Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/2 nk. 5-7
  • Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba ya kobatama?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba ya kobatama?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Oyo bilembeteli bimonisi
  • Ezali lingomba oyo bato mingi bayebi
  • “Bamipesi mpenza mpo na kosunga bazalani na bango”
  • Bazali mpenza kolanda Biblia
  • Nani azali Motambwisi na bango?
  • Batatoli ya Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Batatoli ya Yehova bazali mwa kinzambinzambi?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Mangomba mikemike ya kobatama​—⁠Mazalaka ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Baklisto mpe mokili ya ntango na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/2 nk. 5-7

Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba ya kobatama?

YESU KLISTO afundamaki ete azalaki molangwi, molundi, mobuki na Sabata, motatoli ya lokuta, motuki Nzambe mpe motindami ya Satana. Afundamaki lisusu ete alukaki kokweisa boyangeli ya ekóló.​—Matai 9:34; 11:19; 12:24; 26:65; Yoane 8:13; 9:16; 19:12.

Na nsima ya liwa mpe ya lisekwa ya Yesu, bayekoli na ye mpe bafundamaki makasi mpenza. Etuluku moko ya baklisto ya ekeke ya liboso ememamaki na makasi epai na bayangeli ya mboka na bato oyo bazalaki konganga ete: ‘Bato oyo basili kobalola mokili.’ (Misala 17:6) Na libaku mosusu ntoma Paulo mpe moninga na ye Sila bamemamaki epai na basambisi mpe bafundamaki ete bazalaki mpenza kobimisa yikiyiki kati na engumba ya Filipi.​—Misala 16:20.

Na nsima Paulo afundamaki ete azalaki “mobali na yauli oyo akotɔmbɔkisaka bato kati na Bayuda yɔnsɔ baoyo bafandi na mikili yɔnsɔ” mpe ete amekaki “kobebisa Tempelo.” (Misala 24:5, 6) Na Loma, mikóló ya Bayuda balobaki na bosembo nyonso na ntina na ezalela ya balandi ya Yesu wana bandimaki ete: “Jambi mpɔ na lingomba oyo, eyebani na biso ete eboyami na bisika yɔnsɔ.”​—Misala 28:22.

Emonani polele ete etuluku wana ya sika oyo Yesu Klisto asalaki etalelamaki na bato mosusu ete ezalaki etuluku ya losambo ya mateya mpe makambo ya makasimakasi oyo ezalaki na boyokani te na makambo oyo mandimamaki na eleko wana ete mazalaki bizaleli bibongi kati na bato. Na ntembe te, bato mingi lelo oyo, mbele balingaki kotalela baklisto lokola mwa lingomba ya kobatama oyo ezalaki kobebisa bato. Bafundi bazalaki mingimingi bato minene mpe ya lokumu kati na mboka mpe emonani ete yango nde epesaki kilo likoló na bifundeli wana ya lokuta. Bato mingi bandimelaki bifundeli oyo bafundaki na yango Yesu mpe bayekoli na ye. Nzokande, mbala mosusu oyebi malamu ete bifundeli wana nyonso bizalaki ya lokuta! Atako bato balobaki makambo wana, ekómisaki yango makambo ya solo te.

Ezali boni mpo na mikolo na biso? Ebongi mpenza kotalela Batatoli ya Yehova lokola lingomba oyo ezali na makambo makasimakasi mpe na misala oyo mizali na boyokani te na oyo endimami ete ezali bizaleli bibongi kati na libota ya bato? Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba ya kobatama?

Oyo bilembeteli bimonisi

Mokonzi moko ya Leta ya engumba St. Petersburg, na Russie, alobaki ete: “Bamonisaki biso ete Batatoli ya Yehova bazali lokola mwa lingomba oyo ezali kosala na bonkútu mpe kati na molili mpe kobomáká bana mike mpe komibomáká bango moko.” Nzokande, bafandi ya Russie bayei sikawa koyeba malamumalamu bizaleli ya solosolo ya Batatoli ya Yehova. Nsima ya kosala elongo na Batatoli ya Yehova na boyokani na makambo matalaki liyangani ya mikili mingi (assemblée internationale), bobele mokonzi yango amonisaki ete: “Sikawa namoni bato oyo bazali lokola bato nyonso, bato na esengo, nkutu bazali malamu koleka bato mingi oyo nayebi. Bazali bato na kimya mpe na motema kokita, mpe bazali na bolingo makasi moko na mosusu.” Abakisaki ete: “Nazali mpenza koyeba te mpo na nini bato balobaka makambo na lokuta motindo oyo na ntina na bango.”

Batatoli ya Yehova basalaka milulu te mpo na kosambela, soko mpe kosambela na komibomba. Mokomi-mwasi moko oyo azali Motatoli te, Julia Mitchell Corbett, amonisaki ete: “Na ntango bayanganaka, mingimingi koleka mbala moko na poso, kati na Bandako ya Bokonzi (bisika na bango ya makita bibengami bandako-nzambe te), balekisaka ntango na bango mingi mpo na koyekola Biblia mpe kosala masoló likoló na yango.” Makomi “Ndako ya Bokonzi” etyami polele na bisika na bango ya makita. Bakopekisaka moto te koyangana na makita na bango mpe bato banso bakoki kosangana na yango. Ata bato oyo bayaka kozanga kolaka bayambamaka malamu mpenza.

Kati na búku na ye, Religion in America (Losambo na Amerika), Corbett abakisi ete: “Batatoli ya Yehova bayebani mingi mpo na likambo oyo ete bazali bato na kolongobana, bato na bonkónde mpe bato balingá mosala.” Bato mingi oyo bazali Batatoli ya Yehova te bazali kondima kozanga kokakatana ete ezali na likambo moko te ya kobenda likebi na lolenge mabe to ya kokamwisa na ntina na bango. Etamboli na bango ezali te na kozanga boyokani na ezalela oyo endimami ete ebongi kati na libota ya bato. Buku monene The New Encyclopædia Britannica elobi mpenza na bosolo nyonso ete Batatoli “balobelaka makasi ntina ya mibeko mitombwami ya bizaleli malamu kati na etamboli ya moto na moto.”

Mobongisi moko ya bansango oyo epesamaka na televizyó mpe ya bansango mosusu ya ntina, oyo asalaka na ndako moko ya televizyó na Etats-unis akomelaki Batatoli ya Yehova mpo na koyanola na ntina na maloba ya kozanga bokatikati oyo elobamaki mpo na Batatoli na boumeli ya emisió moko ya bopanzi nsango oyo ebengami 60 minutes. Alobaki ete: “Soki bato mingi bazalaki kotambola lokola lingomba na bino ekosalaka yango, mbele mboka oyo ekokaki kozala boye te. Nazali moko na bapanzi nsango oyo ayebi ete ebongiseli na bino ezwi moboko na yango likoló na bolingo mpe kondima makasi epai na Mozalisi. Nalingi boyeba ete bapanzi nsango nyonso te nde bazali na makanisi ya kozanga bokatikati motindo oyo.”

Ezali lingomba oyo bato mingi bayebi

Ezali sembo na koloba ete Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba moko oyo emitangoli mosika na bato mpe bazali na makambo makasimakasi? Ezali solo ete Batatoli ya Yehova bazali moke na kotalela motuya na bango soki tokokanisi bango na mangomba mosusu. Nzokande, omikundola likambo oyo Yesu alobaki, ete: “Ekuke ejali na nkaka mpe njela ekangani oyo ekoleka na bɔmɔi mpe baoyo bakomona yango bajali mingi tɛ.”​—Matai 7:13, 14.

Atako bongo, Batatoli bazali soko moke te lingomba moko ya moke oyo emitangoli mosika na bato mpe bazali na makambo makasimakasi. Na sanza ya Apríli ya mobu 1993, koleka bamilió 11 ya bato bayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Klisto oyo Batatoli basalaki. Kasi eloko ezali ntina mingi koleka motuya na bango ezali bizaleli malamu na bango mpe ndakisa na bango mpo na oyo etali etamboli malamu, oyo esalaki ete bapesamela longonya uta na mokili mobimba. Na ntembe te, likambo yango esalaki ete bandimama kati na mikili mingi engebene mibeko ya Leta lokola lingomba ya solosolo.

Ndakisa monene ezali mokano oyo mouti kokamatama na Esambiselo eleki monene ya Mpótó mpo na makambo matali ntómo ya bato. Elobaki ete Batatoli basengeli kozala na bonsomi ya komonisa makanisi na bango, lisosoli na bango mpe losambo na bango mpe ete bazali na lotómo ya koloba mpe koteya na ntina na kondima na bango epai na bato mosusu. Mbele Esambiselo wana elingaki kozwa ekateli motindo wana te soki Batatoli ya Yehova bayebanaki ete basalelaka myango ya kolengola mpe ya mabe mpo na kozwa basangani ya sika to mpe soki basalelaka myango ya kondimisa bato makambo na makasi mpo na kozala na bokonzi likoló na makanisi ya bato na bango.

Ebele ya bato kati na mokili mobimba bayebi Batatoli ya Yehova malamu. Motuna oyo etunami epai na bamilió ya bato oyo bazali Batatoli te, baoyo bazali koyekola Biblia elongo na Batatoli to basilá koyekola elongo na bango na ntango moko to mosusu: Omonaki ete balingaki kondimisa yo makambo na makasi mpe koboyisa yo makanisi na yo na makasi? Batatoli basalelaki myango mabe mpo na kozala na bokonzi likoló na makanisi na yo? Kozanga ntembe, “te” nde ekoki mpenza kozala eyano na yo ya sembo. Ezali polele ete soki myango wana misalelamaki, mbele bato mingi oyo bakoki kozala ete banyokolamaki balingaki koboya kondima maloba ya longonya oyo elobami na ntina na Batatoli ya Yehova.

“Bamipesi mpenza mpo na kosunga bazalani na bango”

Mingimingi, basangani ya mangomba mikemike ya kobatama bamitangolaka mosika na mabota na bango, na baninga na bango ata mpe mosika na bato nyonso. Ezali bongo mpo na Batatoli ya Yehova? Mopanzi nsango moko na Ekólo ya Tchèque akomaki ete: “Nazali Motatoli ya Yehova te.” Nzokande, abakisaki ete: “Ezali polele ete [Batatoli ya Yehova] bazali na makasi ya kokamwisa mpo na oyo etali bizaleli malamu. . . . Bazalaka na botosi epai na bakonzi ya Leta, kasi bandimaka ete bobele Bokonzi ya Nzambe nde ekoki kosilisa mikakatano ya bato. Kasi, simbá likambo oyo​—bandimaka makambo bindimela te. Bazali bato oyo bamipesi mpenza mpo na kosunga bazalani na bango.”

Lisusu, bakofandaka te kati na bisika babongisá bobele mpo na bango moko, komitangoláká mosika na bandeko ya mosuni mpe bato mosusu. Batatoli ya Yehova bayebi ete bazali na mokumba oyo euti na Makomami ya kolinga mpe kobatela mabota na bango. Bazali kofanda mpe kosala esika moko na bato ya mposo nyonso mpe mangomba nyonso. Wana makámá mauti na biloko bizalisami mazali kobima, basalaka na lombangu mpo na kopesa biloko mpo na kosunga mpe lisalisi ya bolingo malamu epai na baoyo bazwi mpasi.

Likambo lileki ntina ezali oyo ete bamipesi kati na ebongiseli ya koteya oyo ekokani na mosusu te. Mangomba boni mazali na ebongiseli malamu mpe ya sikisiki mpo ete basangani na yango bakendeke kotala moto nyonso oyo afandi kati na mboka na bango? Batatoli ya Yehova basalaka yango kati na mikili koleka 200 mpe na nkóta koleka 200! Ya solo, Batatoli ya Yehova “bamipesi mpenza mpo na kosunga bazalani na bango.”

Bazali mpenza kolanda Biblia

Ezali solo ete mateya ya Batatoli ya Yehova ekeseni na oyo ezali koteyama kati na mangomba mosusu. Batatoli ya Yehova bandimaka ete Yehova azali Nzambe mozwi-na-nguya nyonso mpe ete Yesu azali Mwana na ye, kasi te moko kati na bonzambe bosato. Kondima na bango ekangami makasi kati na endimeli oyo ete bobele Bokonzi ya Nzambe nde ekoki kosilisa bampasi ya bato. Bazali kokebisa bato na ntina na kobomama ya ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo. Bazali koteya na ntina na elaka oyo Nzambe apesaki na ntina etali kotya paladiso awa na mabelé mpo na bato ya botosi. Basambelaka ekulusu te. Bakumisaka eyenga ya Mbótama ya Yesu te. Bandimaka ete molimo ekufaka mpe ete lifelo ya mɔ́tɔ ezali te. Balyaka makila te soko mpe kondima kozongisama makila te. Baboyi komikotisa na makambo ya politiki mpe komikotisa kati na bitumba. Osilá naino komituna soki mpo na nini mateya ya Batatoli ya Yehova makeseni mpenza na oyo ya bato mosusu?

Zulunalo moko ya engumba Massachusetts, Daily Hampshire Gazette, eyebisi ete epai na Batatoli ya Yehova, “lolenge ya sikisiki ya kolimbola Biblia epekisi misala mingi oyo bato mosusu bazali kondima yango ete ezali malamu . . . , nyonso wana mpo na kosala makasi ya kolanda ndakisa ya baklisto ya ekeke ya liboso mpe liloba ya Biblia.” Búku monene The Encyclopedia of Religion endimi ete “bindimeli na bango nyonso ezwi moboko na yango kati na Biblia. Bazali ‘kolendisa makomi’ (elingi koloba, kopesa bilembeteli biuti na Biblia mpo na kosimba) pene mateya na bango nyonso, kondimáká nguya ya Biblia, oyo ezali kozwa esika ya bɔnkɔ́kɔ́.” Búku Religion in America elobi ete: “Etuluku yango bazali ntango nyonso kotya likebi na bango mobimba na boyekoli ya Biblia, mpe mateya na bango masimbami na ebongiseli moko oyo esalemi na lolenge ya mayele mpe ezali komonisa bilembeteli biuti na Biblia.”

Nani azali Motambwisi na bango?

Ezali mingimingi mpenza mpo na bokangami na bango makasi na mateya ya Biblia nde bazali kokumbamela mpe kosambela te batambwisi oyo bazali bato lokola bango, lokola ezali komonana mingi mpenza kati na mangomba mikemike ya kobatama na mikolo na biso, nzokande ekoki komonana te kati na Batatoli ya Yehova. Baboyi likambo ya kokesenisa bakonzi ya lingomba na bandimi ya lingomba. Búku monene The Encyclopedia of Religion eyebisi na bosembo nyonso na ntina na Batatoli ya Yehova ete: “Kelasi ya bakonzi ya lingomba mpe bankombo ya lokumu mpo na kokesenisa bamoko na basusu eboyami makasi.”

Bazali kolanda Yesu Klisto lokola Motambwisi na bango mpe lokola Motó ya lisangá ya boklisto. Ezali Yesu nde alobaki ete: “Bino bobiangama Labi tɛ, jambi mɔkɔ ajali molakisi na bino, bino yɔnsɔ bojali bandeko. Bobianga moto tata awa na mokili tɛ, jambi mɔkɔ ajali Tata na bino, oyo na likoló. Bobiangama mpe [batambwisi, NW] tɛ, jambi mɔkɔ ajali Nkolo na bino, ye Klisto.”​—Matai 23:8-12.

Ezali polele ete Batatoli ya Yehova bazali soko moke te lingomba moke ya kobatama; bobele bongo, Yesu azalaki te molundi to molangwi. Ya solo, kati na baoyo bapusamaki na bansango ya lokuta na ntina na Yesu mpe bayekoli na ye, bango nyonso te nde balobaki mabe na ntina na ye. Ekoki kozala ete bato mosusu bayebisamelaki nsango na lolenge ya mabe. Soki ozali na mituna na ntina na Batatoli ya Yehova mpe bindimeli na bango, mpo na nini te koluka koyeba bango malamu? Bikuke ya Bandako na bango ya Bokonzi efungwami polele mpo na baoyo nyonso bazali koluka solo.

Yo mpe okoki kozwa litomba na bolukiluki na bango ya solosolo mpo na oyo etali boyebi ya sikisiki ya Biblia, mpe koyekola kosambela Nzambe na boyokani na maloba ya Yesu: “Ntango ekoya, ɛɛ ejali sasaipi, wana basambeli na sɔlɔ bakosambela Tata na [elimo, NW] mpe na sɔlɔ. Mpɔ ete Tata ajali koluka motindo oyo mpɔ na kosambela ye.”​—Yoane 4:23.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto