‘Batyoli na nzambe babomama’
EBELE na bato batalelaki ye lokolo motyoli na Nzambe, oyo alukaki kolembisa kondima na bango mpe alukaki kobuka banzambe na bango. Atyolamaki na bato nyonso, bamemaki ye liboso na ebele na bato bayangani. Ntango guvernere atunaki ye, mobali oyo na mbula 86 abelemaki, atondi na nkembo, mpe ayebisaki soki ye azalaki nani. Nkombo na mobali yango ezalaki Polycarpe.
Statius Quadratus, ye guvernere Moloma ya province, alobaki maloba oyo: “Kata seleka na nkombo ya César! bongola makanisi na yo mpe loba: Baoyo bandimaka Nzambe te babomama!” Polycarpe atalaki ebele na bato bapakano oyo batondaki na stade monene na masano. Nsima, na kopepela bango loboko, anetolaki miso na likoló mpe alobaki na kokimela ete: “Baoyo bandimaka Nzambe te bamomama!” Elingi koloba: ‘Batyoli na Nzambe babomama!’
Na kopusaka ye na makasi, guvernere alobaki na ye ete: “Kata seleka mpe nakotika yo; finga Klisto.” Mpo na maloba oyo Polycarpe azongisi monoko: “Esili koleka mbula ntuku mwambe na motoba nazali kosalela ye, mpe ata mbala moko asaleli ngai mabe te; ndenge nini nakoki kotuka Mokonzi na ngai mpe Mosikoli na ngai?”
Na yango bibongiseli bisalamaki mpo na koboma mobangé oyo. Nzoto na ye esengelaki kotumbama na moto. Mpo na ntina nini? Bongo Polycarpe azalaki nani? Makambo nini mamemaki ye na kufa motindo oyo?
Bambula na ye ya yambo
Polycarpe abotamaki soko na mobu 69, na Asie Mineure, kati na engumba na Smyrne (lelo ebyangami Izmir, na mokili ya Turquie). Elobami ete baboti na ye bazalaki baklisto. Wana ezalaki ye kokóla, akómaki mobali moko na bolingo mpe na mpiko, ayebanaki mpo na bokabi na ye, koboya matomba na ye mpo na bamosusu, na bopolo kati na boyokani na ye na bato mosusu mpe komipesa na ye na molende mpo na koyekola Makomami. Nsima na yango, akomaki moko na bakengeli na lisangá na Smyrne.
Elobamaki ete, na bambula na ye ya yambo, Polycarpe ateyamaki na bamoko mpenza kati na bantoma. Ezali komonana lokola ete ntoma Yoane nde ateyaki ye. Engebene Irénée, “ezali bobele te ete ateyamaki na bantoma mpe azalaki na boyokani na mingi kati na baoyo bamonaki Klisto, kasi lisusu aponamaki na bantoma, mpo azala mokengeli na Lingomba ezali na Smyrne na mokili ya Asie”. Oyo nde esengo mpe botondi epai na Polycarpe na kozala na baninga malamu! Mpo na yango abongisamaki mpo na mokumba ya mokengeli oyo akokaki kozwa kati na lisangá.—Misala 20:28; 1 Petelo 5:1-4.
Kokotela solo ya moboko
Ezali na bambula na komekama na lipengwi oyo esakolamaki na Makomami nde Polycarpe akomaki mokengeli ya lisangá. (2 Batesaloniki 2:1-3) Ezali komonana ete azalaki na mposa makasi na komipesa mpo na bamosusu. Ntango Ignace moto na Antiokia (na mokili na Syrie), akendaki na Rome kobomama mpo na kondima na ye, asengaki na Bafilipi batinda mokanda moko na lisangá na ye esika autaki, Polycarpe asalaki nyonso mpo ete mokanda yango ekóma. Ezali na ntango yango nde ye moko mpe atindaki mokanda na ye na Bafilipi.
Kati na mokanda na ye epai na Bafilipi, Polycarpe azongelaki mwa makambo na solo na Biblia. Akesenisi Nzambe na Klisto, moko lokola Tata, mosusu azali Mwana, mpe alobi ete ezali “engebene mokano na Nzambe na nzela na Yesu Klisto” nde tozwi lobiko. Polycarpe akebisi batangi na ye mpo na bolingo na mbongo, mpe akundweli bango ete basali pite mpe mibali bazali kosangisa nzoto na mibali bakozwa libula na Bokonzi na Nzambe te (tala 1 Timoté 6:10; 1 Bakolinti 6:9, 10). Alendisi mpe basi balinga mibali na bango, mpe bankulutu bakoka komonisa ezaleli na “koyeba mpasi ya bamosusu mpe koyokela bango mawa”. Bango nyonso balendisami “kozala na molende mpo na koluka makambo malamu”. Polycarpe asilisi na lisengi oyo: “Tika ete Nzambe mpe Tata na Nkolo Yesu Klisto, mpe Yesu Klisto Ye moko, oyo azali Mwana na Nzambe mpe Nganga Monene na seko, alendisa bino kati na kondima mpe na solo, na bopolo nyonso, motema malamu, motema molai, motema petee mpe bopeto!”
Polycarpe azalaki kotanga mingi makomami. Kati na mokanda na ye epai na Bafilipi, azali kozwa makanisi mingi, na Evanzile na Matai, mokanda na Misala na bantoma, mokanda epai na Baloma, mikanda mibale epai na Bakolinti, mokanda epai na Bagalatia mpe epai na Baefese, mpe na mokanda na mibale epai na Batesaloniki, mokanda na liboso epai na Timoté mpe mokanda na liboso ya Petelo. Likambo yango emonisi biso ete, ntango na eleko na mpasi oyo elandaki liwa na bantoma, bato mosusu baoyo bazalaki komiloba ete bazalaki baklisto balukaki kokangama makasi na mitinda ya Biblia.
Mosala na ye na Smyrne
Smyrne, oyo ezalaki na libongo na mai na mokili na Asie Mineure, ezalaki engumba na mombongo na bozwi mingi epai kuna mombongo ezalaki kosalama mingi. Ezalaki mpe centre epai kuna losambo ya Leta ezalaki kokumisama. Na ndakisa, na mbongo na bango okokaki komona makomi mpe bililingi na mikonzi ya Roma oyo bazalaki kokumisama lokola nzambe. Mangomba na bapakano mabatelamaki na mokonzi moyangeli.
Ekoki kokanisama ete, kati na basangani na lisangá na Smyrne, mingi bazalaki babola. Nzokande, na eleko moko, bakumisamaki mpo na bozwi na bango ya elimo. Baklisto ya Smyrne bazwaki elendiseli na koyoka maloba na Yesu oyo makomamaki na ntoma Yoane! Klisto alobi na “anzelu”-elingi koloba bakengeli bapakolami na elimo-ya lisangá ya Smyrne ete: “Nayebi monyoko na yo mpe bobola na yo,-kasi ozali mozwi,-Nayebi mpe kotuka na bango bakolobaka ete bazali Bayuda, nde bazali bongo te kasi bazali lingomba na Satana. Banga bolozi bokozwa yo te. Tala, Satana alingi kobwaka bamosusu na bino kati na boloko ete bomekama, mpe bokozwa monyoko mikolo zomi. Zala sembo kino kufa, mpe nakopesa yo motole na bomoi.”—Emoniseli 2:8-10.
Bozwi na elimo oyo baklisto ya Smyrne bakokaki kozala na yango, ezwamaki mpenza mpo na lolenge malamu oyo bankulutu na lisangá yango bazalaki kokókisa mokumba na bango ya bakengeli. Eleko wana eyebanaki mingi mpo na mobulu monene ya mangomba, mpe basangani na lisangá bazalaki kosala mosala na bango kati na bindimeli mingi mpe losambo na banzambe ikeseni. Na teritware na bango misala na milimo mabe etondaki, lokola kindoki mpe makambo na kotalela myoto. Ya solo mpenza, baklisto babikaki katikati na bato oyo bazalaki na bizaleli ya bato na Nzambe te.
Longola mobulu na ebele na bato oyo bazali bapakano ezali mpe na koyina makasi oyo na Bayuda. Elobami ete na le 23 février na mobu 155, mokolo na kobomama ya Polycarpe, Bayuda oyo bakangami bobele na makanisi na bango, basanganaki na kolokota koni mpo na etumbelo. Nzokande, ezalaki mokolo na sabata monene.
Batyoli na Nzambe bazali banani?
Ntango banguna na ye bayaki koluka ye, Polycarpe azalaki na mposa ya kotikala na Smyrne mpe koyika mpiko na likama. Kasi na koyokela baninga na ye, akendaki kobombama na ferme moko ezalaki pembeni. Ntango eyabanaki ete azalaki wana, aboyaki kokima lisusu mpo na komibikisa na baoyo bazalaki kolanda ye. Alobaki bobele ete: “Mokano na Nzambe esalama!”
Polycarpe akotaki kati na stade, mpe ayei kotelema liboso na guvernere mpe liboso na ebele na bato oyo bazalaki na nkanda makasi mpo na ye. Wana guvernere azalaki kosenga ye ete akumisa César na kosambelaka ye, alobaki polele ete: “Nazali moklisto! (. . .) Soki olingi koyeba ntina na lingomba ya boklisto, pesa ngai mokolo moko, mpe okoyoka yango.” Guvernere azongisaki eyano ete: “Meka koyebisa makanisi na yo epai na ebele na bato.” Na yango Polycarpe alobaki: “Epai na yo, nakosala yango; mpamba te toteyami kozongisa epai na bakonzi mpe banguya oyo etiami na Nzambe, lokumu oyo ebongi mpo na bango, mpe oyo ezali kosala biso mabe te.” Nsima na mwa ntango moke, Polycarpe atumbamaki mpo aboyaki kowanga Yesu Klisto.
Polycarpe azalaki moklisto ya lolenge nini? Nzambe ye moko nde akoki koloba. Ata ezala nini, lelo oyo ezali na ebele monene na baklisto baoyo balengeli, bango mpe, kowanga Klisto te. Bazali kosakola ete azali Mokonzi Masiya na Nzambe mpe asili kofandisama na kiti na bokonzi na likoló. Ba Témoins de Jéhovah yango bazali mpe kosakola ete tozali pene na komona kokokisa na maloba na bisakweli na Yesu mpo na “bolozi monene’”, likama monene koleka oyo naino mokili emona yango te. Nzokande, ezali nsuka na bato te nde ezali kosakolama, kasi nsuka na mabe. Kasi moto akoki kobika mpo na kokota na mokili ya sika epai boyengebene, kimya mpe esengo ekozala.—Matai 24:13, 21, 34; 2 Petelo 3:13.
Longola baoyo bakoki kobyangama batyoli na Nzambe, baoyo bazali na “lolenge na kobanga Nzambe”-Nani mosusu akoki komeka kotelemela nsango malamu motindo oyo? (2 Timoteo 3:5) Bato mosusu bazimbisami na mateya na lokuta ya mangomba, wana bato mingi mosusu “bazali kobila bilimo mabe na kozimbisama mpe mateya na bilimo mabe.” (1 Timoteo 4:1) Na eleko na biso, baklisto bazali koyika mpiko kino kufa na mpasi oyo ezali kouta na batyoli na Nzambe. Kasi basambeli na sembo na Jéhovah bakozanga lifuti te, mpo ete bakozwa likabo na bomoi ya seko uta epai na Nzambe. Na kozelaka, basakoli oyo na Bokonzi na Nzambe bakozala ntango nyonso kolobela na ntina na solo kozanga kolemba.