Mokonzi oyo azalaki na bozwi mpe na mayele
Okanisaka ete bozwi ekoki kopesa yo bolamu? Soki moto moko apesi yo mbongo mingi, okosepela te? Tokanisi ete okosepela. Na ntembe te okokanisa lolenge ya kosalela yango.
YA SOLO, ezali na biloko mingi oyo okoki kosomba mpo esalisa yo mpe osepela na bomoi. Mbongo ekoki mpe kozala “libateli” liboso ya mikakatano oyo okanisaki te ete ekokómela yo, lokola maladi to kozanga mosala.—Mosakoli 7:12.
Kasi, boyokani nini ezali kati na mbongo mpe bolamu? Lokola bato mingi, okanisaka ete bolamu eutaka na bozwi? Ekoki kozala mpasi mpo na kozwa biyano na mituna oyo mpamba te tokoki kotánga mosolo, mpe koyeba motuya na yango, kasi tokoki kotánga bolamu te. Okoki komeka bolamu na kilo te mpo na koyeba bozito na yango.
Lisusu, emonanaka ete kati na bazwi, bamoko bazali na esengo, nzokande bamosusu bazali na mawa. Likambo yango ezali mpe bongo mpo na babola. Kasi, bato mingi—ata baoyo bazali na bozwi—bakanisaka ete kozala na mbongo mingi koleka ekobakisa bolamu na bango.
Moto moko oyo akomaki na ntina na likambo yango ezalaki bongo Salomo, mokonzi moko na Yisalaele ya kala. Azalaki moko na bato oyo balekaki na bozwi na mokili oyo. Na mokanda ya 1 Mikonzi, mokapo 10, okoki kotánga lolenge oyo Biblia elobeli bozwi mingi oyo azalaki na yango. Talá, na ndakisa, vɛrsɛ 14 elobi ete: “Bozito na wolo oyo eyaki epai na Salomo na [mbula, NW] moko ezalaki mpata nkama motoba mpe ntuku motoba na motoba na wolo.” Motuya yango ekokani na tɔni 25 ya wolo. Lelo oyo, ebele ya wolo wana ekoki kozala na motuya ya dolare koleka 200 000 000!
Kasi, Salomo azalaki bobele na bomɛngo te; Nzambe apambolaki ye na kopesáká ye mayele. Biblia elobi ete: “Mokonzi Salomo alekaki mikonzi nyonso na mokili na mosolo mingi mpe na boyebi. Mokili mobimba balukaki elongi na Salomo ete báyoka mayele na ye oyo Nzambe atii na motema na ye.” (1 Mikonzi 10:23, 24) Biso mpe tokoki kozwa litomba na mayele ya Salomo, mpamba te makambo oyo akomaki mazali kati na Biblia. Tótala oyo alobaki na ntina na boyokani oyo ezali kati na bozwi mpe bolamu.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
Euti na Die Heilige Schrift - Übersetzt von Dr. Joseph Franz von Allioli. Druck und Verlag von Eduard Hallberger, Stuttgart