Mabelé makobomama nyɛɛ?
NSUKA ya ekeke ya 20 ebɛlɛmi, mpe tolingi kokɔta na ekeke ya 21. Kati na ezalela yango, bato mingi oyo liboso bazalaki kotya likebi mingi te to mpe bazalaki kotya ata likebi te na bisakweli oyo biyebisaka ete likama ezali koya, bazali sikawa komituna soki likambo moko monene oyo ekobebisa mokili mobimba elingi kosalema.
Mbala mosusu osilaki komona masolo kati na bazulunalo—to mpe babuku oyo ezali kolobela likambo yango. Tosengeli kozela mpo na koyeba soki makambo nini makosalema na ebandeli ya ekeke ya 21. Bato mosusu bazali komonisa ete nsuka ya mobu 2000 ezali bobele nsuka ya mbula moko mpe ebandeli ya mbula mosusu (to likambo ya miniti moko, longwa nsuka ya 2000 kino ebandeli ya mobu 2001) mpe emonani ete likambo monene moko te ekosalema. Bato mingi bazali nde komibanzabanza koleka mpo na mabelé na ntina na mikolo oyo mizali naino mosika.
Lelo oyo, likambo oyo bato bazali koloba mingi ete ekosalema—ata ndɛlɛ—ezali ete mabelé makobomama nyɛɛ. Tótalela bobele makambo mibale kati na makambo ya nsɔmɔ oyo bazali kosakola.
Kati na buku na ye (The End of the World—The Science and Ethics of Human Extinction), oyo ebimisamaki mpo na mbala ya liboso na 1996, John Leslie, mokomi mpe nganga-mayele ya filozofi atángi ndenge misato oyo ekoki kosukisa bomoi ya bato awa na mabelé. Liboso atuni boye: “Soki etumba monene ya nikleere esalemi, ekoki koboma bato nyonso?” Na nsima alobi ete: “Likambo oyo ekoki mpenza kosalema . . . ezali kobomama nyɛɛ nsima ya kopema to kozwa mopɛpɛ oyo ezali na gaze ya nikleere: bakanser, makoki oyo nzoto ezali na yango ya komibatela ekolɛmba mpe na bongo maladi oyo eutaka na mikrobe ekopalangana, to bana mingi bakobotama na mbeba na nzoto. Bikelamu mikemike oyo bizali na ntina mpo na kobatela ezingelo bikoki mpe kobomama.” Likambo ya misato oyo Mr. Leslie atángi ezali ete monzoto moko (comète) to etando moko (astéroïde) ekoki koya kotuta mabelé: “Ba comètes mpe ba astéroïdes oyo etambolaka na nzela oyo ekoki komema yango ete mokolo mosusu etuta mabelé ekoki kozala na motángo ya nkóto mibale mpe ezali na bonene ndenge na ndenge; mosusu kilomɛtɛlɛ moko, mpe mosusu kilomɛtɛlɛ zomi na diamɛtɛlɛ na yango. Ezali mpe na ba comètes mpe ba asteroïdes mwa mingi (komeka kotánga yango ezali likambo ya mpasi mpenza) ya minene koleka, mpe oyo ya mikemike ezali ebele mpenza.”
Lolenge “mokolo ya nsuka” ezali komonisama
Tótalela makanisi ya moto mosusu ya siansi, Paul Davies; ye azali profesere na Iniversite ya Adélaïde, na ekólo Australie. Zulunalo Washington Times ebéngaki ye ete “mokomi ya makambo ya siansi oyo ayebani mingi koleka na mokili mobimba.” Na 1914, akomaki buku ezali na motó na likambo ete The Last Three Minutes (Miniti misato ya nsuka), oyo ebéngamaka “mama ya babuku nyonso elobeli mokolo ya nsuka.” Motó na likambo ya mokapo ya liboso ya buku yango ebéngami “Mokolo ya nsuka,” mpe ezali kolobela makambo oyo akanisi ete makoki kosalema soki comète moko eyei kotuta mabelé. Talá mwa ndambo ya makambo yango ya nsɔmɔ:
“Mabelé makotɛtɛma lokola nde eninganaki mbala nkóto zomi. Mopɛpɛ makasi oyo yango ekobimisa ekopalangana na mokili mobimba, ekobuka bandako nyonso, ekopanza biloko nyonso na bisika oyo ekoleka. Mabelé ya patatalu na zingazinga ya esika oyo comète yango ekokwea makotombwana mpe ekosala ngomba ya pɔtɔpɔtɔ oyo ekozala na bolai ya kilomɛtɛlɛ mingi, mpe ekosala libulu na bonene ya kilomɛtɛlɛ 150. . . . Bitika bitondi na mputulu bikotombwana na mopɛpɛ, moi ekozipama mpe ekomonana te na etando mobimba. Na esika ya pole ya moi, ekozala nde na bamiliare ya matandala ya mɔ́tɔ oyo ekokita mpe ekobimisa makama, ekozikisa mabelé na mɔ́tɔ makasi na yango, mpamba te biloko oyo bipumbwisamaki likoló bikokwea lisusu na mopɛpɛ.”
Profesere Davies alobi lisusu ete ezali comète oyo ebéngami Swift-Tuttle nde ekotutana na mabelé mpe ekosala makambo nyonso wana akanisi. Abakisi likebisi oyo ete atako ekoki mpenza kozala ete likambo motindo yango ekosalema na mikolo oyo te, akanisi ete “ata ndɛlɛ, Swift-Tuttle, to etando mosusu lokola yango, ekotuta mabelé.” Akanisi bongo mpamba te ekanisami ete ezali na biloko soko 10 000 bitambolaka na likoló oyo bonene na yango ezali na mɛtɛlɛ 500 to koleka mpe bilandaka banzela oyo esali matakanelo na nzela oyo mabelé elandaka.
Ondimi ete likambo ya nsɔmɔ boye ekoki kosalema? Bato mingi mpenza bandimaka yango. Atako bongo, bazali komitungisa soko moke te mpamba te bazali kobɔndisama na komindimisáká ete likambo yango ekosalama na eleko oyo bango bakozala na bomoi te. Kasi, mpo na nini mabelé makobomama—ezala na mikolo mizali koya mosika te to nsima ya bankóto mingi ya bambula? Na ntembe te, ezali mabelé yango moko te nde ebimisaka bampasi oyo ezali kotungisa bafandi na yango, ezala bato to banyama. Kasi, ezali nde bato bango moko bazali kobimisa mikakatano mingi na ekeke oyo ya 20, bakisa likoki ya ‘kobebisa mabelé’ nyɛɛ, boye te?—Emoniseli 11:18.
Kosilisama ya mabe oyo moto asali na mabelé
Ezali boni mpo na likambo oyo ezali komonana mingi ete bato bakoki kobebisa mabelé mpo na lokoso mpe makambo mabe oyo bazali kosala kati na yango? Ezali komonana polele ete bisika mingi awa na mabelé bisili kobebisama mpenza mpo ete bazali kokata zamba mingi, mopɛpɛ mpe mai ezali kobebisama. Eleki mbula 25, bakomi Barbara Ward na René Dubos bamonisaki likambo yango malamu na maloba mokuse kati na buku na bango oyo ezali na moto na likambo ete Only One Earth (Mabelé bobele moko): “Makambo misato ya minene oyo tosengeli kotalela na kobebisama ya etando—mopɛpɛ, mai, mpe mabelé—ezali biloko misato ya ntina mingi mpo na bomoi na biso awa na mabelé.” Mpe, kobanda ntango wana, makambo mabongi mpenza te, ezali boye te?
Ntango tozali kotalela likoki oyo bato bazali na yango ya kobebisa to koboma mabelé na kozanga bokɛngi na bango moko, tokoki kolendisama na kotalela makoki ya komibongisa mpe kokóma lisusu malamu na ndenge ya kokamwa oyo mabelé ezali na yango. René Dubos alobelaki makoki yango ya kokamwa ntango amonisaki makambo ya kolendisa na buku mosusu oyo akomaki na motó na likambo ete The Resilience of Ecosystems (Kobongisa ezingelo). Akomaki boye:
“Bato mingi bazali kokanisa ete mbeba mosusu mingi oyo esalemi na ezingelo ekoki kobongisama lisusu te mpamba te ntango nyonso elekaki liboso ete bato básosola likambo yango. Mpo na ngai, makanisi wana ya kolɛmba nzoto mazali na moboko te mpamba te ezingelo ezali na makoki mingi ya kokóma lisusu malamu nsima ya kobebisama.
“Ezingelo ezali na myango mingi ya komibongisa. . . . Myango yango misalaka ete ezingelo elonga mobulungano oyo esalemi bobele na kozongisáká mokemoke ezalela na yango ya liboso.”
Mbongwana ekoki kosalema
Na bambula oyo tozali, ndakisa monene ya likambo yango ezali bongo kopɛtolama mokemoke ya Ebale Tamise, ebale oyo eyebani mingi na engumba Londres. Buku The Thames Transformed (Tamise ebongwani) ekomami na Jeffery Harrison na Peter Grant, elobeli na bozindo mosala monene esalemaki oyo emonisi likambo nini ekoki kosalema na ntango bato basangisi milende na bango mpo na bolamu ya bato nyonso. Prince Phillip akomaki boye na maloba ya ebandeli ya mokanda yango: “Oyo nde ezali elonga monene mpenza oyo ebongi kobimisama atako yango ekoki kolendisa bato mosusu na kokanisa ete mikakatano mitali kobatela ezingelo mizali mpenza makasi te ndenge bato mosusu bandimisamaki. . . . Bango nyonso bakoki kolendisama na likambo oyo esalemi mpo na Ebale Tamise. Nsango malamu ezali ete likoki ya kobongisa lisusu ezingelo ezali mpe myango na bango mpe mikoki kolonga.”
Na mokapo oyo ezali na motó na likambo ete “The Great Clean-Up” (Kopɛtolama monene), Harrison na Grant bakomi na mɔ́tɔ mpenza makambo oyo masalemi na boumeli ya mbula 50 oyo eleki: “Mpo na mbala ya liboso na mokili, ebale oyo ebebisamaki mingi mpe epai bazalaki kobwaka bosɔtɔ ya baizini, epɛtolami na boye ete bandɛkɛ ya mai mpe mbisi ezongi bebo. Mbongwana yango esalemi na lombangu mpenza, na esika oyo elikya ezalaki lisusu te, mpe elendisi ata moto oyo alingaka ete bábatela bikelamu ya zamba bongo abungisaki elikya nyonso.”
Na nsima, bamonisi mbongwana oyo esalemaki: “Ebale ebandaki kobeba mokemoke na boumeli ya bambula, mpe mbala mosusu, ekómaki na esika oyo ekokaki kobonga lisusu te na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, ntango batalase mingi oyo elekisaka mai ebukamaki to ebebisamaki. Na boumeli ya bambula ya 1940 mpe 1950, Ebale Tamise ebebaki mpenza makasi. Ebale ekómaki se lokola talase ya kolekisa mai ya bosɔtɔ; mai makómaki moindo, mazalaki na oxygène te, mpe na eleko ya molunge Ebale Tamise ebandaki kobimisa nsolo mabe oyo ezalaki koyokana mosika. . . . Mbisi oyo etondanaki kuna elimwaki nyonso, longola bobele mwa ndambo ya mbisi oyo ezali lokola nkámbá (anguilles) oyo ekokaki kobika mpo na makoki na yango ya kopema mopɛpɛ na libándá ya mai. Bandɛkɛ oyo bazalaki na ebale yango na eteni oyo ezwami na kati ya engumba, epai bandako ezali, katikati na Londres mpe Woolwich, etikalaki bobele mwa mabata ya zamba mpe ba cygne, mpe bazalaki kobikela na biloko oyo ezalaki kokwea na libongo kasi na bilei ya mokili te. . . . Na ntango wana nani akokaki kondima mbongwana monene oyo elingaki kosalema? Nsima ya mbula zomi, bobele bisika wana ya ebale oyo etikalaki lisusu na bandɛkɛ te, ekómaki lisusu ebombamelo ya bandɛkɛ ya mai ndenge na ndenge, kati na yango bandɛkɛ ya zamba 10 000 na bandɛkɛ ya mai 12 000 oyo bayaka na eleko ya mpiɔ.”
Ya solo, wana ezali mbongwana oyo esalemi bobele na mwa eteni moke ya mokili. Atako bongo, tokoki kozwa liteya na ndakisa oyo. Ezali komonisa ete mabelé masengeli kotalelama te ete makobomama kaka mpo bato basaleli yango na lolenge mabe, na lokoso, mpe na kozanga makanisi. Soki bato bateyami malamu mpe basangisi milende na bango mpo na bolamu na bango nyonso, ekoki kosunga mpo ete mabelé yango moko ebongisa ata mbeba minene oyo esalemi na ezingelo, mpe na etando. Kasi ezali boni mpo na kobebisama oyo ekoki kouta epai mosusu, lokola na comète to na astéroïde moko oyo ezali koyengayenga?
Lisolo elandi emonisi sɛkɛlɛ mpo na kozwa eyano oyo ekosepelisa na motuna monene yango.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Soki bato bateyami malamu mpe basangisi milende na bango, ekoki kosunga mpo ete mabelé yango moko ebongisa ata mbeba minene oyo esalemi kati na yango