Basalaki mokano ya Yehova
Yesu atindi bayekoli 70
EZALAKI na ɔtɔmne ya mobu 32 T.B. Etikalaki bobele sanza motoba liboso ete Yesu akufa. Na yango, mpo na kosala na lombangu mosala ya kosakola mpe kobongisa malamumalamu bayekoli na ye, aponaki bayekoli 70 mpe “atindaki bango mibale mibale liboso na ye kati na mboka nyonso na bisika nyonso bilingaki ye kokende.”—Luka 10:1.a
Yesu atindaki bayekoli na ye “liboso na ye” mpo ete bato bákoka kozwa ekateli nokinoki soki bakondima Masiya to soki bakoboya ye ntango Yesu ye moko akokóma wana nsima. Kasi mpo na nini atindaki bango “mibale mibale”? Emonani ete, mpo ete bákoka kolendisana moko na mosusu ntango bakutani na botɛmɛli.
Komonisáká bango ete mosala ya kosakola esengeli kosalema na lombangu, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: “Mbuma mingi iteli solo, nde basali bazali mingi te. Na bongo bondelá Nkolo na bilanga ete atinda basali kobukela ye mbuma.” (Luka 10:2) Mosala yango ebongi mpenza kokokanisama na mosala ya kobuka mbuma, mpamba te soki mosali bilanga alekisi ntango mpo na kobuka mbuma, akoki kobungisa mbuma mingi ya malamu. Bobele bongo, soki bayekoli bamonisaki bopɔtu na mosala na bango ya kosakola, bomoi ya bato mingi oyo ezali eloko ya motuya ekokaki kobunga!—Ezekiele 33:6.
Baministre oyo bazali kobungisa ntango te
Yesu apesaki lisusu bayekoli na ye malako ete: “Memá libenga te, soko liboke te, soko sapato te, mpe pesá mbote na moto na nzela te.” (Luka 10:4) Na momeseno, basali na mobembo bazalaki komema bobele libenga mpe biloko ya kolya te, kasi lisusu sandale mosusu, mpo ete sandale oyo balataki ekokaki kobeba na nsé mpe nsinga na yango ekokaki kokatana. Kasi bayekoli ya Yesu basengelaki komitungisa mpo na biloko wana te. Basengelaki nde kozala na elikya ete Yehova akokokisa bamposa na bango na nzela ya bandeko na bango Bayisalaele, oyo bazalaki na momeseno ya koyamba bapaya.
Kasi mpo na nini Yesu alobaki na bayekoli na ye ete bápesa moto mbote na nzela te? Basengelaki nde kozala mpiɔ, ata mpe kozala na makambo makasi? Soko moke te! Liloba ya Greke a·spaʹzo·mai, oyo elimboli kopesa mbote, ekoki kolimbola mingi koleka “mbote” ya limemya to kotombela moto “mokolo malamu.” Liloba yango ekoki mpe lisusu kosalelama mpo na momeseno ya kopwepwa, koyamba, mpe kosolola lisolo molai oyo ekoki kolanda ntango bato mibale oyo bayebani bakutani. Molimboli moko alobi boye: “Bato ya Azia bazalaki kopesana mbote na lolenge oyo biso (bato ya Mpótó) tosalaka te, na kongumbama mwa moke to kopesa lobɔkɔ; kasi bango bazalaki kopesana mbote na koyambana mbala mingi, mpe kongumbama mpe ata kokitisa elongi kino na mabele. Makambo wana nyonso ezalaki kozwa ntango mingi.” (Kokanisá na 2 Mikonzi 4:29.) Na bongo Yesu asalisaki bayekoli na ye ete bápɛngola makambo wana ya kolekisa ntango mpamba atako ezalaki momeseno.
Na nsuka, Yesu alobaki na bayekoli na ye ete soko bakɔti na ndako mpe bayambi bango, basengelaki ‘koumela na ndako yango, mpe kolya mpe komela biloko bikopesa bango.’ Kasi soki bakɔti na mboka mpe bayambi bango te, basengelaki ‘kokende na kati na balabala na yango, mpe koloba ete, Tozali kolongwela bino ata mputulu na mboka na bino oyo ezali kokangama na matambe na biso.’ (Luka 10:7, 10, 11) Kopangwisa to kopupola mputulu ya makolo emonisaki ete na kimya nyonso, bayekoli bazalaki kotikela ndako to mboka oyo eyambi bango te makambo nyonso oyo Nzambe akoyeisela bango. Kasi baoyo bayambaki bayekoli ya Yesu na boboto bazalaki komitya na ngámbo ya baoyo bakozwa mapamboli. Yesu alobaki na bayekoli na ye na libaku mosusu ete: “Ye oyo akoyamba bino azali koyamba ngai; mpe ye oyo akoyamba ngai azali koyamba motindi na ngai. Mpe ye nani akopesa kɔpɔ na mai na mpiɔ epai na moko na baoyo mike mpo ete azali moyekoli, solo nazali koloba na bino, akobungisa libonza na ye te.”—Matai 10:40, 42.
Liteya mpo na biso
Lelo oyo, Batatoli ya Yehova koleka 5 000 000 kati na mokili mobimba bazali kokokisa mokumba ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya kozalisa bayekoli. (Matai 24:14; 28:19, 20) Bazali koyeba ete nsango na bango esengeli kosakolama na lombangu. Na yango, bazali kosalela malamu ntango na bango, koboyáká makambo mpamba oyo ekoki kopekisa bango kotya likebi mingi na mosala na bango ya ntina.
Batatoli ya Yehova bazali kosala makasi mpo na kozala na boninga na bato oyo bazali kokutana na bango. Atako bongo, bamikɔtisaka te na bilobaloba ezangi ntina, to na kowelana mpo na makambo ya bomoi ya bato to myango ya bato ya mokili oyo mizali kolónga te mpo na kosilisa bokesene. (Yoane 17:16) Na esika na yango, masolo na bango etalelaka nde eloko oyo ekosilisa bampasi ya bato mpo na libela—ezali bongo Bokonzi ya Nzambe.
Mbala mingi, Batatoli ya Yehova basakolaka mibale mibale. Mbɛlɛ bakosala mingi koleka soki mokomoko azalaki kosala ye moko, boye te? Ekoki kozala bongo. Kasi, lelo oyo baklisto bazali kososola matomba ya kosala elongo na moninga moko mondimi. Yango ezali kopesa mwa libateli ntango bazali kosakola na bakartyé oyo ezali na makama. Kosala elongo ezali lisusu kosunga basakoli ya sika ete bázwa litomba na makoki ya basakoli ya Bokonzi oyo bakɔmeli. Ya solo, bango nyonso bakoki kosalisana mpo na kolendisana moko na mosusu.—Masese 27:17.
Na ntembe te, mosala ya kosakola ezali mosala oyo esengeli kosalema na lombangu koleka misala nyonso na “mikolo” oyo “ya nsuka.” (2 Timoté 3:1) Batatoli ya Yehova bazali na esengo ya kozwa lisungi ya bondeko ya boklisto na mokili mobimba oyo kati na yango bazali kosala “esika moko na kondima na nsango malamu.”—Bafilipi 1:27.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Babiblia mosusu mpe bamaniskri mosusu ya kala ya Greke elobi ete Yesu atindaki bayekoli “ntuku nsambo na mibale.” Nzokande, ezali na ebele ya bamaniskri oyo ezali komonisa motángo ya “ntuku nsambo.” Bokesene oyo esengeli te kobungisa likambo oyo ya ntina, ete Yesu atindaki etuluku monene ya bayekoli na ye ete bákende kosakola.