Tyá makambo oyo maleki ntina na esika ya liboso!
Makita ekosalema na mpokwa, kasi ozali na mosala ya kosala. Eloko nini okotya na esika ya liboso?
OZALI mobali mpe tata ya libota. Lokola mokolo molai na mosala makasi elingi kosila, obandi kokanisa makita ya lisangá oyo ekosalema na mpokwa. Soki mosala esili mpe okei mbala moko na ndako, okozala na ntango mpo na kosukola, kolata bilamba mosusu, mpe kolya mwa moke liboso ya kokende na makita. Mbala moko, nkolo mosala ayei mpe alobi ete otikala kosala nsima ya ngonga ya mosala. Alaki ete akofuta yo malamu. Ozali mpe na mposa ya mbongo.
To, ozali mwasi mpe mama ya bana. Ntango ozali kolamba na mpokwa, omoni ebele ya bilamba oyo bangomi naino te, bilamba mosusu esengeli bólata yango lobi. Omituni ete: ‘Soki nakei makita na mpokwa, nakozwa ntango wapi mpo na kongoma bilamba?’ Lokola outi kobanda mosala oyo ezwaka yo mokolo mobimba, ozali komona sikawa mokakatano ya kokokisa mikumba ya libota wana ozali koluka eloko mpo na koleisa libota.
To, ozali moyekoli. Na ndako na yo ya kolala, mesa etondi na badevuare ya kelasi. Badevuare mingi epesamaki uta kala, kasi ozalaki kosala yango te, mpe talá sikawa ekómi ebele. Ozali na mposa ete osɛnga baboti nzela ete okende makita te mpo otikala kosilisa badevuare.
Eloko nini okotya na esika ya liboso: mosala ya mosuni, kongoma bilamba, devuare ya kelasi, to makita ya lisangá? Na elimo, kotya makambo oyo maleki ntina na esika ya liboso elimboli nini? Likanisi ya Yehova ezali nini?
Eloko nini okotya na esika ya liboso?
Ntango Bayisalaele bazwaki Mibeko Zomi, mwa moke na nsima bakutaki mobali moko azali kolɔkɔta nkoni na mokolo ya Sabata. Likambo yango epekisamaki makasi na Mibeko. (Mituya 15:32-34; Deteronome 5:12-15) Ndenge nini okokaki kokata likambo yango? Okokaki kolimbisa mobali yango, olingaki koloba ete azalaki kosala mpo na kozala na bomoi ya lokumu te, kasi ezalaki nde mpo na kopesa libota na ye biloko oyo basengelaki na yango? Okokaki mbala mosusu kokanisa boye: Lokola na boumeli ya mbula mabaku ezalaki mingi mpo na kotosa Sabata, mpe mobali wana azangisaki bobele Sabata moko, ntango mosusu abosanaki kozwa bibongiseli liboso, na yango bakokaki kolimbisa ye, boye te?
Yehova azalaki kotalela likambo yango na lisɛki te. Biblia elobi boye: “[Yehova] alobelaki Mose ete, Moto yango akobomama.” (Mituya 15:35) Mpo na nini Yehova asilikaki na likambo mobali wana asalaki? Bayisalaele bazalaki na mikolo motoba mpo na kolɔkɔta nkoni mpe kobongisa makambo etali bilei, bilamba, mpe ndako na bango. Basengelaki kotika mokolo ya nsambo mpo na makambo na bango ya elimo. Atako kolɔkɔta nkoni ezalaki mabe te, kasi ezalaki mabe kosala yango na ngonga oyo ebongisamaki mpo na losambo ya Yehova. Atako baklisto bazali na nse na Mibeko ya Mose te, lisolo ya mobali oyo ezali koteya biso ete tosengeli kotyaka makambo oyo maleki ntina na esika ya liboso lelo oyo, boye te?—Bafilipi 1:10.
Nsima ya kolekisa mbula 40 na mokili mokauki, Bayisalaele bakómaki pene ya kokɔta na Mokili ya Ndaka. Bamoko balɛmbaki kolya mana oyo Nzambe azalaki kopesa bango na mokili mokauki mpe na ntembe te bakómaki na mposa ya kolya bilei mosusu. Mpo na kosalisa bango ete bábatela makanisi malamu lokola balingaki kokɔta na mokili “motondi na [miliki, NW] mpe na mafuta ya nzoi,” Yehova ayebisaki bango lisusu ete: “Moto akotikala na bomoi bobele mpo na kwanga te, kasi ete moto akotikala na bomoi mpo na makambo nyonso makobimaka na monɔkɔ na [Yehova].”—Exode 3:8; Deteronome 8:3.
Bayisalaele basengelaki kosala makasi mpo na kozwa “miliki mpe mafuta ya nzoi.” Basengelaki kobunda mpe kolonga banguna, kotonga bandako, mpe kolona bilanga. Atako bongo, Yehova asɛngaki bango ete bamibombela ntango mpo na komanyola makambo ya elimo. Basengelaki lisusu kozwa ntango mpo na koteya bana na bango banzela ya Yehova. Yehova alobaki ete: “Bokolakisa yango [Mibeko na ngai] na bana na bino, kosolola mpo na yango wana ekofanda yo na ndako na yo, mpe ekotambola yo na nzela, mpe ekolala yo, mpe ekotɛ[lɛ]ma yo.”—Deteronome 11:19.
Mobali nyonso na Yisalaele mpe prozelite oyo azalaki na Yisalaele basengelaki komimonisa liboso ya Yehova mbala misato na mbula. Lokola bayebaki ete libota mobimba bazalaki kozwa matomba ya elimo na mabaku wana, batata mingi bazalaki kozwa bibongiseli mpo na kokende elongo na basi mpe bana na bango. Kasi, nani alingaki kobatela bandako mpe bilanga na bango soki banguna bayei lokola libota mobimba bazali te? Yehova alakaki ete: “Moto mpe te akozala na mposa na mokili na yo, wana ekokenda yo mpo na komonana liboso na [Yehova] Nzambe na yo mbala misato kati na mbula.” (Exode 34:24) Bayisalaele basengelaki kozala na kondima ete soki batii matomba ya elimo na esika ya liboso, bakozanga eloko te na mosuni. Yehova akokisaki maloba na ye? Ɛɛ!
Landá koluka liboso Bokonzi
Yesu ateyaki bayekoli na ye ete bátyaka makambo ya elimo liboso ya makambo nyonso mosusu. Na Lisolo oyo asalaki likoló na Ngomba apesaki bayoki na ye toli ete: “Bómitungisa te mpo na koloba ete, Tokolya nini? soko ete, Tokomela nini? soko ete, Tokolata nini? Bólukaka . . . liboso Bokonzi na Nzambe mpe boyengebene na ye mpe biloko oyo nyonso [ya mosuni oyo esengeli] ikobakisama na bino.” (Matai 6:31, 33) Nsima ya liwa ya Yesu, baklisto oyo bazwaki batisimo sika balandaki toli wana. Bayuda mpe baprozelite mingi bakendaki na Yelusaleme mpo na feti ya Pantekote na mobu 33 T.B. Ntango bazalaki kuna, likambo moko oyo bayebaki te ete ekosalema esalemaki. Bayokaki mpe bayambaki nsango malamu na ntina na Yesu Klisto. Lokola balingaki koyeba makambo mosusu na ntina na lingomba na bango ya sika, batikalaki na Yelusaleme. Biloko na bango ya mosuni ebandaki kosila, kasi yango ezalaki lobanzo na bango ya liboso te. Bamonaki Masiya! Bandeko na bango baklisto bakabolaki na bango biloko ya mosuni oyo bazalaki na yango mpo ete bango nyonso ‘báumela ntango nyonso na mateya ya bantoma mpe . . . na mabondeli.’—Misala 2:42.
Na ntango yango, baklisto mosusu bakómaki kotyola likambo ya koyanganaka na baninga na makita ntango nyonso. (Baebele 10:23-25) Mbala mosusu bakómaki komipesa na biloko ya mosuni, bazalaki kotyola makambo ya elimo, bazalaki komipesa na koluka mosolo mpo ebatela bango na mabota na bango. Nsima ya kolendisa bandeko na ye ete bátika koyanganaka te, ntoma Paulo akomaki boye: “Ezaleli na bino ezanga mposa na mosolo; bósepela na biloko bizali na bino. Zambi ye alobaki ete, Nakotika yo soko moke te, nakosabola yo mpe te.”—Baebele 13:5.
Toli ya Paulo epesamaki mpenza na ntango malamu. Mbula soko mitano nsima wana Paulo akomaki mokanda epai na Baebele, basoda ya Loma oyo bakambamaki na Cestius Gallus, bazingaki Yelusaleme. Baklisto ya sembo bamikundolaki likebisi oyo Yesu apesaki ete: “Soko bokomona [makambo oyo]. . . . Tiká moto oyo na likoló na ndako akita te mpo na kokɔta na ndako kokwa eloko; tiká moto kati na elanga azonga te mpo na kokwa elamba na ye.” (Malako 13:14-16) Bayebaki ete bakobika mpo na mosala na bango te, mpo na biloko na bango ya mosuni mpe te, kasi mpo na botosi na bango na malako ya Yesu. Na ntembe te, baoyo bandimaki toli ya Paulo mpe batyaki matomba ya Bokonzi na esika ya liboso, bakakatanaki te mpo na kotika ndako, bilamba, mpe biloko na bango ya mosuni mpe kokima na bangomba. Kasi baoyo bazalaki ntango nyonso na bolingo ya mosolo bakokaki kosala bongo te.
Ndenge bato mosusu bazali kotya makambo oyo maleki ntina na esika ya liboso lelo oyo
Baklisto ya sembo basepelaka ntango nyonso kosangana na bandeko, mpe mingi bamipimelaka makambo mingi mpo na koyangana na makita. Na bisika mosusu, mosala oyo emonanaka ezali bobele oyo esalemaka na bangonga ekeseni. Ndeko moko asɛngaka baninga na ye ya mosala ete asala na esika na bango na mokolo ya pɔsɔ na mpokwa, mokolo oyo bato mingi balingaka kominanola, bongo bango básala na esika na ye mokolo oyo azalaka na makita ya mpokwa. Bandeko mosusu bayanganaka na makita na masangá ya pembeni soki manaka ya mosala epesi nzela te ete báyangana na masangá na bango. Na ndenge yango, balekisaka likita ata moko te. Na ekólo Canada, mwasi moko oyo abandaki kosepela na solo asosolaki litomba ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe ya Likita ya mosala, kasi manaka ya mosala ezalaki kopesa ye nzela te ete ayanganaka na makita yango. Na yango, afutaki moninga moko ya mosala mbongo ete asalaka na esika na ye, na bongo ye azwaki likoki ya koyanganaka na makita wana ya ntina.
Bandeko mingi oyo babɛlaka mingi bazangisaka mpenza makita te. Balandaka makita na ndako na telefone to na kasɛti soki bazwi likoki ya kokóma na Ndako ya Bokonzi te. Bamonisaka bosepeli oyo ebongi kopesamela longonya mpo na bibongiseli ya elimo oyo Yehova akamati na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele”! (Matai 24:45) Baklisto oyo babatelaka baboti na bango oyo bakómi mibange basepelaka mingi ntango ndeko moko mobali to mwasi andimi kotikala na baboti na bango mpo ete bango bákende na makita ya lisangá.
Kamatá bibongiseli liboso
Baboti oyo bamibanzabanzaka mpo na bamposa na bango ya elimo basalisaka bana na bango mpo básepelaka na makita ya lisangá. Mbala mingi, balingaka ete bana na bango básala badevuare ya kelasi ntango bayei na yango na esika ya koumisa yango, noki ekóma mingi. Mokolo ya makita ya mpokwa, bana basalaka badevuare na bango kaka ntango bakómi na ndako. Bapesaka nzela te ete kominanola mpe masano mosusu epekisa bango koyangana na makita.
Soki ozali mobali mpe tata ya libota, otyaka makita na esika ya liboso? Soki ozali mwasi mpe mama ya libota, omekaka kobongisa makambo liboso mpo ete oyanganaka na makita? Elenge, badevuare na yo ya kelasi elandaka manaka ya makita to makita nde elandaka badevuare na yo?
Makita ya lisangá ezali ebongiseli ya bolingo euti na Yehova. Esengeli kosala milende mpo na kosangana na ebongiseli wana. Yehova akopambola yo mingi soki okotya makambo oyo maleki ntina na esika ya liboso!