Nguya ya kobenda bato ezali mpo na komikumisa to mpo na nkembo ya Nzambe?
XÉNOPHON, oyo azalaki mokonzi ya basodá mpe moto ya lokumu na ekólo Grèce, akomaki ete: “Mokonzi asengeli te bobele kozala na mayele koleka bato oyo ye azali koyangela, kasi asengeli mpe kozala na nguya ya kobenda bato epai na ye.” Lelo oyo “nguya” yango ebéngami charisme na Lifalansé.
Ya solo, bakonzi nyonso te nde bazalaka na nguya wana. Kasi baoyo bazali na yango bazali kosalela makoki na bango mpo na kopusa bato ete bámipesa makasi epai na bango mpe bazali lisusu kosalela nguya na bango likoló ya bato mpo na komema bango ete bákokisa mikano na bango moko. Tokoki koloba ete ndakisa oyo eyebani mingi ya moto motindo wana na eleko oyo ezali bongo Adolf Hitler. William L. Shirer akomaki kati na búku Le Troisième Reich, des origines à la chute, ete: “Mpo na bato mingi ya Allemagne [na 1933], Hitler azalaki—to etikalaki moke akóma—mokambi oyo azalaki mpenza na nguya ya kobenda bato epai na ye. Na boumeli ya mbula zomi na mibale ya yikiyiki oyo boyangeli na ye esalaki, bazalaki kotosa ye kozanga kososola, lokola nde azalaki na lotómo ya kozwa bikateli na esika ya Nzambe.”
Lisolo ya makambo matali mangomba ezali na bandakisa mingi ya bakambi oyo bazalaki na nguya ya kobenda bato, mpe komema bango ete bámipesa makasi epai na bango, likambo oyo ememelaki balandi na bango makama. Yesu apesaki likebisi oyo: “Bókeba ete moto apɛngwisa bino te. Zambi mingi bakoya na nkombo na ngai koloba ete, Ngai Klisto, mpe bakopɛngwisa mingi.” (Matai 24:4, 5) Bamasiya ya lokuta oyo bazalaki na nguya ya kobenda bato epai na bango bamonanaki bobele na ekeke ya liboso te. Na boumeli ya bambula ya 1970, Jim Jones alobaki ete azali “masiya ya ‘Temple du Peuple.’” Babengaki ye ete mokonzi ya lingomba oyo azalaki na “nguya ya kobenda bato epai na ye.” Azalaki na “nguya makasi likoló na bato,” mpe na mobu 1978, apusaki ebele ya bato ete bámiboma mpe yango ezali mbala ya liboso oyo bato bamibomaki mingi koleka kati na lisolo ya bato.a
Emonani polele ete, nguya ya kobenda bato ekoki kozala likabo moko mabe. Kasi, Biblia ezali kolobela likabo to makabo, oyo Nzambe azali kopesa na moto nyonso, mpe mpo na bolamu ya bato nyonso. Liloba ya Greke oyo elimboli likabo ezali bongo khaʹri·sma, mpe tozali kokuta yango mbala 17 kati na Biblia. Nganga-mayele moko moto na Grèce alimboli yango ete ezali ‘likabo bapesi moto mpamba mpe ya ngɔlu, eloko oyo bapesi moto kasi asalaki molende moko te mpe abongi na yango te, eloko oyo epesami na ngɔlu ya Nzambe mpe oyo moto akoki kozwa yango ye moko te, to mpe akoki kozwa yango na milende na ye moko te.’
Na yango, engebene Makomami, khaʹri·sma ezali likabo oyo moto azwi, na lisalisi ya ngɔlu ya Nzambe. Wapi bamoko na makabo yango oyo Nzambe asili kopesa biso na boboto nyonso? Mpe ndenge nini tokoki kosalela yango mpo na kokumisa ye? Tótalela makabo misato oyo tozwi na ngɔlu ya Nzambe.
Bomoi ya seko
Na ntembe te, likabo oyo eleki makabo nyonso na monene ezali likabo ya bomoi ya seko. Paulo akomelaki lisangá ya Loma ete: “Masumu [makopesa lifuti, lifuti, NW] yango bobele kufa; nde Nzambe akopesa likabo mpamba, likabo na ye bomoi na seko kati na Yesu Klisto, Nkolo na biso.” (Baloma 6:23) Elobami malamu ete “lifuti” (kufa) ezali eloko oyo tobongi na yango, atako eyaki mpo na mposa na biso mpenza te, kasi mpo na ezalela na biso ya masumu. Nzokande, bomoi ya seko oyo Nzambe azali kopesa ezali mpenza eloko oyo tobongi na yango te, mpe oyo biso tokoki te kozwa yango na misala malamu na biso.
Tosengeli kopesa motuya mingi na likabo ya bomoi ya seko mpe kokabola yango na bato mosusu. Tozali na likoki ya kosalisa bato ete báyeba Yehova, mpo ete básalela ye, mpe bongo bakozwa likabo ya bomoi ya seko lokola ngɔlu. Emoniseli 22:17 (NW) elobi ete: “Elimo, mpe mwasi ya libala balobi ete: ‘Yaká!’ Tiká moyoki aloba ete: ‘Yaká!’ Tiká ete moto na mposa na komela aya; mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.”
Ndenge nini tokoki komema bato mosusu kino epai na mai oyo ekopesaka bomoi? Na kosaleláká Biblia na lolenge malamu kati na mosala na biso ya kosakola tokozwa matomba malamu. Ezali solo ete na bamboka mosusu, bato batángaka mingi te, to mpe bakanisaka mingi te likoló na makambo ya elimo; atako bongo, mabaku mazangaka te mpo na ‘kolamwisa litoi’ ya moto. (Yisaya 50:4) Na yango, tokoki kozala na elikya kati na nguya oyo Biblia ezali na yango mpo na kopusa moto na misala malamu, “zambi liloba na Nzambe ezali na bomoi mpe na nguya.” (Baebele 4:12) Ezala mpo na bwanya ya Biblia, libɔndisi mpe elikya oyo yango ezali kopesa, to mpe mpo na ndimbola na yango na oyo etali ntina ya bomoi, Liloba ya Nzambe ekoki kosimba motema ya moto mpe komema ye nokinoki na nzela ya bomoi.—2 Timoté 3:16, 17.
Longola yango, mikanda mikolimbolaka Biblia mikoki kosalisa biso na koloba ete “Yaká!” Mosakoli Yisaya asakolaki ete na boumeli ya eleko oyo ya molili na elimo, ‘Yehova akobimela’ bato na ye. (Yisaya 60:2) Mikanda ya la Société Watch Tower mizali komonisa mapamboli oyo mauti na Yehova, mpe mbula na mbula yango ezali komema bankóto ya bato epai na Yehova, oyo azali liziba ya bingɛngiseli ya elimo. Mikanda ya la Société Watch Tower mizali kosanzola bato te. Lokola elimbolami na maloba ya ebandeli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, “ntina ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ezali mpo na kokumisa Yehova Nzambe lokola Nkolo-Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba. . . . Yango ezali kolendisa bato ete bándima Yesu Klisto, Mokonzi oyo Nzambe atye mpo na koyangela, oyo makila na ye asopaki efungoli nzela mpo ete bato bákoka kozwa bomoi ya seko.”
Moklisto moko, mosakoli ya ntango nyonso, oyo na boumeli ya bambula mingi azwaki matomba malamu kati na mosala na ye, na ntina na motuya ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! oyo asungaki na yango bato ete bábɛlɛma penepene na Yehova alobi boye: “Ntango bato oyo nazalaki koyekola na bango Biblia babandaki kotánga mpe kosepela na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!, basalaki bokóli ya mbangumbangu. Natalelaka bazulunalo lokola lisungi oyo motuya na yango eleki monene mpo na kosunga bato ete báyeba Yehova.”
Mikumba na mosala ya Nzambe
Timoté azalaki moyekoli moklisto oyo apesamelaki likabo mosusu oyo ebongaki ete atyela yango likebi mingi. Ntoma Paulo alobaki na ye ete: “Otika [te] kobatela likabo na ngɔlu [khaʹri·sma] lizali kati na yo, yango ezwi yo na nzela na kosakola wana etii mibangé mabɔkɔ likoló na yo.” (1 Timoté 4:14) Likabo yango ezalaki nini? Yango etalelaki koponama ya Timoté lokola mokɛngɛli-motamboli, libaku malamu ya mosala oyo asengelaki kokokisa kozanga bopɔtu. Bobele na mokapo yango, Paulo alendisaki Timoté ete: “Omipesa yo moko mpo na kotángaka liboso ya bato, na kolendisáká, mpe na koteyáká. Omisɛnzɛla yo moko mpe mateya na yo; ɛɛ, oumela na yango, zambi ekosalaka yo boye okomibikisa yo mpenza mpe bango bazali koyoka yo.”—1 Timoté 4:13, 16.
Lelo oyo mpe, bankulutu basengeli kolinga mikumba oyo bazali na yango na mosala ya Nzambe mingi. Ndenge Paulo amonisi yango, lolenge moko oyo bakoki kosala yango ezali na ‘komisɛnzɛla na mateya na bango.’ Na esika ete bámekola bakonzi ya mokili oyo bazali na nguya ya kobenda bato epai na bango, bango bazali nde kobenda bato epai na Nzambe, kasi epai na bango moko te. Yesu, oyo azali ndakisa na bango, azalaki moteyi monene oyo na ntembe te azalaki na nguya ya kobenda bato epai na ye, kasi na komikitisa nyonso apesaki lokumu epai na Tata na ye. Alobaki ete: “Mateya na ngai mazali na ngai te kasi na Motindi na ngai.”—Yoane 5:41; 7:16.
Yesu akumisaki Tata na ye ya likoló na kosaláká ete Liloba ya Nzambe ezala na bokonzi likoló ya mateya na ye. (Matai 19:4-6; 22:31, 32, 37-40) Motindo moko Paulo amonisaki mposa oyo bakɛngɛli bazali na yango ya ‘kosimba makasi Liloba ya sembo lizali bango kolakisa.’ (Tito 1:9) Na yango, soki batongi masukúlu na bango malamumalamu likoló ya Makomami, bankulutu bakoloba lokola Yesu ete: “Makambo mazali ngai koloba na bino, nasololi yango na monɔkɔ na ngai moko te.”—Yoane 14:10.
Ndenge nini bankulutu bakoki ‘kosimba makasi liloba ya sembo’? Bakoki kosala yango na kosaláká na boye ete masukúlu na bango mpe masolo na bango na makita mátongama likoló na Biblia mpe bálimbola na kobɛtáká nsɛ́tɛ́ likoló ya mikapo oyo bazali kolobela. Bandakisa mpe makambo ya kosɛkisa, soki eleki mingi, ekoki kopɛngola likebi ya bayoki longwa na Liloba ya Nzambe mpe ekobenda likebi na bango epai na makoki ya molobi ye moko. Nzokande, mikapo ya Biblia, yango nde esimbaka mitema mpe epusaka bayoki na kosala misala ya malamu. (Nzembo 19:7-9; 119:40; kokanisá na Luka 24:32.) Masukúlu motindo wana ebendaka likebi moke likoló ya bato mpe epesaka lokumu mingi epai na Nzambe.
Lolenge mosusu bankulutu bakoki kokóma bateyi malamu ezali na koyekoláká epai na baninga na bango bankulutu. Lokola Paulo asungaki Timoté, bobele bongo nkulutu moko akoki kosalisa nkulutu mosusu. “Ebende ekotya ebende mosusu na mopotu, boye moto akokokisa elongi na moninga na ye.” (Masese 27:17; Bafilipi 2:3) Bankulutu bakozwa matomba na kopesanáká makanisi mpe toli. Ndeko moko auti kokóma nkulutu na mikolo mileki alobi ete: “Nkulutu moko oyo aumeli mingi azalaki kolakisa ngai lolenge ya kobongisa lisukúlu. Kati na komibongisa na ye, akɔtisaki mituna oyo ekopesa nzela na kolimbola na lolenge ya polele, bilakiseli, bandakisa, to baeksperiansi ya mikuse, na mikapo ya Makomami oyo asalaki bolukiluki. Na lisalisi na ye nayekolaki lolenge ya kokɔtisa makambo makeseni kati na masukúlu na ngai na ntina ete lisukúlu na ngai elalisa bayoki mpɔngi te.”
Biso nyonso baoyo tozali na mikumba na mosala ya Nzambe, ata tozali bankulutu, basaleli ya misala, to babongisi-nzela, tosengeli kopesa motuya mingi na likabo na biso. Mwa moke liboso ya kufa na ye, Paulo akundwelaki Timoté ete ‘apelisa lisusu mɔ́tɔ na likabo [khaʹri·sma] ya Nzambe oyo ezali kati na ye,’ oyo mpo na Timoté etalelaki mwa likabo oyo ekesanaki na makabo mosusu ya elimo. (2 Timoté 1:6) Mbala mingi, Bayisalaele bazalaki kosalela mɔ́tɔ ya makala. Bazalaki ‘kopupola’ yango mpo ete ebimisa mɔ́tɔ mpe engala lisusu makasi. Boye, tolendisami ete tókokisaka mikumba oyo bapesi biso na motema na biso mobimba mpe na makasi na biso mobimba, lisusu likabo ya elimo oyo bapesi biso ata ezali ya motindo nini tosengeli kopupolaka yango lokola mɔ́tɔ ete ekufa te.
Makabo ya elimo oyo esengeli kokabola na bamosusu
Bolingo ya Paulo mpo na bandeko na ye epusaki ye na kokoma ete: “Nayoki mposa monene mpo na komona bino, ete nakabela bino likabo na elimo [khaʹri·sma] mpo na kolendisa bino. Bongo, ekozala ngai kati na bino tóyikisana mpiko mpo na kondima na biso na bino mpenza.” (Baloma 1:11, 12) Makoki oyo tozali na yango mpo na kolendisa bamosusu na maloba na biso, Paulo atalelaki yango lokola likabo ya elimo. Kokabelana makabo ya elimo motindo oyo ekosala ete tólendisana kati na kondima mpe tóyikisana mpiko.
Mpe tozali mpenza na mposa na yango. Kati na ebongiseli mabe ya ntango oyo tozali kobika na yango, biso nyonso tozali kokutana na minyoko na motindo moko to na motindo mosusu. Nzokande, soki tozali koyikisana mpiko ntango nyonso, ekoki kosalisa biso ete tólendendela. Likanisi ya kokabelana—ezala kopesa to kozwa—ezali na ntina mpo na kozala ntango nyonso makasi na elimo. Ya solo, na bantango mosusu tozalaka na mposa ya bilendiseli, kasi tokoki mpe kokembisana moko na mosusu.
Soki tozali na bokɛngi mpo na komona baninga na biso bandimi oyo balɛmbi nzoto, ‘tokoki kobɔndisa bango kati na bolɔzi ya ndenge na ndenge na motindo na libɔndisi oyo Nzambe abɔndisi biso na yango.’ (2 Bakolinti 1:3-5) Liloba ya Greke mpo na kolimbola libɔndisi ezali (pa·raʹkle·sis) elimboli mpenzampenza “libyangi mpo na kofanda pene na moto moko.” Na ntango ya bosɛnga, soki tokómi pene na bandeko na biso mpo na kosunga bango, na ntembe te biso mpe tokozwa lisungi motindo moko ntango tokozala kati na bosɛnga.—Mosakoli 4:9, 10; kokanisá na Misala 9:36-41.
Ntango bankulutu bazali kokende kotala mpate kati na etonga na bolingo nyonso yango ezali na litomba monene. Atako na mabaku mosusu kotala bampate esalemaka mpo na kopesa toli oyo ezwami na Makomami likoló na likambo moko oyo esengeli kotyelama likebi, nzokande, mbala mingi kotala bampate ezalaka mabaku mpo na kolendisa, mpe mpo na ‘kobɔndisa mitema.’ (Bakolose 2:2) Ntango bakɛngɛli bazali kokende kotala bampate, yango eyeisaka kondima makasi lokola bato oyo, bazali solo kokabola likabo ya elimo. Na ndakisa ya Paulo, bakomona ete motindo oyo ya kopesa makabo ekopesamela mbano, mpe bakokólisa “mposa monene” mpo na bandeko na bango.—Baloma 1:11.
Ezalaki bongo mpo na nkulutu moko na ekólo Espagne, oyo ayebisi likambo oyo: “Ricardo, elenge mobali ya mibu zomi na moko, azalaki mpenza kosepela na makita te, azalaki mpe kosepela na lisangá te. Bongo nasɛngaki baboti ya Ricardo nzela ete naya kotala mwana na bango, bandimaki kozanga kokakatana. Bazalaki kofanda na bangomba, esengelaki kotambola na motuka ngonga mobimba longwa epai na ngai kino epai na bango. Ricardo azalaki na esengo ya komona bosepeli oyo namoniselaki ye, mpe nokinoki asalaki mbongwana. Mosika te akómaki mosakoli oyo azwi naino batisimo te mpe mosangani ya molende kati na lisangá. Atikaki ezaleli ya nsɔninsɔni mpe akómaki na esengo mpe kofanda na baninga esika moko. Bato mingi kati na lisangá bazalaki komituna boye: ‘Mpo na nini Ricardo abongwani mpenza boye?’ Bakanisaki lokola ete bamonaki ye mpo na mbala ya liboso. Kokanisáká na lolenge nakendaki kotala mpate wana oyo ezalaki na ntina mingi kati na etonga, nazali komiyoka ete ngai nde moto nazwaki litomba monene koleka oyo Ricardo azwaki. Ntango azali kokóta na Ndako ya Bokonzi, na elongi ya komungamunga, mpe azali koya na lombangu mpo na kopesa ngai mbote. Ezalaki likambo ya esengo komona bokóli ya elimo oyo asalaki.”
Na ntembe te, mosala ya kotala bampate oyo bakɛngɛli basalaka mpo na kobatela etonga, lokola oyo tolobeli awa, epambolamaka mingi. Likambo yango eyokani na maloba oyo Yesu alobaki ete: “Batelá bampate na ngai.” (Yoane 21:16) Ya solo, ezali bobele bankulutu bango moko te nde bakoki kopesa likabo ya elimo motindo oyo. Moto nyonso kati na lisangá akoki kopesa bamosusu elendiseli mpo na kolinganaka mpe kosalaka misala malamu. (Baebele 10:23, 24, NW) Bobele lokola bato oyo basalaka masano ya komata na ngomba bakanganaka moko na mosusu na lisalisi ya nsinga, bobele bongo, biso mpe tokangani esika moko na bikanganeli ya elimo. Tóbosana te ete, makambo oyo tolobaka mpe oyo tosalaka ezalaka na bopusi likoló na bamosusu. Kosɛka baninga to koloba mabe mpo na bango ekoki kolɛmbisa bikanganeli oyo esangisi biso. (Baefese 4:29; Yakobo 3:8) Nzokande, maloba oyo maponami malamu mpe lisungi ya bolingo ekoki kosalisa bandeko na biso ete bálónga mikakatano na bango. Wana tozali kosala bongo, tozali kokabola makabo ya elimo oyo ezali na motuya monene.—Masese 12:25.
Tómonisa nkembo ya Nzambe mingi koleka
Ezali polele ete moklisto mokomoko azali na nguya ya kobenda bato epai na ye. Topesameli likabo ya ngɔlu ya bomoi ya seko. Tozali mpe na makabo ya elimo oyo tokoki kokabola moko epai na mosusu. Tokoki mpe kosala makasi mpo na kopusa bato mosusu ete bámityela mikano malamu. Bamoko bazali na makabo mosusu oyo ebakiselami bango na motindo ya mikumba ya mosala. Makabo nyonso wana mazali elembeteli oyo emonisi motema boboto ya Nzambe. Mpe ata likabo nini tokoki kozala na yango, ezali eloko oyo tozwi epai na Nzambe, tozali na ntina ya komikumisa te.—1 Bakolinti 4:7.
Lokola tozali baklisto, tosengeli komituna boye, ‘Nakosalela bopusi ata ya moke oyo nazali na yango mpo na kokumisa Yehova, Mopesi ya “makabo nyonso malamu mpe makabo nyonso mabongi?” (Yakobo 1:17) Nakomekola nde Yesu mpe nakosakola nde nsango malamu epai na basusu engebene makoki na ngai mpe ezala na bileko malamu to na bileko malamu te?’
Ntoma Petelo amonisaki motuya ya mokumba na biso na likambo yango na kolobáká ete: “Pelamoko ezwi moto na moto likabo na ngɔlu, [khaʹri·sma], bósungana na yango lokola bakɛngɛli malamu na ngɔlu na Nzambe, oyo na mitindo mingi. Nani ayebi koloba? Aloba makambo na Nzambe. Nani ayebi kosala misala? Asala mpo na nguya ekopesaka Nzambe ye ete na makambo nyonso Nzambe akumisama mpo na Yesu Klisto.”—1 Petelo 4:10, 11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bato 913 bakufaki, bakisa mpe Jim Jones ye moko.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 23]
UPI/Corbis-Bettmann
Corbis-Bettmann