Kobika na biso na ‘Mokolo ya Yehova’
“Mokolo na [Yehova] ezali monene mpe na nsɔ́mɔ mingi; nani akokoka koyikela yango mpiko?”—YOELE 2:11.
1. Mpo na nini ‘mokolo na nsɔ́mɔ mingi ya Yehova’ esengeli kozala mokolo ya esengo?
YOELE, mosakoli ya Nzambe amonisi ete “mokolo ya Yehova” ekozala na “nsɔ́mɔ mingi”! Nzokande, biso baoyo tolingaka Yehova mpe tosili komipesa na ye na moboko ya mbeka ya lisiko ya Yesu, tosengeli te kolɛnga na nsɔ́mɔ mpo ete mokolo ya Yehova ezali kobɛlɛma. Ya solo, ekozala mokolo ya nsɔ́mɔ, kasi ekozala mpe mokolo ya kobikisama monene, mokolo ya kosikolama na ebongiseli mabe ya biloko oyo ezali konyokola bato uta bankóto ya bambula. Mpo na koya ya mokolo wana, Yoele azali koyebisa libota ya Nzambe ete, “Sepelá mpe yoká esengo, zambi [Yehova] asali makambo minene,” mpe abakisi endimiseli oyo ete: “Mpe moto na moto oyo akobelela nkombo na [Yehova] akobika.” Bongo, na nsé ya ebongiseli ya Bokonzi ya Nzambe, “baoyo bakobika bakozala lokola elobaki [Yehova]; mpe kati na litika, baoyo bakobyangama na [Yehova] bakozala.”—Yoele 2:11, 21, 22, 32.
2. Na kokokisama ya mikano ya Nzambe, likambo nini ekosalema (a) na ‘mokolo na Nkolo” (b) na “mokolo na Yehova”?
2 Mokolo ya nsɔ́mɔ mingi ya Yehova ekeseni na “mokolo na Nkolo” oyo elobelami na Emoniseli 1:10. Mokolo na Nkolo esangisi eleko nyonso oyo bimonaneli 16 bilobelami kati na mokanda ya Emoniseli mikapo 1 kino 22 bizali kokokisama. Yango esangisi eleko nyonso ya kokokisama ya makambo Yesu asakolaki na eyano oyo apesaki na motuna ya bayekoli na ye ete: “Nyonso oyo ekoya ntango nini mpe elembo na [kozala, NW] na yo mpe nsuka na ekeke ekozala nini?” Kozala ya Yesu na likoló ezali komonana awa na mabelé na ‘bitumba ya nsɔ́mɔ, nzala, koyinana, maladi, mpe kotyola mibeko.’ Lokola makambo yango ya mawa mazali sé koyikana, Yesu azali kobɔndisa bato bazali kobanga Nzambe na kotindáká bayekoli na ye na ntango oyo ete básakola “nsango malamu oyo na Bokonzi . . . na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso.” Na nsima, mpo na kosukisa mokolo na Nkolo, “nsuka” ya ebongiseli ya biloko oyo, elingi koloba mokolo ya nsɔ́mɔ mingi ya Yehova, ekoya. (Matai 24:3-14; Luka 21:11) Yango ekozala mokolo oyo Yehova akopesa etumbu nokinoki na mokili ya Satana oyo esili kobeba. “Lola mpe mokili ikotetema. Kasi [Yehova] azali ekimelo mpo na bato na ye.”—Yoele 3:16.
Misala ya Yehova na mikolo ya Noa
3. Lolenge nini makambo mazali komonana mikolo oyo makokani na oyo ya mikolo ya Noa?
3 Makambo mazali komonana lelo na mokili makokani na oyo ya “mikolo na Noa” esili koleka sikawa mbula 4 000. (Luka 17:26, 27) Na Genese 6:5, tozali kotánga boye: “[Yehova] amonaki ete masumu na bato izalaki mingi na mokili mpe ete makanisi nyonso kati na mitema na bango izalaki bobele epai na mabe mikolo nyonso.” Lolenge mpenza mokili ezali lelo! Makambo ya mabe, lokoso, mpe kozanga bolingo ezali komonana mingi bipai nyonso. Mbala mosusu tokoki kokanisa ete bizaleli ya bato bibebi mpenza kino na ndelo ya nsuka. Kasi esakweli ya ntoma Paulo na ntina na “mikolo na nsuka” ezali sé kokóba kokokisama: “Bato mabe mpe bakosi bakoleka na mabe, bakozimbisa mpe bakozimbisama.”—2 Timoté 3:1, 13.
4. Losambo ya lokuta ezalaki na bopusi nini na ntango ya kala?
4 Mangomba masungaki nde bato na mikolo ya Noa? Kútu, mangomba ya lipɛngwi oyo mazalaki na ntango yango mabebisaki lisusu makambo. Baboti na biso ya liboso bandimaki liteya ya lokuta ya “nyoka na kalakala, oyo abyangami Motɛmɛli mpe Satana.” Na libota ya mibale uta na Adama, bato “babandaki kobyanga nkombo ya [Yehova],” kasi emonani ete ezalaki na lolenge ya kotyola. (Emoniseli 12:9; Genese 3:3-6; 4:26) Na nsima, banzelu batomboki, oyo batikaki mosala na bango bazalaki kosalela Nzambe, balataki nzoto ya bato mpo na koya kosangisa nzoto na bana basi kitoko oyo bazalaki awa na mabelé. Basi yango babotaki bana oyo bazalaki bingambe, babéngamaki Banefilime, bango bazalaki kokonza mpe konyokola bato. Na bopusi wana ya bademó, ‘bato nyonso babebisaki nzela na bango na mokili.’—Genese 6:1-12.
5. Na kotalela makambo masalemaki na mikolo ya Noa, likebisi nini Yesu apesi biso?
5 Kasi, libota moko ebatelaki bosembo na yango epai ya Yehova. Yango wana, Nzambe ‘abatelaki Noa, mosakoli na boyengebene, na bamosusu nsambo wana eyeisaki ye mpela na mokili likoló na batyoli.’ (2 Petelo 2:5) Mpela yango ezalaki elilingi ya mokolo ya nsɔ́mɔ mingi ya Yehova, oyo ekotya nsuka na ebongiseli ya biloko oyo mpe mpo na yango Yesu asakolaki ete: “Mpo na mokolo yango mpe ntango yango, moto ayebi te, ata baanzelu na Likoló te, ata Mwana mpenza te, kasi bobele Tata ayebi. Zambi lokola ezalaki mikolo na Noa, koya na Mwana na moto ekozala bongo. Mpo ete na mikolo yango liboso na mpela monene, bazalaki kolya mpe komela, kobala mpe kobalisa, kino mokolo eingelaki Noa na bwato; bayebaki likambo te kino eyaki mpela mpe elongolaki bango nyonso. Koya na Mwana na moto ekozala mpe bongo.” (Matai 24:36-39) Lelo oyo makambo mazali lolenge moko. Na yango, Yesu alendisi biso ete ‘tókeba mpo na biso moko, mpe tósɛnzɛla ntango nyonso, mpe tóbondela ete tózala na makasi na kokima makambo oyo nyonso malingi koya.’—Luka 21:34-36.
Etumbu ya Yehova likoló na Sodomo mpe Gomola
6, 7. (a) Makambo ya mikolo ya Lota mazalaki elilingi ya nini? (b) Likebisi nini ya polele tozwi na makambo yango?
6 Mwa bankámá ya bambula nsima ya Mpela, wana bakitani ya Noa bakómaki mingi na mabelé, Abalayama, moto ya sembo mpe Lota, mwana ya ndeko na ye bamonaki mokolo mosusu ya nsɔ́mɔ ya Yehova. Lota na libota na ye bafandaki na engumba Sodomo. Elongo na Gomola, oyo ezalaki pembeni, engumba yango etondaki na misala ya kosangisa nzoto na lolenge ya mbindo. Lobanzo ya liboso ya bafandi ya bingumba yango ezalaki ya koluka bozwi ya mosuni, mpe nsukansuka, mwasi ya Lota akómaki na elimo yango. Yehova ayebisaki Abalayama ete: “Kolela na ntina na Sodomo mpe na Gomola ezali monene mpe masumu na bango izali mabe mingi.” (Genese 18:20) Abalayama abondelaki Yehova ete aboma bato ya bingumba yango te mpo na basembwi oyo bafandaki kati na yango, kasi Yehova alobaki ete azwaki ata bato zomi te oyo bazalaki sembo kati na bingumba yango. Baanzelu batindamaki na Nzambe basungaki Lota mpe bana na ye mibale ya basi ete bákima na engumba Soali oyo ezalaki pene.
7 Nini esalemaki na nsima? Kokokanisáká “mikolo na nsuka” ya ntango na biso na oyo ya Lota, Luka 17:28-30 elobi ete: “Pelamoko na mikolo na Lota, balyaki, bamelaki, basombaki, batekaki, bakónaki, batongaki, nde na mokolo elongwaki Lota na Sodomo, mɔ́tɔ na sufulu na likoló inokaki mpe ibomaki bango nyonso. Ekozala lokola makambo oyo na mokolo ekomonana Mwana na moto.” Kobebisama ya Sodomo mpe Gomola na mokolo ya nsɔ́mɔ wana ya Yehova ezali likebisi ya polele mpo na biso oyo tozali na bomoi na ntango oyo ya kozala ya Yesu. Libota ya bato na mikolo na biso esili mpe ‘kosala pite na koleka mpe emipesi na mposa mabe ya nzoto mpo na kosala makambo mabongi te.’ (Yuda 7, NW) Lisusu, etamboli ya mbindo na oyo etali kosangisa nzoto ebimisi “maladi” mingi oyo Yesu asakolaki mpo na mikolo na biso.—Luka 21:11.
Yisalaele ebuki “ekumbaki”
8. Na meko nini Yisalaele ebatelaki kondimana elongo na Yehova?
8 Yehova asalaki malamu na koponáká Yisalaele ete ezala “bato na ye mpenza kati na bato nyonso, . . . bokonzi na banganga mpe libota na bulɛɛ.” Kasi, esengelaki na bango ‘kotosa monɔkɔ na ye mpe kobatela kondimana na ye.’ (Exode 19:5, 6) Bapesaki motuya na libaku malamu yango? Soko moke te! Ya solo, ezalaki na bato kati na libota yango oyo basalelaki ye na bosembo—na ndakisa Mose, Samwele, Davidi, Yosafata, Yizikiya, Yosiya, mpe basakoli basi mpe mibali oyo bamipesaki na Nzambe. Kasi, na mobimba na yango, libota yango lizalaki sembo te. Nsima ya bambula, bokonzi ekabwanaki na mibale—bokonzi ya Yisalaele mpe bokonzi ya Yuda. Mingi mpenza, mabota yango mibale makweaki na losambo ya bapakano mpe mimeseno mosusu ya kotuka Nzambe oyo mizalaki na mikili ya zingazinga.—Ezekiele 23:49.
9. Lolenge nini Yehova asambisaki bokonzi ya mabota zomi ya botomboki?
9 Lolenge nini Yehova atalelaki likambo yango? Lokola asalaka yango ntango nyonso, apesaki likebisi, na boyokani na etindá oyo Amosa alobaki: “Nkolo [Yehova] akosala likambo te bobele ete akoyebisa mwango na ye epai na baombo na ye, bango basakoli.” Amosa ye moko asakolaki makambo ya mawa mpo na Yisalaele, bokonzi ya nɔ́rdi: “Boye, mokolo ya Yehova ekolimbola nini mpo na bino? Ekozala molili tuu mpe na kongɛnga te.” (Amosa 3:7; 5:18, NW) Lisusu, Hosea, oyo azalaki mpe mosakoli lokola Amosa, alobaki ete: “Mpamba te bakóni mopɛpɛ mpe bakobuka ekumbaki.” (Hosea 8:7, NW) Na mobu 740 L.T.B., Yehova asalelaki mampinga ya Asulia mpo na kobebisa Yisalaele, bokonzi ya nɔ́rdi mpo na libela.
Yehova azali na likambo na Yuda, libota ya lipɛngwi
10, 11. (a) Mpo na nini Yehova aboyaki kolimbisa Yuda? (b) Makambo nini ya mbindo mabebisaki libota yango?
10 Yehova atindaki mpe basakoli na ye na Yuda, bokonzi ya súdi. Kasi, bakonzi ya Yuda lokola Manase mpe mokitani na ye Amono bakóbaki kosala makambo mabe na miso na Ye, kosopáká ‘makila mingi mpamba mpe kokumisáká bikeko mpe kosambeláká yango.’ Atako Yosiya, mwana na Amono, asalaki makambo malamu liboso ya Yehova, bakonzi oyo bakitanaki ye, mpe bongo bato nyonso, bamizindisaki lisusu na kosala mabe, na boye ete “[Yehova] ayebaki kolimbisa yango te.”—2 Mikonzi 21:16-21; 24:3, 4.
11 Yehova alobaki na nzela ya mosakoli na ye Yilimia ete: “Likambo na kokamwa mpe na kobangisa, esalami kati na mokili. Basakoli bazali kosakola mpamba mpe banganga bakozwaka lokumu na mabɔkɔ na bango; mpe bato na ngai balingi ete ezala boye. Kasi bokosala nini na nsuka na yango?” Libota ya Yuda ekómaki na nyongo monene mpenza ya makila, mpe bato ya Yuda bamibebisaki na moyibi, na koboma, na ekobo, na kolapa ndai ya lokuta, na kosambela banzambe mosusu, mpe makambo mosusu ya mabe. Tempelo ya Nzambe ekómaki “ndako na bayibi.”—Yilimia 2:34; 5:30, 31; 7:8-12.
12. Lolenge nini Yehova apesaki etumbu na Yelusaleme, engumba ya lipɛngwi?
12 Yehova alobaki ete: “Ngai nakoyeisa mabe longwa na epai na likoló [Kaladi] mpe likamba monene.” (Yilimia 4:6) Na yango, asalelaki Babilone, Nguya ya Mokili Mobimba, oyo na ntango wana ezalaki “malató mpo na kotula ya mokili mobimba,” ete ebebisa Yelusaleme, engumba ya lipɛngwi mpe tempelo na yango. (Yilimia 50:23, NW) Na mobu 607 L.T.B., nsima ya kozingelama oyo eyeisaki mpasi makasi, engumba ezwamaki na mabɔkɔ ya mampinga ya nguya ya Nebukadanesala. “Mokonzi na Babele abomaki bana na [Mokonzi] Sidikiya liboso na miso na ye na Libila; mokonzi na Babele abomaki mpe mikóló nyonso na Yuda. Atɔbɔlaki miso na Sidikiya mpe akangaki ye na nkanga mpo na kokumba ye na Babele. Mpe Bakaladi bazikisaki ndako na mokonzi mpe ndako na bato na mɔ́tɔ mpe bakweisaki mapango na Yelusaleme. Bongo Nebuzaladana, mokóló na bakɛngɛli, abɔtɔlaki lokola bakangami kino Babele litika na bato batikalaki na mboka mpe baoyo bakimaki epai na ye mpe litika na bato batikalaki.”—Yilimia 39:6-9.
13. Banani babikisamaki na mokolo ya Yehova na mobu 607 L.T.B., mpe mpo na nini?
13 Ya solo, ezalaki mokolo ya nsɔ́mɔ mingi! Kasi, ndambo moke ya bato oyo batosaki Yehova bazalaki kati na baoyo babikaki na etumbu makasi wana. Kati na bango ezalaki na bapaya Balekaba, baoyo, na bokeseni na Bayuda, bamonisaki elimo ya komikitisa mpe ya botosi. Lisusu, Ebede-meleke, mokube moko ya sembo oyo abikisaki Yilimia na liwa na libulu ya pɔtɔpɔ́tɔ, mpe Baluku, mokomeli ya sembo ya Yilimia, bango mpe babikaki. (Yilimia 35:18, 19; 38:7-13; 39:15-18; 45:1-5) Ezali epai na bato motindo wana nde Yehova alobaki ete: “Nayebi makanisi mazali ngai kokanisa mpo na bino; . . . makanisi na kimya mpe na mabe te, kopesa bino elikya na ntango ekoya.” Elaka yango ekokisamaki na moke na mobu 539 L.T.B. ntango Bayuda oyo bazalaki kobanga Nzambe basikolamaki na Mokonzi Siruse oyo alóngaki Babilone, mpe bazongaki mpo na kotonga lisusu engumba Yelusaleme mpe tempelo na yango. Lelo oyo, baoyo bazali kobima na mangomba ya Babilone mpe bazali kozongisama na losambo ya pɛto ya Yehova bakoki bango mpe kozala na elikya kitoko ya kimya ya seko mpo na mikolo mizali koya kati na Paladiso oyo Yehova akozongisa.—Yilimia 29:11; Nzembo 37:34; Emoniseli 18:2, 4.
“Bolɔ́zi monene” na ekeke ya liboso
14. Mpo na nini Yehova abwakaki Yisalaele mpo na libela?
14 Tótalela sikawa makambo malekaki na ekeke ya liboso T.B. Na ntango yango, Bayuda oyo bazongisamaki na mokili na bango bakweaki lisusu na lipɛngwi. Yehova atindaki Mwana mobotami-bobele-moko na ye awa na mabelé lokola Mopakolami na ye, to Masiya. Banda mobu 29 kino mobu 33 T.B., Yesu asakolaki na mokili mobimba ya Yisalaele, kolobáká ete: “Bóbongola mitema! Zambi Bokonzi na Likoló esili kobɛlɛma.” (Matai 4:17) Lisusu, ayanganisaki mpe abongisaki bayekoli mpo na kosakola nsango malamu ya Bokonzi elongo na ye. Lolenge nini bakonzi ya Bayuda batalelaki mosala na ye? Batyolaki Yesu mpe na nsuka basalaki mabe monene na kobomáká ye liwa ya nsɔ́mɔ na nzeté ya mpasi. Yehova abwakaki libota ya Bayuda. Mbala oyo, abwakaki yango mpo na libela.
15. Bayuda oyo babongolaki motema bazwaki libaku malamu ya kokokisa likambo nini?
15 Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., Yesu oyo asekwisamaki asopaki elimo santu, mpe yango epesaki bayekoli na ye nguya ya koloba na nkótá ikeseni epai na Bayuda mpe baprozelite oyo bayanganaki. Ntoma Petelo alobaki na bibele oyo bayanganaki ete: “Yesu oyo, Nzambe asekwisi ye, mpe biso nyonso tozali batatoli na likambo yango. . . . Na bongo tiká ete libota mobimba na Yisalaele báyeba solo ete Nzambe azalisi ye Nkolo mpe Klisto, ye Yesu oyo bino bobakisi ye na [nzeté, NW].” Bayuda ya sembo basalaki nini? ‘Bakatanaki na mitema,’ babongolaki mitema na masumu na bango, mpe babatisamaki. (Misala 2:32-41) Mosala ya kosakola Bokonzi ekólaki nokinoki, mpe nsima ya mbula 30, epalanganaki “epai ya bato nyonso na nsé na likoló.”—Bakolose 1:23.
16. Lolenge nini Yehova atambwisaki makambo mpo na kopesa etumbu na Yisalaele ya mosuni?
16 Ntango ekokaki sikawa mpo ete Yehova apesa etumbu na libota ya Yisalaele ya mosuni oyo asilaki kosundola. Bankóto ya bato bautaki na mabota ya mokili mobimba oyo eyebanaki na ntango wana, basilaki koya na lisangá ya boklisto mpe bapakolamaki lokola “Yisalaele ya Nzambe” na elimo. (Bagalatia 6:16) Nzokande, Bayuda ya eleko wana bakabwanaki na bituluku, bakómaki koyinana mpe kosalana mabe. Na bokeseni na makambo Paulo akomaki na ntina na ‘kotosa bango bazali na bokonzi,’ Bayuda batombokelaki mpenza bokonzi ya Loma oyo ezalaki koyangela bango. (Baloma 13:1) Emonani ete Yehova atambwisaki makambo oyo malandaki. Na mobu 66 T.B., basodá ya Loma, na litambwisi ya Général Gallus, bayaki kozinga Yelusaleme. Basodá ya Loma bakɔtaki kati na engumba kino kobebisa efelo ya tempelo. Lokola emonisami na lisoló ya Josèphe, mokomi ya makambo ya kala, ezalaki solo bolɔ́zi mpo na engumba mpe bafandi na yango.a Kasi, na mbalakaka basodá oyo bayaki mpo na etumba bazongaki. Yango epesaki nzela na bayekoli ya Yesu ete ‘bákima na ngomba,’ lokola Yesu ye moko apesaki bango toli kati na esakweli na ye na Matai 24:15, 16.
17, 18. (a) Na nzela ya bolɔ́zi nini Yehova apesaki etumbu ya boyengebene epai na Bayuda? (b) Mosuni nini ‘ebikaki,’ mpe yango ezalaki elilingi ya nini?
17 Nzokande, kokokisama mobimba ya etumbu ya Yehova eyaki naino te. Na mobu 70 T.B., mampinga ya basodá ya Loma, sikawa na litambwisi ya Général Titus, bazongaki lisusu. Na mbala oyo etumba ezalaki mpenza ndóngó! Bayuda, oyo bazalaki kobunda bango na bango, bakokaki kotɛlɛma liboso ya Baloma te. Engumba mpe tempelo na yango ebomamaki nyɛɛ. Bayuda koleka milió moko baoyo nzoto ekondaki, banyokwamaki mpe bakufaki, mpe bibembe soko 600 000 bibwakamaki libándá ya engumba. Nsima ya kokwea ya engumba, Bayuda soko 97 000 bamemamaki na boombo, mpe mingi bakufaki na bisika ya masano ya kobunda. Ya solo, mosuni bobele moko ebikaki na bambula ya bolɔ́zi wana ezalaki bongo ya baklisto ya botosi oyo bakimaki na ngomba na ngámbo mosusu ya Ebale Yaladene.—Matai 24:21, 22; Luka 21:20-22.
18 Na bongo, esakweli monene ya Yesu na ntina na “nsuka ya ebongiseli ya biloko” ezwaki kokokisama na yango ya liboso, oyo esukaki na mokolo ya Yehova mpo na kopesa etumbu ya boyengebene na libota ya Bayuda batomboki kobanda na mobu 66 kino 70 T.B. (Matai 24:3-22, NW) Kasi, yango ezalaki bobele elilingi ya “koya na mokolo na [Yehova], mokolo monene mpe na nsɔ́mɔ,” bolɔ́zi ya nsuka oyo elingi kokwela mokili mobimba. (Yoele 2:31) Lolenge nini okoki “kobika”? Lisoló lilandi likomonisa yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Josèphe alobi ete basodá ya Loma oyo bayaki kobundisa Yelusaleme bazingaki engumba yango, babebisaki ndambo ya efelo, mpe balingaki kotumba ekuke ya tempelo ya Yehova. Yango ebangisaki mpenza Bayuda mingi oyo bazwamaki kati na engumba, mpamba te bamonaki mpenza liwa na miso.—Wars of the Jews (Bitumba ya Bayuda), Búku II, mokapo 19.
Mituna ya bozongeli
◻ Boyokani nini ezali kati na “mokolo na Nkolo” mpe “mokolo na Yehova”?
◻ Wana tozali kotalela makambo ya mikolo ya Noa, likebisi nini tosengeli kolanda?
◻ Lolenge nini kobebisama ya Sodomo mpe Gomola ezali kopesa liteya monene?
◻ Banani babikaki na “bolɔ́zi monene” na ekeke ya liboso?
[Bililingi na lokasa 15]
Yehova abikisaki libota ya Noa mpe ya Lota, abikisaki mpe bato na mobu 607 L.T.B. mpe na mobu 70 T.B.