Bozwi ya Mokonzi Salomo balobelaki yango na kolekisáká ndelo?
“Bozito na wolo oyo eyaki epai na Salomo na elanga moko ezalaki mpata nkámá motoba mpe ntuku motoba na motoba.”—1 Mikonzi 10:14.
ENGEBENE mokapo wana ya Biblia, Mokonzi Salomo azwaki batɔ́ni 25 ya wolo na mbula moko mpamba! Lelo oyo yango ekokaki kozala na motuya ya badolare 240000000. Ezali pene na mbala mibale boike ya wolo oyo etimolamaki na mokili mobimba na mobu 1800. Yango ezali mpenza likambo oyo likoki kosalema? Bilembeteli ya arkeoloji bizali komonisa nini? Epesi makanisi ete motángo ya wolo ya Salomo oyo Biblia elobeli ezali mpenza likambo libongi kondimama. Zulunalo Biblical Archaeology Review elobi ete:
◻ Mokonzi Touthmôsis III ya Ezipito (na bambula nkóto mibale L.T.B.) apesaki pene na batɔ́ni 13,5 ya biloko ya wolo kati na tempelo ya Amon-Ra na Karnak—mpe wana ezalaki bobele eteni moko ya libonza yango.
◻ Makomi ya Ezipito malobeli mabonza ya wolo mpe palata oyo boike na yango nyonso ezalaki batɔ́ni soko 383 oyo Mokonzi Osorkon I apesaki (na ebandeli ya bambula nkóto moko L.T.B.) na banzambe.
Lisusu, búku Classical Greece na molɔngɔ́ ya babúku Great Ages of Man eyebisi ete:
◻ Libulu ya makɛ́lɛ ya Pangaeum na Thrace ezalaki kopesa wolo batɔ́ni koleka 37 mbula na mbula mpo na Mokonzi Philip II (359-336 L.T.B.).
◻ Ntango Alesandala Monene mwana ya Philip (336-323 L.T.B.) akamataki engumba Susa, mboka-mokonzi ya bokonzi ya Perse, bozwi oyo motuya na yango elekaki batɔ́ni 1000 ya wolo emonanaki kuna.—The New Encyclopædia Britannica.
Na yango motuya ya bozwi ya Mokonzi Salomo oyo elobelami kati na Biblia ezali likambo ya kolekisa ndelo te. Omikundola lisusu ete Salomo alekaki “mikonzi nyonso na mokili na mosolo mingi mpe na boyebi” na ntango wana.—1 Mikonzi 10:23.
Lolenge nini Salomo asalelaki bozwi na ye? Kiti na ye ya bokonzi ezipamaki na “loposo na wolo malamu,” bimelelo na ye bisalamaki na “wolo pɛtɔ,” mpe azalaki na nguba minene nkámá mibale mpe nguba mike nkámá misato na “wolo etutami.” (1 Mikonzi 10:16-21) Na koleka, Salomo asalelaki wolo na ye mpo na mosala ya tempelo ya Yehova na Yelusaleme. Bitɛmiselo ya miinda mpe bisaleli ya bulɛɛ, lokola kanya, kɔpɔ, mbeki, mpe basaani, esalemaki na wolo mpe na palata. Bakeluba na bosanda ya bamɛtɛlɛ 4,5 batyamaki na esika Eleki Mosantu, etumbelo ya mpaka ya malasi, mpe ata kati na ndako mobimba epakolamaki na wolo.—1 Mikonzi 6:20-22; 7:48-50; 1 Ntango 28:17.
Ezali boni mpo na tempelo oyo ekembisami na wolo? Likambo ya kobenda likebi ezali boye ete, lolenge wana ya kosalela wolo ezalaki kosalema mingi na ntango ya kala. Búku Biblical Archaeology Review eyebisi ete Aménophis III ya Ezipito “akumisaki nzambe monene Amon na kosaleláká ye na Thèbes tempelo moko oyo ‘ezipamaki mobimba na wolo, pavemá na yango ekɛmbisamaki na palata, [mpe] bikuke na yango mobimba na electrum’”—oyo ezali bosangani ya wolo mpe palata. Lisusu, Esar-haddon ya Asulia (ekeke ya nsambo L.T.B.) akembisaki bikuke mpe bifelo ya ndakonzambe ya Ashur na wolo. Na ntina na tempelo ya Sin na Harana, Nabonide ya Babilone (ekeke ya motoba L.T.B.) alobaki ete: “Nazipaki bifelo na yango na wolo mpe palata, mpe nasalaki ete engɛnga lokola moi.”
Na yango, masoló ya makambo ya kala mamonisi ete lisoló ya Biblia na ntina na bozwi ya Mokonzi Salomo lizali kolekisa ndelo te.