Fɛti ya Noele ezalaka mpenza mpo na nini?
MPO na bato mingi, bafɛti ya nsuka ya mbula ezalaka ntango malamu mpo na kokutana na bandeko to baninga, to mpe kokanisa lisusu baninga oyo tobosaná. Mpo na bato mosusu ezali ntango ya kokanisa mbotama ya Yesu Klisto mpe mokumba na ye ya kobikisa bato. Nzokande, na bokeseni na mikili mingi, bato ya Russie bazalaki na ndingisa ya kosala fɛti ya Noele te na bileko mosusu. Banda bankama ya bambula, bandimi ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Russie bazalaki kosala fɛti ya Noele, kasi na boumeli ya bambula mingi ya ekeke ya 20, bazalaki lisusu kosala yango te. Nini ebongolaki makambo?
Mwa moke nsima ya mbongwana oyo ekɔtisaki boyangeli ya Bakoministe na mobu 1917, bakonzi ya Union soviétique batɛmɛlaki makasi likambo ya kosambela na ekólo wana mobimba. Bapekisaki fɛti ya Noele ná makambo nyonso ya losambo oyo basalaka na fɛti yango. Bakonzi ya Leta bakómaki kotɛmɛla makasi fɛti ya Noele mpe ya Bonane. Kutu, bapekisaki ata biloko oyo basalelaka na fɛti yango, na ndakisa nzete ya Noele mpe Ded Moroz, to Père Noël.
Na 1935, mbongwana moko monene ekɔtaki na ndenge oyo bato ya Russie bazalaki kosala fɛti ya Noele mpe ya Bonane. Bakonzi ya Union soviétique, bazongisaki Père Noël, nzete ya Noele, mpe fɛti ya Bonane—kasi ekómaki na ndimbola mosusu. Balobaki ete Père Noël akobanda komema bakado na Noele te, kasi na Bonane. Ndenge moko mpe, nzete ya Noele ekozala lisusu te; ekokóma nde nzete ya Bonane! Yango wana, na Union Soviétique, mbongwana monene ekɔtaki na ndenge ya kotalela bafɛti yango. Na maloba mosusu, fɛti ya Bonane ezwaki esika ya fɛti ya Noele.
Fɛti ya Noele ezalaki lisusu ata na likambo moko te oyo ezalaki komonisa ete ezali fɛti ya lingomba. Bakómaki kobongisa nzete ya Bonane na biloko ya lingomba lisusu te, kasi na biloko oyo ezalaki komonisa ndenge makambo ezalaki kobongwana na Union soviétique. Zulunalo moko ya Russie (Vokrug Sveta) elobi boye: “Tokoki komona ndenge oyo ekólo Union soviétique ezalaki kokola mokemoke soki totali kaka ndenge oyo, mbula na mbula, bazalaki kobongisa nzete ya Bonane. Longola biloko oyo bazalaki kosalela banda kala, lokola lapin, ngalasi, biteni ya mampa, bakómaki kobongisa nzete na lolenge ya makwangola, ya bamartɔ mpe ya batraktɛrɛ. Na nsima, na esika ya biloko wana bakómaki nde kosalela bikeko ya bato bazali kotimola charbon mpe bato oyo bakendaka na sanza, bamasini oyo ebendaka petrole na nse ya mabelé, bafize, mpe mituka ya mike oyo batambolaka na yango na sanza.”
Ezali boni mpo na Noele yango moko? Bazongisaki yango te. Kutu, bakonzi ya Union Soviétique bakómisaki yango lokola mikolo nyonso mosusu oyo bato basengeli kokende mosala. Baoyo balingaki kobatela mokolo ya Noele ete ezala mokolo ya losambo bazalaki kosala yango na kobombana, mpo soki bakonzi ya Leta bamoni bango ekobendela bango mindɔndɔ. Ya solo, na ekeke ya 20, na ekólo Russie, ndenge ya kotalela bafɛti ya nsuka ya mbula ebongwanaki, ezalaki lisusu mpo na makambo ya Nzambe te.
Mbongwana mosusu oyo euti kosalema
Na 1991, Union soviétique ekabwanaki mpe bato bakómaki na bonsomi mingi. Bakonzi ya Leta batikaki kopekisa makambo ya Nzambe. Bikólo mingi oyo eutaki na Union soviétique ekabolaki makambo ya Nzambe ná Leta. Bandimi mingi bamonaki ete bakoki sikoyo kozongela makambo na bango ya losambo. Bamonaki ete lolenge malamu ya kosala yango ezali ya kosala fɛti ya Noele. Kasi, mosika te bato yango mingi balɛmbaki nzoto. Mpo na nini?
Bakómaki komona ete fɛti yango ekómi nde libaku ya kosala mombongo mpe likambo yango ezali se kobakisama mbula na mbula. Ya solo, ndenge moko na mikili ya Mpoto, Noele ekómá libaku malamu mpenza mpo na bakompanyi oyo esalaka biloko ná bakomelesa. Na eleko ya Noele batyaka bafololo mpe biloko kilikili na bamagazini mpo na kobongisa yango. Na bamagazini yango, babɛtaka miziki mpe banzembo ya Noele oyo bayembaka na Mpoto oyo, liboso eyebanaki te na Russie. Na bingbunduka mpe na babisi, batɛkisi batambolaka na basakosi ya minene oyo etondi na biloko oyo bato basombaka mpo na kobongisa bandako mpe bisika mosusu na mokolo ya Noele. Yango nde makambo ekómi kosalema na Russie.
Ata bato oyo bamonaka mabe moko te ete bato básala mombongo ndenge wana, bakoki kotungisama na likambo mosusu oyo emonanaka mingi na eleko yango—kolangwa masanga mpe makama nyonso oyo yango ememaka. Monganga moko oyo asalaka na lopitalo moko na Moscou alobi boye: “Minganga bayebi ete mokolo ya Bonane bayambaka ebele ya bato oyo bazoki na kotutana, na mbɛli, na masasi, mpe mbala mingi na bitumba na kati ya bandako, na bitumba ya bato balangwe masanga, mpe na makama ya mituka.” Mokonzi moko ya Académie des sciences na Russie alobaki boye: “Motángo ya bato oyo bazali kokufa na makama oyo ebimaka mpo na kolangwa masanga ezali se komata. Motángo yango emataki mpenza makasi na mobu 2 000. Lisusu, motángo ya bato oyo bamibomaki mpe oyo babomamaki emataki.”
Likambo ya mawa, na Russie, ezali na eloko mosusu oyo esalaka ete makama wana ebakisama lisusu na eleko yango. Lisolo moko oyo ezalaki na motó ya likambo “Bato ya Russie basalaka fɛti ya Noele mbala mibale,” oyo ebimaki na zulunalo moko (Izvestiya) elobaki boye: “Na Russie, moto soki moko kati na bato zomi asalaka fɛti ya Noele mbala mibale. Lapolo moko ya ROMIR emonisi ete bato 8 kati na monkama (8%) oyo batunaki balobaki ete basalaka fɛti ya Noele mbala mibale: mokolo ya 25 Desɛmbɛ na kolanda manaka ya Lingomba ya Katolike mpe mokolo ya 7 Yanuali na kolanda manaka ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse . . . Bato mosusu basepelaka mingi na Noele mpo na kosala fɛti, kasi te mpo na komipesa na makambo ya losambo.”a
Ndenge oyo bakómi kosala bafɛti yango ekumisaka mpenza Klisto?
Na ntembe te, makambo mingi ya mbindo esalemaka na eleko wana ya fɛti ya Noele mpe ya Bonane. Atako makambo ya mabe esalemaka na eleko yango, bato mosusu bamonaka ete basengeli kosala bafɛti yango mpo na komonisa limemya epai ya Nzambe mpe Klisto. Mposa ya kosepelisa Nzambe ezali mabe te. Kasi, Nzambe mpe Klisto basepelaka mpenza na fɛti ya Noele? Tótalela ndenge bafɛti yango ebandaki.
Na ndakisa, ata soki moto akanisaka nini mpo na ndenge oyo Union soviétique ezalaki kotalela fɛti ya Noele, ekozala mpasi tówangana likanisi ezali na buku moko (Great Soviet Encyclopedia) oyo elobi boye: “Noele . . . eutá na losambo moko oyo ezalaki liboso ya ntango na biso, losambo ya banzambe oyo ‘bazalaki kokufa mpe kolamuka,’ oyo mingimingi basali-bilanga bazalaki kosala na eleko ya solstice d’hiver oyo ezalaki kobanda na mokolo ya 21 tii 25 Desɛmbɛ; mbula nyonso bazalaki kosala fɛti ya ‘mbotama’ ya Nzambe-Mobikisi, oyo azalaki kobandisa bomoi ya sika.”
Buku yango ebakisi mpe likambo mosusu oyo okoki komona ete ezali na ntina mingi: “Baklisto ya bikeke ya liboso bayebaki fɛti ya Noele te. . . . Na katikati ya ekeke ya minei, baklisto balandaki momeseno ya fɛti ya solstice d’hiver oyo bazwaki na losambo ya Mithra, mpe bakómisaki yango fɛti ya Noele. Bato ya liboso oyo basalaki fɛti ya Noele ezalaki bato ya mangomba ya Loma. Na ekeke ya zomi, fɛti ya Noele esalaki ete boklisto epalangana na Russie mpe basangisaki yango na fɛti ya eleko ya mpiɔ makasi oyo Ba-Slave bazalaki kosala mpo na kokumisa milimo ya bankɔkɔ.”
Ntango mosusu okoki komituna ‘Biblia, Liloba ya Nzambe, elobi nde ete Yesu abotamaki mokolo ya 25 Desɛmbɛ?’ Biblia epesi dati ya kobotama ya Yesu te, mpe ezali ata na lisolo moko te na kati ya Biblia oyo emonisi ete Yesu alobelaki dati yango, to mpe atindaki ete bato básalaka anivɛrsɛrɛ ya mokolo yango. Kasi, Biblia ezali kosalisa biso tóyeba eleko oyo Yesu abotamaki.
Evanzile ya Matai, mokapo 26 mpe 27, emonisi ete Yesu abomamaki na mokolo ya 14 Nisana, na nsuka ya mokolo ya Pasika ya Bayuda oyo ebandaki na mokolo ya 31 Marsi ya mobu 33 ya ntango na biso (T.B.). Evanzile ya Luka eyebisi biso ete Yesu azalaki na mbula soki 30 ntango azwaki batisimo mpe abandaki mosala na ye ya kosakola. (Luka 3:21-23) Asalaki mosala na ye na boumeli ya mbula misato na ndambo. Na yango, Yesu azalaki na mbula soki ntuku misato na misato na ndambo ntango akufaki. Alingaki kokokisa mbula 34 mokolo ya 1 Ɔkɔtɔbɛ ya mobu 33 T.B. Luka alobi ete ntango Yesu abotamaki, babateli ya bampate bazalaki “kofanda libándá mpe kolekisa bokɛngɛli ya butu na kobatela bitonga na bango.” (Luka 2:8) Babateli ya bampate bakokaki te kozala libándá ná bitonga na bango na ntango ya mpiɔ makasi ya Desɛmbɛ, na ntango oyo, mbala mosusu nɛjɛ ezalaki kokwea na Beteleme mpe zingazinga na yango. Kasi bakokaki kozala libándá ná bitonga na bango mokolo ya 1 Ɔkɔtɔbɛ, mokolo oyo, makambo mingi emonisi ete ekoki kozala mokolo oyo Yesu abotamaki.
Kasi, ezali boni mpo na fɛti ya Bonane? Ndenge tomonaki yango, makambo mingi ya mabe esalemaka na fɛti yango. Atako milende ezali kosalema mpo na kokómisa yango fɛti ya bato nyonso, yango mpe eutá na mimeseno ya malamu te.
Na kotalela makambo nyonso oyo esalemaka na eleko ya fɛti ya Noele mpe ya Bonane, tomoni mpenza ete koloba ete oyo ezali ntango ya kokanisa Yesu ezali na ntina moko te. Soki makambo lokola mombongo oyo esalemaka na eleko ya fɛti ya Noele mpe ya Bonane, misala ya mbindo, mpe ndenge bafɛti yango eutá na losambo ya bapakano ezali kotungisa yo, kolɛmba nzoto te. Ezali na lolenge moko ya malamu oyo tokoki kosambela Nzambe, kokumisa Klisto mpe kosala ete tólingana lisusu mingi na bato ya libota na biso.
Lolenge malamu ya kokumisa Nzambe mpe Klisto
Biblia eyebisi biso ete Yesu Klisto ayaki mpo na “kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.” (Matai 20:28) Atikaki ete báboma ye, andimaki kokufa mpo na masumu na biso. Bato mosusu bakoki kozala na mposa ya kokumisa Klisto mpe bakoki kokanisa ete ezali malamu básala yango na fɛti ya Noele. Kasi, ndenge tomoni yango, fɛti ya Noele mpe ya Bonane ezalaka ata na likambo moko te oyo ekumisaka Klisto mpe tomoni ete bafɛti yango eutá na losambo ya bapakano. Lisusu, ata soki fɛti ya Noele esepelisaka bato mosusu, ezali eleko moko oyo bato bamipesaka mingi nde na mombongo. Tóbosana mpe te ete na fɛti ya Noele, bato basalaka makambo ya mabe oyo Nzambe mpe Klisto baboyaka.
Moto oyo azali koluka kosepelisa Nzambe asengeli kosala nini? Na esika ya koluka kolanda mimeseno ya bato oyo ekoki komonana lokola nde ezali ya lingomba, nzokande ezali na boyokani te na Biblia, moto ya sembo akoluka nde lolenge ya malamu ya kokumisa Nzambe mpe Klisto. Lolenge yango ya malamu ezali nini, mpe ndenge nini kosala yango?
Klisto ye moko alobi na biso boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Ya solo, moto oyo azali sembo alukaka koyeba malamumalamu ndenge ya kokumisa Nzambe mpe Klisto. Na nsima, asalelaka boyebi yango na ntango moko boye kaka te, kasi na bomoi na ye ya mokolo na mokolo. Nzambe asepelaka mpenza na milende wana ya sembo, oyo ekoki komema moto na bomoi ya seko.
Okolinga ete libota na yo mpe ezala na kati ya bato oyo bakumisaka Nzambe mpe Klisto na ndenge Biblia ezali koteya? Batatoli ya Yehova basalisi bamilio ya mabota na mokili mobimba bázwa boyebi ya ntina mingi oyo ezali na kati ya Biblia. Tolendisi yo okutana na Batatoli ya Yehova na kartye na bino to otindela bango mokanda na adrɛsi oyo ezali na lokasa 2 ya zulunalo oyo.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Liboso ya mbongwana oyo ebandisaki boyangeli ya Bakoministe na Ɔkɔtɔbɛ 1917, Russie ezalaki kosalela manaka ya kala ya Jules César, kasi mikili mingi ekómaki kosalela manaka ya Grégoire. Na 1917, esengelaki kobakisa mikolo 13 na manaka ya Jules César mpo ekokana na manaka ya Grégoire. Na eleko ya Bakoministe, Union soviétique eponaki kosalela manaka ya Grégoire; na ndenge yango, Russie ekómaki kotánga mikolo ndenge moko na bikólo mosusu. Nzokande, Lingomba ya Ɔrtɔdokse ezalaki kaka kolanda manaka ya Jules César mpo na oyo etali mikolo na yango ya bafɛti, mpe bakómaki kobenga yango “manaka ya kala.” Yango wana, okoki koyoka ete na Russie, basalaka fɛti ya Noele na mokolo ya 7 Yanuali. Kasi, kobosana te ete mokolo ya 7 Yanuali na manaka ya Grégoire ezali nde mokolo ya 25 Desɛmbɛ na manaka ya Jules César. Yango wana, bato mingi ya Russie bakabolaka mikolo ya bafɛti yango boye: Mokolo ya 25 Desɛmbɛ, Noele na ndenge ya bato ya Mpoto; mokolo ya 1 Yanuali, Bonane; mokolo ya 7 Yanuali, Noele na kolanda Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse; mokolo ya 14 Yanuali, Bonane na kolanda manaka ya kala.
[Etanda/elilingi na lokasa 7]
Epai oyo fɛti ya Bonane eutá
Sango moko ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse ya Géorgie alimboli
“Fɛti ya Bonane eutá na bafɛti mosusu ya bapakano na Loma ya kala. Mokolo ya 1 Yanuali ezalaki mokolo oyo bazalaki kosala fɛti ya Janus, nzambe moko ya bapakano, mpe nkombo ya sanza yango eutá nde na nkombo wana. Bikeko ya Janus ezalaki na bilongi mibale, moko liboso mosusu na nsima, yango ezalaki komonisa ete azali na likoki ya komona makambo oyo eleká mpe oyo ezali kosalema. Bazalaki koloba ete moto nyonso oyo azalaki koyamba mokolo ya 1 Yanuali na bisengo, kosɛka, kolya mpe komɛla mingi, azalaki kolekisa mbula yango mobimba na bisengo mpe bolamu. Bato mingi mpe ya mboka na biso basalaka fɛti yango na makanisi moko wana . . . Na bafɛti mosusu ya bapakano bato bazalaki kopesa mbeka epai ya ekeko moko. Na bafɛti mosusu bato bazalaki kolekisa ndelo na kolya mpe komɛla, kosala ekobo mpe pite. Na mabaku mosusu, na ndakisa ntango bazali kosala fɛti ya Janus, bato bazalaki kolekisa ndelo na kolya mpe komɛla, kolangwa masanga, mpe kosala makambo mosusu ya mbindo. Soki tokanisi ndenge oyo biso mpe tozalaki kosala fɛti ya Bonane, tokomona ete biso nyonso tosalá fɛti wana ya bapakano.”—Euti na zulunalo moko ya Géorgie.
[Elilingi na lokasa 6]
Mangomba ya boklisto elandaki makambo ya losambo ya Mithra
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Museum Wiesbaden
[Elilingi na lokasa 7]
Babateli ya bampate bakokaki kozala libándá te ná bitonga na bango na ntango ya mpiɔ makasi ya Desɛmbɛ