Bato mingi balobaka ete bazali na kondima
MWASI moko mondimi na ekólo Brésil angangaki ete, “Yesu azali malamu mingi!” Ya solo, tokoki koboya te ete nkombo ya Yesu ezali na nguya. Na lisolo mobimba ya bato, bato mingi bandimaki konyokwama mpe kokufa mpo na ye.
Na Yelusaleme, ntoma Petelo na ntoma Yoane bateyaki ‘na nkombo ya Yesu.’ Mpo na yango, bakangaki bango mpe babɛtaki bango fimbo. Kasi ‘babimaki liboso ya [Sanedrina, NW], kosepeláká ete batángami babongi na kozwa nsɔni mpo na Nkombo na ye.’—Misala 5:28, 41.
Moklisto mosusu ya ekeke ya liboso oyo apesaki motuya monene na nkombo ya Yesu ezali bongo Antipata. Na Emoniseli, mokanda ya nsuka ya Biblia, Yesu abéngaki ye “motatoli na ngai na sembo [oyo] abomamaki kati na bino, kuna ezali Satana kofanda.” (Emoniseli 2:13) Antipata, lokola baklisto mosusu ya Pelegamo, baboyaki kowangana kondima na bango epai na Klisto. Antipata asimbaki nkombo ya Yesu makasi atako yango ememelaki ye liwa!
Soki mbula ntuku mitano na nsima, na mobu 155 T.B., moklisto moko na nkombo ya Polycarpe, akutanaki na komekama motindo wana ntango batindaki ye ete afinga Klisto. Ayanolaki ete: “Uta mbula ntuku mwambe na motoba nazali kosalela Ye, mpe asali ngai ata mabe moko te. Ndenge nini nakoki kofinga Mokonzi na ngai oyo abikisi ngai?” Lokola Polycarpe aboyaki kowangana Klisto, bakakisaki ye na nzete mpe batumbaki ye.
Ezala bantoma, Antipata, mpe bato mosusu, bango nyonso bandimaki kobungisa bomoi na bango mpo na kotatola na nkombo ya Yesu! Tokoloba boni mpo na bato ya lelo oyo?
Nkombo ya Yesu lelo oyo
Nkombo ya Yesu ezali naino kolamusa mayoki makasi epai ya bato. Na Amérique latine, motángo ya mangomba oyo elobaka ete endimelaka Klisto ebakisami mingi mpenza na bambula eleki. Ata na mwa bamboka mikemike, okokuta bandakonzambe ya Lingomba ya Pentekote. Mpe lisusu, bopusi ya mangomba yango na makambo ya politiki ekómi makasi. Na ndakisa, na Parlema mpe na Sénat ya ekólo Brésil, bato 31 bauti na mangomba yango.
Na États-Unis, lingomba moko ya sika ebimi kuna, ezali kolobela mingi Yesu. Basangani na yango bamibéngaka Bakokisi Elaka (Promise Keepers). Na 1997, zulunalo Time eyebisaki ete bato 4 200 bazalaki kosangana na makita na bango na 1991, mpe na 1996 bakómaki koleka milio moko. Na nzembo na bango moko bayembaka ete: “Yesu azali elonga, Mobikisi na ngai mpo na libela.”
Nzokande, nkombo ya Yesu elamusi bobele mayoki ya malamu te. Nkombo ya Yesu ebimisi bitumba ebele. Na nkombo ya Yesu, babomaki Bayuda ebele, babomaki bapakano, banyokolaki bapɛngwi, bakataki bango biteni mosusu ya nzoto, bakakisaki bango na nzete mpe batumbaki bango. Mpe kobanda mwa bambula, tozali komona ete Liloba ya Nzambe ekómi mombongo monene. Makambo nyonso oyo ezali lolenge ya nsɔni mpe ya mabe ya kosalela nkombo ya Yesu mpe ndimbola na yango!
Likambo yango ezali lisusu kobimisa mwa mituna ya ntina mingi: Kondimela nkombo ya Yesu elimboli nini? Mpe Batatoli ya Yehova batalelaka likambo yango ndenge nini? Lisolo oyo elandi ekoyanola na mituna yango.