Basalaki mokano ya Yehova
Bosembo ya Yobo ezwi mbano
YOBO azalaki koyokela bato mawa, mokɔteli ya basi-bakufeli-mibali, bitike, mpe banyokwami. (Yobo 29:12-17; 31:16-21) Bongo, na mbala moko, mpasi ekwelaki ye, abungisaki bozwi na ye, bana na ye, mpe bokolɔngɔnɔ ya nzoto na ye ebebaki. Likambo ya mawa, moto monene oyo azalaki mosungi ya banyokwami azwaki lisungi malamu te ntango akómaki na bosɛnga. Ata mwasi na ye alobaki na ye ete “lakelá Nzambe mabe mpe kufa!” Mpe “baninga” na ye, Elifaza, Biledada, mpe Sofala balendisaki ye te. Kutu, bazalaki koloba ete Yobo asalaki lisumu mpe abongaki konyokwama bongo.—Yobo 2:9; 4:7, 8; 8:5, 6; 11:13-15.
Atako mpasi ezalaki mingi, Yobo atikalaki sembo. Na ntina na yango, Yehova ayokelaki ye mawa mpe apambolaki ye. Lisolo ya makambo makómelaki Yobo ezali kondimisa basaleli ya Nzambe oyo bazali kobatela bosembo ete bango mpe na ngala na bango bakozwa mbano.
Kolongisama mpe kozongisama malamu
Liboso, Yehova apamelaki Elifaza, Biledada, mpe Sofala. Epai na Elifaza, ye oyo emonani ete azalaki mokóló na bango, alobaki ete: “Nkanda na ngai epeleli yo mpe baninga mibale na yo; zambi bolobi likambo na sembo mpo na ngai te lokola moombo na ngai Yobo alobi. Boye sasaipi bókamata ngɔmbɛ nsambo mpe mpate nsambo mpe kendá epai na moombo na ngai Yobo akobondela mpo na bino.” (Yobo 42:7, 8) Kanisá makambo oyo yango esɛngaki!
Yehova asɛngisaki Elifaza, Biledada, mpe Sofala mbeka monene, mbala mosusu mpo na komonisa bango bonene ya lisumu na bango. Ɛɛ, ezala ete bayebaki yango to bayebaki yango te, batukaki Nzambe na kolobáká ete ‘andimaka ata baombo na ye te’ mpe ete ata Yobo azalaki sembo to te yango etalaki ye te. Kutu, Elifaza alobaki ete na miso ya Nzambe Yobo alekaki nsɛlɛlɛ na motuya te! (Yobo 4:18, 19; 22:2, 3) Tokokamwa te koyoka Yehova koloba ete: “Bolobi likambo na sembo mpo na ngai te”!
Kasi esuki wana te. Elifaza, Biledada, mpe Sofala basalelaki mpe Yobo lisumu na kolobáká na ye ete azwaki mikakatano mpo asalaki makambo mabe. Bifundeli na bango oyo ezangi moboko mpe maloba na bango ezangi boboto eyokisaki Yobo mpasi mpe etungisaki ye na makanisi, kopusáká ye na konganga ete: “Kino ntango nini bokotungisa molimo na ngai mpe bokobukabuka ngai na maloba?” (Yobo 10:1; 19:2) Kanisá nsɔni na bilongi ya mibali oyo misato wana bayei sikawa epai na Yobo na mbeka mpo na masumu na bango!
Kasi Yobo asengelaki komikumisa te mpo na nsɔni na bango. Kutu, Yehova asɛngaki Yobo ete abondela mpo na bafundi na ye. Yobo asalaki bobele ndenge bayebisaki ye, mpe mpo na yango apambolamaki. Liboso, Yehova asilisaki maladi mabe na ye. Na nsima, bandeko na ye ya mibali mpe ya basi, mpe bayebani na ye ya kala bayaki kobɔndisa ye, “moto na moto apesaki ye ndambo na mosolo mpe moto na moto lopɛtɛ na wolo.”a Lisusu, Yobo “azalaki na bampate nkóto zomi na minei mpe kamela nkóto motoba mpe bangɔmbɛ nkóto mibale mpe bampunda basi nkoto moko.”b Mpe Yobo ayokanaki lisusu na mwasi na ye. Na nsima, Yobo apambolamaki na kobotáká bana nsambo ya mibali mpe bana misato ya basi, mpe aumelaki na bomoi kino komona mabota minei ya bakitani na ye.—Yobo 42:10-17.
Liteya mpo na biso
Yobo atikaki ndakisa malamu mpo na basaleli ya Nzambe na eleko na biso. Azalaki “moto malamu bɛɛ mpe na sembo,” moto oyo Nzambe azalaki na esengo ya kobénga ye “moombo na ngai.” (Yobo 1:8; 42:7, 8) Nzokande, yango elimboli te ete Yobo azalaki moto ya kokoka. Na eleko moko kati na komekama na ye, na libunga nyonso alobaki ete Nzambe nde azali mobandisi ya bampasi na ye. Kutu, alobaki mabe na lolenge Nzambe asalelaka bato makambo. (Yobo 27:2; 30:20, 21) Mpe alobelaki bosembo na ye moko kasi ya Nzambe te. (Yobo 32:2) Kasi Yobo aboyaki kotika Mozalisi, mpe na komikitisa, andimaki kosembolama na Nzambe. Andimaki ete: “Nabimisi makambo mayebi ngai ntina te. Bongo namityoli mpe nabongoli motema na mputulu mpe na mputulu na mɔ́tɔ.”—Yobo 42:3, 6.
Na ntango ya komekama, biso mpe tokoki kokanisa, koloba, to kosala makambo malongobani te. (Kokanisá na Mosakoli 7:7.) Atako bongo, soki tozali na bolingo mozindo mpo na Nzambe, tokotombokela ye te to tokosilika te mpo ete atiki tónyokwama. Nzokande, tokobatela bosembo na biso mpe na nsuka, tokozwa mapamboli mingi. Mokomi ya Nzembo alobaki na ntina na Yehova ete: “Epai na moto na sembo okomimonisa sembo.”—Nzembo 18:25, NW.
Liboso ete nzoto ya Yobo ezonga kolɔngɔnɔ, Yehova asɛngaki ye abondela mpo na baoyo basalelaki ye mabe. Oyo nde ndakisa malamu mpo na biso! Yehova azali kosɛnga biso ete tólimbisa baoyo bazali kosalela biso masumu liboso ete masumu na biso malimbisama. (Matai 6:12; Baefese 4:32) Soki tolingi kolimbisa bamosusu te wana bantina malamu ya kosala bongo ezali, tokoki nde kokanisa ete Yehova ayokela biso mawa?—Matai 18:21-35.
Biso nyonso tokutanaka na komekama mbala na mbala. (2 Timoté 3:12) Nzokande, lokola Yobo tokoki kobatela bosembo. Kosaláká bongo, tokozwa mbano mingi. Yakobo akomaki ete: “Talá, tolobi ete tobyangi bango bato na esengo baoyo bayiki mpiko bongo. Bosili koyoka mpo na mpiko na Yobo, bosili koyoka nsuka na makambo na ye epai na Nkolo, zambi [Yehova] atondi na mawa mpe na boboto.”—Yakobo 5:11.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Motuya ya “ndambo na mosolo” (na Liebele, qesi·tahʹ) ekoki koyebana te. Kasi “mbuma [to ndambo] na mosolo monkama” esombaki eteni monene ya mabelé na mikolo ya Yakobo. (Yosua 24:32) Na yango, “ndambo na mosolo” uta na mopaya mokomoko ezalaki likabo monene.
b Na ntembe te, balobeli bampunda basi mpo na makoki na bango ya kobota mingi.