“Mokonzi-mwasi ya nsuki ya moindo na mokili mokauki ya Sulia”
LOPOSO ya elongi lokola olive, mino mpɛmbɛ lokola pauni, miso moindo mpe ezali kongɛnga. Atángaki kelasi mingi mpe ayebaki nkota mingi. Balobaka ete elombe mokonzi-mwasi yango alekaki Cléopâtre na mayele mpe mbala mosusu akokanaki na ye na kitoko. Lokola alingaki kotɛlɛmɛla nguya oyo elekaki makasi na mokili mobimba na eleko na ye, akokisaki mokumba moko na esakweli moko ya Biblia. Bambula mingi na nsima ya liwa na ye, bakomi bakumisaki ye, mpe bayemi basalaki bililingi oyo bimonisaki ye kitoko koleka ata ndenge azalaki. Mokomi moko ya maloba ya ntɔki abéngaki ye “mokonzi-mwasi ya nsuki ya moindo na mokili mokauki ya Sulia.” Mwasi oyo akumisami mingi boye ezalaki Zénobie—mokonzi-mwasi ya engumba Palmyre, na Sulia.
Ndenge nini Zénobie akómaki na lokumu? Makambo nini ya politiki ememaki ye azwa bokonzi? Bomoto na ye ezalaki ya ndenge nini? Mpe mokonzi-mwasi yango akokisaki mokumba nini ya esakweli? Tótalela naino esika oyo makambo yango masalemaki.
Engumba moko na ndelo ya mokili mokauki
Palmyre, engumba ya Zénobie, ezwamaki na nɔrdi-ɛsti ya Damaseke, na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 210; na ndelo ya nɔrdi na mokili mokauki ya Sulia epai bangomba babéngi Anti-Liban esalá libanda monene. Engumba yango oyo ezali na mwa zamba atako ezali na kati ya mokili mokauki, ezwamaki mwa moke na katikati, mai monene ya Méditerranée na ngámbo ya wɛsti mpe Ebale Pelata na ngámbo ya ɛsti. Mbala mosusu Mokonzi Salomo ayebaki yango na nkombo ya Tademolo, engumba oyo ezalaki na ntina mingi mpo na bolamu ya bokonzi na ye na makambo mibale: lokola káa ya basoda mpo na kobatela ndelo ya nɔrdi mpe lokola nzela monene oyo ezalaki kokende na bingumba mingi. Yango wana, Salomo “atongaki Tademolo kati na [mokili mokauki, NW].”—2 Ntango 8:4.
Lisolo ya mbula nkóto oyo elandaki boyangeli ya Mokonzi Salomo elobi eloko te mpo na Tademolo. Soki mpenza yango nde Palmyre, lokumu na yango ebandaki nsima wana Sulia ekómaki káa ya basoda ya bokonzi ya Loma na mobu 64 L.T.B. Richard Stoneman alobi boye na buku na ye (Palmyra and Its Empire—Zenobia’s Revolt Against Rome): “Palmyre ezalaki na ntina mingi mpo na Loma na makambo mibale, mpo na nkita mpe makambo ya basoda.” Engumba yango ya mbila ezalaki na nzela monene ya mombongo oyo ezalaki kosalema kati na Loma na Mesopotami, mpe mikili ya Azia. Biloko oyo bazalaki kotɛkisa na eleko wana ezalaki koleka na nzela yango—biloko ya nsolo oyo basangisaka na bilei oyo ezalaki kouta na ɛsti ya Inde, bilamba ya soie oyo ezalaki kouta na ekólo Chine, mpe masandisi mosusu oyo mazalaki kouta na Perse, Mesopotami ya ngɛlɛ, mpe na mikili ya Méditerranée. Loma ezalaki kobikela na bamasandisi wana oyo ezalaki kouta na mikili ya bapaya.
Na kotalela makambo ya basoda, etúká ya Sulia ekabolaki mikili mibale ya nguya makasi oyo ezalaki kowelana, Loma na Perse. Ebale Pelata ekabolaki Loma na mokili oyo ezalaki na ɛsti na yango na boumeli ya mbula 250 na ebandeli ya ekeke na biso. Palmyre ezalaki na ngambo ya mokili mokauki, na wɛsti ya engumba ya Dura-Europos, na Ebale Pelata. Amperere Adrien na Amperere Valérien bakómaki kuna mpamba te bayebaki ete mboka yango ezalaki na ntina mingi mpo na bokonzi ya Loma. Adrien atongaki bandako mosusu ya kitoko kuna mpe apesaki makabo mingi mpo na mboka yango. Na 258 T.B., Valérien aponaki Odenat, mobali ya Zénobie, moto ya lokumu na Palmyre, azala mosambisi na boyangeli ya Loma na ndenge alongaki Perse mpe apusaki bandelo ya bokonzi ya Loma kino na Mesopotami. Zénobie asalaki mosala monene mpo mobali na ye akóma mokonzi. Edward Gibbon, nganga-mayele ya masolo ya kala, akomaki boye: “Odenat alongaki mingimingi mpo na mayele mpe mpiko ya mwasi na ye [Zénobie].”
Na ntango yango, Mokonzi Chahpour ya ekólo Perse azwaki ekateli ya kobundisa boyangeli ya Loma mpe kozongisa bamboka nyonso oyo ezalaki liboso na ekólo Perse na nse ya bokonzi na ye. Lokola azalaki na basoda ya mpiko, alekaki na wɛsti, akangaki basoda ya Loma oyo bazalaki na engumba Nisibis mpe na engumba Carrhae (Haran), mpe akendaki kobebisa bamboka ya nɔrdi ya Sulia mpe Kilikia. Amperere Valérien ye moko akambaki basoda na ye mpo na kobundisa banguna yango kasi akokaki te mpe Baperse bakangaki ye.
Odenat amonaki yango lokola libaku malamu mpo na kotindela mokonzi ya Perse biloko ya motuya mingi lokola makabo mpe atombelaki ye kimya. Mokonzi Chahpour na lolendo nyonso atindaki bábwaka biloko yango na Ebale Pelata mpe asɛngaki na Odenat aya komitika ye moko epai na ye lokola mokangami oyo azali kobondela. Yango wana, bato ya Palmyre babongisaki limpinga ya basoda oyo esalemaki na mibali oyo bazalaki koyengayenga na mokili mokauki na ndambo ya basoda ya Loma oyo batikalaki mpe balandaki basoda ya Perse oyo bakómaki kozonga epai na bango. Liboso ya babundi wana ya mokili mokauki oyo balekaki mbangu, basoda ya Chahpour balɛmbaki, bakisa lisusu bozito ya biloko oyo babɔtɔlaki bato—yango wana bakokaki etumba te, bakimaki.
Gallien, mwana mpe mokitani ya Valérien, apesaki Odenat titre ya guvernere ya bitúká nyonso ya ɛsti (corrector totius Orientis) mpo na kozongisela ye botɔndi na ndenge alongaki Chahpour. Na nsima, Odenat amipesaki titre ya “nkolo na bankolo.”
Zénobie alingi kosala bokonzi
Na mobu 267 T.B., ntango Odenat akómaki na lokumu mingi, babomaki ye elongo na mwana na ye ya liboso ya mobali oyo asengelaki kokitana ye. Ekoki kozala ete mwana ya ndeko na ye nde abomaki bango mpo na kozongisa mabe oyo basalaki ye. Zénobie azwaki esika ya mobali na ye, mpamba te mwana na ye ya mobali azalaki naino elenge. Lokola azalaki kitoko, na mposa ya bokonzi, na makoki mingi mpo na koyangela, mpe amesanaki kokende na etumba elongo na mobali na ye oyo akufaki, mpe ayebaki nkota mingi, asalaki nyonso mpo bayangelami na ye bámemya ye mpe bátosa ye—yango ezalaki likambo ya pɛtɛɛ mpo na bato oyo bazalaki koyengayenga na mokili mokauki. Zénobie alingaki mingi koyekola makambo ya sika, yango wana aponaki bato ya mayele bázala zingazinga na ye. Moko na bapesi-toli na ye ezalaki Cassius Longinus, moto ya filozofi mpe ayebaki koloba malamu—bazalaki kobénga ye “bibliotɛkɛ ya bomoi mpe magazini ya boyebi.” Stoneman, mokomi ya mikanda alobi ete: “Na boumeli ya mbula mitano nsima ya liwa ya Odenat . . . Zénobie amimonisaki na miso ya bayangelami na ye ete azali mokonzi-mwasi ya bitúká ya ɛsti.”
Na ngámbo moko Zénobie azalaki koyangela Perse, oyo ye na mobali na ye balongaki, mpe na ngámbo mosusu, Loma oyo esilaki kolɛmba. Na ntina na ezaleli ya Loma na eleko wana, John M. Roberts, mokomi ya masolo ya kala alobi boye: “Ekeke ya misato ezalaki . . . ntango ya mikakatano makasi mpo na Loma na ndelo ya ɛsti mpe wɛsti. Mboka ekɔtaki na etumba ya banamboka mpe kowelana mpo na kokitana bokonzi ebandaki. Baamperere ntuku mibale na mibale (longola baoyo batutaki ntolo ya mpamba) babimaki mpe bayangelaki.” Nzokande, na Sulia, mokonzi-mwasi apikaki mpenza bokonzi na ye. Stoneman alobi ete, “Lokola azalaki na bokonzi likoló na nguya mibale [Perse na Loma], akokaki kolikya kosala bokonzi ya misato oyo ekokaki koyangela nguya mibale wana.”
Na mobu 269 T.B., libaku emonanaki mpo Zénobie abakisa bonene ya mboka oyo azalaki koyangela, ntango moto moko abimaki na Ezipito mpo na kowela bokonzi ya Loma. Basoda ya Zénobie, bakendaki nokinoki na Ezipito, babomaki motomboki yango, mpe babɔtɔlaki Ezipito. Amityaki mokonzi-mwasi ya Ezipito, asalisaki mbongo ya ebende oyo ezalaki na nkombo na ye. Sikoyo bokonzi na ye ebandaki na Ebale Nil kino na Ebale Pelata. Na eleko yango ya bomoi na ye, akómaki “mokonzi ya sudi” oyo Biblia elobeli na esakweli ya Danyele, mpamba te bokonzi na ye ezalaki koyangela na sudi ya mboka ya Danyele. (Danyele 11:25, 26, NW) Alongaki lisusu mikili mingi ya Asie Mineure.
Zénobie akómisaki engumba-mokonzi na ye, Palmyre mboka makasi mpe abongisaki yango na boye ete ekómaki ndenge moko na bingumba minene ya mikili oyo Loma ezalakai koyangela. Ekoki kozala ete bato koleka 150 000 bafandaki kuna. Engumba yango etondaki na bandako kitoko ya milai, batempelo, bilanga, makonzi, mpe bamonima, mpe ezingamaki na efelo oyo balobaka ete ezalaki na molai ya kilomɛtɛlɛ 21. Milɔngɔ ya makonzi ya milaimilai ya mɛtɛlɛ 15 oyo nyonso ezalaki na makonzi 1 500 etandanaki na balabala ya monene. Bikeko ya bilombe mpe ya bato ya bozwi oyo basalaki makambo malamu bitondaki mɛkɛ na engumba yango. Na mobu 271 T.B., Zénobie atɛlɛmisaki bikeko mibale, moko ya ye mpe mosusu ya mobali na ye oyo akufaki. Na ndelo ya mokili mokauki, Palmyre ezalaki kongɛnga lokola biju.
Tempelo ya nzambe-moi nde elekaki bandako nyonso na kitoko na engumba Palmyre mpe na ntembe te lingomba yango nde ezalaki na lokomu koleka mangomba nyonso na engumba yango. Emonani ete Zénobie azalaki kosambela nzambe-moi. Nzokande, na ekeke ya misato, mangomba mazalaki mingi na Sulia. Na mikili oyo Zénobie azalaki koyangela, tokokaki kokuta mangomba ya baklisto, Bayuda, banganga-minzoto, mpe bato oyo bazalaki kosambela moi na sanza. Ezaleli na ye ezalaki nini liboso ya mangomba ndenge na ndenge oyo ezalaki na boyangeli na ye? Stoneman, alobi ete: “Mokonzi ya mayele atyolaka ata momeseno moko te oyo bato na ye basepelaka na yango. . . . Bazalaki kokanisa ete banzambe basanganaki mpo na kotambwisa engumba Palmyre.” Emonani lokola ete, Zénobie atikelaki bato bonsomi ya losambo. Kasi ezali solo ete banzambe “basanganaki mpo na kotambwisa engumba Palmyre”? Nini elingi kokómela engumba Palmyre na ‘mokonzi na yango ya mayele’?
Amperere moko ‘ayeisi motema na ye makasi’ mpo na kobundisa Zénobie
Na mobu 270 T.B., Aurélien akómaki amperere ya Loma. Basoda na ye balongaki mpe babenganaki bato ya mobulu ya bikólo ya nɔrdi. Na mobu 271 T.B.,—sikoyo akómaki komonisa “mokonzi ya nɔrdi” ya esakweli ya Danyele—Aurélien ‘ayeisi makasi nguya mpe motema na ye mpo na kobundisa mokonzi ya sudi,’ oyo emonisamaki na Zénobie. (Danyele 11:25a, NW) Aurélien atindaki ndambo ya basoda na ye na Ezipito mpe ye moko akambaki basoda mosusu na ɛsti koleka Asie Mineure.
Mokonzi ya sudi—boyangeli ya Zénobie—‘alamwisaki mposa’ ya kobunda na Aurélien. Ayaki na “basoda ebele ebele mpe ya makasi” oyo batambwisamaki na Zabdas na Zabbai (Danyele 11:25b) Kasi Aurélien abɔtɔlaki Ezipito mpe basoda na ye bakómaki na Asie Mineure kino na Sulia. Balongaki Zénobie na etumba na engumba Émèse (lelo oyo Homs), mpe Zénobie azongaki na Palmyre.
Ntango basoda ya Aurélien bazingaki Palmyre, Zénobie, azalaki na elikya ete akobatelama na Perse, yango wana alukaki kokima kuna na mwana na ye, kasi Baloma bakangaki bango na Ebale Pelata. Na mobu 272 T.B., engumba Palmyre ekweaki na mabɔkɔ ya banguna. Aurélien azalaki na boboto mpo na bafandi ya Palmyre, akamataki bobele ebele ya biloko, bakisa mpe bikeko oyo ezalaki na tempelo ya nzambe-moi, mpe akendaki na yango na Loma. Amperere ya Loma abomaki Zénobie te, kasi na mobu 274 T.B., atambwisaki ye na Loma mpe bato mingi bazalaki kobima kotala ye mpo na kolakisa bolongi na ye. Zénobie afandaki na Loma lokola mwasi ya lokumu kino liwa na ye.
Babebisi engumba ya mokili mokauki
Mwa basanza nsima wana Aurélien abɔtɔlaki Palmyre, bato oyo bafandaki wana babomaki basoda ya Loma oyo Aurélien atikaki kuna. Ntango Aurélien ayokaki nsango yango, apesaki basoda na ye mitindo bázonga kuna, mbala oyo basasaki bato ya mboka yango. Baoyo babikaki ntango basoda ya Loma bazalaki koboma bato kozanga mawa, bamemamaki na boombo. Bapunzaki mpe babebisaki engumba ya lokumu. Na bongo, engumba oyo ekendaki nsango ezongaki lokola ezalaki kala—“Tademolo kati na mokili mokauki.”
Ntango Zénobie azalaki kobundela bokonzi ya Loma, ye na Amperere Aurélien bayebaki te ete bazali kokokisa mikumba ya “mokonzi ya sudi” mpe “mokonzi ya nɔrdi,” mpe na ndenge yango bakokisaki eteni ya esakweli oyo mosakoli ya Yehova asakolaki na bosikisiki mbula soko 800 liboso. (Danyele, mokapo 11) Bato mingi bazalaki kosepela na Zénobie mpo na bomoto na ye. Nzokande, likambo oyo eleki ntina, ezali mokumba oyo akokisaki mpo na komonisa bokonzi ya politiki oyo Danyele asakolaki. Boyangeli na ye eumelaki koleka mbula mitano te. Palmyre, engumba-mokonzi ya boyangeli ya Zénobie, lelo oyo ezali se mwa mboka moke. Ata mpe Loma bokonzi ya nguya, ekweá uta kala mpe etiká esika na bikonzi ya ntango oyo. Nini ekokómela bikonzi ya ntango oyo? Nsuka na yango mpe ekokokisa esakweli moko ya Biblia.—Danyele 2:44.
[Etanda na lokasa 29]
LIBULA YA ZÉNOBIE
Nsima ya kolonga Zénobie, mokonzi-mwasi ya Palmyre, Amperere Aurélien azongaki na Loma mpe atongaki tempelo mpo na nzambe-moi. Atyaki bikeko ya nzambe-moi oyo azwaki na engumba Palmyre. Na ndenge makambo malekaki na nsima, zulunalo History Today elobi ete: “Na misala nyonso oyo Aurélien asalaki, oyo eyebani mingi ezali feti ya moi oyo abandisaki na mobu 274 T.B., oyo ezalaki kosalema mbala moko na mbula na eleko ebéngami solstice d’hiver, na mokolo ya 25 Desɛmbɛ. Ntango Loma ekómaki ekólo ya boklisto bakómisaki dati yango mokolo ya kokumisa mbotama ya Yesu mpo ete bato oyo bamesanaki kosala feti wana ya kala bándima lingomba ya boklisto. Kasi, likambo ya kokamwa, ezali mpenza mpo na Amperere Zénobie nde . . . [bato] basepelaka Noele.”
Karte/Bililingi na lokasaa 28, 29]
MAI MONENE YA MÉDITERRANÉE
SULIA
Antiokia
Émèse (Homs)
PALMYRE
Damaseke
MESOPOTAMI
Pelata
Carrhae (Halana)
Nisibis
Dura-Europos
[Eutelo ya bafɔtɔs]
Map: Mountain High Maps® Copyright © 1997 Digital Wisdom, Inc.
Colonnade: Michael Nicholson/Corbis
[Elilingi na lokasa 29]
Mbongo ya ebende ya Loma oyo ezali na elongi ya Aurélien
[Elilingi na lokasa 30]
Tempelo ya nzambe-moi na engumba Palmyre
[Elilingi na lokasa 31]
Mokonzi-mwasi Zénobie liboso ya basoda na ye