Sakolá eyambweli mpo na lobiko
“Moto na moto oyo akobelela nkombo na [Yehova] akobika.”—BALOMA 10:13.
1. Na boumeli ya lisoló ya bato, makebisi nini mapesamaki?
LISOLÓ ya Biblia ezali kolobela bileko mingi oyo ebéngamaki “mokolo ya Yehova.” Mpela ya mikolo ya Noa, kobomama ya Sodomo mpe Gomola, mpe kobebisama ya Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. mpe na mobu 70 T.B., nyonso wana ezalaki mikolo minene mpe ya nsɔ́mɔ mingi ya Yehova. Ezalaki mikolo ya kopesa etumbu ya boyengebene epai na baoyo batombokelaki Yehova. (Malaki 4:5; Luka 21:22) Na boumeli ya mikolo yango, bato mingi bakufaki mpo na misala mabe na bango. Kasi basusu babikaki. Yehova apesaki makebisi, koyebisáká bato mabe likámá oyo ekómaki pene mpe kopesáká bato ya motema sembo likoki ya kobika.
2, 3. (a) Likebisi nini ya esakweli ezongelamaki na Pantekote? (b) Kobanda na Pantekote ya mobu 33 T.B., nini esɛngamaki mpo na kobelela nkombo ya Yehova?
2 Kobebisama ya Yelusaleme na mobu 70 T.B. ezali ndakisa moko monene ya likambo yango. Kosakoláká likambo yango mbula pene na 900 liboso, mosakoli Yoele akomaki ete: “Nakopesa bikamwiseli na likoló mpe na mokili, makila mpe mɔ́tɔ mpe kobuta na molinga. Ntango ekobongwana molili mpe sanza ekobongwana makila, liboso na koya na mokolo na [Yehova], mokolo monene mpe na nsɔ́mɔ.” Lolenge nini moto akokaki kobika na ntango ya nsɔ́mɔ boye? Yoele akomaki na kopemama ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo na [Yehova] akobika; zambi na ngomba na Siona mpe na Yelusaleme, baoyo bakobika bakozala lokola elobaki [Yehova]; mpe kati na litika, baoyo bakobyangama na [Yehova] bakozala.”—Yoele 2:30-32.
3 Na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 T.B., ntoma Petelo alobaki liboso ya ebele ya Bayuda mpe baprozelite oyo bayanganaki na Yelusaleme mpe azongelaki maloba ya esakweli ya Yoele, komonisáká ete baoyo bazalaki koyoka ye basengelaki komizela na kokokisama ya maloba yango na mikolo na bango: “Nakopesa bikamwiseli kuna na likoló, mpe bilembo awa na nsé, na makila, na mɔ́tɔ, na lipata na molinga. Moi ekobongwana molili mpe sanza ekobongwana makila, liboso na koya na Mokolo na [Yehova], mokolo yango monene, mokolo na nkembo. Mpe soko moto nani akobyanga nkombo na [Yehova] akobika.” (Misala 2:16-21) Bato ebele oyo bazalaki koyoka Petelo bazalaki bango nyonso na nsé ya mibeko ya Mose, mpe na bongo, bayebaki nkombo ya Yehova. Na yango, Petelo alimbolaki ete kobelela nkombo ya Yehova esɛngaki mpe kokokisa likambo mosusu. Mingimingi, yango esɛngaki kobatisama na nkombo ya Yesu, oyo abomamaki mpe na nsima asekwisamaki mpo na kozwa bomoi ezangi kufa na likoló.—Misala 2:37, 38.
4. Nsango nini baklisto basakolaki?
4 Kobanda na Pantekote, baklisto bapalanganisaki liloba na ntina na Yesu oyo asekwisamaki. (1 Bakolinti 1:23) Bayebisaki ete bato bakokaki kondimama lokola bana ya Yehova Nzambe babotami na elimo mpe kokóma basangani ya “Yisalaele” ya sika “ya Nzambe,” libota ya elimo oyo ‘likoyebisa malamu na Yehova.’ (Bagalatia 6:16; 1 Petelo 2:9) Baoyo batikalaki sembo kino liwa basengelaki kozwa bomoi ezangi kufa na likoló lokola basangoli ya libula elongo na Yesu kati na Bokonzi na ye ya likoló. (Matai 24:13; Baloma 8:15, 16; 1 Bakolinti 15:50-54) Lisusu, baklisto yango basengelaki kosakola koya ya mokolo monene mpe ya nsɔ́mɔ mingi ya Yehova. Basengelaki kokebisa libota ya Bayuda ete bakozwa bolɔ́zi oyo eleki malɔ́zi nyonso oyo ekwelaki Yelusaleme mpe libota ya Bayuda kino na ntango wana. Nzokande, babiki basengelaki mpe kozala. Ezalaki banani? Baoyo babelelaki nkombo ya Yehova.
“Na mikolo ya nsuka”
5. Bisakweli nini bizali kokokisama na mikolo na biso?
5 Na ndenge mingi, makambo ya ntango wana ezalaki elilingi ya makambo tozali komona lelo oyo. Banda na 1914, bato bazali kobika na eleko moko oyo ekeseni na bileko mosusu nyonso, oyo Biblia ebéngi yango ete “elaka na nsuka,” “nsuka ya ebongiseli ya biloko,” mpe “mikolo [ya] nsuka.” (Danyele 12:1, 4; Matai 24:3-8, NW; 2 Timoté 3:1-5, 13) Na ekeke na biso, bitumba ya nsɔ́mɔ, mobulu makasi, mpe kobeba ya bizaleli ya bato mpe ya ezingelo ezali kokokisa mpenza bisakweli ya Biblia. Nyonso wana ezali kati na elembo oyo Yesu asakolaki, komonisáká ete mosika te bato bakomona mokolo ya Yehova, oyo ekozala nsɔ́mɔ mingi mpe nsuka ya makambo. Yango ekosuka na etumba ya Armagedon, oyo ekotya nsuka na “bolɔ́zi monene lokola emonana naino te uta ebandeli ya mokili kino sikawa, mpe ekomonana lisusu te.”—Matai 24:21, NW; Emoniseli 16:16.
6. (a) Lolenge nini Yehova asalaki mpo na kobikisa basɔkɛmi? (b) Epai wapi tozali kokuta toli ya Paulo mpo na kobika?
6 Lokola mokolo ya kobebisama ezali sé kobɛlɛma, Yehova azali kobongisa lobiko ya basɔkɛmi. Na boumeli ya “elaka na nsuka” oyo tozali na yango, asili koyanganisa batikali ya Yisalaele ya Nzambe na elimo mpe banda na bambula ya 1930, abendaki likebi ya basaleli na ye awa na mabelé na koyanganisama ya “ebele monene, oyo moto te akoki kotánga motuya na bango; bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bibolo nyonso, na minɔkɔ nyonso.” Lokola etuluku, bango bakobika ‘na bolɔ́zi monene.’ (Emoniseli 7:9, 14) Kasi lolenge nini moto mokomoko akoki kondimisa lobiko na ye? Ntoma Paulo ayanoli na motuna yango. Na Baloma mokapo 10, apesi toli malamu mpo na kobika—toli oyo ebongaki na mikolo na ye mpe oyo ebongi na mikolo na biso.
Libondeli mpo na lobiko
7. (a) Elikya nini emonisami na Baloma 10:1, 2? (b) Mpo na nini Yehova alingi ete “nsango malamu” esakolama na bisika mingi koleka?
7 Ntango Paulo akomaki mokanda epai na Baloma, Yehova asilaki kobwaka libota ya Yisalaele. Kasi, ntoma alobaki ete: “Mposa na motema na ngai mpe libondeli na ngai liboso na Nzambe na ntina na bango ezali ete bábika.” Elikya na ye ezalaki ete bamoko kati na Bayuda bákóma na boyebi ya sikisiki ya mokano ya Nzambe, oyo ekomema bango na lobiko. (Baloma 10:1, 2) Lisusu, Yehova azali na mposa ete kati na mokili mobimba, baoyo nyonso bakomonisa kondima, bákoka kobika, lokola emonisami na Yoane 3:16 ete: “Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi [Mwana mobotami-bobele-moko, NW] na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi ete azala na bomoi ya seko.” Mbeka ya lisiko ya Yesu epesaki nzela na lobiko yango monene. Lokola ezalaki na mikolo na Noa mpe mikolo mosusu ya kosambisama oyo milandaki, Yehova asali ete “nsango malamu” esakolama, mpo na kolakisa nzela ya lobiko.—Malako 13:10, 19, 20.
8. Na komekoláká ndakisa ya Paulo, epai na banani baklisto ya solo bazali lelo oyo komonisa motema malamu, mpe lolenge nini bazali kosala yango?
8 Komonisáká motema malamu na ye epai na Bayuda mpe bapakano, Paulo asakolaki na mabaku nyonso. “Amekaki kondimisa Bayuda mpe [Bagreke, NW].” Ayebisaki bankulutu ya Efese ete: “Nabangaki te kosakwela bino makambo makoki kosunga bino, mpe kolakisa bino na kati na koyangana mpe na ndako na ndako. Natatoli na Bayuda mpe na [Bagreke, NW], likambo na kobongola mitema epai na Nzambe, mpe na kondimela Nkolo na biso Yesu.” (Misala 18:4; 20:20, 21) Na lolenge moko, lelo oyo Batatoli ya Yehova bazali komipesa na mosala ya kosakola, bobele epai ya bato ya mangomba ya boklisto te kasi epai ya bato nyonso, ata kino “na nsuka ya mokili.”—Misala 1:8; 18:5.
Tóyambola “Liloba na kondima”
9. (a) Lolenge nini ya kondima Baloma 10:8, 9 ezali kolendisa? (b) Ntango nini mpe lolenge nini tosengeli koyambola kondima na biso?
9 Mpo na kobika, esengeli kozala na kondima makasi. Kozongeláká maloba ya Deteronome 30:14, Paulo alobaki ete: “Liloba lizali penepene na yo, na bibebu na yo mpe na motema na yo. Yango ezali Liloba na kondima likosakolaka biso.” (Baloma 10:8) Ntango tozali kosakola “liloba na kondima,” yango ezali kokɔta mpenza kati na mitema na biso. Ezalaki bongo mpo na Paulo, mpe maloba na ye malandi makoki kolendisa ekateli na biso ya kozala lokola ye na koyebisáká epai na basusu kondima yango: “Soko okoyambola na bibebu na yo ete Yesu azali Nkolo mpe soko okondima na motema na yo ete Nzambe asekwisi ye na bakufi, okobika.” (Baloma 10:9) Yango ezali te bobele eyambweli oyo esalemi liboso ya bato na ntango ya batisimo kasi esengeli kozala eyambweli ya ntango nyonso, litatoli ya molende liboso ya bato na ntina na makambo minene nyonso ya solo. Solo yango etaleli nkombo monene ya Nkolo Mokonzi Yehova; etaleli mpe Mokonzi Masiya mpe Mosikoli na biso, Nkolo Yesu Klisto; mpe etaleli bilaka kitoko ya Bokonzi.
10. Engebene Baloma 10:10, 11, lolenge nini tosengeli kosimba “liloba” yango “ya kondima”?
10 Lobiko ezali te mpo na ye oyo aboyi kondima mpe kosalela “liloba na kondima” yango, lokola ntoma akóbi koloba ete: “Kondima oyo ekokómisa moto na boyengebene ezali na motema, mpe eyambweli ekokómisa moto na lobiko ezali na bibebu. Likomi elobi ete, Mondimi moko na ye te akoyoka nsɔni.” (Baloma 10:10, 11) Tosengeli kozwa boyebi ya sikisiki ya “liloba na kondima” yango mpe kokóba kokɔtisa yango na mitema na biso mpo ete tópusama na koyebisa yango na basusu. Yesu ye moko akundweli biso ete: “Moto nani akoyoka nsɔni na ntina na ngai mpe na ntina na maloba na ngai na kati na libota oyo na pite mpe masumu, Mwana na moto akoyoka nsɔni na ntina na ye, wana ekoya ye kati na nkembo na Tata na ye esika moko na [baanzelu, NW] na bulɛɛ.”—Malako 8:38.
11. Na meko nini nsango malamu esengeli kosakolama, mpe mpo na nini?
11 Lokola Danyele asakolaki yango, na elaka yango ya nsuka, “baoyo bazali na mayele” bamonani ete bazali kongɛnga “lokola nkembo na likoló,” wana litatoli na ntina na Bokonzi ezali kopalangana kino nsuka ya mokili. Bazali ‘kobongola bato mingi epai na boyengebene,’ mpe boyebi ya solo esili mpenza kofuluka, mpamba te Yehova azali kobakisa kongɛnga ya pole likoló na bisakweli na ntina na ntango oyo ya nsuka. (Danyele 12:3, 4) Yango ezali nsango ya lobiko oyo ezali na ntina mingi mpo na baoyo nyonso balingaka solo mpe boyengebene.
12. Lolenge nini Baloma 10:12 ezali na boyokani na mokumba ya anzelu oyo elobelami na Emoniseli 14:6?
12 Ntoma Paulo akóbi ete: “Kati na Moyuda mpe [Mogreke, NW] kokabwana ezali te. Nkolo moko azali Nkolo na nyonso mpe azali na bozwi bokoki kosunga bato nyonso bakobelelaka ye.” (Baloma 10:12) Lelo oyo “nsango malamu” esengeli kosakolama na bisika mingi koleka—epai ya bato nyonso, kino na nsuka mpenza ya mokili. Anzelu ya Emoniseli 14:6 azali kokóba kopumbwa katikati na likoló, kopesáká biso mokumba ya “nsango malamu na seko mpo na kosakola [lokola evanzile, NW] na bafandi na mokili mpe na mabota nyonso, na mikili nyonso, na minɔkɔ nyonso, na bibolo nyonso.” Baoyo bazali koyamba yango bakozwa litomba nini?
Tóbelela nkombo ya Yehova
13. (a) Mokapo na biso ya mobu 1998 ezali nini? (b) Mpo na nini mokapo yango ya mobu ebongi mpenza lelo oyo?
13 Kozongeláká maloba ya Yoele 2:32, Paulo alobi ete: “Moto na moto oyo akobelela nkombo na [Yehova] akobika.” (Baloma 10:13) Ɛɛ, ezali likambo lilongobani mpenza ete maloba yango maponama lokola mokapo ya mobu 1998 mpo na Batatoli ya Yehova! Koleka ntango mosusu nyonso, ezali sikawa na ntina mingi mpenza ete tókende liboso na kotyáká motema epai ya Yehova, koyebisáká nkombo na ye mpe mikano na ye minene mimonisami na nkombo yango! Lokola ezalaki na ekeke ya liboso, na mikolo ya nsuka ya ebongiseli mabe ya biloko ya ntango oyo, lokito ezali koyokana ete: “Bómibikisa na libota oyo na kilikili.” (Misala 2:40) Ezali libyangi lokola koyula ya kelelo mpo na bato nyonso oyo bazali kobanga Nzambe na mokili mobimba ete bábelela nkombo ya Yehova mpo ete abikisa bango mpe lisusu epai na baoyo bazali koyoka nsango malamu oyo bazali kosakola liboso ya bato nyonso.—1 Timoté 4:16.
14. Libanga nini tosengeli kobelela mpo na kobikisama?
14 Makambo nini makobima ntango mokolo monene ya Yehova ekokwela mokili oyo? Bato mingi bakoluka Yehova te mpo na kobikisama. Bato mingi ‘bakokóba koloba na ngomba mpe na mabanga ete, Kweá likoló na biso, mpe bombá biso longwa na miso ya Mofandi na kiti na bokonzi, mpe longwa na nkɛlɛ na Mwana na Mpate.’ (Emoniseli 6:15, 16) Bakotya elikya na bango na bibongiseli ya ntango oyo, oyo bikokani na ngomba. Nzokande, ekoleka malamu soki bakotya motema na Libanga lileki mabanga nyonso, Yehova Nzambe! (Deteronome 32:3, 4) Na ntina na ye, Mokonzi Davidi alobaki ete: “[Yehova] azali libanga na ngai mpe esika makasi na ngai mpe mobikisi na ngai.” Yehova azali “libanga na kobika na biso.” (Nzembo 18:2; 95:1) Nkombo na ye ezali “ndako molai na nguya,” “ndako molai” bobele moko oyo ekoki kobatela biso na boumeli ya bolɔ́zi oyo ezali koya. (Masese 18:10) Na yango, ezali na ntina mingi ete bato mingi koleka kati na pene na miliare motoba oyo bazali ba bomoi lelo na mokili ete báteyama mpo na kobelela nkombo ya Yehova na bosembo mpe na solo.
15. Baloma 10:14 emonisi nini na ntina na kondima?
15 Na lolenge lobongi mpenza, ntoma Paulo akóbi kotuna ete: “Na nzela nini bakobelela ye oyo bandimi ye te?” (Baloma 10:14) Ezali na bato mingi oyo tokoki naino kosalisa ete báyeba “liloba na kondima,” mpo ete bábelela nkombo ya Yehova mpo na kobika. Kondima ezali na ntina mingi. Paulo alobi na mokanda mosusu ete: “Soko na kondima te, ekoki kosepelisa Nzambe te. Mpo ete ekoki na babɛlɛmi na Nzambe kondima ete azali mpe ete akozongisa libonza epai na bango bakolukaka ye.” (Baebele 11:6) Kasi, lolenge nini bamilió mosusu ya bato bakokóma na kondima epai ya Nzambe? Na mokanda na ye epai ya Baloma, Paulo atuni ete: “Na nzela nini bakondima ye oyo bayoki mpo na ye te?” (Baloma 10:14) Yehova abongiseli bango mwango mpo ete bákoka koyoka? Ɛɛ, mwango ezali! Yoká maloba ya Paulo oyo malandi: “Bakoyoka na nzela nini soko bazangi mosakoli?”
16. Kati na ebongiseli ya Nzambe, mpo na nini basakoli bazali na ntina mingi?
16 Engebene makanisi ya Paulo, ezali polele ete basakoli basengeli kozala. Yesu amonisaki ete ekozala bongo “kino nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo.” (Matai 24:14; 28:18-20, NW) Kosakola ezali likambo ya ntina kati na ebongiseli ya Nzambe mpo na kosalisa bato ete bábelela Nkombo ya Yehova mpo na kobika. Ata kati na mangomba ya boklisto bato mingi bazali kosala eloko te mpo na kokumisa nkombo ya Nzambe oyo ezali ya motuya mingi. Mingi bazali na mobulungano na ntina na Yehova, Yesu mpe elimo santu mpo na liteya ya Bosato oyo elobami ete ezali mobombamo. Lisusu, mingi bazali na molɔngɔ́ ya baoyo balobelami na Nzembo 14:1 mpe 53:1 ete: “Elema alobi na motema na ye ete, [Yehova] azali te.” Basengeli koyeba ete Yehova azali Nzambe ya bomoi, mpe basengeli kososola ndimbola ya nkombo yango soki balingi kobika na bolɔ́zi monene oyo ezali koya.
‘Makolo kitoko’ ya basakoli
17. (a) Mpo na nini elongobani ete Paulo azongela esakweli ya kozongisama? (b) Kozala na ‘makolo kitoko’ esɛngi makambo nini?
17 Ntoma Paulo atunaki motuna mosusu ya ntina: “Bakosakola na nzela nini soko batindami te? Pelamoko ekomami ete, Kitoko boni makolo na bango bakosakolaka nsango na makambo malamu!” (Baloma 10:15) Awa Paulo azongeli maloba ya Yisaya 52:7, oyo ezali kati na esakweli ya kozongisama oyo ezali kokokisama banda 1919. Lelo oyo, Yehova azali lisusu kotinda “ye oyo akoyeisa nsango malamu, ye oyo akosakola kimya mpe akoyeisa nsango malamu na kosepela, ye oyo akosakola kobikisama.” Na botosi nyonso, “basɛnzɛli” bapakolami ya Nzambe mpe baninga na bango bazali kokóba konganga na esengo. (Yisaya 52:7, 8) Makolo na baoyo bazali kosakola lobiko lelo oyo makoki kolɛmba, makoki ata kokóma na bosɔtɔ na mputulu ya mabelé, wana bazali kotambola ndako na ndako, kasi bilongi na bango bizali kongɛnga na esengo! Bayebi ete Yehova nde atindi bango kosakola nsango malamu ya kimya mpe kobɔndisa baoyo bazali kolela, kosalisa bango ete bábelela nkombo ya Yehova mpo na kozwa lobiko.
18. Baloma 10:16-18 elobi nini mpo na mbuma ya nsuka ya kosakolama ya nsango malamu?
18 Ezala ete bato ‘bandimi yango eyoki bango’ to baponi kotosa yango te, maloba ya Paulo mazali solo ete: “Bayoki te? Te! bayoki koyoka, zambi Lokito na bango ekómi na mokili mobimba, maloba na bango kino nsuka na mokili.” (Baloma 10:16-18) Sé lokola “likoló ekosakolaka nkembo na Nzambe,” lolenge emonisami na misala na ye ya bozalisi, na bongo Batatoli na ye awa na mabelé basengeli kosakola “mbula mpo na malamu ya Yehova mpe mokolo ya kobekola ya Nzambe na biso . . . mpo na kobɔndisa baoyo nyonso bazali kolela.”—Nzembo 19:1-4; Yisaya 61:2.
19. Litomba nini ekozala mpo na baoyo ‘bazali kobelela nkombo ya Yehova’ lelo oyo?
19 Mokolo monene mpe ya nsɔ́mɔ mingi ya Yehova ezali sé kobɛlɛma. “Mawa mpo na mokolo yango! Zambi mokolo na [Yehova] ebɛlɛmi, ezali koya lokola libebisami uta na Oyo-na-Nguya-Nyonso.” (Yoele 1:15; 2:31) Libondeli na biso ezali ete bato mingi lisusu bándima na lombangu nsango malamu, báya na lisangá ya Yehova. (Yisaya 60:8; Habakuku 2:3) Tómikundola ete mikolo mosusu ya Yehova mimemelaki bato mabe libebi—na mikolo ya Noa, na mikolo ya Lota, mpe na mikolo ya Yisalaele mpe ya Yuda, mabota ya lipɛngwi. Sikawa tozali mpenza kobɛlɛma na bolɔ́zi oyo eleki monene, ntango mopɛpɛ makasi ya Yehova ekokɔmbɔla mabe na mabelé mobimba, kobongisáká nzela mpo na kimya ya seko na paladiso. Okozala moko kati na baoyo ‘bakobelela nkombo ya Yehova’ na bosembo? Soki ɛɛ, sepelá! Yehova ye moko apesi yo elaka ete okobika.—Baloma 10:13.
Okoyanola ndenge nini?
◻ Makambo nini ya sika masakolamaki nsima ya Pantekote ya mobu 33 T.B.?
◻ Lolenge nini baklisto bakotya likebi na “liloba na kondima”?
◻ ‘Kobelela nkombo ya Yehova’ elimboli nini?
◻ Na ndimbola nini bamemi-nsango ya Bokonzi bazali na ‘makolo kitoko’?
[Bililingi na lokasa 18]
Libota ya Nzambe lizali kosakola malamu na ye na Porto Rico, na Sénégal, na Pérou, na Papouasie Nouvelle Guinée—ɛɛ, na mokili mobimba