Baombo ya bato to basaleli ya Nzambe?
“BATATOLI YA YEHOVA bakoki mpe kokumisama mwa moke.” Wana ezali maloba mazali kati na buku Seher, Grübler, Enthusiasten (Basakoli, bamanyoli, bato ya molende). Atako buku yango ezali koloba mabe mpo na Batatoli, endimi mpe ete: “Mingimingi, bazalaka na bomoi ezangi efundeli, ya bokatikati. Basalaka mosala na molende mpe na komipesa nyonso, bazali bato ya kimya mpe bakosaka te na oyo etali kofuta mpako na bango. Bamipesaka te na koluka bozwi. . . . Disipilini oyo bamonisaka na mayangani na bango ebongi kopesamela longonya. Elimo na bango ya komipesa ekokani na bato ya lingomba mosusu te; na oyo etali mosala ya kosakola, baleki mangomba mosusu nyonso. Kasi oyo ezali kotombola bango likoló ya mangomba mosusu nyonso ya boklisto na mikolo na biso ezali bongo etingya makasi oyo mingi kati na bango bamonisaka mpo na kosakola bindimeli na bango ata na ezalela nini mpe ata liboso ya makama.”a
Atako makumisi motindo oyo, ezali na bato oyo bazali koloba makambo mosusu na ntina na Batatoli ya Yehova. Na bikólo mingi kati na mokili mobimba, Lisangá ya Batatoli ezali kosala misala na yango uta bambula mingi kozanga epekiseli. Bamilió ya bato bayebi bango malamu, bamemyaka bango, mpe bandimaka ete bazali na lotomo ya kosalela lingomba na bango. Kasi, mpo na nini bato mosusu bazali naino komitunatuna soki Batatoli ya Yehova bazali mpenza banani?
Moko na bantina oyo bato bazali kokakatana ekoki kozala ete na bambula oyo, kobebisa bana, komiboma bato mingi esika moko, mpe misala ya banganga-mobulu esili komonana kati na mwa mangomba mingi. Ya solo, makambo mabe motindo oyo mazali bisika nyonso, bobele epai ya bato ya mangomba te. Nzokande, bato mingi bazali lisusu kotyela mangomba motema te, to mpe bazali koyina yango.
Makama ya kolanda bato
“Lingomba moke” elimbolami lokola “etuluku ya bato oyo bazali kondima mateya makokani na oyo ya bato mosusu te to bazali kolanda mokambi moko.” Bobele bongo, basangani ya “lingomba moke” bazalaka na “limemya mozindo mpo na moto moko, likanisi moko, to eloko moko.” Ya solo, basangani ya lingomba nyonso oyo bakangami makasi na kolanda batambwisi oyo bazali bato mpe bazali kolanda makanisi ya bato yango, bazali na likama ya kokóma baombo ya bato. Boyokani makasi etongami na kolanda mongongo ya mokambi ekoki komema moto na kobungisa makanisi malamu mpe kozala moombo na elimo. Likama ekoki kozala monene koleka soki moto abokwami na lingomba moke uta bomwana na ye.
Baoyo bazali komitungisa na ntina na misala ya lingomba moko basengeli koyeba bosolo ya makambo. Basilá koyebisa bato mosusu ete lisangá ya Batatoli ya Yehova ezali kokómisa basangani na yango baombo, ezali koyangela bango, ezali kolongola bango bonsomi na lolenge elongobani te, mpe ezali kobongwanisa bango mpe kokómisa bango na lolenge oyo ekeseni na bato mosusu.
Batatoli ya Yehova bayebi ete komitungisa motindo wana mpo na lingomba na bango ezali na moboko te. Yango wana, babyangi yo ete osala bolukiluki yo moko. Nsima ya kotalela makambo na likebi nyonso, ozwa bosukisi yo moko. Batatoli ya Yehova, bazali solo basaleli ya Nzambe ndenge bango moko balobaka, to bazali nde baombo ya bato? Eutelo ya makasi na bango ezali nini? Masolo mibale oyo mazali na nkasa 12 kino 23 makopesa biyano bibongi na mituna yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimeli na yango ya liboso na 1950 ezalaki na maloba yango te. Na bongo, lokola maloba yango matyami na ebimeli ya 1982 emonisi ete bakómi koyeba Batatoli ya Yehova malamu.