MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | YOBO 38-42
Kobondela mpo na basusu esepelisaka Yehova
Yehova alingaki ete Yobo abondela mpo na Elifaze, Biledade, mpe Zofare
Yehova ayebisaki Elifaze, Biledade, ná Zofare bákende epai ya Yobo mpe bápesa mbeka ya kotumba
Yobo asengelaki kobondela mpo na bango
Ntango Yobo abondelaki mpo na bango, Yehova apambolaki ye
Yehova apambolaki Yobo mingi mpo azalaki na kondima mpe ayikaki mpiko
Yehova alongolaki mpasi ya Yobo, abikisaki ye na maladi
Baninga ya solosolo ya Yobo mpe bandeko na ye babɔndisaki ye mpo na mpasi nyonso oyo amonaki
Yehova azongisaki bomɛngo ya Yobo, mbala mibale koleka oyo abungisaki
Yobo ná mwasi na ye babotaki lisusu bana zomi
Yobo aumelaki lisusu mbula 140 mpe amonaki mabota minei ya bana ya bana na ye