Nzambe azali nani?
OKOPESA eyano nini na motuna yango? Bato mosusu bakanisaka ete bayebi Nzambe malamu mpe azali moninga na bango mpenza. Basusu bayebi Nzambe kaka na mosika. Bayebi ete azali, kasi bayebi ye malamu te. Soki ondimaka ete Nzambe azali, eyano nini okopesa na mituna oyo?
1. Nzambe azali moto ya solo mpenza?
2. Nzambe azali na nkombo?
3. Yesu azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso?
4. Nzambe akipaka ngai mpenza?
5. Nzambe andimaka losambo ya ndenge nyonso?
Soki otuni bato mosusu mituna wana, okozwa biyano ndenge na ndenge oyo ekokamwisa yo. Tokoki kokamwa te ndenge mateya ndenge na ndenge ya lokuta ebimá na ntina na Nzambe.
Biyano ezali na ntina
Ntango Yesu Klisto asololaki na mwasi moko oyo akutanaki na ye na libulu ya mai, amonisaki ye ntina ya koyeba solo na ntina na Nzambe. Mwasi yango, oyo azalaki Mosamalia, andimaki ete Yesu azali mosakoli. Kasi, likambo moko ezalaki kotungisa ye. Lingomba ya Yesu ekesanaki na oyo ya ye. Ntango ayebisaki Yesu likanisi na ye, Yesu alobaki na ye polele ete: “Bino bosambelaka oyo boyebi te.” (Yoane 4:19-22) Emonani polele ete, mpo na Yesu, bato nyonso te oyo basambelaka nde bayebi Nzambe malamu.
Yesu alingaki nde koloba ete moto moko te akoki koyeba Nzambe? Te. Yesu abakisaki boye: “Basambeli ya solosolo bakosambela Tata na elimo mpe na solo, mpo, ya solo mpenza, Tata azali koluka bato ya ndenge wana mpo na kosambela ye.” (Yoane 4:23) Yo mpe osambelaka Nzambe “na elimo mpe na solo”?
Ezali na ntina mingi oluka eyano na motuna wana. Mpo na nini? Yesu amonisaki ntina ya kozala na boyebi ya solosolo ntango abondelaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko, báyekola koyeba yo, Nzambe kaka moko ya solosolo, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Klisto.” (Yoane 17:3) Ya solo, koyeba Nzambe malamumalamu nde esimbi bomoi na biso ya mikolo ezali koya!
Tokoki mpenza koyeba solo na ntina na Nzambe? Ɛɛ, tokoki koyeba yango! Kasi, ndenge nini tokoki koyeba yango? Yesu alobaki boye: “Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Alobaki lisusu boye: “Oyo Tata azali, moto moko te ayebi longola kaka Mwana, mpe moto oyo epai na ye Mwana asepeli komonisa yango.”—Luka 10:22.
Na yango, sɛkɛlɛ mpo na koyeba Nzambe ezali na mateya ya Yesu Klisto, Mwana ya Nzambe. Kutu, Yesu apesaki elaka oyo: “Soki botikali kaka na kati ya liloba na ngai, bozali mpenza bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekopesa bino bonsomi.”—Yoane 8:31, 32.
Na yango, biyano nini Yesu akoki kopesa na mituna mitano oyo ezali na ebandeli ya lisolo oyo?
[Elilingi na lokasa 4]
Osambelaka Nzambe oyo oyebi mpenza te?