ya nzeté ya gui, bakobalana. Momeseno yango ezali naino komonana epai ya bato mosusu na eleko ya Eyenga ya Mbotama.
Makambo oyo tolobeli ezali sé mwa ndambo ya mimeseno ya Eyenga ya Mbotama na mikolo na biso oyo ezwaki bopusi to eutaki mpenza na mateya ya bapakano. Kasi, okoki komituna ete ndenge nini yango esalemaki. Lolenge nini eyenga oyo elobelami ete ezali mpo na kokumisa mbotama ya Klisto ekómaki na mimeseno mingi miuti na boklisto te? Likambo lileki ntina, lolenge nini Nzambe atalelaka yango?