Ozali koyeba lisusu?
Osepelaki mpenza na botángi ya banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki kopesa biyano na mituna milandi:
• Mpo na nini ezali na ntina tóbatela bosembo na biso?
Kobatela bosembo esalisaka biso tómonisa ete tozali na ngámbo ya bokonzi ya Yehova mpo tolingaka ye mpe tómonisa ete Satana azali lokuta. Yehova akosambisa biso na kolanda bosembo na biso, yango wana bosembo ezali na ntina mingi mpo na elikya na biso na mikolo ezali koya.—15/12, nkasa 4-6.
• Tángá mwa batitre oyo emonisi mokumba monene ya Yesu na mokano ya Nzambe.
Mwana mobotami-se-moko. Liloba. Amen. Moyokanisi ya kondimana ya sika. Nganga-nzambe Monene. Momboto oyo alakamaki.—15/12, lokasa 15.
• Mpo na nini ezali na ntina ndenge Eliya asɛngaki mosali na ye atala na ngámbo ya mai-na-monana ntango azalaki kobondela mpo mbula ebɛta? (1 Mik. 18:43-45)
Eliya amonisaki ete ayebaki epai mbula eutaka. Ayebaki ete mapata esalemaka likoló ya mbu, mopɛpɛ ememaka yango na mokili, mpe yango nde esalaka ete mbula ebɛta.—1/1, nkasa 15-16.
• Ndenge nini tokoki kosala mpo na kozwa esengo mingi na mosala ya kosakola?
Tokoki kobongisa motema na biso, kotya makanisi na ndenge oyo tokoki kosalisa basusu. Tokoki kosakola na mokano ya kobanda koyekola Biblia na bato. Soki bato baboyi koyoka, tokoki kosalela mayele mosusu mpo na kobenda likebi ya bato ya teritware na biso.—15/1, nkasa 8-10.
• Maba oyo Biblia elobeli ezali kaka oyo toyebi lelo?
Na ntango ya kala, ezalaki na maladi moko na nkombo maba. (Lev. 13:4, 5) Biblia elobeli mpe maba oyo ezalaki kobima na bilamba to na bandako. Mbala mosusu “maba” yango ezali oyo tobengaka lelo koguga to kopɔla. (Lev. 13:47-52)—1/2, lokasa 19.
• Ndenge nini mateya ya Biblia ekoki kosalisa moklisto na likambo etali kokunda ebembe?
Atako moklisto akoki kolela moninga to ndeko na ye oyo akufi, ayebi ete bakufi bayebaka eloko te. Ata soki bato oyo bazali bandimi te batyoli ye, aboyaka kosala milulu oyo eyokani na liteya oyo elobaka ete bakufi bakoki kosalisa bato oyo batikali na bomoi to kosala bango mabe. Mpo na koboya mikakatano, baklisto mosusu bakomaka makambo oyo balingi esalema soki bakufi.—15/2, nkasa 29-31.
• Na kolanda Nzembo 1:1, wapi makambo misato oyo tosengeli koboya soki tolingi kozala na esengo?
Vɛrsɛ yango etángi “toli ya bato ya mabe,” “nzela ya bato ya masumu,” mpe ‘kofanda esika moko na batyoli.’ Mpo tózala na esengo, tosengeli kokima bato oyo batyolaka to baboyaka mibeko ya Nzambe. Kasi, tosengeli kosepela na mobeko ya Yehova.—1/3, lokasa 17.
• “Mokanda ya Yasala” mpe “mokanda ya bitumba ya [Yehova]” ezali mikanda ya Biblia oyo ebungá? (Yos. 10:13; Mit. 21:14)
Te. Emonani ete ezalaki mikanda oyo Nzambe akomisaki te, oyo ezalaki na ntango wana mpe bakomi ya Biblia batángaki yango.—15/3, lokasa 32.
• Mbongwana nini monene esalemaki na libongoli moko ya Biblia ya sika na Latin?
Na 1979, Pápa Jean-Paul II andimaki libongoli ya Nova Vulgata, libongoli moko ya Biblia ya sika na Latin. Ebimeli ya liboso ezalaki na nkombo ya Nzambe, Iahveh na bisika mosusu. (Ex. 3:15; 6:3) Nzokande, ntango ebimeli ya mibale ebimaki na 1986, batyaki Dominus [to Nkolo] na esika ya Iahveh.—1/4, lokasa 22.