Mosali monene ya mbɛki mpe mosala na Ye
“[Zalá] eloko mpo na mosala na lokumu, . . . ebongi mpe mpo na misala nyonso malamu.”—2 TIMOTE 2:21.
1, 2. (a) Nini emonisi ete Nzambe asalaki mosala monene ntango azalisaki mobali na mwasi ya liboso? (b) Mpo na nini Mosali Monene ya mbɛki asalaki Adama na Eva?
YEHOVA azali Mosali Monene ya mbɛki. Mosala oyo eleki kitoko na mosala na ye ya bozalisi ezali tata na biso ya liboso, Adama. Biblia elobi na biso ete: “Yehova Nzambe asalaki moto na mputulu oyo azwaki na mabelé mpe apemaki na zolo na ye mpema ya bomoi, mpe moto akómaki molimo ya bomoi,” elingi koloba “ekelamu oyo ezali kopema.” (Genese 2:7, NW, maloba na nse ya lokasa) Moto ya liboso azalaki moto ya kokoka, asalemaki na elilingi ya Nzambe, azalaki elakiseli ete Nzambe azali na mayele mpe alingaka boyengebene mpe bosembo ya solo.
2 Nzambe asalaki mwasi na mopanzi ya Adama. Mwasi yango azalaki molongani mpe mosungi ya mobali. Eva azalaki kitoko, azalaki ata na litɔnɔ moko te mpe alekaki mwasi oyo aleki basi nyonso ya mokili na kitoko lelo oyo na mosika. (Genese 2:21-23) Mpe lisusu, mobali na mwasi ya liboso bazalaki na nzoto mpe makoki nyonso oyo ebongi mpo na kokokisa mosala ya kokómisa mabelé paladiso. Bazalaki mpe na makoki ya kokokisa likambo oyo Nzambe atindaki bango, ndenge totángaka yango na Genese 1:28: “Bóbotaka mpe bózala na kobota mingi, mpe bótondisa mokili mpe bótya yango na nse na bino; mpe bózala na bokonzi na likoló na mbisi na mai, mpe na ndɛkɛ na likoló, mpe likoló na nyama nyonso na bomoi ikotambolaka na mokili.” Na nsuka, mokili mobimba elingaki kozala elanga kitoko oyo etondi na bamiliare ya bato bafandi na esengo mpe basangani na bolingo oyo ezali “ekanganeli ekoki mpenza.”—Bakolose 3:14.
3. Ndenge nini baboti na biso ya liboso bakómaki biloko oyo ezangi lokumu, mpe esukelaki bango ndenge nini?
3 Kasi, likambo ya mawa ezali ete, na nko mpenza, baboti na biso ya liboso baboyaki kotosa Nkolo Mozalisi na bango, Mosali Monene ya mbɛki. Bomoi na bango ekómaki ndenge totángaka na Yisaya 29:15, 16: “Mawa epai na bango baluki na bozindo ete bábombela [Yehova] mwango na bango; baoyo misala na bango mizali na molili, mpe bakolobaka ete, Nani amoni biso? Nani ayebi biso? . . . [Mosali, NW] atángama nde lokola lima? Eloko esalami eloba mpo na mosali na yango ete, Ye asali ngai te? Soko eloko etongami eloba mpo na motongi na yango ete, Ye azali na bososoli te?” Motó makasi ememelaki bango likama: bazwaki etumbu ya liwa ya seko. Mpe lisusu, bato nyonso basangoli lisumu mpe liwa mpamba te bazali bana na bango. (Baloma 5:12, 18) Mosala kitoko ya Mosali Monene ya mbɛki ebebaki mpenza.
4. Tokoki kosalelama na mokano nini ya lokumu?
4 Nzokande, ata lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso bana ya Adama, moto oyo asalaki lisumu, tokoki kokumisa Yehova na maloba ya Nzembo 139:14: “Nakotɔnda yo mpo ete nasalami na motindo na kokamwa mingi; misala na yo izali na kokamwa mpe molimo na ngai eyebi yango malamu.” Kasi, ezali mawa na komona ete mosala ya liboso ya Mosali Monene ya mbɛki ebebisami boye!
Mosali ya mbɛki akolisi mosala na ye
5. Ndenge nini Mosali Monene ya mbɛki alingaki kosalela mayele na ye?
5 Likambo ya esengo ezali ete mayele ya Mozalisi na biso lokola Mosali ya mbɛki esukaki se na kozalisa moto ya liboso te. Ntoma Paulo alobi na biso boye: “Kasi yo moto, ozali nani ete [ozongisa] monɔkɔ na Nzambe? Eloko ezalisami ebongi nde kotuna mozalisi na yango ete, Yo osali ngai boye mpo na nini? [Mosali ya] mbɛki azali na bokonzi likoló na lima te? Akosala na ndambo moko na lima [eloko] moko mpo na mosala na lokumu mpe mosusu mpo na mosala mpamba.”—Baloma 9:20, 21.
6, 7. (a) Lelo oyo, ndenge nini bato mingi bazali kopona kobongisama mpo na kozanga lokumu? (b) Ndenge nini bato ya sembo bazali kobongisama mpo na mosala ya lokumu?
6 Ɛɛ, biloko mosusu oyo Mosali Monene ya mbɛki asali ekozala mpo na mosala ya lokumu, mpe mosusu mpo na mosala oyo ezangi lokumu. Baoyo baponi kolanda mokili oyo na ndenge ezali se kozinda na bizaleli oyo ezali kotyola Nzambe babongisami mpo na kobomama. Ntango Yesu Klisto, Mokonzi ya nkembo, akoya kosambisa, bato nyonso ya matoi mangbongi, oyo bakokani na bantaba, bakozala biloko oyo ebongi na mosala mpamba, oyo “bakobomama mpo na libela” lokola emonisami na Matai 25:46 (NW). Kasi bato oyo bazali lokola bampate, “bato ya sembo,” babongisami mpo na mosala “ya lokumu,” bakozwa “bomoi ya seko.”
7 Bato yango ya sembo ezali baoyo bandimaki na komikitisa nyonso ete Nzambe abongisa bango. Balandaki nzela ya Nzambe oyo ezali komema na bomoi. Bandimaki toli ya 1 Timote 6:17-19 oyo elobi ete: “[Bólikya te] epai na bozwi bokoumelaka solo te kasi epai na Nzambe oyo akozwisaka biso biloko nyonso na malamu ete tósepela na yango.” Bamipesaki na ‘kosala malamu, bazalaki bazwi na misala kitoko, bakabelaki bato biloko, basanganaki na bato. Boye bamitongelaki miboko kitoko mpo na ekeke ekoya, ete básimba bomoi ya [solosolo, NW].’ Solo ya Nzambe ebongisi bango mpe batii kondima makasi na ebongiseli oyo Yehova asali na nzela ya Yesu Klisto, ye oyo ‘amipesaki lokola lisiko ekokani’ mpo na kozongisa lisusu nyonso oyo ebungaki mpo na lisumu ya Adama. (1 Timote 2:6) Yango wana, tosengeli kozala na mposa makasi ya kolanda toli ya Paulo ete ‘tómilatisa bomoto ya sika oyo ezalisami sika [ebongisami] mpo na boyebi, kino ekozwa ye motindo na Mozalisi na ye.’—Bakolose 3:10.
Okozala eloko ya ndenge nini?
8. (a) Nini ekataka lolenge ya eloko oyo moto akozala? (b) Yebisá makambo mibale oyo ekataka lolenge oyo moto akobongisama.
8 Nini ekataka lolenge ya eloko oyo moto akozala? Ezali nde elimo mpe etamboli na ye. Yango elandaka libosoliboso bamposa mpe makambo oyo motema elingaka. Salomo, mokonzi oyo azalaki na mayele mingi, alobaki ete: “Motema na moto ekobongisa nzela na ye, nde [Yehova] akotambolisa matambe.” (Masese 16:9) Ya mibale, elimo mpe etamboli ya moto elandaka makambo oyo azali koyoka mpe kotala, baninga na ye, mpe makambo oyo azali kokutana na yango na bomoi. Yango wana, ebongi mpenza tólanda toli oyo: “Ye oyo akotambola na bato na mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba [akosuka mabe, NW].” (Masese 13:20) Lokola 2 Petelo 1:16 ekebisi biso, tosengeli koboya kolanda “masese malobami na mayele te,” to ndenge Biblia Liloba lya Nzambe ebongoli yango, “masolo . . . mauti na mayele ma bato.” Yango esangisi mateya mpe bafɛti mingi ya mangomba ya boklisto ya lipɛngwi.
9. Ndenge nini tokoki komitika ete Mosali Monene ya mbɛki abongisa biso?
9 Na ndenge oyo biso moko tokolinga, Nzambe akoki kobongisa biso. Na komikitisa nyonso, tokoki kobondela Yehova na maloba oyo ya Davidi: “Meká ngai, ɛ Nzambe, mpe yebá motema na ngai; sosolá ngai mpe yebá kobanza na ngai. Talá soko nazali kotambola na nzela mabe, mpe kambá ngai na nzela na seko.” (Nzembo 139:23, 24) Yehova azali kotinda basaleli na ye básakola nsango ya Bokonzi. Mitema na biso endimi na botɔndi nyonso nsango malamu mpe ndenge oyo akolanda kotambwisa biso. Na nzela ya ebongiseli na ye, Nzambe apesi biso makabo na boyokani na mosala ya kosakola nsango malamu; tókangama na makabo yango mpe tólinga yango mingi.—Bafilipi 1:9-11.
10. Milende nini tosengeli kosala mpo na kolanda manaka ya makambo ya elimo?
10 Ezali na ntina mingi ete tótyela Liloba ya Nzambe likebi, tótángaka Biblia mokolo na mokolo. Mpe masolo na biso, ezala na kati ya libota to na baninga na biso, elobelaka mingi Makomami mpe mosala ya Yehova. Na Babetele nyonso mpe na bandako ya bamisionere ya Batatoli ya Yehova, nsima ya kotánga mokapo ya mokolo, ntango bazali komɛla tii na ntɔngɔ, bazalaka na ebongiseli ya kotánga mwa mikapo ya Biblia mokolo na mokolo na boumeli ya pɔsɔ moko; mpe na pɔsɔ oyo ekolanda, batángaka Annuaire. Bokoki kosala ebongiseli ya ndenge yango na libota na bino te? Tozali mpe kozwa matomba mingi na kozala elongo na bandeko na biso na lisangá ya boklisto, na ntango tozali koyangana na makita, mpe mingimingi ntango tozali kopesa biyano na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli pɔsɔ na pɔsɔ!
Tobongisami mpo na kolonga komekama
11, 12. (a) Ndenge nini tokoki kosalela toli ya Yakobo na likambo etali komekama na bomoi ya mokolo na mokolo? (b) Ndenge nini makambo oyo Yobo akutanaki na yango ezali kolendisa biso na kotikala sembo?
11 Nzambe atikaka nzela ete makambo mosusu ekómela biso na bomoi na biso ya mokolo na mokolo, mpe makambo yango mosusu ekoki kopesa biso mpasi. Tosengeli kotalela yango ndenge nini? Lokola Yakobo 4:8 epesi toli, tózala mawamawa te, kasi tókangama na Nzambe, tótyela ye motema na biso mobimba, tózala na elikya ete soki ‘tokopusana epai ya Nzambe, ye mpe akopusana epai na biso.’ Ya solo, tokokutana na bampasi mpe komekama, kasi Nzambe atikeli yango nzela mpo na kobongisa biso; na nsuka, tokozwa esengo. Yakobo 1:2, 3 elendisi biso na maloba oyo: “Bandeko na ngai, bókanisa ete ezali bobele esengo wana ekokwea bino kati na komekama na mitindo na mitindo. Boyebi ete komekama na kondima na bino ekoyeisa mpiko.”
12 Yakobo alobi lisusu boye: “Tiká te ete moto oyo amekami aloba ete, Nazali komekama na Nzambe. Mpo ete Nzambe amekami na mabe te, ye mpe akomekaka moto te. Moto na moto akomekamaka mpo na kobendama mpe kolengolama na mposa mabe na ye moko.” (Yakobo 1:13, 14) Tokoki kokutana na komekama ya ndenge na ndenge, kasi lokola ezalaki mpo na Yobo, nyonso ezali mpo na kobongisa biso. Makomami ezali mpenza kolendisa biso na Yakobo 5:11 ete: “Talá, tolobi ete tobyangi bango bato na esengo baoyo bayiki mpiko bongo. Bosili koyoka mpo na mpiko na Yobo, bosili komona nsuka na makambo na ye epai na Nkolo, zambi Nkolo atondi na mawa mpe na boboto.” Lokola biloko na mabɔkɔ ya Mosali Monene ya mbɛki, tózala ntango nyonso sembo, tózala na elikya lokola oyo Yobo azalaki na yango ete nsuka ya makambo ekozala malamu!—Yobo 2:3, 9, 10; 27:5; 31:1-6; 42:12-15.
Tóbongisa bana na biso
13, 14. (a) Ntango nini baboti basengeli kobanda kobongisa bana na bango, mpe yango ekobota mbuma nini? (b) Wapi matomba oyo bato mosusu bazwaki?
13 Baboti bakoki mpenza kobongisa bana na bango banda bazali naino mike. Na ndenge yango, bana na biso bakoki mpenza kokóma bato ya sembo! (2 Timote 3:14, 15) Likambo yango emonanaki solo ata na ntango ya komekama makasi. Eleki mwa bambula, ntango minyoko ezalaki kongala na ekólo moko ya Afrika, libota moko ya sembo endimaki mokumba ya konyata Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na nkuku. Batyaki masini na esika oyo babongisaki na nsima ya ndako. Mokolo moko, basoda bakɔtaki na balabala na bango mpe bazalaki kotambola ndako na ndako koluka bilenge mpo na kotinda bango na mosala ya soda. Bilenge mibali ya libota wana bazalaki na ntango mingi mpo na koluka esika ya komibomba, kasi soki basoda balukaki bango, balingaki bámona masini ya bazulunalo. Mpe soki bamonaki yango, bakokaki konyokola libota mobimba to mpe koboma bango. Bakosala nini? Na mpiko nyonso, bilenge mibali wana mibale bazongelaki maloba ya Yoane 15:13 oyo elobi: “Moto te azali na bolingo boleki oyo ete moto asopa bomoi na ye mpo na baninga na ye.” Bafandaki na salon. Basoda balingaki kokuta bango wana mpe na ntembe te balingaki bányokola bango makasi to mpe koboma bango soki baboyi mosala ya soda. Kasi balingaki lisusu kolukaluka na kati ya ndako te. Mbele masini ebatelamaki, na bato mosusu ya libota. Kasi, likambo moko ya kokamwa esalamaki. Basoda balekaki ndako wana, mpe bakendaki na bandako mosusu! Bato wana oyo bazali biloko ebongisami mpo na mosala ya lokumu babikaki, na masini lokola, mpe bakobaki kobimisa bilei ya elimo na ntango ebongi. Lelo oyo, moko na kati ya bilenge mibali yango na yaya na ye ya mwasi bazali kosala na Betele; elenge yango azali se kotambwisa masini wana ya kalakala.
14 Tokoki kolakisa bana mike ndenge ya kobondela. Nzambe ayanolaka mpe na mabondeli na bango. Ndakisa moko ya kokamwa na likambo yango esalemaki na ntango bazalaki koboma bato na ekólo Rwanda. Ntango batomboki batyaki mwana moko ya mbula motoba na baboti na ye esika moko mpo báboma bango na grenade, mwana yango ya mwasi abondelaki Yehova na mongongo makasi mpe na motema mobimba ete abikisa bango mpo bálanda kosala mosala na ye. Bato oyo balingaki koboma bango bayokaki mawa mpe batikaki bango, balobaki ete: “Tokoboma bino te mpo na mwana oyo.”—1 Petelo 3:12.
15. Paulo apesaki likebisi mpo na bopusi mabe nini?
15 Ya solo, bana na biso mingi bakutanaka na makambo ya mpasi bongo te, kasi lelo oyo, bazali kokutana na komekama mingi na eteyelo mpe na mokili oyo esili kobeba. Maloba ya mbindo, bafɔtɔ mpe bafilme ya bato bazali kosangisa nzoto, masano oyo ezali kolendisa pite, mpe matindiki ya baninga na bango mpo ete básala makambo mabe, makambo nyonso oyo ezali komonana na bisika mingi. Mbala na mbala ntoma Paulo akebisaki na ntina na bopusi mabe na yango.—1 Bakolinti 5:6; 15:33, 34; Baefese 5:3-7.
16. Ndenge nini moto akoki kokóma eloko mpo na mosala ya lokumu?
16 Nsima ya kolobela biloko oyo ebongisami “mosusu mpo na mosala na lokumu, mosusu mpo na mosala mozangi lokumu,” Paulo alobi: “Soko moto nani akomipɛtola na makambo oyo, akozala eloko mpo na mosala na lokumu oyo ebulisami mpe ekosepelisa mokóló na ndako; ebongi mpe mpo na misala nyonso malamu.” Yango wana, tólendisa bilenge na biso ete bátalela malamu moto oyo bakosala na ye boninga. ‘Bákima mposa nyonso ya bolenge mpe bálanda bosembo mpe kondima mpe bolingo mpe kimya, esika moko na bango bakobyangaka nkombo na Nkolo na mitema pɛto.’ (2 Timote 2:20-22) Na kati ya libota, kozala na ebongiseli malamu mpo na ‘kolendisana’ ekoki kozala na ntina mingi mpo na kobongisa bilenge na biso. (1 Batesaloniki 5:11; Masese 22:6) Kotánga mpe koyekola Biblia mokolo na mokolo, na lisalisi ya buku moko ya la Société oyo ebongi, ekoki kosalisa bango.
Kobongisama mpo na moto nyonso
17. Ndenge nini disipilini ekobongisa biso, mpe ekobota mbuma nini ya esengo?
17 Yehova apesaka biso toli oyo euti na Liloba na ye mpe na nzela ya ebongiseli na ye mpo na kobongisa biso. Koboya toli ya Nzambe te! Ndimá yango na mayele mpe tiká yango ebongisa yo mpo ete Yehova asalela yo na mosala ya lokumu. Masese 3:11, 12 epesi toli oyo: “Mwana na ngai, tyolá kolakisama na [Yehova] te mpe lɛmbá na mpamela na ye te. Zambi [Yehova] akopamela ye oyo akolinga, lokola tata akopamelaka mwana oyo akosepela na ye.” Baebele 12:6-11 epesi toli mosusu ya tata: “Nkolo akopesaka bitumbu epai na baoyo akolingaka bango . . . Na ntango na yango, bitumbu nyonso iyokani na esengo te kasi na mpasi; nde nsima ikozwisa mbuma na kimya na boyengebene epai na bango baoyo balendisami na yango.” Mingimingi disipilini motindo wana esengeli kouta na Liloba epemami ya Nzambe.—2 Timote 3:16, 17.
18. Na oyo etali kobongola motema, Luka mokapo 15 eteyi biso nini?
18 Yehova azali mpe na motema mawa. (Exode 34:6) Ntango moto abongoli mpenza motema ata soki asalaki lisumu monene, alimbisaka ye. Ata ‘bana ya kilikili’ ya mikolo oyo bakoki kobongisama mpo na kozala biloko bibongi mpo na mosala ya lokumu. (Luka 15:22-24, 32) Mbala mosusu masumu na biso ezali mpenza lokola ya mwana ya kilikili te. Kasi komikitisa na biso mpo na kolanda toli ya Makomami ekosala ete tóbongisama mpo na kozala biloko bibongi na mosala ya lokumu.
19. Ndenge nini tokoki kolanda kosala lokola biloko mpo na mosala ya lokumu na mabɔkɔ ya Yehova?
19 Ntango toyekolaki solo, tozalaki na mposa ete Yehova abongisa biso. Totikaki banzela ya mokili mpe tobandaki kolata bomoto ya sika, tomipesaki na Nzambe mpe tozwaki batisimo lokola baklisto. Tondimaki toli ya Baefese 4:20-24 (NW) ete ‘tóbwaka bomoto ya kala oyo eyokani na etamboli na biso ya liboso, na bamposa mabe na yango, mpe tólata bomoto ya sika oyo esalemi na boyokani na ndenge Nzambe alingi na bosembo mpe bokangami ya solosolo.’ Tózala ntango nyonso pɛtɛɛpɛtɛɛ na mabɔkɔ ya Yehova, Mosali Monene ya mbɛki, tósala ntango nyonso lokola biloko mpo na mosala na ye ya lokumu!
Bozongeli
◻ Mosali Monene ya mbɛki azali na mokano nini mpo na mabelé?
◻ Ndenge nini okoki kobongisama mpo na mosala ya lokumu?
◻ Ndenge nini bana na biso bakoki kobongisama?
◻ Ndenge nini tosengeli kotalela disipilini?
[Elilingi na lokasa 10]
Okobongisama mpo na mosala ya lokumu to okobwakama?
[Elilingi na lokasa 12]
Bilenge bakoki kobongisama banda bomwana mpenza