Mpo na nini tozali lisusu kotyelana motema te?
‘LELO oyo ezali na moto oyo okoki mpenza kotyela ye motema?’ Mbala mosusu osilá koyoka moto moko oyo azali na nkanda kotuna motuna yango. To mpe ekoki kozala ete yo moko otuná motuna yango, ntango likambo moko ezalaki kotungisa yo.
Ya solo kozanga kotyela bato mpe bibongiseli na bango motema ezali komonana na mokili mobimba. Mbala mingi, kozanga kotyelana motema wana ebimaka mpamba te. Ezali na moto oyo akanisaka ete bato mingi ya politiki bakosala makambo oyo balakaki liboso ete bápona bango na voti? Na 1990, ankete moko esalemaki mpo na kotuna bayekoli 1 000 na ekólo Allemagne emonisaki ete atako bato 16,5 likoló na monkama batyaki motema ete bato ya politiki bakoki kosilisa mikakatano ya mokili, kasi baoyo bazalaki na mwa ntembe mpo na kondima balekaki na ebele mbala mibale. Bato mingi balobaki ete bazalaki na elikya te ete bato ya politiki bazali na makoki ya kosilisa mikakatano mpe lisusu bandimaki te ete bazali ata na mposa ya kosala yango.
Na maloba ya mawa, zulunalo Stuttgarter Nachrichten eyebisaki ete: “Bato mingi ya politiki balukaka liboso matomba na bango moko, nde na nsima, bakotalela matomba ya bato oyo baponaki bango.” Na bikólo mosusu, bato bazali mpe kokanisa bongo. Zulunalo The European eyebisaki boye mpo na ekólo moko: “Bilenge bazali na bantina ya solosolo oyo bazali kotyola bato ya politiki, mikóló mpe bazali komona bantina yango.” Zulunalo yango emonisaki ete ‘mbala mingi bato oyo basalaka voti bayaka nde kobengana masangá ya politiki na bokonzi.’ Mpe eyebisaki lisusu ete: “Moto nyonso oyo alekisi mwa ntango molai na bilenge [na ekólo yango] akomona mbala moko ete bazali kotyela bato motema te mpe bazali komona lokola ete bakabolami.” Nzokande, soki bato batyeli boyangeli moko ya demokrasi motema te, ekokoka kosala likambo ya malonga te. John Kennedy, prezida ya kala ya États-Unis alobaká ete: “Mpo ete guvernema moko elonga, esengeli ete bato bátyela yango motema.”
Na makambo ya nkita, bato mingi bazali kotatabana mpamba te bazali komona ndenge bakompanyi mpe mimbongo ezali kokwea na mbalakaka mpe myango ya koluka kokóma na bozwi nokinoki mizali kolonga te. Na Ɔkɔtɔ́bɛ 1997, ntango mobulu ekɔtaki na nkita ya mokili mobimba, zulunalo moko elobelaki “kozanga elikya oyo mbala mosusu eleki ndelo” mpe elobelaki “maladi ya kozanga kotyelana motema.” Eyebisaki lisusu ete “[na ekólo moko ya Azia] bato bazali lisusu kotyelana motema te na boye ete ata guvernema yango moko . . . emonani ete ezali na likama.” Na mokuse, eyebisaki likambo oyo ezali komonana polele: “Kotyelana motema nde esimbaka nkita.”
Mangomba mpe mazali kolonga te kosala ete bato bátyela yango motema. Zulunalo Christ in der Gegenwart oyo ebimaka na ekólo Allemagne eyebisaki na maloba ya mawa ete, “Elikya oyo bato bazalaki kotyela Lingomba ezali se kokita.” Kobanda 1986 kino 1992, motángo ya bato ya ekólo Allemagne oyo bazali kotyela mpenza lingomba motema, to kotyela yango motema mwa moke ekitaki longwa na bato 40 kino na bato 33 likoló na monkama. Kutu, na eteni oyo ezalaki Allemagne ya Ɛsti, motángo yango ekitaki na nse ya bato 20 likoló na monkama. Nzokande, motángo ya bato oyo bazalaki kotyela lingomba motema mpenza te to baoyo bazalaki kotyela yango motema ata moke te ebuti longwa na bato 56 kino bato 66 likoló na monkama na eteni oyo ezalaki Allemagne ya Wɛsti mpe na bato 71 likoló na monkama epai oyo ezalaki Allemagne ya Ɛsti.
Soki tolongoli politiki, nkita, mpe mangomba—makambo misato ya minene na lisangá ya bato—bato bazali mpe lisusu kotyelana motema te na makambo mosusu. Ndakisa mosusu etali kotosisa mibeko. Bongolabongola oyo ezali na mibeko mpo na kopesa basali na mabe bitumbu, mikakatano mpo na kotosisa mibeko na bosembo, mpe ndenge bato mingi bazali komona ete bikateli ya bisambiselo ezali sembo te, nyonso wana ebebisi mpenza elikya ya bato. Zulunalo Time eyebisi ete, “Matata oyo ezali kobima kati na banamboka na bapolisi esali ete bato bátyela lisusu bapolisi motema te mpamba te soki bakangi basali na mabe, mbala mingi bazali kobimisa bango na bolɔkɔ nsima ya mwa ntango moke.” Lokola ezali kolobama mingi ete bapolisi bazali kozwa kanyaka mpe bazali konyokola bato, bato bazali lisusu kotyela bango motema te.
Na makambo ya politiki na mokili mobimba, ezali komonana ete bato bazali kotyelana motema te na ndenge makita minene mpo na kimya mazali kolonga te mpe lisusu na ntango bikólo oyo ezali na matata eyokani ete bátya naino bibundeli pembeni mpe básolola, bazali kotosa boyokani yango te. Bill Richardson, ambasadere ya ekólo Amerika na O.N.U., amonisaki likambo oyo ezali mpenza kopekisa ete kimya ezala na mikili ya Moyen Orient; alobaki na mokuse ete: “Bazali kotyelana motema te.”
Nzokande, na oyo etali boyokani ya bato kati na bango, bato mingi bazali kotyela bandeko na bango mpe baninga na bango motema te; nzokande, mingimingi ntango moto azali na mikakatano, alukaka nde bato yango mpo ayebisa bango mpasi na ye mpe bábɔndisa ye. Makambo ezali mpenza lokola oyo mosakoli Moebele Mika alobelaki ete: “Ondima moninga te, otalela molingami te; batelá bikuke na monɔkɔ na yo liboso na mwasi oyo alali na ntolo na yo.”—Mika 7:5.
Elembo ya ntango ya nsuka
Na mikolo mileki, batángaki maloba ya Arthur Fischer, nganga-mayele ya pisikoloji, moto ya ekólo Allemagne oyo alobaki ete, “Na makambo nyonso ya bomoi, bato bazali lisusu kotyela bokoli ya makambo ya bomoi to na avenire ya moto ye moko motema te. Bilenge bazali na elikya te ete bibongiseli ya bato ekoki kosalisa bango. Bazali lisusu kotyela ata eloko moko elikya te, ezala politiki, mangomba, to bibongiseli mosusu.” Yango wana, maloba ya Ulrich Beck, nganga-mayele ya sosioloji oyo alobi ete bato bakómi na “momeseno ya kotya ntembe” na bakonzi minene, bibongiseli, mpe bato ya mayele, ekoki kokamwisa biso te.
Na ndenge makambo ezali, bato mingi bakómi kobenda nzoto, bakómi kotyola bokonzi nyonso, kolanda kaka makanisi na bango moko, mpe bazali kozwa bikateli kozanga ete bátuna toli to litambwisi epai ya bato mosusu. Basusu bakómi kokanisela baninga mabe, mpe mbala mosusu, ntango bazali liboso ya bato oyo bamoni ete bakoki lisusu kotyela bango motema te, bazali kosala lokola ete bazali komona bango te. Ezalela yango ezali kokolisa makambo ya mabe lokola oyo Biblia elobeli ete: “Na mikolo na nsuka, ntango na mpasi ekoya. Zambi bato bakozala bamikumisi na bango mpenza, baluki na mosolo, bato na lolendo, bato na ngambo, batuki, bato bazangi kokumisa baboti, bato bazangi matɔndi, bato bazangi bulɛɛ, bato bazangi bolingo, bazangi boboto, batɔngi, batomboki, bato na yauli, bayini na malamu, bakosi, bato na nko, bato babimbi na lolendo, baoyo bakolingaka malamu na bango mpenza koleka bolingo epai na Nzambe, bato bazali na lolenge na kosambela nde bazali koangana nguya na yango.” (2 Timote 3:1-5; Masese 18:1) Kozanga kotyelana motema oyo ezali komonana lelo oyo ezali elembo ya “mikolo na nsuka.”
Na mokili ya lelo, lokola bato bazali lisusu kotyelana motema te mpe etondi na bato oyo bazali na bizaleli oyo touti kotánga, mwaye moto asepela mpenza na bomoi ezali te. Kasi tokoki mpenza kokanisa ete makambo ekobongwana? Kozanga kotyelana motema oyo ezali komonana lelo ekoki kosila? Soki ɛɛ, ekosalema ndenge nini mpe ntango nini?