Kondima mpe bomoi na yo na mikolo mizali koya
“Kondima ezali elendiseli na biloko bikolikya biso.”—BAEBELE 11:1.
1. Bato mingi balingaka bomoi ya lolenge nini mpo na mikolo mizali koya?
OLINGAKA koyeba makambo makosalema na mikolo mizali koya? Bato mingi balingaka yango. Balikyaka kozala na kimya, bábanga eloko te, bázala na bomoi malamu, mosala oyo ezali kosepelisa mpe oyo bazali kozwa na yango litomba, bázala nzoto kolɔngɔnɔ mpe bomoi molai na mikolo mizali koya. Na ntembe te, libota na libota na ndenge ekitanaki kati na lisolo ya bato ezalaki na mposa ya komona makambo yango. Mpe lelo oyo, na mokili oyo etondi na yikiyiki, bato bazali na mposa mingi ya makambo yango koleka bileko mosusu nyonso.
2. Moto moko ya politiki amonisaki likanisi nini na ntina na mikolo mizali koya?
2 Lokola tozali kopusana na ekeke ya 21, ezali na lolenge moko oyo ekoki kosalisa biso tóyeba makambo makoya? Esili koleka mbula 200, Patrick Henry, moto ya politiki na États-Unis, amonisaki lolenge moko. Alobaki ete: “Nayebi lolenge mosusu te mpo na koyeba makambo makoya bobele kotalela makambo maleká.” Na kotalela makanisi yango, tokoki koyeba makambo mingi ya mikolo mizali koya na kotalela makambo oyo bato basalaká na mikolo mileká. Mingi bandimaka likanisi wana.
Mikolo mileká mizalaki ndenge nini?
3. Lisolo ya bato emonisi nini na ntina na elikya mpo na mikolo mizali koya?
3 Soki mikolo mizali koya mikozala se lolenge ezalaki na mikolo mileká, okanisi ete yango ezali likambo ya kolendisa? Tokoki nde koloba ete na boumeli ya bikeke bileká, mikolo ya nsima ezalaki malamu koleka mikolo ya liboso? Mpenza te. Atako bilikya oyo bato bazalaki na yango na boumeli ya bankóto ya bambula mpe atako na bisika mosusu lolenge ya bomoi ebongisami mpe bisaleli mingi bibimisami, lisolo ya bato etondi na makambo ya minyoko, kobomana, mobulu, bitumba, mpe bobola. Kati na mokili oyo makama mazali kolandana moko nsima na mosusu, mingimingi makama mabimisami na boyangeli ya bato oyo ezali kolonga te kokokisa bamposa ya bato. Biblia elobi na bosolo mpenza ete: “Moto moko azali na bokonzi likolo na mosusu mpo na kopesa ye mpasi.”—Mosakoli 8:9.
4, 5. (a) Mpo na nini bato bazalaki na elikya mingi na ebandeli ya ekeke ya 20? (b) Bilikya na bango mpo na mikolo mizali koya esukaki ndenge nini?
4 Soki totali malamu, mikakatano esilaka te na lisolo ya bato—kutu ezali nde kobakisama mpe ezali kosala mabe mingi koleka. Makambo mazali kobima na ekeke oyo ya 20 mamonisi mpenza likambo yango. Bato basili nde kozwa liteya na mabunga oyo esalemá kala mpo na kopɛngola yango? Na ebandeli ya ekeke oyo, bato mingi bazalaki na elikya ete bakozala na bomoi malamu na mikolo mizalaki koya mpamba te na mwa eleko moko molai, kimya emonanaki mpe bokoli esalemaki na baizini, na siansi, mpe kolakisama na kelasi. Na ebandeli ya bambula ya 1900, profesere moko na iniversite alobaki ete, bato bakanisaki ete etumba ekokaki kosalema lisusu te mpamba te “bato bakolaki mingi na makanisi ya bomoto.” Ministre-mokonzi moko ya kala na ekólo Grande-Bretagne alobaki ete makanisi ya bato na eleko wana ezalaki boye: “Makambo makobonga ntango nyonso. Ezalaki na eleko yango nde nabotamaki.” Kasi, na nsima alobaki ete: “Na mbala moko, kozanga ete tókanisa yango, na ntɔngɔ moko na 1914 bilikya nyonso bizindaki na mai.”
5 Atako na ntango wana bato bazalaki na elikya ete mikolo mikoya mikozala malamu, ekeke ya sika eutaki se kobanda ntango mokili emikɔtisaki na likama lileki monene oyo moto abimisaki—elingi koloba Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Mpo na kozwa likanisi na lolenge etumba yango ezalaki, tótalela likambo oyo esalemaki na 1916 kati na kondongwana moko ntango basoda ya Grande-Bretagne bakendaki kobundisa mampinga ya Allemagne penepene ya Ebale Somme na ekólo France. Na mokolo moko, basoda 20 000 bakufaki na ngámbo ya Grande-Bretagne, mpe ebele bakufaki na ngámbo ya ba Allemands. Nsima ya mbula minei ya kobomana, bamilio ya basoda mpe basivili bakufaki. Motángo ya bafandi na ekólo France ekitaki mpamba te bato bakufaki mingi mpenza. Nkita ya bikólo ebebaki, mpe yango ebimisaki kokwea monene ya nkita na mikili mingi na bambula ya 1930. Ezali mpo na yango nde bato mosusu balobaki ete mokili ebɛlaki ligboma mokolo oyo Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ebandaki!
6. Bomoi ekómaki nde malamu nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba?
6 Libota ya ntango wana elikyaki nde bomoi ya lolenge wana? Soko moke te. Bilikya na bango nyonso ezindaki na mai; mpe etumba yango ememaki ata likambo moko te ya malamu. Na 1939, elingi koloba bobele mbula 21 nsima ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, bato babandisaki likama mosusu ya mabe koleka—Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Yango ebomaki bato pene na milio 50, mibali, basi, mpe bana. Bingumba bibebisamaki na babombi oyo ezalaki kokita lokola mbula. Na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, mwa bankóto ya basoda bazalaki kobomama kati na kondongwana moko nsima ya mwa bangonga, nzokande, na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, bobele bombi atomike mibale ebomaki bato koleka 100 000 nsima ya mwa basegonde. Likambo oyo bato batalelaka yango ete ezalaki mabe mingi ezali bongo kobomama ya bamilio ya bato na bakáa ya bakangami ya Banazi.
7. Makambo nini mazali komonana na ekeke oyo mobimba?
7 Biutelo mingi ya bansango biyebisi ete soki tosangisi bitumba oyo bizali kosalema kati na bikólo, bitumba ya banamboka, mpe bato oyo bazali kobomama na baguvernema na bango moko, bato babomami na ekeke oyo bakoki kokóma na motángo ya milio 200. Kutu eutelo moko ya nsango epesi motángo ya milio 360. Kanisá nsɔmɔ ya makambo oyo nyonso—mpasi, kolela, mawa, mpe bomoi oyo ebebisami! Longola yango, mwayene ya bato 40 000, mingi mpenza bana, bazali kokufa mokolo na mokolo na ntina na bobola. Mokolo na mokolo, bana 120 000 bazali kobomama na kosopama ya zemi. Lisusu, bato pene na miliare moko bazali na bobola makasi na boye ete bazangi ata likoki ya kozwa bilei mpo na kosala mosala oyo moto akoki mpenza kosala na mokolo mobimba. Oyo nyonso ezali bilembeteli ya oyo esilá kosakolama na Biblia ete tozali kobika na “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo.—2 Timoté 3:1-5, 13; Matai 24:3-12; Luka 21:10, 11; Emoniseli 6:3-8.
Bato bakolonga te
8. Mpo na nini bato oyo bazali koyangela bakoki kosilisa mikakatano ya mokili te?
8 Lokola ekeke oyo ya 20 ekómi pene na nsuka, tokoki kotánga makambo na yango na molɔngɔ ya makambo ya bikeke bileká. Boye, lisolo ya bikeke yango ezali komonisa biso nini? Ezali komonisa biso ete bakonzi ya mokili balongá naino te kosilisa mikakatano ya mokili, sikawa bazali kosilisa yango te, mpe bakosilisa yango te na mikolo mizali koya. Tokoloba bobele ete bazali na makoki te ya kopesa biso lolenge ya bomoi oyo tozali na yango mposa mpo na mikolo mizali koya, ata soki bazali na makanisi malamu mpenza ya kosala yango. Mpe bakonzi mosusu bazali na makanisi malamu te; bazali koluka etɛlɛmɛlo ya lokumu mpe nguya mpo na mikano na bango moko ya moimi mpe ya komizwela biloko ya mosuni, kasi mpo na bolamu ya basusu te.
9. Mpo na nini tokoki kondima te ete siansi ekosilisa mikakatano ya bato?
9 Siansi ekoki nde kosilisa mikakatano? Eyano ezali ete te, soki totaleli makambo maleká. Bato ya siansi oyo bazali kosala mpo na baguvernema basili kosalela mosolo, ntango, mpe milende mingi mpo na kosala bibundeli ya nsɔmɔ lokola oyo ebéngami biologique, chimique, mpe mosusu ya ndenge na ndenge. Mbula na mbula, bikólo, ata oyo ya bobola, bizali kobimisa mosolo koleka dolare miliare 700 mpo na kosomba bibundeli! Lisusu, bantango mosusu kobeba ya mopɛpɛ, ya mabelé, ya mai mpe ya bilei ezali kouta na biloko bisalemi na nzela ya ‘bokoli ya siansi.’
10. Mpo na nini ata bibongiseli ya kolakisama na kelasi ekoki kopesa bomoi ya malamu te na mikolo mizali koya?
10 Tokoki nde kolikya ete bibongiseli ya mokili mpo na kolakisama na kelasi bikosalisa biso na kotya mokili ya malamu na koteyáká bato mitinda mitombwani ya bizaleli malamu, ya koyeba komitya na esika ya basusu, mpe kolinga bazalani? Te. Kutu, bazali kobenda likebi ya bato na koluka misala ya lokumu, mpe kozwa mosolo mingi. Bazali kolamwisa epai ya bato elimo ya kowelana, kasi elimo ya kosalana elongo te; mpe biteyelo bizali koteya bato etamboli malamu te. Kutu, biteyelo mingi bizali kopesa nzela na kosangisa nzoto kati na bato babalani te, oyo ememi bokoli ya motángo ya bilenge oyo bazali kokumba zemi mpe makɔnɔ oyo makozwamaka na nzela ya kosangisa nzoto.
11. Lolenge nini lisolo ya bakompanyi minene ya mombongo emonisi ete yango mpe ekoki komema bolamu te na mikolo mizali koya?
11 Bakompanyi minene ya mombongo na mokili ekopusama na mbala moko ete ebatela etando na biso mpe ekomonisa bolingo mpo na basusu na kosaláká biloko oyo bikozala mpo na bolamu ya solosolo kasi mpo na koluka matomba na bango moko te? Emonani ete ekosalema te. Bakotika nde kolakisa baemisyo ya televizyo oyo etondi na mobulu mpe makambo ya mbindo oyo ezali kobebisa makanisi ya bato, mingi mpenza ya bilenge? Makambo masalemi na mikolo mileki mazali kolendisa te mpamba te, mingi mpenza, televizyo esili kokóma liziba ya makambo ya mbindo mpe ya mobulu.
12. Bato bazali na ezalela nini liboso ya maladi mpe liwa?
12 Lisusu, ata soki minganga bazali kosala na bosembo nyonso, bakoki kolonga te kosilisa maladi mpe liwa. Na ndakisa, na nsuka ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, minganga balongaki te kopekisa kopalangana ya grippe espagnole; oyo ebomaki bato pene na milio 20 na mokili mobimba. Lelo oyo, maladi ya motema, kanser, mpe maladi mosusu oyo mabomaka mazali kopalangana. Mpe zebi ya monganga elongi te kosilisa bokɔnɔ ya sika ebengami sida. Kutu, lapolo moko ya O.N.U., ebimisamaki na Novɛ́mbɛ 1997 elobaki ete sida ezali kopalangana na lombangu oyo ezali mbala mibale koleka ndenge ekanisamaki. Yango esili koboma bamilio ya bato. Na 1996, bato milio misato bazwaki mikrobe yango.
Lolenge oyo Batatoli ya Yehova batalelaka bomoi na mikolo mizali koya
13, 14. (a) Lolenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka mikolo mizali koya? (b) Mpo na nini bato bakoki te kobongisa makambo na mikolo mizali koya?
13 Nzokande, Batatoli ya Yehova bandimaka ete mikolo malamu mizali liboso mpo na bato, ɛɛ, mikolo malamu mingi! Kasi balikyaka te ete mikolo malamu mikoya na nzela ya milende ya bato. Kasi, batyaka elikya epai na Mozalisi, Yehova Nzambe. Ye ayebi lolenge bomoi ekozala na mikolo mizali koya, mpe ekozala bomoi malamu mingi! Ayebi mpe ete bato bakoki te komisalela bomoi ya lolenge wana. Lokola Nzambe azalisaki bango, ayebi malamu bandelo na bango koleka moto mosusu nyonso. Kati na Liloba na ye, ayebisi biso polele ete azalisaki moto na likoki ya komiyangela ye moko te mpe moto akoki kolonga te soki Nzambe atambwisi ye te. Lolenge oyo Nzambe atiki ntango molai ete moto amiyangela ye moko kozanga litambwisi na ye emonisi mpenza kozanga makoki oyo moto azali na yango. Mokomi moko andimaki ete: “Moto abɛti motó mpo na komeka myango nyonso ya bokonzi, kasi alongi te.”
14 Kati na Yilimia 10:23, tozali kotánga maloba ya mosakoli oyo apemamaki na Nzambe ete: “Ɛ [Yehova], nayebi ete nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” Mpe, Nzembo 146:3 elobi ete: “Ndimelá bana na mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te.” Ɛɛ, lokola tobotami na kozanga kokoka, lolenge emonisami na Baloma 5:12, Liloba ya Nzambe ezali mpe kokebisa biso ete tómityela motema te. Yilimia 17:9 elobi ete: “Motema ezali na bokosi koleka biloko nyonso mpe na mabe mingi.” Na yango, Masese 28:26 elobi ete: “Ye oyo akotalela motema na ye moko azali elema nde ye oyo akotambola na mayele, ye ekobika.”
15. Epai wapi tokoki kozwa mayele mpo na komitambwisa?
15 Tokoki kozwa mayele yango epai wapi? “Bobangi Yehova ezali ebandeli ya mayele; mpe boyebi ya Oyo-Aleki-Bosantu ezali bososoli.” (Masese 9:10, NW) Bobele Yehova nde azali na mayele makoki kotambwisa biso na eleko mabe oyo. Mpe asili kopesa biso likoki ya kozwa mayele mauti epai na ye na nzela ya Makomami Mosantu, oyo apemisaki mpo na kotambwisa biso.—Masese 2:1-9; 3:1-6; 2 Timoté 3:16, 17.
Boyangeli ya bato na mikolo mizali koya
16. Nani asilá kokata lolenge bomoi ekozala na mikolo mizali koya?
16 Na bongo, Liloba ya Nzambe ezali koyebisa biso nini na ntina na mikolo mizali koya? Ezali koyebisa biso ete bomoi na mikolo mizali koya ekozala te engebene makambo oyo bato basalaki na mikolo mileki. Na yango, likanisi ya Patrick Henry ezalaki na libunga. Lolenge mabelé oyo mpe bomoi ya bato ekozala na mikolo mizali koya ekokatama na bato te, kasi na Yehova Nzambe. Mokano na ye ekosalema awa na mabelé, kasi mokano ya bato te to ya bikólo ya mokili oyo te. “Na motema na moto myango mingi mizali nde toli na [Yehova], yango ekotɛlɛma.”—Masese 19:21.
17, 18. Mokano ya Nzambe mpo na eleko na biso ezali nini?
17 Mokano ya Nzambe mpo na eleko na biso ezali nini? Akani kosukisa ebongiseli ya biloko oyo etondi na mobulu mpe makambo ya mbindo. Mosika te boyangeli mabe ya bato oyo eumeli bikeke mingi ekotika esika na boyangeli oyo Nzambe abongisi. Esakweli ya Danyele 2:44 elobi ete: “Na mikolo na mikonzi yango [oyo bazali lelo] Nzambe na lola akotɛ[lɛ]misa bokonzi [kuna na likoló] bokobebisama soko moke te, mpe bokonzi yango ekopesama na bato mosusu te; ekobuka mpe ekosilisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala lobiko na lobiko.” Mpe lisusu, Bokonzi yango ekolongola bopusi mabe ya Satana Zabolo, likambo oyo bato bakoki kosala yango soko moke te. Boyangeli na ye na mokili oyo ekosuka mpo na libela.—Baloma 16:20; 2 Bakolinti 4:4; 1 Yoane 5:19.
18 Tósimba ete boyangeli ya likoló ekosukisa biyangeli nyonso ya bato. Boyangeli ya mabelé oyo ekopesama na bato te. Longwa kuna na likoló, baoyo bazali koyangela na Bokonzi ya Nzambe bakotambwisa makambo na mabelé mpo na bolamu ya bato. (Emoniseli 5:10; 20:4-6) Awa na mabelé, bato ya sembo bakolanda malako ya Bokonzi ya Nzambe. Yango nde boyangeli Yesu ateyaki biso ete tósambelaka mpo na yango ntango alobaki ete: “Tiká Bokonzi na yo eya, tiká mokano na yo esalama na nse pelamoko na Likoló.”—Matai 6:10.
19, 20. (a) Lolenge nini Biblia ezali komonisa ebongiseli ya Bokonzi? (b) Boyangeli ya Bokonzi ekokokisa makambo nini mpo na bato?
19 Batatoli ya Yehova batyaka kondima na bango na Bokonzi ya Nzambe. Yango nde “makoló ya sika” oyo ntoma Petelo akomaki na ntina na yango ete: “Tozali kotalela Likoló na sika mpe nse na sika, pelamoko elakaki ye; boyengebene ekofanda kati na yango.” (2 Petelo 3:13) “Mabelé ya sika” ezali lisangá ya bato ya sika oyo bakoyangelama na likoló ya sika, elingi koloba Bokonzi ya Nzambe. Yango ezali ebongiseli oyo Nzambe alakisaki kati na emonaneli epai na ntoma Yoane, oyo akomaki ete: “Namonaki likoló na sika, na nse na sika, mpo ete lola na liboso, na nse na liboso isili kolongwa. . . . [Nzambe] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.”—Emoniseli 21:1, 4.
20 Tósimba likambo oyo ete mabelé ya sika ekozala mabelé ya boyengebene. Makambo nyonso ya bokesene makolongolama na lobɔkɔ ya Nzambe, na etumba ya Armagedon. (Emoniseli 16:14, 16) Esakweli ezwami na Masese 2:21, 22 emonisi yango na maloba oyo: “Basembwi bakofanda na mokili mpe bato malamu bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mokili.” Mpe Nzembo 37:9 elaki: “Mpo ete basali na mabe bakosuka, nde baoyo bakozilaka [Yehova] bakosangola mokili.” Okosepela kofanda na mokili ya lolenge wana?
Ndimelá bilaka ya Yehova
21. Mpo na nini tokoki kondimela bilaka ya Yehova?
21 Tokoki nde kondimela bilaka ya Yehova? Yoká maloba na ye na nzela ya mosakoli Yisaya: “Bóbanzabanza mpo na makambo na liboso na kala, mpo ete ngai nazali Nzambe mpe mosusu azali te; ngai nazali Nzambe, mosusu azali lokola ngai te, oyo akosakola makambo na nsuka longwa na ebandeli, mpe longwa ntango na kala makambo masalami naino te, oyo alobi ete, Toli na ngai ekotɛlɛma mpe nakokokisa mokano mobimba na ngai.” Eteni ya nsuka ya vɛrsɛ 11 elobi ete: “Ngai nasili koloba yango mpe nakosala yango, nakani yango mpe nakokokisa yango.” (Yisaya 46:9-11) Ɛɛ, tokoki kondimela Yehova mpe bilaka na ye lokola nde bilaka yango bisili kokokisama. Biblia emonisi yango na maloba oyo: “Kondima ezali elendiseli na biloko bikolikya biso; ezali mpe elimbweli na biloko bizangi komonana.”—Baebele 11:1.
22. Mpo na nini tokoki kondimisama ete Yehova akokokisa bilaka na ye?
22 Bato ya komikitisa bamonisaka kondima motindo wana mpamba te bayebi ete Nzambe akokokisa bilaka na ye. Na ndakisa, kati na Nzembo 37:29, tozali kotánga ete: “Bayengebene bakosangola mokili mpe bakofanda wana libela.” Tokoki kondima yango? Ɛɛ, mpamba te Baebele 6:18 elobi ete ‘Nzambe akomimonisa na lokuta te.’ Nzambe azali nde nkolo mabelé oyo mpo ete akoka kopesa yango na bato ya komikitisa? Emoniseli 4:11 elobi ete: “Yo ozalisaki biloko nyonso; mpe mpo na mokano na yo bizali mpe bisili kozalisama.” Na ntina yango, Nzembo 24:1 elobi ete: “Nse mobimba ezali na [Yehova] mpe bisika nyonso [b]izali kati na yango.” Yehova azalisaki mabelé, azali nkolo na yango, mpe akopesa yango na baoyo bazali kondimela ye. Mpo na kosalisa biso ete tótya motema na makambo yango, lisolo lilandi ekomonisa ete Yehova akokisaki bilaka na ye epai na bato na ye na ntango ya kala mpe na mikolo na biso mpe ekomonisa biso ntina oyo tokoki kotya motema mobimba ete akosala bongo na mikolo mizali koya.
Bozongeli
◻ Bilikya ya bato esukaki ndenge nini na boumeli ya lisolo mobimba ya bato?
◻ Mpo na nini tosengeli te kotya elikya epai ya bato mpo na kozala malamu na mikolo mizali koya?
◻ Mokano ya Nzambe ezali nini mpo na mikolo mizali koya?
◻ Mpo na nini tondimisami ete Nzambe akokokisa bilaka na ye?
[Elilingi na lokasa 10]
Biblia elobi solo ete: “Ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.”—Yilimia 10:23
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Bombi: U.S. National Archives photo; bana bazali na nzala: WHO/OXFAM; bato bakimá mboka: UN PHOTO 186763/J. Isaac; Mussolini mpe Hitler: U.S. National Archives photo