Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w04 15/10 lok. 29
  • Mituna ya batángi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya batángi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Masolo mosusu
  • Nasengeli kodefa mbongo epai ya ndeko moko ya lisangá?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Kodefisana mbongo kati na baklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mpo na nini kobomba mbongo na esika ya kosilisa yango?
    Lamuká!—2011
  • Biblia elobi nini na likambo etali kokaba?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
w04 15/10 lok. 29

Mituna ya batángi

Ntango Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete ‘bádefisa kozanga koluka matabisi, kozanga ete bálikya kozwa mwa eloko na nsima,’ alingaki mpenza koloba ete basengelaki te kosɛnga ata mbongo oyo badefisaki?

Tokokanga malamumalamu ntina ya maloba ya Yesu oyo ezali na Luka 6:35 soki totaleli makambo oyo Mibeko ya Moize elobaki mpo na likambo yango. Na Mibeko ya Moize, Yehova asɛngaki Bayisalaele bádefisaka baninga na bango oyo bakómi babola to baoyo bazali na mposa ya lisalisi kozanga kosɛnga bango matabisi. (Exode 22:25; Levitike 25:35-37; Matai 5:42) Moto oyo azalaki kodefa mbongo ndenge wana azalaki kodefa yango mpo na kosala mombongo te. Kutu, ntina mpenza oyo bazalaki kodefisana mbongo ndenge wana ezalaki nde kosalisa babola to bato oyo bazalaki na mpasi. Lisusu, elingaki mpenza kozala likambo ya kozanga bolingo, koluka kolyela mozalani oyo azali na mokakatano ya mbongo. Kasi, moto oyo azalaki kodefa mbongo asengelaki kozongisa mbongo oyo adefaki, mpe mbala mosusu kopesa eloko moko lokola ndanga (mpo na komonisa ete akofuta mbongo oyo adefi).​—Deteronome 15:7, 8.

Kutu, ntango Yesu alobelaki Mibeko, amonisaki ndenge mosusu ya kosalela likambo yango, mpe alobaki ete moto oyo azali kosalisa moninga asengeli te koluka “kozwa mwa eloko na nsima.” Lokola Bayisalaele, ntango mosusu baklisto bakutanaka na mikakatano ya mbongo to na makambo mosusu oyo esalaka ete bákóma babola mpe ata kutu bábungisa biloko na bango nyonso. Soki ndeko moko ya lisangá azali na mokakatano makasi ndenge wana mpe azali koluka básalisa ye na mbongo, ekozala malamu te kosalisa ye? Moklisto oyo alingaka baklisto mosusu na bolingo ya solosolo, akondima kosalisa ndeko oyo​—kozanga ete alinga yango​—akómi na mokakatano makasi ya mbongo. (Masese 3:27) Okoki mpe kokabela ndeko yango mbongo, ata soki yango ezali mingi te lokola oyo alingaki kodefa.​—Nzembo 37:21.

Na ekeke ya liboso na ntango na biso (T.B.) ntoma Paulo ná Balanabasi bazwaki mokumba ya komemela bandeko ya Yudea, oyo bazalaki na nzala, makabo oyo bandeko ya Asie Mineure batindelaki bango. (Misala 11:28-30) Ndenge moko mpe lelo oyo, mbala mingi ntango makama ebimaka, baklisto batindaka makabo epai ya bandeko na bango oyo bazali na bosɛnga. Na ndenge yango, bapesaka mpe bato mosusu litatoli ya malamu. (Matai 5:16) Na ntembe te, esengeli kotalela makanisi mpe bomoi ya moto oyo azali koluka ete básalisa ye. Mpo na nini azali na bosɛnga? Paulo akomaki maloba oyo ezali mpenza kobenda likebi: “Soki moto alingi kosala mosala te, alya mpe te.”​—2 Batesaloniki 3:10.

Soki ndeko moko azali kosɛnga bádefisa ye mbongo mpo na kosilisa mokakatano moko oyo ekómeli ye, mbala mosusu ekozala malamu kodefisa ye mbongo kozanga kosɛnga ye matabisi​—kodefisa mbongo ya mpamba. Na makambo ya ndenge wana, soki ndeko oyo adefisi mbongo, azeli ete ndeko oyo adefi azongisela ye mbongo nyonso oyo adefaki, ndeko yango abuki te mobeko oyo Yesu alobeli na Luka 6:35. Basengeli koyokana malamumalamu, mpe kokoma makambo nyonso na mokanda; ndeko oyo azali kodefa mbongo asengeli kosala nyonso mpo na kofuta nyongo yango ndenge alaki. Lisusu, bolingo ya boklisto esengeli kotinda moto oyo adefaki mbongo afuta nyongo na ye, kaka ndenge bolingo yango etindaki ndeko oyo adefisaki ye mbongo na kodefisa ye.

Ndeko oyo azali kodefisa ndeko mosusu mbongo (to kokabela ye) asengeli naino kotalela bamposa ya libota na ye. Na ndakisa, kodefisa to kokabela ndeko mosusu mbongo ndenge wana, ekopekisa ye kokokisa malamu etinda na ye ya liboso oyo Makomami epesi ye ya kokokisa bamposa ya libota na ye? (2 Bakolinti 8:12; 1 Timote 5:8) Atako bongo, baklisto balukaka mabaku ya komonisa ete balinganaka, mpe bamonisaka bolingo yango na misala oyo eyokani na mitinda ya Biblia.​—Yakobo 1:27; 1 Yoane 3:18; 4:7-11.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto