Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/11 nk. 13-18
  • Bókoba kosala mpo na lobiko na bino!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bókoba kosala mpo na lobiko na bino!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Kotonga” oyo tozali kotonga kati na biso moko
  • Bakonzi ya Yuda baponaki nzela na bango
  • Yehova atyelaka yo motema!
  • Apesá biso bonsomi ya kopona
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • “Akangamaki se na Yehova”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Bandakisa ya kolanda​—Hizikiya
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Zwá bikateli ya malamu ntango ozali naino elenge
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/11 nk. 13-18

Bókoba kosala mpo na lobiko na bino!

“Balingami, . . . bókoba kosala mpo na lobiko na bino na kobanga mpe na kolɛnga.”​—BAFILIPI 2:12, NW.

1, 2. Makanisi nini epalangani mingi oyo ezali kotinda bato mosusu na kokanisa ete bakoki kosala eloko te mpo na kotambwisa bomoi na bango?

“OBOTAMÁ se bongo?” Eleki mwa mikolo, motuna yango ekomamaki na ezipeli ya zulunalo moko eyebani mingi. Na nse ya motó ya likambo yango bakomaki maloba oyo: “Bomoto, ezaleli, ata mpe makambo oyo moto aponaka. Bolukiluki ya mikolo na biso emonisi ete makambo nyonso wana ezali na makila na yo.” Makanisi motindo wana makoki kotinda bato mosusu na komona ete bakoki kosala eloko te mpo na kotambwisa bomoi na bango.

2 Basusu bakanisaka ete baboti na bango babɔkɔlaki bango malamu te to balakisi na bango bateyaki bango malamu te yango wana bomoi na bango ekozala kaka na makambo ya mawa. Bamonaka ete, na bomoi na bango mobimba, ekanamá ete bakobanda kozongela kaka mabunga ya baboti na bango, bakozala kaka na matindiki ya mabe, bakoki kozala sembo epai ya Yehova te—na mokuse, bakopona kaka nzela ya mabe. Biblia eteyaka bongo? Ya solo bato mosusu oyo basambelaka balobaka ete Biblia emonisi likanisi yango na liteya oyo elobi ete makambo nyonso masilá kokanama. Liteya wana elobi ete Nzambe asilá kokana makambo nyonso oyo ekosalema na bomoi na yo.

3. Biblia elobi likambo nini ya kolendisa mpo na oyo etali makoki na biso ya kopona bomoi na biso na mikolo mizali koya?

3 Makanisi nyonso wana mazali koteya likambo moko: Okoki kosala eloko te, okoki kotambwisa bomoi na yo te. Makanisi oyo mazali mpenza kolɛmbisa nzoto. Nzokande, kolɛmba nzoto ebakisaka mokakatano. Masese 24:10 elobi ete: “Soko okosɛnzwa na mokolo na mpasi, nguya na yo ezali bobele moke.” Kasi, tolendisami na koyebáká ete Biblia elobi tokoki ‘kosala mpo na lobiko na biso.’ (Bafilipi 2:12) Ndenge nini tokoki kolendisa elikya na biso na liteya oyo ya Makomami?

“Kotonga” oyo tozali kotonga kati na biso moko

4. Atako 1 Bakolinti 3:10-15 elobeli kotonga na bitongeli oyo bizikaka na mɔ́tɔ te, likambo yango esɛngi nini te?

4 Tótalela elakiseli oyo Paulo apesi na 1 Bakolinti 3:10-15. Paulo alobeli kotonga ya baklisto, mpe tokoki kosalela liteya oyo tozali kozwa na ndakisa wana mpo na biso moko mpe na mosala ya kosakwela bato mosusu. Yango elingi nde koloba ete soki moyekoli moko aponi kosalela Yehova mpe atikali sembo, mokumba nyonso ezali ya baoyo bateyaki ye mpe balakisaki ye? Te. Paulo azalaki nde komonisa mpo na nini molakisi asengeli kotonga malamu mpenza. Kasi, lokola tomonaki yango na lisolo oyo eleki, alobaki te ete moyekoli azali na eloko ya kosala te. Ya solo, elakiseli ya Paulo elobeli mingi mosala oyo tozali kosala epai ya bato mosusu, kasi kotonga kati na biso moko te. Ezali bongo mpamba te Paulo alobaki ete botongi oyo esalemi bongo na bongo ekobomama kasi motongi akobika. Atako bongo, Biblia esaleli mpe maloba ya elilingi mpo na mosala oyo tozali kosala kati na biso moko.

5. Bavɛrsɛ nini emonisi ete baklisto basengeli “kotonga” kati na bango moko?

5 Na ndakisa, tótalela Yuda 20, 21 (NW): “Balingami, wana bozali kotonga likoló ya kondima na bino eleki bosantu, mpe bozali kobondela na elimo santu, bómibatela na bolingo ya Nzambe.” Na esika oyo, Yuda asaleli liloba ya Greke oyo ebongolami na “kotonga,” liloba oyo Paulo asaleli na 1 Bakolinti mokapo 3, kasi tomoni lokola ete likanisi ya Yuda ezali ete tótonga kati na biso moko likoló ya moboko ya kondima na biso. Ntango Luka akomaki lisese ya moto oyo atongaki ndako na ye likoló ya mabanga, asalelaki liloba se moko wana ebongolami na “moboko” oyo Paulo asaleli na ndakisa na ye mpo na kotonga ya baklisto. (Luka 6:48, 49) Paulo asaleli mpe elilingi ya kopikama likoló ya “moboko” ntango alendisaki baninga na ye baklisto ete bákola na elimo. Liloba ya Nzambe ezali mpenza koteya ete tozali “kotonga” kati na biso moko.​—Baefese 3:15-19; Bakolose 1:23; 2:7.

6. (a) Limbolá ndenge oyo moyekoli moklisto mokomoko azali ndako oyo etongami na lisungi ya bato mingi. (b) Moyekoli mokomoko azali na mokumba nini?

6 Kotonga moklisto ezali mosala ya moto moko? Kanisá ete okani kotonga ndako. Okoluka moyemi-ndako oyo akosalela yo plan. Ata soki okani kosala mosala mingi yo moko, okozwa kapita-motongi oyo akosalisa yo mpe akopesa yo makanisi mpo na kotonga ndako na yo malamu. Soki atii moboko ya malamu, asalisi yo na kolanda malamu makambo mazali na kati ya plan, alakisi yo bisaleli ya malamu koleka oyo osengeli kosomba, mpe alakisi yo makambo mingi mpo na kotonga ndako, na ntembe te okoloba ete asali mosala malamu. Kasi, soki olandi toli na ye te, osombi biloko ya bongo na bongo to biloko oyo ezali malamu te, to mpe olandi plan ya moyemi-ndako te? Okoloba te ete kapita-motongi to mpe moyemi-ndako azali mabe soki ndako yango ekwei! Ndenge moko, moklisto mokomoko azali ndako oyo etongami na lisungi ya bato mingi. Yehova azali moyemi-ndako monene. Azali kosalisa moklisto ya sembo oyo, lokola ‘mosalani na Nzambe elongo,’ azali koteya mpe kotonga moyekoli. (1 Bakolinti 3:9) Kasi, moyekoli mpe azali na mokumba ya kokokisa. Na nsuka, ye moko nde akopona nzela na ye. (Baloma 14:12) Soki alingi kozala na bizaleli kitoko ya moklisto, asengeli kosala makasi mpo na kolona yango to kotonga yango kati na ye moko.​—2 Petelo 1:5-8.

7. Baklisto mosusu bazali na mokakatano nini, mpe likambo nini ekoki kobɔndisa bango?

7 Yango elingi koloba ete bomoto oyo tobotamá na yango, makambo mazali koleka zingazinga na biso, mpe makoki ya balakisi na biso ezali na ntina te? Ezali bongo te. Liloba ya Nzambe endimi ete likambo mokomoko wana ezali na ntina mpe esalaka bopusi. Tobotamá na bamposa mingi ya kosala masumu to ya mabe mpe ekoki kozala mpasi mpo na kolonga yango. (Nzembo 51:5; Baloma 5:12; 7:21-23) Ndenge oyo baboti bazali kobɔkɔla mwana mpe makambo oyo mazali koleka na kati ya ndako makoki kosala bopusi monene epai na ye—bopusi yango ekoki kozala ya malamu to ya mabe. (Masese 22:6; Bakolose 3:21) Yesu akweisaki bakonzi ya mangomba ya Bayuda mpo mateya na bango mazalaki na bopusi mabe epai ya bato mosusu. (Matai 23:13, 15) Lelo oyo, makambo motindo wana mazali kosala bopusi epai ya biso nyonso. Na ndakisa, basaleli mosusu ya Nzambe bazali na mikakatano mpo babɔkwamaki malamu te. Bato ya ndenge yango bazali na mposa ete tómonisela bango boboto mpe tóyokela bango mawa. Mpe bato yango bakoki kobɔndisama na koyeba ete Biblia elobi te ete basengeli kozongela mabunga ya baboti na bango to mpe kozala sembo te. Tótala ndenge bakonzi mosusu ya Yuda na ntango ya kala bamonisaki likambo yango.

Bakonzi ya Yuda baponaki nzela na bango

8. Tata ya Yotama apesaki ndakisa nini ya mabe, kasi Yotama aponaki nzela nini?

8 Azalia akómaki mokonzi ntango azalaki naino elenge mpenza ya mbula 16 mpe ayangelaki na boumeli ya mbula 52. Na boumeli ya mbula mingi, “asalaki yango ikokaki na miso na [Yehova] [na kolanda] nyonso isalaki Amasia, tata na ye.” (2 Mikonzi 15:3) Na lisalisi ya Yehova, alongaki bitumba mingi. Kasi, likambo ya mawa, bolongi elangwisaki Azalia. Akómaki na lolendo, atombokelaki Yehova na ndenge atumbaki mpaka ya malasi na etumbelo ya tempelo; nzokande mosala wana ezalaki ya banganga. Ntango bapamelaki ye, nkanda ya Azalia engalaki. Na nsima, Yehova asukisaki lolendo na ye—abɛlaki maladi ya maba mpe atangolamaki na bato kino liwa na ye. (2 Ntango 26:16-23) Mwana na ye Yotama asalaki nini liboso ya makambo wana nyonso? Elenge yango akokaki kopusama na ndakisa ya tata na ye mpe komona mabe na etumbu ya Yehova. Bato mingi bazalaki kosala mabe mpe yango ekokaki kosala bopusi mabe epai na ye. (2 Mikonzi 15:4) Kasi Yotama aponaki nzela na ye. “Asalaki malamu na miso na [Yehova].”​—2 Ntango 27:2.

9. Tángá mwa bandakisa ya malamu oyo Ahaza azwaki, kasi bomoi na ye ezalaki ndenge nini?

9 Yotama ayangelaki na boumeli ya mbula 16, atikalaki sembo epai ya Yehova na mikolo nyonso ya boyangeli na ye. Na yango, azalaki ndakisa ya tata oyo azali sembo mpo na mwana na ye Ahaza. Mpe Ahaza azalaki na bato mosusu oyo bazalaki ndakisa malamu mpo na ye. Azalaki na bomoi na eleko oyo basakoli ya sembo lokola Yisaya, Hosea, mpe Mika bazalaki kosala mosala na bango na mokili wana. Kasi, aponaki nzela mabe. “Asalaki malamu na miso na [Yehova] lokola tata na ye Davidi te.” Asalaki bikeko ya Baala mpe asambelaki yango. Kutu, atumbaki bana na ye mosusu na mɔ́tɔ lokola mbeka epai ya banzambe ya bapakano. Atako azwaki ndakisa ya malamu koleka, azalaki mokonzi mabe mpe asalelaki Yehova te.​—2 Ntango 28:1-4.

10. Ahaza azalaki tata ya ndenge nini, kasi mwana na ye Hizikiya aponaki nzela nini?

10 Na likambo etali losambo ya pɛto, Ahaza azalaki tata moko mabe mpenza. Nzokande, mwana na ye Hizikiya akokaki kopona tata te! Ekoki kozala ete bana oyo Ahaza abomaki lokola mbeka epai ya Baala bazalaki bandeko mpenza ya Hizikiya. Kasi atako moto oyo abotaki ye azalaki moto mabe ndenge wana, yango epekisaki Hizikiya te na kozala sembo epai na Yehova. Kutu, tokoki kotánga Hizikiya na kati ya bato moke oyo bazalaki bakonzi minene ya Yuda. Azalaki mobali ya sembo, ya mayele, mpe bato balingaki ye mingi. “[Yehova] azalaki na ye.” (2 Mikonzi 18:3-7) Kutu, ekoki kozala ete Hizikiya nde apemamaki mpo na kokoma Nzembo 119 wana azalaki naino elenge mwana ya mokonzi. Soki ezali bongo, tokoki mpenza kokanga ntina oyo akomaki boye: “Molimo na ngai ezangi mpɔngi mpo na mawa.” (Nzembo 119:28, NW) Atako atungisamaki makasi, Hizikiya atikaki ete Liloba ya Yehova etambwisa bomoi na ye. Nzembo 119:105 elobi: “Liloba na yo ezali mwinda na [makolo] na ngai mpe pole na nzela na ngai.” Hizikiya aponaki nzela na ye mpe ezalaki nzela ya malamu.

11. (a) Atako azwaki ndakisa malamu epai ya tata na ye, botomboki ya Manase ekómaki kino wapi? (b) Manase aponaki nzela nini na nsuka ya bomoi na ye, mpe tokoki kozwa liteya nini na likambo yango?

11 Kasi, likambo ya kokamwa, moko na bakonzi baleki malamu ya Yuda abotaki mwana oyo akómaki moko na bakonzi balekaki mabe. Manase, mwana ya Hizikiya alendisaki losambo ya bikeko, losambo ya bilimu mabe, mpe mobulu makasi oyo emonanaki naino te. Lisolo elobi ete “[Yehova] alobaki na Manase mpe na bato na ye,” ekoki kozala na nzela ya basakoli. (2 Ntango 33:10) Na masolo ya bonkɔkɔ ya Bayuda balobaka ete Manase atindaki kutu bákata mosakoli Yisaya na biteni na mosumani. (Talá Baebele 11:37.) Ezala ete lisolo yango ezali solo to te, Manase atyelaki makebisi ya Nzambe likebi te. Kutu, atumbaki bana na ye mosusu na mɔ́tɔ, ndenge kaka nkɔkɔ na ye Ahaza asalaki. Kasi, ntango moto mabe wana akutanaki na komekama makasi na nsima na kati ya bomoi na ye, abongolaki motema mpe atikaki makambo mabe. (2 Ntango 33:1-6, 11-20) Ndakisa na ye eteyi biso ete moto oyo aponaki nzela ya mabe akoki komisembola mpe kobongwana.

12. Banzela nini ekeseni Amona na mwana na ye Yosiya baponaki na likambo etali kosalela Yehova?

12 Amona, mwana ya Manase, azwaki liteya monene na ndenge tata na ye abongolaki motema. Kasi aponaki nzela ya mabe. Amona “alekaki kosalaka masumu” tii nsukansuka babomaki ye. Mwana na ye Yosiya akesenaki na ye mpenza. Na ntembe te Yosiya amonaki malamu kolanda liteya oyo azwaki na makambo makómelaki nkɔkɔ na ye. Abandaki koyangela ntango azalaki bobele na mbula mwambe. Ntango akokisaki mbula 16, abandaki koluka Yehova mpe atikalaki mokonzi ya sembo mpe apesaki ndakisa ya malamu. (2 Ntango 33:20–34:5) Aponaki nzela ya malamu.

13. (a) Tozwi liteya nini na masolo ya bakonzi ya Yuda oyo totaleli? (b) Mateya ya baboti ezali na ntina nini?

13 Nsima ya kotalela mwa moke masolo ya bakonzi nsambo ya Yuda, tozwi liteya moko ya ntina mingi. Ntango mosusu emonanaki ete bakonzi mabe koleka babotaki bana ya malamu mpenza; to mpe bakonzi ya malamu babotaki bana ya mabe mpenza. (Talá Mosakoli 2:18-21.) Yango elingi koloba te ete mateya ya baboti ezali na ntina mingi te. Baboti oyo bazali koteya bana na bango nzela ya Yehova bazali kopesa bango libaku eleki malamu mpo bákóma basaleli ya sembo ya Yehova. (Deteronome 6:6, 7) Kasi, ezali na bana oyo, ata soki baboti ya sembo basali milende makasi, bango moko baponaka nzela ya mabe. Bana mosusu, ata soki baboti na bango bazali kopesa ndakisa malamu te, baponaka kolinga mpe kosalela Yehova. Na lipamboli ya Yehova, balongaka kozala na bomoi ya malamu. Mbala mosusu omitunaka soki ekozala boni mpo na yo? Boye, talelá mwa bilaka oyo Yehova ye moko apesi, bilaka oyo bimonisi ete okoki kopona nzela ya malamu!

Yehova atyelaka yo motema!

14. Ndenge nini toyebi ete Yehova ayebaka bandelo na biso?

14 Yehova amonaka makambo nyonso. Masese 15:3 elobi: “Miso na [Yehova] izali na bipai nyonso, kotalaka mabe mpe malamu.” Mokonzi Davidi alobaki boye mpo na Yehova: “Miso na yo imonaki ngai naino esalamaki ngai te; mikolo na ngai ikomamaki nyonso na mokanda na yo. Yango iponamaki mpo na ngai, naino ekómaki moko na yango te.” (Nzembo 139:16) Boye, Yehova ayebi bamposa ya mabe oyo ozali kobundisa—ezala ete obotamaki na yango to eutaki na bopusi mosusu oyo okokaki kopekisa te. Ayebi malamumalamu ndenge bamposa yango ezali kosala bopusi epai na yo. Ayebi bandelo na yo koleka kutu yo moko. Mpe azali na ngɔlu. Azali kosɛnga biso te ete tósala koleka oyo tokoki mpenza kosala.​—Nzembo 103:13, 14.

15. (a) Nini ekoki kobɔndisa bato oyo basalaki bango mabe na nko? (b) Yehova apesi mokomoko na biso lokumu mpe mokumba nini?

15 Nzokande, Yehova atalelaka biso te lokola bato oyo bakwelaka makambo oyo balingi na bango te. Soki tokutaná na makambo mabe na kati ya bomoi na biso, tokoki kobɔndisama na koyeba ete Yehova ayini makambo mabe nyonso wana oyo basalaki biso na nko. (Nzembo 11:5; Baloma 12:19) Kasi Yehova akobatela biso na mbuma mabe soki tobaluki mpe toponi nzela ya mabe na nko? Te. Liloba na ye elobi ete: “Moto na moto akomema bozito na ye moko.” (Bagalatia 6:5) Yehova apesi ekelamu na ye mokomoko ya mayele lokumu mpe mokumba ya kosala malamu mpe ya kosalela ye. Ezali ndenge Mose alobaki na libota ya Yisalaele ete: “Nabyangi likoló mpe nse kotatola na ntina na bino lelo, ete natii liboso na yo bomoi mpe kufa, mpe lipamboli mpe elakeli mabe. Na bongo poná bomoi ete yo mpe bana na yo bózala na bomoi.” (Deteronome 30:19) Yehova atii motema ete yo mpe okoki kopona nzela ya malamu. Toyebi yango ndenge nini?

16. Ndenge nini tokoki kolonga ‘kosala mpo na lobiko na biso’?

16 Talá maloba oyo ntoma Paulo akomaki: “Yango wana, balingami na ngai, . . . bókoba kosala mpo na lobiko na bino na kobanga mpe kolɛnga; mpo ete Nzambe nde, mpo ete asepeli na yango, azali kosala kati na bino mpo ete bólinga mpe bósala.” (Bafilipi 2:12, 13, NW) Liloba ya Greke ya kala oyo ebongolami awa na ‘kosala’ elimboli kosukisa eloko moko. Na bongo, moto moko te atángamá ete akolonga te to akotika kaka kozala sembo. Yehova Nzambe atii motema ete tokoki kosukisa mosala oyo apesi biso—mosala oyo ekopesa biso lobiko—soki boye te mbɛlɛ akomisaki maloba yango te. Kasi ndenge nini tokolonga? Ezali na makasi na biso moko te. Soki tozalaki mpenza na makasi ya biso moko, mbɛlɛ ntina ya “kobanga mpe kolɛnga” ezali te. Kasi, Yehova ‘azali kosala kati na biso’; elingi koloba ete elimo santu na ye ezali kosala na makanisi mpe na mitema na biso, ezali kosalisa biso mpo ‘tólinga mpe tósala.’ Na lisalisi wana ya bolingo, mpo na nini tokopona nzela ya malamu te na bomoi mpe kolanda yango?—Luka 11:13.

17. Mbongwana nini tokoki kosala, mpe ndenge nini Yehova azali kosalisa biso na kosala yango?

17 Tokokutana na mikakatano oyo tosengeli kolonga—mbala mosusu bomoi na biso etondi na mimeseno mabe mpe bopusi ya mabe oyo ekoki kobebisa makanisi na biso. Atako bongo, na lisalisi ya elimo ya Yehova, tokoki kolonga yango! Ndenge Paulo akomelaki baklisto ya Kolinti, Liloba ya Nzambe ezali na nguya oyo ekoki kokweisa ata “bisika bibatelami makasi.” (2 Bakolinti 10:4) Yehova akoki kosalisa biso tósala mbongwana minene na bomoi na biso. Liloba na ye elobi na biso ete ‘tólongola bomoto ya kala’ mpe ‘tólata bomoto ya sika oyo ezalisami na kolanda mokano ya Nzambe na bosembo mpe boyengebene ya solo.’ (Baefese 4:22-24, NW) Elimo ya Yehova ekoki mpenza kosalisa biso na kosala mbongwana motindo yango? Ɛɛ! Elimo ya Nzambe ebotaka mbuma kati na biso—bizaleli kitoko oyo biso nyonso tosengeli kolona. Mbuma ya liboso ezali bolingo.​—Bagalatia 5:22, 23.

18. Moto nyonso oyo akanisaka malamu azali na likoki ya kopona nzela nini, mpe yango ekosalisa biso na kozwa ekateli nini?

18 Talá solo oyo ekoki kosikola: elimo ya Nzambe ekoki kobota bolingo. Bolingo ya Yehova Nzambe ezali na ndelo te, mpe biso tozalisami na elilingi na ye. (Genese 1:26; 1 Yoane 4:8) Na yango, tokoki kopona kolinga Yehova. Mpe ezali bolingo yango nde sɛkɛlɛ ya bomoi na biso na mikolo mizali koya, kasi bomoi na biso ya kala te, to bizaleli mabe oyo tokolisaki to mposa ya kosala mabe oyo tobotamaka na yango. Adama na Eva bazalaki na mposa ya bolingo ya Yehova mpo bátikala sembo na kati ya elanga ya Edene. Mokomoko na biso azali na mposa ya bolingo motindo yango mpo abika na Armagedon mpe na komekama ya nsuka oyo ekosalema na nsuka ya boyangeli ya Klisto oyo ekoumela mbula nkóto. (Emoniseli 7:14; 20:5, 7-10) Mokomoko na biso, ata na ezalela nini, akoki kolona bolingo yango. (Matai 22:37; 1 Bakolinti 13:13) Tózwa ekateli ya kolinga Yehova mpe kotonga likoló ya bolingo yango mpo na libela.

Okanisi nini?

◻ Makanisi nini epalangani epai ya bato oyo ezali kotɛmɛla liteya malamu ya Biblia na oyo etali mokumba ya moto na moto?

◻ Kotonga nini moklisto mokomoko asengeli kotonga kati na ye moko?

◻ Ndenge nini ndakisa ya bakonzi ya Yuda emonisi ete moto na moto aponaka nzela na ye?

◻ Ndenge nini Yehova andimisi biso ete tokoki kopona nzela ya malamu na bomoi na biso, ata soki tozali kozwa bopusi mabe zingazinga na biso?

[Elilingi na lokasa 15]

Ndenge bomoi na yo ekozala, ezali na kati ya makila na yo?

[Elilingi na lokasa 17]

Atako tata na ye apesaki ndakisa ya mabe, Mokonzi Yosiya aponaki kosalela Nzambe

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto