Molulu ya esengo bopesi mapolomi na kelasi ya Gileadi ya mbala ya 104
“OYO ezali mokolo ya esengo, mpe biso nyonso tozali kosepela.” Ezali na maloba wana nde Carey Barber, moko kati na lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova, afungolaki molulu ya bopesi mapolomi na kelasi ya Gileadi ya mbala ya 104, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watch Tower na mokolo ya 14 Mársi 1998. Mpo na kobanda, babyangaki bayangani 4 945 oyo bazalaki na molulu yango ete báyemba loyembo ya Bokonzi nimero 208, oyo ezali na motó na likambo “Loyembo ya esengo.”
Toli malamu mpo na kobatela esengo
Na eteni ya liboso ya manaka, ezalaki na masukulu mitano ya Biblia elandanaki. Masukulu yango mikuse epesaki toli ebongi na lolenge ya kobatela esengo oyo ezalaki na mokolo ya bopesi mapolomi.
Joseph Eames oyo asalaka na Departema ya Bokomi asalaki lisukulu ya liboso. Motó na likambo na yango elobaki ete “Bómekola elimo ya basembwi,” etongamaki na lisolo ezwami na 2 Samwele mikapo 15 mpe 17 kati na Biblia, epai Abasaloma, mwana ya Davidi, ayangaki mwango ya kobimisa botomboki mpo na kobɔtɔla bokonzi ya tata na ye oyo eutaki na Nzambe. Nzokande, ezalaki na bato oyo batikalaki sembo epai ya Mokonzi Davidi, mopakolami ya Yehova. Bamisionere ya sika bakokaki kozwa liteya nini na lisolo yango? Ndeko Eames asukisaki na maloba oyo, “Esika nyonso oyo bokokende na teritware na bino ya misionere, na bosembo nyonso, bólendisa elimo ya kosala na bomoko mpe kotosa bokonzi ya Teokrasi. Bósalisa bato mosusu ete básala bongo.”
Na kolandana ya manaka, ekómaki ngala ya David Sinclair, ye amonisaki masɛngami zomi oyo malobelami na Nzembo 15 mpo na kofanda na ‘hema ya Yehova.’ Lisukulu na ye ezalaki na motó na likambo ete “Bóumela lokola bafandi na hema na bino ya misionere,” elendisaki banakelasi ete básalela maloba ya nzembo yango na bateritware ya misionere epai bakofanda. Ndeko Sinclair abɛtaki nsɛtɛ na ntina na kolanda ntango nyonso mitinda ya Nzambe. Mbano na yango ezali nini? Nzembo 15:5 elobi ete: “Ye oyo akosalaka bongo, libela akokwea te.”
John Barr, moko kati na lisangani ya Mikóló-Bakambi, alandaki mpe ye abendaki likebi na elendiseli oyo eutaka na koyemba nzembo na makita ya boklisto. Kasi, lelo oyo, wapi nzembo eleki kosepelisa oyo ezali koyembama na mokili mobimba? Ezali bongo nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe oyo epesami na mabɔkɔ ya Masiya. Nzembo wana nyonso, to kosakola Bokonzi ezali kobimisa matomba nini? Molɔngɔ ya mibale ya nzembo nimero 208 emonisi yango na mokuse ete: “Tokolakisa mpe tokoteya basembwi banso nzela na Yah. Mpo básakola na esengo nyonso, Bokonzi ya Nzambe na nguya.” Ɛɛ, mokolo na mokolo, bayekoli ya sika soko 1 000 bazali kozwa batisimo. Ndeko Barr asukisaki boye: “Bandeko, ezali mpenza likambo ya esengo na kokanisa ete bazali kotinda bino na bateritware mpo na kokutana na lolenge ya bato oyo bazali kozela ete báyoka nzembo na bino ya masanzoli, boye te?”
Na nsima, James Mantz oyo asalaka na Departema ya Bokomi asalaki lisukulu oyo ezalaki na motó na likambo ete, “Bóyoka maloba ya bato oyo basali mingi.” Amonisaki ete makambo mosusu tokoki koyekola yango bobele uta na makambo oyo tokokutana na yango biso moko na bomoi. (Baebele 5:8) Nzokande, Masese 22:17 elendisi biso ete ‘tókitisa litoi mpe tóyokamela maloba na bato na mayele’ to baoyo basili koyeba makambo mingi. Banakelasi oyo bazwi mapolomi bakoki koyekola makambo mingi epai na baoyo babandá mosala yango liboso na bango. Ndeko Mantz alobaki ete, “Bango bayebi kokakola biloko epai ya batɛkisi na magazini. Na kati ya engumba, bayebi bakartye oyo ebongi kokɔta kuna te mpo na makama ezala na nzoto to na elimo. Bayebi mayoki ya bankolo mboka. Bamisionere oyo baumeli na mosala bayebi oyo bosengeli na yango mpo na kozala na esengo mpe kobuka mbuma malamu na mosala na bino.”
Wallace Liverance, mokomeli ya Eteyelo ya Gileadi, kati na lisukulu na ye ezalaki na motó na likambo ete “Bósepela na mokumba oyo bozwi kati na Teokrasi,” alimbolaki ete atako Nzambe ye moko apesaki bamisionere mosusu, lokola ntoma Paulo, Timoté, mpe Balanaba bateritware na bango na nzela ya elimo santu to na nzela ya ekamwiseli, ezali “moombo ya sembo mpe ya mayele” nde azali kopesa bamisionere oyo balakisami na Gileadi bateritware na bango na elanga ya mokili. (Matai 24:45-47) Akokanisaki bateritware ya bamisionere na bisika oyo Gideona epesaki na mibali oyo basengelaki kobunda na Bamidyani. (Basambisi 7:16-21) Ndeko Liverance alendisaki bango na maloba oyo: “Bósepela na mosala ya misionere oyo bozwi kati na Teokrasi. Lokola basoda ya Gideona oyo ‘batɛlɛmaki moto na moto na esika na ye,’ bótalela teritware na bino lokola esika oyo bosengeli kozala. Bózala na kondima ete Yehova akoki kosalela bino lokola asalelaki mibali nkama misato ya Gideona.”
Kosepela na bato ebotaka esengo
Lisolo moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli elobaki ete: “Na esika ya kosepela mpo na biloko oyo bisalemi na mabɔkɔ ya bato na mokili oyo mpe kotonga bomoi na biso likoló na yango, oyo bizali na ndanga te ete bikoumela, eleki malamu mpe mayele ete tósepela na bato mpe tóyekola bosepeli ya solo na kosaleláká basusu.” Na boyokani na likanisi wana, Ndeko Mark Noumair, moko na balakisi ya Eteyelo ya Gileadi, asololaki na etuluku ya banakelasi likoló na makambo bakutanaki na yango na mosala ya kosakola mpe alobaki ete: “Likambo oyo ekosala ete bózala bamisionere malamu ezali bongo komonisa bosepeli mpo na basusu.”
Basɛkɛlɛ ya bolamu na mboka mopaya
Wapi mwa basɛkɛlɛ mpo na kolonga mpe kozala na esengo na mosala ya misionere? Ndeko Charles Woody oyo asalaka na biro ya Mosala ya Elanga mpe Ndeko Harold Jackson, mosungi na Komite ya Mateya mpe misionere ya kala na Amérique latine, batunaki basangani ya bakomite ya filiale ndenge na ndenge oyo bakendaki na kelasi ya mbala ya libwa ya basangani ya bakomite ya filiale. Talá bamoko ya toli oyo bapesaki:
Albert Musonda oyo autaki na filiale ya ekólo Zambie alobaki boye: “Ntango misionere asali litambe ya liboso ya kokende kopesa bandeko mbote, yango ebotaka elimo malamu mpamba te bandeko bakosala boninga na misionere mpe ye akokóma moninga na bango.”
Rolando Morales oyo autaki na filiale ya ekólo Guatemala apesaki toli ete ntango moto moko ya boboto apesi bamisionere ya sika mwa eloko ya komela, na mayele nyonso mpe na boboto bakoki koyanola ete: “Nayei sika na mboka oyo. Nakokaki komela yango, kasi nzoto na ngai ezali naino makasi lokola nzoto na bino te. Nazali na elikya ete mokolo mosusu nakozwa yango na esengo.” Matomba nini mazwamaka na koyanola na boboto lolenge wana? “Bato bakozokisama te, mpe bamisionere bakomimonisa ete bazali na boboto epai ya bato.”
Nini ekoki kosalisa bamisionere ete bálendendela na bateritware na bango? Ndeko Paul Crudass, ye azwaká lipolomi na kelasi ya mbala ya 79 na Gileadi mpe azalaki misionere na ekólo Liberia na boumeli ya bambula 12 oyo eleki, alobaki boye: “Nayebi, ezali solo ete baboti bayokaka mposa ya komona bana na bango. Kasi ntango mosusu misionere azali kosala makasi mpo ete amimesenisa na ekólo, na klima, na mimeseno, mpe na bato. Ntango mosusu akoki koyoka mposa ya kozonga mboka. Soki azwi nkoma euti na mboka na ye elobi ete, ‘Tozali na mposa na yo mingi; toyebi te soki tokosala nini lokola ozali te,’ yango ekoki kotinda ye ete akanga bisaka na ye mpe azonga na mboka na ye. Ezali na ntina mingi ete bandeko ya bamisionere oyo bazali awa báyebaka likambo yango.”
Nsima ya mituna-masolo, lisukulu ya nsuka na manaka ya mokolo yango esalemaki na Theodore Jaracz, moko kati na lisangani ya Mikóló-Bakambi. Motó na likambo ya lisukulu na ye ezalaki ete, “Botyá Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na bino.” Lolenge nini bamisionere bakoki ntango nyonso kotya likebi na bango na mosala mpe kotika te ete makanisi na bango mápɛngwa? Alendisaki bango ete bázala na manaka ya boyekoli ya bango moko ya Biblia, yango ekosalisa bango ete bátya ntango nyonso matomba ya Bokonzi na esika ya liboso. Mpe apesaki elendiseli oyo eyei mpenza na ntango malamu: “Bamisionere mosusu bamonisaki bopɔtu na boyekoli na bango moko mpamba te bapesaki ntango mingi na kosalela bamasini ya elektronike, courrier électronique, mpe ordinatere. Tosengeli kozala na makanisi malamu mpe na bokatikati na oyo etali kosalela eloko nyonso mpe tólekisa ntango mingi te na likambo oyo ekoki kolya biso ngonga ya koyekola Liloba ya Nzambe.”
Nsima ya lisukulu ya Ndeko Jaracz, ekómaki ntango ya kopesa mapolomi mpe ya kotánga nkoma ya botɔ́ndi oyo banakelasi bakomaki. Molobeli ya banakelasi amonisaki mayoki ya mokomoko na maloba oyo: “Tomonaki bilembeteli ya solosolo ya bolingo oyo Yesu alobaki ete ekozala elembo ya bayekoli na ye, mpe yango endimisi biso lisusu ete, ezala na esika nini oyo tozali, ezali na lisangá ya bomoi, oyo elingi biso, mpe ezali lokola mama oyo azali kosunga biso. Kozaláká na lisungi motindo oyo, tozali pene ya kokende na nsuka ya mokili.” Bosukisi wana esimbaki mpenza motema na molulu ya esengo mpo na kopesa mapolomi na kelasi ya Gileadi ya mbala ya 104.
[Etanda na lokasa 24]
Makambo matali banakelasi
Motuya ya bikólo epai bauti: 9
Motuya ya bikólo epai batindami: 16
Motuya ya banakelasi: 48
Motuya ya mabala: 24
Mwayene ya mbula ya kobotama: 33
Mwayene ya mbula balekisi kati na solo: 16
Mwayene ya mbula balekisi na mosala ya ntango nyonso: 12
[Elilingi na lokasa 25]
Kelasi ya Gileadi ya mbala ya 104, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watch Tower
Na bankombo ekomami awa na nse na kolandáká bandeko ndenge batɛlɛmi na fɔtɔ kobanda molɔngɔ ya liboso kino na nsima, mpe kobanda na lobɔkɔ ya mwasi kino na lobɔkɔ ya mobali
(1) Romero, M.; Howarth, J.; Blackburne-Kane, D.; Hohengasser, E.; West, S.; Thom, S.
(2) Colon, W.; Glancy, J.; Kono, Y.; Drews, P.; Tam, S.; Kono, T.
(3) Tam, D.; Zechmeister, S.; Gerdel, S.; Elwell, J.; Dunec, P.; Tibaudo, H.
(4) Taylor, E.; Hildred, L.; Sanches, M.; Anderson, C.; Bucknor, T.; Hohengasser, E.
(5) Howarth, D.; Ward, C.; Hinch, P.; McDonald, Y.; Sanches, T.; Thom, O.
(6) Drews, T.; Tibaudo, E.; Elwell, D.; Dunec, W.; Blackburne-Kane, D.; Ward, W.
(7) Anderson, M.; Zechmeister, R.; McDonald, R.; Bucknor, R.; Glancy, S.; Gerdel, G.
(8) Romero, D.; Hinch, R.; Hildred, S.; Taylor, J.; Colon, A.; West, W.
[Elilingi na lokasa 26]
Bandeko oyo bazalaki balakisi ya kelasi ya mbala ya 104: (uta na lobɔkɔ ya mwasi) W. Liverance, U. Glass, K. Adams, M. Noumair