Bomoi na ngai lokola moto ya maba etondi na esengo mpe epambolami na elimo
Lisolo Ya Isaiah Adagbona
Nakolá na Akure, na ekólo Nigeria. Libota na ngai ezalaki kolona bilanga ya mboma, makemba, sɔngɔ, mpe kakao. Tata na ngai alingaki natánga kelasi te. Azalaki koloba na ngai ete: “Ozali mosali na bilanga. Moto te akosɛngisa na yo otánga naino kelasi mpo na kolona mboma.”
KASI, ngai nazalaki na mposa ya koyeba kotánga. Na bampokwa, nazalaki kotɛlɛma pembeni na lininisa ya ndako moko mpe kolanda mateya oyo molakisi moko azalaki kopesa bana ya libota wana. Yango ezalaki na 1940, ntango wana nazalaki na mbula 12. Soki tata ya bana yango amoni ngai, azalaki kongangela ngai mpe kobengana ngai. Kasi nazalaki kozonga lisusu. Mikolo mosusu molakisi azalaki koya te, mpe nazalaki kokɔta na mayele mpe elongo na bana yango, tozalaki kotánga babuku na bango. Na mabaku mosusu bazalaki kodefisa ngai babuku na bango. Ezali motindo yango nde nayekolaki kotánga.
Nasangani na libota ya Nzambe
Na nsima nazwaki Biblia mpe nazalaki kotánga yango mbala na mbala liboso ya kolala. Mokolo moko na mpokwa natángaki Matai mokapo 10, oyo ezali komonisa ete bato bakoyina mpe bakonyokola bayekoli ya Yesu.
Namikundolaki ete Batatoli ya Yehova bayaki na ndako na biso mpe bayambamaki malamu te. Yango nakanisaki ete baoyo bakoki kozala bato oyo Yesu alobelaki. Mbala ya nsima ntango Batatoli bayaki, nazwaki zulunalo moko epai na bango. Wana nabandaki kosangana na bango, bato bakómaki kotyola ngai. Nzokande, mbala nyonso oyo bato yango bazalaki komeka kolɛmbisa ngai, kondimisama mpe esengo na ngai ezalaki kokóma makasi koleka mpamba te namonaki lingomba ya solo.
Likambo oyo ebendaki mpenza likebi na ngai epai ya Batatoli ezalaki ete, na bokeseni na mangomba mosusu ya mboka na ngai, bazalaki kosangisa losambo na bango na mimeseno mpe bonkɔkɔ ya mangomba ya bapakano te. Na ndakisa, atako libota na biso ezalaki kokende na ndakonzambe na Lingomba ya Angleterre, tata na ngai azalaki na sanduku moke mpo na kosambela Ogun, nzambe ya Yoruba.
Nsima ya liwa ya tata na ngai, nasengelaki kosangola sanduku yango. Naboyaki yango, mpamba te nayebaki ete Biblia epekisi losambo ya bikeko. Na lisalisi ya Yehova nakolaki na elimo, mpe na Desɛ́mbɛ 1954, nazwaki batisimo.
Bokɔnɔ ya maba ebandi
Na ebandeli ya mobu yango, makolo na ngai ebandaki kovimba mpe ezalaki lisusu koyoka eloko te. Soki natɛlɛmi na makala ya mɔ́tɔ, nazalaki koyoka mpasi te. Nsima ya mwa ntango, bampota ya motane ebimaki ngai na elongi mpe na bibɛbu. Ezala ngai to libota na ngai toyebaki te soki ezalaki eloko nini, tokanisaki ete ezalaki makwanza. Natambolaki epai ya bato 12 oyo basalisaka na nkisi ya nzete mpo na koluka lisalisi. Na nsima, moko na bango ayebisaki biso ete ezalaki maladi ya maba.
Esalaki ngai mpasi makasi! Natungisamaki mpe nalalaki malamu te. Nalɔtaki bandɔtɔ ya mabe. Kasi boyebi na ngai ya Biblia mpe kotyela Yehova motema esalisaki ngai mpo ete nazala na elikya mpo na mikolo mizali koya.
Bato Bayebisaki mama na ngai ete soki nakei kopesa makabo epai ya nganga-nzambe, nakobika. Naboyaki kokende, koyebáká ete kosala bongo ekosepelisa Yehova te. Kososoláká ete ekateli na ngai ya koboya kokende epai ya nganga-nzambe ekobongwana te, baninga ya mama na ngai bayebisaki ye azwa likasu mpe atutisa yango na elongi na ngai. Na bongo akokaki komema likasu yango epai ya nganga-nzambe ete esalelama lokola mbeka mpo na ngai. Nayebisaki ye ete naboyi kosangana na makambo yango. Nsukansuka, atikaki milende azalaki kosala mpo na kokɔtisa ngai na lingomba ya bapakano.
Ntango nakendaki na lopitalo, maba esilaki kokóma makasi. Bampota ebimaki ngai nzoto mobimba. Na lopitalo, bapesaki ngai bankisi, mpe mokemoke loposo na ngai ezongaki malamu.
Bakanisaki ete nakufi
Kasi, mikakatano na ngai esukaki wana te. Lokolo na ngai ya mobali ebebaki mingi, mpe na mobu 1962 esengelaki kokata yango. Nsima ya kokata yango, mikakatano mingi ebimaki. Minganga bamonaki ete nakobika te. Sango moko ayaki kopesa ngai mafuta-nsuka. Nazalaki na makasi ya koloba te, kasi lifulumɛ moko ayebisaki ye ete nazali Motatoli ya Yehova.
Sango yango alobaki na ngai ete: “Olingi kobongwana mpe kokóma Mokatolike mpo okende na likoló?” Esɛkisaki ngai na motema. Nabɔndelaki Yehova ete apesa ngai makasi ya kozongisa eyano. Nasalaki makasi, mpe nalobaki ete: “Te!” Nganga-nzambe yango abalukaki mpe akendaki.
Mpasi na ngai ekómaki makasi kino minganga bakanisaki ete nakufi. Bazipaki ngai elamba na elongi. Kasi bamemaki ngai na ndako ya bibembe te, mpamba te, monganga to lifulumɛ asengelaki komindimisa ete nakufi solo. Monganga azalaki te, mpe mafulumɛ nyonso bakendaki na feti. Batikaki ngai na mbeto na ngai na boumeli ya butu mobimba. Na ntɔngɔ ya mokolo elandaki, ntango monganga azalaki kotala babɛli, moto te ayaki na mbeto na ngai mpamba te nazipamaki na elamba mpe bakanisaki ete nakufi. Na nsuka, moto moko amonaki ete “ebembe” ezalaki koningana na nse ya elamba!
Nsima, nabikaki, mpe na Desɛ́mbɛ 1963, batindaki ngai na lopitalo ya bato ya maba na Abeokuta, na sudi-wɛsti ya ekólo Nigeria. Kino sikawa nafandaka kuna.
Botɛmɛli na mosala na ngai ya kosakola
Ntango nakómaki na lopitalo yango, bato ya maba bazalaki soko 400, mpe nazalaki bobele ngai moko Motatoli. Natindaki nkomá na la Société, mpe bayanolaki nokinoki na koyebisáká bandeko ya lisangá ya Akomoje ete bákutana na ngai. Ntango nyonso nazalaka na bandeko.
Nokinoki ntango nakómaki na lopitalo yango, nabandaki kosakola nsango malamu. Pastere ya esika yango asepelaki na likambo yango te, mpe afundaki ngai epai ya mokonzi ya káa. Mokonzi yango azalaki mobali moko mobange moto ya ekólo Allemagne. Alobaki na ngai ete nazali na lotomo ya koteya Biblia te mpo ete natángá kelasi te mpe nazali na mokanda te oyo epesi ngai ndingisa ya koteya; mpamba te nakoteya bato malamu te. Soki natye moto makasi, bakobengana ngai na lopitalo mpe bakopesa ngai lisusu nkisi te. Apesaki ngai nzela te ete nazongisa liloba.
Na nsima apesaki mobeko ete moto moko te asengeli koyekola Biblia na ngai. Mpo na yango, baoyo bamonisaki bosepeli batikaki koya epai na ngai.
Nayebisaki Yehova likambo yango na libondeli, nasɛngaki ye mayele mpe litambwisi. Mokolo ya lomingo elandaki, nakendaki na ndakonzambe ya Lingomba ya Baptiste oyo ezalaki na lopitalo, atako nasanganaki te na losambo na yango. Na boumeli ya losambo ezalaki na ntango moko oyo baoyo bazalaki wana bakokaki kotuna mituna. Natombolaki mosapi mpe natunaki ete: “Soki bato malamu nyonso bakokende na likoló mpe bato mabe nyonso bakokende esika mosusu, mpo na nini Yisaya 45:18 elobi ete Nzambe asalaki mabelé mpo ete bato báfanda wana?”
Nungunungu makasi ebimaki kati na basangani. Na nsuka, pastere yango oyo azalaki misionere alobaki ete tokoki koyeba banzela ya Nzambe te. Na yango, napesaki eyano na motuna na ngai na kotangáká Makomami oyo mazali komonisa ete bato 144 000 bakokende na likoló, bato mabe bakokufa, mpe bayengebene bakofanda na mabelé libela na libela.—Nzembo 37:10, 11; Emoniseli 14:1, 4.
Moto nyonso abɛtaki mabɔkɔ mpo na komonisa bosepeli na eyano. Na nsima, pastere alobaki ete: “Bóbɛta lisusu mabɔkɔ mpamba te moto oyo ayebi mpenza Biblia.” Nsima ya losambo, bamoko bayaki epai na ngai mpe balobaki ete: “Oyebi makambo mingi koleka pastere!”
Milende mpo na kobengana ngai ezali sé kokoba
Likambo yango ekitisaki minyoko mwa moke, mpe bato bazongelaki koya epai na ngai mpo na koyekola Biblia. Nzokande, banguna mosusu bakobaki kosɛngisa mokonzi ya káa ete abengana ngai. Pene na sanza moko na nsima ya makambo oyo masalemaki na ndakonzambe, abengaki ngai mpe alobaki ete: “Mpo na nini ozali kokoba kosakola? Na ekólo na ngai, bato balingaka Batatoli ya Yehova te, ezali ndenge moko mpe awa. Mpo na nini ozali kotungisa ngai? Oyebi te ete nakoki kobengana yo?”
Nayanolaki ete: “Papa, namemyaka yo mpo na bantina misato. Ya liboso, mpo ete ozali mokóló na ngai, mpe Biblia elobi ete tosengeli kopesa limemya epai na nsuki mpɛmbɛ. Ntina ya mibale ezali ete otikaki mboka na yo mpo na kosalisa biso awa. Ntina ya misato ezali ete ozali na boboto, mokabi, mpe osalisaka baoyo bazali konyokwama. Kasi mpo na nini okanisi ete okoki kobengana ngai? Prezida ya ekólo abenganaka Batatoli ya Yehova te. Nkumu ya etúká oyo abenganaka biso te. Ata soki obengani ngai na káa oyo, Yehova akolanda kobatela ngai.”
Nalobaki na ye naino motindo ya polele boye liboso te, mpe namonaki ete ekamwisaki ye. Akendaki kozanga koloba ata liloba moko. Mwa mikolo na nsima, ntango moto moko akendaki kofunda ngai, ayanolaki ye na nkanda ete: “Nakomikɔtisa na makambo wana lisusu te. Soki ozali na likambo na ntina na mosala na ye ya kosakola, lobaná na ye!”
Kelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma
Baoyo bazalaki kokende na ndakonzambe ya Lingomba ya Baptiste na káa bakobaki kotɛmɛla mosala na ngai ya kosakola. Na nsima, nazwaki likanisi moko. Nakendaki epai ya mokonzi ya káa mpe natunaki ye soki nakokaki kobandisa kelasi ya koyekola kotánga mpe kokoma. Ntango atunaki soki nalingaki ete báfuta motuya boni, nalobaki ete nakotángisa ofele.
Babongisaki kelasi, etanda moindo, mpe mpɛmbɛ, na bongo nabandaki kolakisa baninga mosusu ya káa kotánga mpe kokoma. Tozalaki kotánga mikolo nyonso. Na miniti 30 ya ebandeli, nazalaki kolakisa lolenge ya kotánga, na nsima nazalaki kosolola lisolo moko ezwami na Biblia mpe kolimbola yango. Soki esili, tozalaki kotánga lisolo yango kati na Biblia.
Moyekoli moko azalaki mwasi, nkombo na ye Nimota. Azalaki kosepela mingi na makambo ya elimo mpe azalaki kotuna mituna na makambo etali lingomba na ndakonzambe mpe na moskɛ [ndakonzambe ya Bamizilma]. Kuna, azwaki biyano na mituna na ye te, na yango, azalaki koya kotuna ngai. Nsukansuka, apesaki bomoi na ye na Yehova mpe azwaki batisimo. Na mobu 1966, tobalanaki.
Bandeko mingi oyo bazali kati na lisangá na biso lelo oyo bayekolaki kotánga mpe kokoma na kelasi wana. Nazalaki na mayele te mpo na kosɛnga ete kelasi wana ebanda. Solo lipamboli ya Yehova emonanaki polele. Na nsima, moto moko te amekaki kopekisa ngai kosakola.
Ndako ya Bokonzi kati na káa
Ntango ngai na Minota tobalanaki, tozalaki bato minei oyo bazalaki koyangana pɔsɔ na pɔsɔ mpo na koyekola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Na boumeli ya mbula soko moko, tozalaki koyangana na ndako oyo bazalaki kosukola bampota ya bato ya maba. Na nsima, mokonzi ya káa, oyo asilaki kokóma moninga na ngai, alobaki na ngai ete: “Ezali malamu te ete bósambelaka Nzambe na bino na ndako oyo bapesaka bato nkisi.”
Alobaki ete tokoki koyangana na libandauli (hangar) ya mosala ya mabaya oyo ezalaki lisusu kosalelama te. Na ntango yango, libandauli yango ebongolamaki na Ndako ya Bokonzi. Na mobu 1992, na lisalisi ya bandeko ya engumba oyo ezali pene ya káa, tosilisaki kotonga yango. Ndenge bokoki komona yango na fɔtɔ na lokasa 24, Ndako na biso ya Bokonzi ezali kitoko—batyá simá mpe bapakolá langi, ezali na bɛtɔ́ na nse mpe na nsamba ya makasi mpe ya kitoko.
Mosala ya kosakola epai ya bato ya maba
Na boumeli ya mbula 33, teritware na ngai ezalaki lopitalo ya bato ya maba. Kosakola nsango malamu epai ya bato ya maba ekokani na nini? Awa na Afrika, bato mingi bandimaka ete makambo nyonso mautaka na Nzambe. Bamoko, ntango bazali konyokwama na maba, bazali kokanisa ete na lolenge moko to mosusu yango euti na Nzambe. Bamoko bazali komitungisa makasi na ntina na ezalela na bango. Bamosusu bazali na nkanda mpe balobaka ete: “Kolobela biso te ete Nzambe oyo azali na bolingo mpe na motema mawa. Soki ezalaki likambo ya solo, maladi oyo mbɛlɛ elimwá!” Bongo, totángaka mpe tokanisaka likoló ya mokapo ya Yakobo 1:13, oyo elobi ete: ‘Nzambe akomekaka moto na mabe te.’ Na nsima, tolimbolaka mpo na nini Yehova atiki nzela ete maladi enyokola bato, mpe tomonisaka elaka na ye ya paladiso na mabelé epai oyo moto te akozala na maladi.—Yisaya 33:24.
Bato mingi bandimaki nsango malamu. Uta nayá na káa oyo, Yehova asili kosalela ngai mpo na kosunga bato koleka 30 mpo ete bámipesa mpe bázwa batisimo, bango nyonso bato ya maba. Mingi bazongá na bandako na bango nsima ya kokóma nzoto kolɔngɔnɔ, mpe moke bakufá. Sikawa tozali na basakoli ya Bokonzi 18, mpe bato pene na 25 bazali koyangana na makita pɔsɔ na pɔsɔ. Tozali bankulutu mibale, mpe mosaleli ya misala moko mpe mobongisi-nzela ya sanza na sanza moko. Nazali na esengo mpenza na komona ebele ya bato bazali kosalela Yehova na bosembo kati na káa! Ntango nayaki awa, nakanisaki ete nakozala ngai moko, kasi Yehova apamboli ngai na lolenge ya kokamwa.
Esengo ya kosalela bandeko na ngai
Nazwaki nkisi mpo na maladi ya maba kobanda 1960 kino pene na mbula mitano na nsima. Sikawa, maladi na ngai esili nyonso, ndenge moko na bamosusu kati na lisangá. Maba etiká bilembo na yango—nakatáná lokolo, mpe nakoki kosembola mabɔkɔ na ngai te—kasi bokɔnɔ esilá.
Lokola nabiká, bamoko batunaki ngai mpo na nini nalingaka kozonga na mboka te. Bantina oyo nafandi awa ezali mingi, kasi ntina oyo eleki nyonso ezali ete nalingi kokoba kosalisa bandeko na ngai awa. Esengo ya kobatela bampate ya Yehova eleki eloko nyonso libota na ngai ekoki kopesa ngai soki nazongi epai na bango.
Nazali na botɔ́ndi mingi mpo ete nayebaki Yehova liboso ya kososola ete nazalaki na maba. Soki bongo te, nakokaki komiboma. Mitungisi mpe mikakatano mizalaki mingi na boumeli ya bambula, kasi ezalaki bankisi nde esalisaki ngai te—ezalaki nde Yehova. Ntango nazali kokanisa mikolo mileki, nazali koyoka esengo, mpe ntango nazali kokanisa mikolo mizali koya na nse ya Bokonzi ya Nzambe, nazali mpenza koyoka esengo mingi.
[Etanda na lokasa 25]
Lokasa ya mateya na ntina na maba
Maba ezali nini?
Maba ya mikolo na biso ezali bokɔnɔ ezali kouta na mikrobe (bacille) oyo eyebanaki na mobu 1873, na Armauer Hansen. Mpo na botɔ́ndi na mosala na ye, minganga babéngaka maba ete bokɔnɔ ya Hansen.
Mikrobe yango ebebisaka misisa ya nzoto, mikuwa, miso, mpe binama mosusu. Moto akoyoka lisusu mpasi te, mingimingi na mabɔkɔ mpe na makolo. Soki eyebani noki te, bokɔnɔ yango ekoki kobebisa elongi mpe misapi ya mabɔkɔ to ya makolo. Ebomaka mingi te.
Nkisi ya kosilisa yango ezali?
Bato oyo bazali na maba ya makasi te bakoki koyoka malamu kozanga nkisi. Maba oyo ekɔti makasi ekoki kosilisama na nkisi ya mondɛlɛ.
Nkisi ya liboso ya maba, oyo ebimaki na mobu 1950, ezalaki kosala malɛmbɛmalɛmbɛ mpe ezalaka lisusu makasi te mpamba te mikrobe ya maba ekómaki makasi koleka. Nkisi ya sika ebimisamaki, mpe na ebandeli ya mobu 1980, ‘Kosangisama ya nkisi mingi’ ekómaki lisalisi oyo ezali kosalelama na mokili mobimba. Lisalisi yango esɛngisi kosalela mitindo misato ya nkisi mikeseni na mbala moko—Dapsone, Rifampicin, mpe Clofazimine. Atako ‘Kosangisama ya nkisi mingi’ ezali koboma mikrobe, kasi ebongisaka mbeba oyo esili kosalema te.
‘Kosangisama ya nkisi mingi’ ezali makasi mpenza mpo na kosilisa bokɔnɔ yango. Na yango, motángo ya bato ya maba esili kokita longwa na milio 12 na mobu 1985 kino pene na milio 1,3 na katikati ya mobu 1996.
Na meko nini ekoki kozwa moto mosusu?
Maba ezwaka bato mingimingi te; bato mingi bazali na ebongiseli makasi ya nzoto mpo na kobundisa yango (anticorps). Ntango ezwi moto, mbala mingi ezalaka bato oyo bafandaka ntango molai penepene na baoyo bazali na yango.
Minganga bayebi te na bosikisiki ndenge mikrobe yango ekɔtaka na nzoto ya moto, kasi bazali kokanisa ete ekoki kokɔta na nzela ya loposo to ya zolo.
Elikya mpo na mikolo mizali koya
Ekanami ete maba “ekosilisama, ekozala lisusu bokɔnɔ oyo ekotungisa bato te” na mobu 2 000. Yango elimboli ete motángo ya bato ya maba kati na bisika nyonso ekoleka te moto moko kati na bato 10 000. Na nse ya Bokonzi ya Nzambe ekosila libela.—Yisaya 33:24.
Biutelo: Organisation mondiale de la santé; Fédération internationale des associations anti-lèpre; mpe zulunalo Manson’s Tropical Diseases, ebimeli ya 1996.
[Etanda na lokasa 27]
Maba ya lelo ekokani na oyo ezalaki na ntango ya lisolo ya Biblia?
Mikanda ya minganga lelo ezali kolimbola maba na maloba ya sikisiki; nkombo minganga bapesi mikrobe yango ezali Mycobacterium leprae. Ya solo, Biblia ezali mokanda ya zebi ya minganga te. Maloba ya Liebele mpe ya Greke oyo mabongolami na “maba” na Babiblia mingi mapesi bandimbola ya sikisiki te. Na ndakisa, maba oyo elobelami na Biblia ezalaki kobimisa bilembo (symptômes) oyo bizalaki komonana bobele epai ya bato te kasi lisusu na bilamba mpe na bandako, likambo oyo mikrobe (bacille) esalaka te.—Levitike 13:2, 47; 14:34.
Na koleka, bilembo oyo bizali lelo komonisa maba epai ya bato ezali mpenza ndenge moko te na oyo ya maba ya ntango ya lisolo ya Biblia. Bamoko bapesi makanisi ete ntina ya bokeseni yango ekoki kozala na likambo oyo ete mitindo ya maladi mizali kobongwana nsima ya bileko. Bamosusu bazali kondima ete maba oyo etángami na Biblia ezali koloba na ntina na maladi mwa mingi, oyo ekoki kosangisa to ekoki kosangisa te bokɔnɔ oyo euti na Mycobacterium leprae.
Buku Dictionnaire théologique du Nouveau Testament (na Lingelesi) elobi ete maloba ya Greke mpe ya Liebele oyo mbala mingi mabongolamaka na maladi ya maba “ezali kolobela bokɔnɔ bobele moko, to makɔnɔ mingi . . . Atako ekoki kozala mpenza te bokɔnɔ oyo tozali kobénga lelo maba. Nzokande, komonisama na sikisiki ya bokɔnɔ yango epai na minganga epusi biso te na kobɛta ntembe na lisolo oyo [Yesu mpe bayekoli na ye] babikisaki [bato ya maba].”
[Elilingi na lokasa 24]
Bandeko ya lisangá na libándá ya Ndako ya Bokonzi na káa ya bato ya maba
[Elilingi na lokasa 26]
Isaiah Adagbona mpe mwasi na ye, Nimota