Tokoki lisusu kotyelana motema!
ATAKO kozanga kotyelana motema oyo ezali komonana lelo ezali elembo ya “mikolo ya nsuka,” ezaleli yango mpe emonanaki eleki sikawa bankóto ya bambula. (2 Timote 3:1) Libosoliboso ebimaki na esika oyo tokoki kutu kokanisa te ete ekoki kobima—na paladiso. Biblia elobi boye mpo na esika yango: “Nzambe akonaki elanga epai na ebimelo na ntango, kati na Edene, mpe kuna atyaki moto oyo ye asalaki. [Yehova] akolisaki na mokili nzete nyonso izali na kitoko na kotala, mpe yango izali malamu na kolya; atyaki mpe nzete na bomoi kati na elanga, mpe nzete na koyeba malamu mpe mabe.”—Genese 2:8, 9.
Bavɛrsɛ oyo elandi emonisi boyokani oyo ezali kati na likambo yango mpe kozanga kotyelana motema oyo ezali komonana na mikolo na biso. Tozali kotánga ete: “[Yehova] Nzambe alakaki moto ete, Yo okoki kolya mbuma na nzete nyonso na elanga, nde mbuma na nzete na koyeba malamu mpe mabe okoki kolya te. Zambi mokolo okolya yango okokufa solo.” (Genese 2:16, 17) Adama azalaki ata na ntina moko ya kotyela maloba ya Yehova ntembe?
Totángi lisusu ete: “Nyoka alekaki nyama nyonso na mokili na mayele mabe, oyo [Yehova] Nzambe asilaki kozalisa. Alobaki na mwasi ete, Nzambe alobaki solo ete bino bokoki kolya mbuma na nzete nyonso na elanga te? Mwasi azongiselaki nyoka ete, Tokoki kolya mbuma na nzete na elanga. Kasi mpo na mbuma na nzete yango katikati na elanga Nzambe alobi ete, Bino bokolya yango te, mpe bokosimba yango te ete bókufa te. Nyoka alobaki na mwasi ete, Bino bokokufa solo te, mpo ete Nzambe ayebi ete na mokolo bokolya yango, miso na bino makofungwama, mpe bino bokozala pelamoko na Nzambe, koyeba malamu mpe mabe. Emonaki mwasi ete nzete ezalaki malamu na kolya, mpe kitoko na miso, mpe ete nzete yango ezalaki malamu mpo na kozipola bososoli na moto, akamataki mbuma na yango mpe alyaki mpe apesaki na mobali na ye, [ntango akómaki, NW] na ye elongo, ye mpe alyaki.”—Genese 3:1-6.
Lokola batyolaki likebisi ya polele oyo Nzambe apesaki, Adama na Eva bamonisaki ete batyelaki Yehova motema te. Balandaki Satana, monguna ya Nzambe, oyo asalelaki nyoka mpo asolola na Eva. Satana atyelaki boyangeli ya Yehova motema te. Mpo na yango, mpe mpo na lolendo mpe motema ya komitombola, atombokelaki Nzambe mpe azimbisaki bato ete básala lokola ye. Apusaki bango na kokanisa ete ebongi kotyela Nzambe motema te.
Epesi mbano nini? Kozanga koyokana
Mbala mosusu osilá komona ete bato oyo batyelaka basusu motema te bayebaka kobatela boninga te. Publilius Syrus, mokomi mpe moto ya ekólo Loma na ekeke ya liboso L.T.B., akomaki ete: “Kotyelana motema ezali nsinga bobele moko esimbaka boninga.” Botomboki ya Adama na Eva emonisaki ete batyelaki Nzambe motema te. Yango wana, Nzambe akokaki mpe lisusu kotyela bango motema te. Lokola bazalaki lisusu kotyelana motema te, babalani ya liboso bazalaki lisusu baninga ya Nzambe te. Eloko moko te emonisi ete Yehova asololaki na bango lisusu nsima ya kopesa bango etumbu mpo na botomboki na bango.
Lisusu, boyokani ya Adama na Eva ebebaki. Yehova ayebisaki Eva ete: “Okobota bana na mpasi, nde okozala na mposa na mobali na yo, mpe ye akozala na bokonzi likoló na yo.” (Genese 3:16) Bible de Jérusalem elobi ete: “Ye akoyangela yo.” Na esika ete azala na bokonzi oyo ezali komonisa bolingo epai ya mwasi na ye, ndenge Nzambe alingaki, Adama akómaki nkolo na ye, akómaki koyangela ye.
Nsima ya kosala lisumu, Adama alukaki kopesa foti nyonso epai ya mwasi na ye. Na makanisi na ye, soki babenganaki bango na elanga kitoko mpo bákende kofanda na mabelé mpamba epai bakómaki lokola baombo, bakómaki na bomoi ya mpasi kino bazongaki na mputulu, ezalaki mpo na likambo oyo mwasi asalaki. (Genese 3:17-19) Tokoki mpenza kokanisa ete likambo wana ebimisaki matata kati na bango mibale. Ekoki kozala ete Adama asilikaki mpe alobaki ete akoyokela lisusu Eva ata mokolo moko te. Ekoki kozala ete akanisaki azali na elonga na koloba na ye ete, ‘Banda lelo, ngai nde mokonzi!’ Na ngámbo na ye mpe, Eva mbala mosusu amonaki ete Adama akokisaki mokumba na ye te lokola mokonzi ya libota, yango wana, atyelaki ye lisusu motema te. Ata soki ezalaki ndenge nini, lokola batyelaki Nzambe motema te, bato nyonso bazalaki lisusu baninga ya Nzambe te mpe bango na bango bazalaki lisusu koyokana malamu te.
Tokoki kotyela nani motema?
Ndakisa ya Adama na Eva emonisi ete tokoki kotyela moto nyonso motema te. Ndenge nini tokoki koyeba moto oyo abongi mpe moto oyo abongi te ete tótyela ye motema?
Nzembo 146:3 epesi biso toli ete: “Ndimelá bana na mikonzi te, to moto, mpo ete azali na kosunga te.” Mpe na Yilimia 17:5-7, tozali kotánga ete: “Moto alakelama mabe oyo akotalela moto, mpe akotya mosuni lokola lobɔkɔ na ye mpe motema na ye elongwi na epai na [Yehova].” Nzokande, “Moto apambolama oyo akotalela [Yehova] mpe oyo [Yehova] azali elikya na ye.”
Ezali solo ete kotyela bato motema ezalaka ntango nyonso mabe te. Bavɛrsɛ wana ezali bobele komonisa ete soki moto atyeli Nzambe motema, azwaka mbano mabe te, kasi kotyela bato motema mbala mosusu ememaka na likama, mpamba te bazangi kokoka. Na ndakisa, baoyo bazali kotyela bato motema mpo ete básala makambo oyo bobele Nzambe akoki kosala, lokola kobikisa mpe kotya kimya mpe libateli ya solosolo, bakosuka na mawa.—Nzembo 46:9; 1 Batesaloniki 5:3.
Ebongi kotyela bato mpe bibongiseli na bango motema bobele na meko oyo bazali kosala na boyokani na mikano ya Nzambe mpe bazali kolanda mitinda ya Nzambe. Yango wana, soki tolingi ete bato mosusu bátyela biso motema, tosengeli kolobaka solo, kozala sembo mpe kozala bato babongi kotyelama motema. (Masese 12:19; Baefese 4:25; Baebele 13:18) Soki tozali kolanda mibeko ya Biblia, ekobonga ete bato bátyela biso motema mpe tokoyeba kolendisa basusu mpe bango bakolendisa biso.
Tótyelana lisusu motema
Batatoli ya Yehova bazali na ntina malamu ya kotyela Nzambe motema mpe kolendisa bato mosusu ete básala bongo. Yehova azali sembo, tokoki ntango nyonso kotyela ye motema ete akokokisa maloba na ye mpamba te ‘Nzambe akoki komimonisa na lokuta te.’ Soki totyeli Nzambe ya bolingo motema, ekopesa biso mawa ata mokolo moko te.—Baebele 6:18; Nzembo 94:14; Yisaya 46:9-11; 1 Yoane 4:8.
Bato oyo basangani mpe bazali kotyela Yehova motema mpe bazali kotosa mitinda na ye balendisami makasi ete bátyelana motema bango na bango. Kati na mokili oyo batyelanaka lisusu motema te, ezali mpenza esengo na komona bato oyo babongi kotyelama motema! Kanisá ndenge mokili ekokaki kozala soki tokokaki kondima likambo oyo moto nyonso alobi to asali! Kati na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, oyo ekoya mosika te, makambo ekozala ndenge yango. Kozanga kotyelana motema ekozala lisusu te!
Okosepela kozala kuna? Soki ezali bongo, Batatoli ya Yehova balendisi yo ete olendisa elikya na yo na Nzambe mpe na bilaka na ye. Okosala yango soki oyekoli masɛngami na ye mpo na kozwa bomoi. Boyekoli ya Biblia ekomonisa yo bilembeteli ete Nzambe azali, alingaka ete bato bázala malamu, mpe mosika te akosala likambo moko mpo na kosilisa mikakatano ya mokili na nzela ya Bokonzi na ye. Bamilio ya bato basili koyekola kotyela Nzambe mpe na Biblia, Liloba na ye elikya. Batatoli ya Yehova bakosepela kolakisa yo ndenge nini bayekolaka Biblia na bato kozanga ete básɛnga mbongo. To mpe tindá mokanda epai ya babimisi ya zulunalo oyo mpo na koyeba makambo mosusu.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
Kozanga kotyela Nzambe motema ebebisaka boyokani ya bato
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Ebongi kotyela bato motema bobele na meko oyo bazali kolanda mitinda ya Nzambe