Eloko na biso ya motuya na kati ya mbɛki
“Tozali na eloko oyo ya motuya na kati ya mbɛki, mpo ete nguya oyo eleki nguya ya bato ezala ya Nzambe, kasi oyo euti epai na biso te.” —2 BAKOLINTI 4:7, NW.
1. Ndenge nini ndakisa ya Yesu esengeli kolendisa biso?
NTANGO Yehova azalaki kobongisa ye awa na mabelé, Yesu amonaki bolɛmbu ya bato. Ndakisa ya bosembo na ye esengeli mpenza kolendisa biso! Ntoma alobi na biso boye: “Ntina ete bobyangami mpo na bongo, zambi Klisto mpe ayokaki mpasi mpo na bino; atikeli bino elakiseli ete [bólanda] matambe na ye.” (1 Petelo 2:21) Lokola andimaki kobongisama ya ndenge wana, Yesu alongaki mokili. Alendisaki mpe bayekoli na ye ete bango mpe bálonga mokili. (Misala 4:13, 31; 9:27, 28; 14:3; 19:8) Lisusu, mpo na kosukisa lisolo ya nsuka oyo asalelaki bango, Yesu alendiseli bango makasi! Alobaki: “Nasili kosolola na bino makambo oyo ete bózala na kimya kati na ngai. Kati na mokili bozali na bolɔzi; nde bóyika mpiko, ngai nasili [kolonga, NW] mokili.”—Yoane 16:33.
2. Na bokeseni na kokufa miso ya bato na mokili oyo, “kongɛnga” nini tozali na yango?
2 Ndenge moko, nsima ya kosala bokeseni kati na molili euti na “nzambe ya mokili oyo” mpe “pole ya nsango malamu ya nkembo,” ntoma Paulo alobaki boye mpo na mosala na biso oyo ezali na motuya mingi: “Tozali na eloko oyo ya motuya na kati ya mbɛki, mpo ete nguya oyo eleki nguya ya bato ezala ya Nzambe kasi oyo euti epai na biso te. Bazali kofina biso na ndenge nyonso, kasi tozali naino koningana, bazali kotungisa biso, kasi tozangi elikya te, bazali konyokola biso, kasi tosundolami te; tobwakami na nse, kasi tobebisami nyɛɛ te.” (2 Bakolinti 4:4, 7-9, NW) Atako tozali “bambɛki” oyo ekoki kobukana, Nzambe abongisi biso na elimo santu na ye na boye ete tokoki mpenza kolonga mokili ya Satana.—Baloma 8:35-39; 1 Bakolinti 15:57.
Kobongisama na Yisalaele ya kala
3. Ndenge nini Yisaya alobeli kobongisama ya ekólo ya Bayuda?
3 Yehova abongisaka bobele moto mokomoko te, kasi ata ekólo mobimba. Na ndakisa, ntango Yisalaele endimaki Yehova abongisa yango, makambo ezalaki kotambola malamu. Kasi, na nsuka Yisalaele ezangaki botosi. Yango wana, Motongi ya Yisalaele ayeisaki “mawa” likoló na yango. (Yisaya 45:9) Na ekeke ya mwambe L.T.B., Yisaya ayebisaki Yehova lisumu monene ya Yisalaele. Alobaki boye: “Ɛ [Yehova], ozali nde tata na biso, biso tozali lima, yo ozali [mosali, NW]; biso nyonso tozali mosala na lobɔkɔ na yo. . . . Bisika nyonso malamu na biso ikómi mabondo na mabanga.” (Yisaya 64:8-11) Yisalaele ebongisamaki lokola eloko oyo ebongi bobele na kobomama.
4. Yilimia asalaki elakiseli nini?
4 Mbula nkama na nsima, wana mokolo ya kofuta masumu ekómaki pene, Yehova alobaki na Yilimia akamata mbɛki mpe abénga mwa bankumu ya Yelusaleme, bákende na Lobwaku ya Hinomo, mpe ayebisaki ye boye: “Okobuka mbɛki na miso na bato baoyo batamboli na yo elongo; okoloba mpe na bango ete, [Yehova] na bibele alobi boye ete, Boye nakobuka bato oyo mpe mboka oyo lokola moto akobuka mbɛki na [mosali] oyo [ekoki] kotongama lisusu te.”—Yilimia 19:10, 11.
5. Etumbu oyo Yehova apesaki Yisalaele ezalaki monene ndenge nini?
5 Na mobu 607 L.T.B., Nebukadanesala abomaki Yelusaleme na tempelo na yango. Bayuda oyo batikalaki, amemaki bango na Babilone lokola bakangami. Kasi, nsima ya kolekisa mbula 70 na mboka mopaya, Bayuda oyo babongolaki motema bazongaki mpe batongaki lisusu Yelusaleme na tempelo na yango. (Yilimia 25:11) Kasi, na ekeke ya liboso T.B., ekólo yango epesaki lisusu Mosali Monene ya mbɛki mokɔngɔ, mpe basaleki mabe oyo eleki monene: babomaki Mwana ya Nzambe. Na mobu 70 T.B., Nzambe asalelaki Loma, nguya oyo elekaki na mokili mobimba na ntango wana, mpo na koboma ebongiseli ya biloko ya Bayuda. Babebisaki Yelusaleme na tempelo na yango. Yehova asengelaki lisusu kobongisa Yisalaele lokola eloko ya “bulɛɛ mpe ya kitoko” te.a
Kobongisama ya libota moko ya elimo
6, 7. (a) Ndenge nini Paulo alobeli kobongisama ya Yisalaele ya elimo? (b) “Mbɛki ya ngɔlu” ezali na bato boni, mpe ndenge nini esalemaki?
6 Bayuda oyo bayambaki Yesu babongisamaki mpo na kozala bato ya liboso oyo bakɔtaki na libota ya sika ya elimo: “Yisalaele ya Nzambe.” (Bagalatia 6:16) Yango wana, maloba ya Paulo oyo mabongi mpenza: “[Mosali, NW] ya mbɛki azali na bokonzi likoló na lima te? Akosala na ndambo moko na lima mbɛki moko mpo na mosala na lokumu mpe mosusu mpo na mosala na mpamba. Soko nde Nzambe akani komonisa nkanda na ye mpe kososolisa nguya na ye mpe boye ayikeli mbɛki na nkanda mpiko monene, yango ikoki mpo na kobebisama nyɛɛ? Soko asalaki bongo ete ayebisa motuya monene na nkembo na ye ebongisami mpo na mbɛki na mawa, yango ebongisaki ye liboso mpo na nkembo oyo?”—Baloma 9:21-23.
7 Yesu oyo asekwi amonisaki na nsima ete “mbɛki na mawa” ekozala bato 144 000. (Emoniseli 7:4; 14:1) Lokola Yisalaele ya mosuni ekokisaki motuya wana te, Yehova amonisaki ngɔlu na ye na bato ya bikólo mosusu. (Baloma 11:25, 26) Lisangá ya boklisto oyo esalemaki sika ekolaki nokinoki. Nsima ya mbula 30, nsango malamu ‘esakolamaki epai ya bato nyonso na nse na Likoló.’ (Bakolose 1:23) Yango esɛngaki ete ebele ya masangá oyo epalanganaki ezala na bakɛngɛli oyo babongi.
8. Banani bazalaki mikóló-bakambi ya liboso, mpe ndenge nini lisangani yango ebongwanaki?
8 Yesu abongisaki bantoma 12 mpo bázala lisangani ya liboso ya mikóló-bakambi, alakisaki bango na bato mosusu mosala ya kosakola. (Luka 8:1; 9:1, 2; 10:1, 2) Na Pentekote ya mobu 33 T.B., lisangá ya boklisto ebandaki kosala, mpe na nsima ya ntango, lisangani ya mikóló-bakambi na yango ekómaki monene; esangisaki “bantoma mpe na mikóló na lingomba.” Ekoki kozala ete Yakobo, ndeko ya Yesu, atako azalaki ntoma te, akambaki lisangani yango na boumeli ya ntango molai. (Misala 12:17; 15:2, 6, 13; 21:18) Eusèbe, nganga-mayele ya istware, amonisi ete bantoma bakómaki konyokwama mingi, yango wana bapanzanaki na bisika mosusu. Lisangani ya mikóló-bakambi ebongwanaki na ndenge makambo esɛngaki na ntango wana.
9. Likambo nini ya mabe oyo esengelaki kosalema Yesu asakolaki?
9 Na nsuka ya ekeke ya liboso, ‘monguna, Zabolo,’ abandaki ‘kolona matiti mabe’ na kati ya masangu, elingi koloba na kati ya basangoli ya “bokonzi ya likoló.” Yesu asakolaki ete likambo mabe wana ekozala kino na ntango ya kobuka mbuma na “nsuka ya ebongiseli ya biloko.” Na ntango wana nde ‘bato ya sembo bakongɛnga [lisusu] lokola moi na bokonzi ya Tata na bango.’ (Matai 13:24, 25, 37-43, NW) Esengelaki kozala na ntango nini?
Kobongisama ya Yisalaele ya Nzambe lelo oyo
10, 11. (a) Ndenge nini Yisalaele ya Nzambe ebandaki kobongisama na mikolo na biso? (b) Bokeseni nini ezalaki na kati ya mateya ya mangomba ya boklisto mpe ya Bayekoli ya solosolo ya Biblia?
10 Na mobu 1870, Charles Russell na baninga na ye basanganaki mpo na koyekola Biblia. Ezalaki na engumba Pittsburgh, na etúká ya Pennsylvanie, na États-Unis. Na mobu 1879 abandaki kobimisa zulunalo oyo tobéngaka lelo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli; ezalaki kobima mbala moko na sanza. Bayekoli yango ya Biblia, ndenge bakómaki kobénga bango, baumelaki te na komona ete mangomba ya boklisto ekɔtisaki bindimeli ya bapakano na kati ya mateya na yango lokola liteya oyo elobi ete molimo ekufaka te, lifelo ya mɔ́tɔ, epongelo, Bosato, mpe kobatisa bana mike.
11 Kasi, eloko oyo eleki ntina ezali ete bato yango, lokola balingaki solo ya Biblia, bazongisaki mateya ya solosolo ya Biblia, lokola liteya oyo elobi ete lobiko ekozwama na nzela ya mbeka ya lisiko ya Yesu mpe liteya ya lisekwa mpo na bomoi ya seko na paladiso ya kimya na mabelé oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela. Na koleka, bamonisaki mpenza ete etikali moke, Yehova Nzambe alonga lokola Nkolo Mokonzi ya molɔ́ngɔ́. Bayekoli ya Biblia bandimaki ete etikali moke Nzambe ayanola na Libondeli ya Nkolo oyo elobaka ete, “Tata na biso oyo azali na Likoló, Nkombo na yo ezala mosantu, Tiká ete Bokonzi na yo eya, tiká ete mokano na yo esalama na nse [lokola] na Likoló.” (Matai 6:9, 10) Elimo santu ya Nzambe ezalaki kobongisa bango mpo na kozala lisangá ya baklisto oyo balingi kimya na mokili mobimba.
12. Ndenge nini Bayekoli ya Biblia bayebaki liboso dati moko ya ntina mingi?
12 Boyekoli mozindo ya Danyele mokapo 4 mpe bisakweli mosusu endimisaki Bayekoli ya Biblia ete kozala ya Yesu lokola Mokonzi Masiya ekómi pene. Bakangaki ntina ete “ntango ya mabota” esengelaki kosuka na 1914. (Luka 21:24; Ezekiele 21:26, 27) Nokinoki, bayekoli ya Biblia bakolisaki mosala na bango, basalaki bakelasi ya koyekola Biblia (na nsima ebéngamaki masangá) na États-Unis mobimba. Na ebandeli ya ekeke oyo, mosala na bango ya koteya nsango ya Biblia epalanganaki na Mpoto mpe na Australasie. Na ntango yango, mposa ya kozala na ebongiseli ya malamu emonanaki.
13. Ndenge nini mosala ya Bayekoli ya Biblia eyebanaki na Leta, mpe mosala nini ya monene prezida ya liboso ya la Société asalaki?
13 Mpo ete Bayekoli ya Biblia báyebana na Leta, na mobu 1884, bakomisaki Zion’s Watch Tower Tract Society na mikanda ya Leta na États-Unis. Biro monene na yango ezalaki na engumba Pittsburgh, na etúká ya Pennsylvanie. Lisangani ya bakambi na yango ezalaki mpe lisangani ya Mikóló-Bakambi oyo bazalaki kotambwisa mosala ya kosakola Bokonzi ya Nzambe na mokili mobimba. Charles Russell, prezida ya liboso ya la Société, akomaki volimi motoba ya buku Étude des Écritures mpe asalaki mibembo mingi mpo na koteya. Lisusu, bozwi nyonso oyo azwaki na mokili liboso abanda koyekola Biblia apesaki yango mpo na mosala ya Bokonzi na mokili mobimba. Na 1916, wana Etumba ya Liboso ya mokili mobimba ezalaki kongala na Mpoto, Ndeko Russell, oyo alɛmbaki mingi, akufaki na kati ya mobembo mpo na kosakola. Amipesaki mobimba mpo na kokolisa mosala ya kopesa litatoli mpo na Bokonzi ya Nzambe.
14. Ndenge nini Joseph Rutherford ‘abundaki etumba malamu’? (2 Timote 4:7)
14 Joseph Rutherford, oyo azalaki zuzi na etúká ya Missouri na boumeli ya mwa ntango, akómaki prezida ya la Société. Lokola azalaki kolongisa solo ya Biblia na kozanga kobanga, bakonzi ya mangomba ya boklisto bayokanaki na bakonzi ya politiki mpo na “kosala makambo mabe na nzela ya mibeko.” Mokolo ya 21 Yuni 1918, Ndeko Rutherford na Bayekoli ya Biblia mosusu nsambo oyo bazalaki kokamba mosala bakangamaki mpe bakatelaki bango bolɔkɔ ya mbula 10, basusu kino mbula 20 mpo na bifundeli ndenge na ndenge. Bayekoli ya Biblia bakangaki mabɔkɔ te. (Nzembo 94:20; Bafilipi 1:7) Ntango bamemaki likambo yango na tribinale mosusu, batikaki bango na mokolo ya 26 Marsi 1919, mpe na nsima balongolaki bifundeli nyonso oyo bafundaki bango na lokuta ete bazali bazimbisi.b Likambo oyo bakutanaki na yango ebongisaki bango mpo na kozala balongisi ya mpiko ya solo ya Biblia. Na lisalisi ya Yehova, basalaki nyonso mpo na kolonga etumba ya elimo mpo na kosakola nsango malamu atako Babilone Monene ezalaki kotɛlɛmɛla bango. Etumba yango ezali kosalema kino lelo oyo na 1999.—Talá Matai, mokapo 23; Yoane 8:38-47.
15. Mpo na nini mobu 1931 ezalaki mbula ya ntina mingi?
15 Na bambula ya 1920 mpe ya 1930, bapakolami Bayisalaele ya Nzambe bakobaki kobongisama na litambwisi ya Mosali Monene ya mbɛki. Bisakweli ya Makomami engɛngisamaki; yango epesaki Yehova nkembo mpe ebendaki likebi na Bokonzi ya Yesu Masiya. Na 1931, Bayekoli ya Biblia bandimaki na esengo nyonso nkombo ya sika: Batatoli ya Yehova.—Yisaya 43:10-12; Matai 6:9, 10; 24:14.
16 mpe etanda na lokasa 19. Ntango nini motuya mobimba ya ba 144 000 ekokisamaki, mpe nini emonisi yango?
16 Na bambula ya 1930, emonanaki ete motuya mobimba ya ‘babyangami, baponami, mpe bato ya sembo’ ekokaki. (Emoniseli 17:14; talá etanda na lokasa 19.) Toyebi te soki bapakolami boni bayanganisamaki na ekeke ya liboso mpe na katikati ya “matiti mabe” na boumeli ya bikeke oyo boklisto ya lipɛngwi engalaki. Kasi, na 1935, na mokili mobimba basakoli bazalaki 56 153; na kati na bango, bato 52 465 bamonisaki ete bazali na elikya ya kokende na likoló, balyaki limpa mpe bamelaki vinyo na Ekaniseli. Ebele ya bato mosusu oyo balingaki koyanganisama nsima bazalaki na elikya nini?
“Ebele monene”!
17. Mbongwana monene nini esalemaki na 1935?
17 Na liyangani oyo esalemaki na engumba Washington banda mokolo ya 30 Mai kino mokolo ya 3 Yuni 1935, Ndeko Rutherford asalaki lisolo moko oyo etiká nsango, motó ya likambo na yango ezalaki “Ebele monene.” Bato yango, “oyo moto te akoki kotánga motuya na bango,” basengelaki komonana na ntango oyo mosala ya kotya ba 144 000 bilembo ekómaki na nsuka. Bango mpe bakomonisa kondima na bango na nguya ya kosikola oyo “makila ya Mwana ya mpate” Yesu ezali na yango, mpe bakosala mosala ya bulɛɛ na tempelo ya Yehova, elingi koloba ebongiseli na ye mpo na losambo. Lokola etuluku, ‘bakobika na bolɔzi monene,’ mpe bakofanda na paladiso awa na mabelé epai “liwa ekozala lisusu te.” Bambula mingi liboso ya liyangani yango, etuluku wana ezalaki kobéngama kelasi ya Yonadaba.—Emoniseli 7:9-17; 21:4; Yilimia 35:10.
18. Na makambo nini 1938 ezalaki mbula ya ntina mingi?
18 Na 1938 nde bakesenisaki malamumalamu bituluku mibale. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi mpe ya 1 Aprili 1938 [na Lingelesi] ezalaki na boyekoli ya biteni mibale oyo motó ya likambo na yango elobaki ete, “Etonga na Ye.” Boyekoli yango ekesenisaki malamumalamu esika ya batikali bapakolami na oyo ya baninga na bango, ebele monene. Na nsima, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuni mpe 15 Yuni [ebimeli ya Lingelesi] ezalaki na masolo ya boyekoli oyo elobelaki “Ebongiseli,” etongamaki na Yisaya 60:17. Bayebisaki na masangá nyonso ete esengeli kosɛngaka na Lisangani ya Mikóló-Bakambi mpo na kopona bakɛngɛli. Na bongo bakɔtisaki mbongwana ya malamu na ebongiseli ya Teokrasi, na ndenge Nzambe asɛngi. Masangá esalaki mpe bongo.
19 mpe maloba na nse ya lokasa. Makambo nini emonisi ete libyangi ya “bampate mosusu” ebandaki eleki sikawa mbula 60?
19 Lapolo ya Annuaire des Témoins de Jéhovah — 1939 elobaki ete: “Sikoyo, bayekoli bapakolami ya Klisto Yesu oyo bazali naino awa na mabelé batikali moke, mpe motuya na bango ekobakisama lisusu te. Makomami ebéngi bango ‘batikali’ ya bana ya Siona, ebongiseli ya Nzambe. (Emon. 12:17) Sikoyo, Nkolo azali koyanganisa ‘bampate mosusu,’ oyo bakokóma ‘ebele monene.’ (Yoa. 10:16) Baoyo bazali koyanganisama sikoyo bazali baninga ya batikali, bazali kosala elongo na batikali. Banda sikoyo ‘bampate mosusu’ bakobakisama kino ‘ebele monene’ ekoyanganisama.” Batikali bapakolami basilaki kobongisama mpo na koyanganisa ebele monene. Ebele monene yango basengeli mpe kobongisama sikoyo.c
20. Wapi ebele ya mbongwana oyo esalemaki na ebongiseli ya Nzambe banda 1942.
20 Na Yanuali 1942, wana Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kongala, Joseph Rutherford akufaki mpe Nathan Knorr akómaki prezida. Tobosanaka mosala ya prezida ya misato te na ndenge afungolaki eteyelo mpo na mosala ya Teokrasi na masangá mpe Eteyelo ya Gileadi mpo na kobongisa bamisionere. Na 1944, na likita ya nsuka ya mbula ya basangani ya la Société, Ndeko Knorr ayebisaki ete bazali kotalela lisusu charte to mokanda oyo emonisi ntina ya la Société mpo ete liboso moto andimama lokola mosangani ya la Société, asengeli kokokisa masɛngami ya elimo, kasi bobele na kopesa makabo ya mosuni te. Na boumeli ya mbula 30 oyo elandaki, bato oyo bazalaki kosala na elanga bakómaki mingi mpenza, longwa na bato 156 299, bakómaki bato 2 179 256 na mokili mobimba. Banda 1971 kino 1975, mbongwana mosusu mingi esalemaki na kati ya ebongiseli ya Nzambe. Esengelaki lisusu te ete prezida ye moko atambwisaka mosala ya Bokonzi na mokili mobimba. Lisangani ya Mikóló-Bakambi, ekómaki na bato 18, bango nyonso bapakolami, mpe mokomoko azalaki kokóma prezida na ngala na ye. Lelo oyo, pene na katikati ya bandeko yango bazali lisusu na bomoi awa na mabelé te.
21. Masɛngami nini basangani ya etonga moke bakokisi mpo na Bokonzi?
21 Batikali basangani ya etonga moke babongisamaki na nzela ya komekama mingi na boumeli ya bambula. Bazali na mpiko, bazwi ‘litatoli [ya solosolo] ya elimo.’ Yesu alobaki na bango ete: “Bino bato bosili koumela na ngai elongo kati na makambo na ngai na mpasi. [Lokola] Tata na ngai apesaki ngai Bokonzi, ngai mpe napesi bino bokonzi na kolya mpe komela na mesa na ngai kati na bokonzi na ngai, mpe bokofanda na kiti na bokonzi mpe bokosambisa mabota zomi na mibale na Yisalaele.”—Baloma 8:16, 17; Luka 12:32; 22:28-30.
22, 23. Ndenge nini etonga moke na bampate mosusu bazali kobongisama?
22 Lokola batikali bapakolami na elimo bazali lisusu mingi te awa na mabelé, bandeko mibali oyo bakɔmeli na elimo mpe bazali na kati ya ebele monene, bazali kozwa mikumba lokola bakɛngɛli na masangá nyonso na mokili mobimba. Mpe ntango moto ya nsuka na kati ya Batatoli bapakolami akosukisa bomoi na ye awa na mabelé, ba sa·rimʹ, bana ya mokonzi, bampate mosusu oyo babongisami malamu bakokokisa misala ya eyangeli lokola kelasi ya mokonzi awa na mabelé.—Ezekiele 44:3; Yisaya 32:1.
23 Ezala etonga moke to bampate mosusu, bango nyonso bazali se kobongisama lokola biloko mpo na mosala ya lokumu. (Yoane 10:14-16) Ata soki tozali na elikya ya “makoló ya sika” to ya “nse ya sika,” tóndima na motema mobimba libyangi ya Yehova oyo elobi ete: “Bósepela mpe bóyoka esengo libela na yango ezali ngai kotonga; mpo ete talá, nakotonga Yelusaleme mpo na kosanzola mpe bato na ye mpo na esengo.” (Yisaya 65:17, 18) Biso bato oyo tozali na bolɛmbu, tiká ete tósala ntango nyonso na komikitisa, tóbongisama na “nguya oyo eleki nguya ya bato”—nguya ya elimo santu ya Nzambe!—2 Bakolinti 4:7; Yoane 16:13.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Boklisto ya lipɛngwi, oyo Yisalaele ya kala ezalaki elilingi na yango, ezwa likebisi ete Yehova akopesa yango etumbu lolenge wana.—1 Petelo 4:17, 18.
b Zuzi Manton, Mokatolike, oyo aboyaki ete Bayekoli ya Biblia bápesa mbongo lokola ndanga mpo bábimisa bango na bolɔkɔ liboso ya kosambisa bango, akangamaki nsima, eyebanaki ete azalaki kondima kanyaka na mosala na ye.
c Na 1938, na mokili mobimba, bato 73 420 bayanganaki na Ekaniseli; nzokande bato 39 225, elingi koloba bato 53 likoló ya monkama, balyaki limpa mpe bamelaki vinyo. Na 1998, bato 13 896 312 bayanganaki, kasi bato oyo balyaki limpa mpe bamelaki vinyo bazalaki bobele 8 756, elingi koloba pene na moto moko na kati ya masangá 10.
Oyebi lisusu?
◻ Lokola andimaki ete Tata na ye abongisa ye, ndenge nini Yesu azalaki Ndakisa na biso?
◻ Kobongisama nini esalemaki na Yisalaele ya kala?
◻ Ndenge nini “Yisalaele ya Nzambe” ezali kobongisama kino lelo oyo?
◻ “Bampate mosusu” babongisami mpo na nini?
[Etanda na lokasa 18]
Kobongisama mosusu na kati ya mangomba ya boklisto
Eumeli naino mingi te, Associated Press epesaki nsango oyo eutaki na engumba Athènes ntango baponaki mokonzi ya sika ya Lingomba ya Ortodokse ya ekólo Grèce: “Mpo na bato mingi, mokonzi ya Lingomba ya Ortodokse ya ekólo Grèce asengeli kozala momemi-nsango ya kimya. Nzokande, mokonzi oyo auti koponama azali komonana mingimingi lokola mokonzi ya basoda oyo bazali komilɛngɛla mpo na etumba.
“Eleki mwa mikolo, na mokolo ya feti ya Ntombwa ya Ngɔndɔ Malia, oyo ekumisamaka mpe na ekólo Grèce lokola feti ya basoda, Episkɔpɔ ya lokumu Christodoulos alobaki: ‘Tomilɛngɛli mpo na kotangisa makila mpe kondima mpasi, soki esɛngi bongo. Biso nyonso lokola lingomba tobondelaka mpo na kimya . . . Kasi topambolaka mindoki ya bulɛɛ soki makambo esɛngi bongo.’”
[Etanda na lokasa 19]
“Bakobakisama lisusu te!”
Mokolo oyo banakelasi ya Gileadi bazwaki mapolomi na bango na 1970, Frederick Franz, oyo azalaki prezida-molandi ya la Société Watch Tower na ntango wana, alobelaki banakelasi ete bakoki kobatisa moto oyo akoki koloba ete azali motikali mopakolami, atako bango nyonso bazali bampate mosusu mpe bazali na elikya ya kofanda awa na mabelé. Likambo yango ekoki kosalema? Alimbolaki ete Yoane Mobatisi azalaki na kati ya bampate mosusu, kasi abatisaki Yesu mpe bantoma mosusu. Na nsima atunaki soki batikali mosusu bazali koyanganisama. Ye moko ayanolaki ete, “Te, bakobakisama lisusu te. Kobéngama na bango esukaki na bambula ya 1931 kino 1935! Bakobakisama lisusu te. Soki ezali boye, mwa ndambo ya bato mosusu oyo babakisami na kati ya baoyo bazali kolya limpa mpe komela vinyo na Ekaniseli bazali banani? Soki bazali solo batikali, bazali nde kokitana! Bazali kobakisama na molɔngɔ ya bapakolami te, kasi bazali nde kokitana baoyo mbala mosusu bapɛngwaki.”
[Elilingi na lokasa 15]
Topesaka motuya monene na mosala na biso!
[Elilingi na lokasa 16]
Yisalaele ya kala ekómaki eloko ebongi se na kobomama