Boyokani malamu ekoki kozala na mabota oyo ezali na bana ya libala mosusu
MABOTA OYO EZALI NA BANA YA LIBALA MOSUSU EKOKI KOZALA NA BOYOKANI YA MALAMU? ƐƐ, mingimingi soki bato nyonso bazali kobosana te ete “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kobongisa makambo, mpo na kopesa disipilini na bosembo.” (2 Timote 3:16, NW) Soki moto na moto azali kolanda mitinda ya Biblia, na ntembe te bakoyokana malamu.
Ezaleli oyo eleki ntina
Biblia etii mibeko mingi te na oyo etali boyokani ya bato. Biblia elendisi mingimingi kolona mbuma ya elimo mpe kokolisa bizaleli oyo ekopusa biso na kosala makambo na mayele. Bolamu ya libota esimbami na makanisi mpe bizaleli malamu motindo yango.
Atako moto nyonso ayebi yango, kasi ezali na ntina tóloba yango ete ezaleli oyo eleki ntina mpe oyo esengeli mpo ete libota ezala malamu ezali bolingo. Ntoma Paulo alobaki ete: “Tiká bolingo bózala na bokosi te. . . . Mpo na bolingo na bandeko, bólinganaka.” (Baloma 12:9, 10) Mbala mingi liloba “bolingo” esalelamaka na ndenge mabe. Kasi bolingo oyo Paulo alobeli awa ezali ezaleli malamu oyo ekokani na ezaleli mosusu te. Ezali bolingo ya Nzambe, mpe bolingo yango “ekosuka te.” (1 Bakolinti 13:8) Biblia elobi ete bolingo yango ezalaka na moimi te mpe ekakatanaka te mpo na kosalela basusu. Esalaka mpenza makambo mpo na bolamu ya bato mosusu. Ezali na motema molai mpe na boboto, ezalaka na zuwa te, ezali na lolendo te, to na komitombola te. Elukaka bolamu na yango moko te. Ebosanaka mabe mbala moko, eyebi kotyela bato motema, kolikya, kokanga motema ata soki likambo nini esalami.—1 Bakolinti 13:4-7.
Bolingo ya solosolo esalisaka mpo na kosilisa matata mpe eyokanisaka bato oyo babɔkwami ndenge moko te mpe bakeseni na bomoto. Bolingo yango esalisaka na kolongola mikakatano oyo ebimaka ntango libala ekufi to moboti moko akufi. Mobali moko oyo abalaki mwasi oyo ayaki na bana na ye alimboli mokakatano na ye na maloba oyo: “Mbala mingi nazalaki komibanzabanza kaka mpo na bamposa na ngai mpe nazalaki kotalela bamposa ya bana ya mwasi na ngai to mpe oyo ya mwasi na ngai te. Nasengelaki kotika ezaleli ya kosilika mpambampamba. Likambo oyo eleki ntina, nasengelaki koyekola komikitisa.” Bolingo esalisaki ye ete asala mbongwana oyo esengeli.
Moboti
Bolingo ekoki kosalisa moto na koyeba ndenge nini asengeli kotalela boyokani ya bana na moto oyo abotá bango atako azali lisusu kofanda na bango lisusu esika moko te. Tata mobɔkɔli moko alobaki boye: “Nalingaki ete bana oyo nazalaki kobɔkɔla bálinga ngai mingi. Soki bakei kotala tata oyo abotá bango, nazalaki kokoka komipekisa te kotɔnga ye. Ntango bakozonga, soki namoni ete balekisaki mokolo malamu, nazalaki koyoka mabe. Soki balekisaki mokolo malamu te, nazalaki kosepela. Nazalaki kobanga ete bábosana ngai. Mokakatano oyo elekaki monene epai na ngai ezalaki ya kondima ete tata oyo aboti bana oyo nazali kobɔkɔla azali na ntina na bomoi na bango.”
Bolingo ya solosolo esalisaki tata mobɔkɔli yango na kokanga ntina ete akokaki kolikya te ete bálinga ye na “mbalakaka.” Asengelaki kokanisa te ete bana baboyi ye lokola bandimaki ye mbala moko te. Ayaki kokanga ntina na nsima ete, na mitema ya bana wana, akoki kozwa te esika ya tata oyo abotaki bango. Banda kobotama na bango, bana bayebaki se tata na bango, nzokande tata mobɔkɔli azalaki mopaya oyo asengelaki kosala makasi mpo ete bana bálinga ye. Molukiluki moko na nkombo Elizabeth Einstein amonisi likambo oyo bato mingi bakutanaka na yango ntango alobi ete: “Moto moko te akoki kozwa esika ya moboti—ekoki kosalema te. Bana babosanaka moboti na bango te ata soki akufá to asundolá bango. Azalaka ntango nyonso na esika na bomoi na bango.”
Disipilini: likambo ya kosala na yango angɛlɛ
Biblia emonisi ete disipilini oyo epesami na bolingo ezali na ntina mingi mpo na bilenge, ata soki bazali bana oyo babotami na libala mosusu. (Masese 8:33) Bato mingi oyo bayekolaka bomoi ya bana bakómi kondima likanisi ya Biblia. Profesere Ceres Alves de Araújo alobaki boye: “Moto moko te alingaka bápekisa ye makambo oyo alingi kosala, kasi bipekiseli ezali na ntina. Liloba ‘te’ ebatelaka.”
Nzokande, na libota oyo ezali na bana ya libala mosusu, soki baboti bazali na makanisi ekeseni na likambo ya disipilini, yango ekoki kopanza makita. Bana oyo mobalani na yo abotaki na libala mosusu bateyamaki na moto mosusu oyo azali na bango lisusu esika moko te. Na ntembe te, bizaleli mpe mimeseno na bango mosusu ekoki kosilikisa moto oyo azali kobɔkɔla bango sikoyo. Mbala mosusu bango mpe bakoyeba te mpo na nini moto oyo azali kobɔkɔla bango alingaka makambo mosusu. Ndenge nini kolonga na likambo ya ndenge yango? Paulo apesi baklisto elendiseli oyo: “Landá . . . bolingo, kokanga motema, bopɔlɔ.” (1 Timote 6:11, NW) Na ndako oyo baboti bazali na bana oyo babotá na libala mosusu, bolingo ya baklisto esalisaka moto nyonso ete azala na bopɔlɔ mpe akanga motema wana bazali koluka koyebana malamu bamoko na bamosusu. Soki mobɔkɔli azali na motema mokuse, ‘nkanda, kongala, mpe kofinga’ ekoki na mbala moko kobebisa boyokani oyo basali.—Baefese 4:31.
Mosakoli Mika amonisaki ndenge ya kososola eloko oyo ekosalisa bango na likambo yango. Alobaki ete: “[Yehova] alingi nini epai na yo? Bobele ete osala na [bosembo] mpe ete olinga boboto mpe ete otambola na bopɔlɔ esika moko na Nzambe na yo.” (Mika 6:8) Bosembo ezali na ntina mingi ntango ozali kopesa disipilini. Tokoloba boni mpo na boboto? Moklisto moko oyo azali nkulutu na lisangá alobi ete mbala mingi azalaki na mokakatano mpo na kolamusa bana ya mwasi na ye mokolo ya lomingo na ntɔngɔ mpo bákende na makita ya lisangá. Na esika ya kogangela bango, amekaki kosalela boboto. Azalaki kolamuka ntɔngɔntɔngɔ, alambi tii mpe amemeli mokomoko kɔpɔ ya tii ya mɔ́tɔ. Nsima na yango, soki alobi na bango ete bálamuka, bazalaki lisusu koboya te.
Profesere Ana Luisa Vieira de Mattos alobaki likambo malamu oyo: “Likambo oyo eleki ntina ezali lolenge ya libota te, kasi boyokani ya bato oyo bazali na kati ya libota. Na bolukiluki na ngai, namoni ete mbala mingi bilenge oyo bazalaka na bizaleli ya mbilingambilinga bautaka na mabota oyo baboti batyelaka bango likebi te, batyelaka bango mibeko te mpe basololaka na bango malamu te.” Abakisaki ete: “Tokoki kozongela yango ata mbala boni ete kobɔkɔla bana esɛngi mpe koyeba koloba ete ‘te.’” Lisusu, Doktere Emily na Doktere John Visher balobaki ete: “Disipilini ebotaka mbuma mingimingi se soki moto oyo azali kozwa yango akebaka ete azokisa te moto oyo azali kopesa ye disipilini mpe soki alingaka kobatela boyokani malamu na moto yango.”
Maloba oyo ememi biso na likambo ya koyeba nani asengeli kopesa disipilini na libota oyo ezali na bana oyo moko ya babalani abotaki bango na libala mosusu. Nani asengeli kolobaka ete “te”? Nsima ya kosolola likambo yango elongo, baboti mosusu bamonaki ete ezali malamu ete moto oyo aboti bana nde asengeli naino kopesaka bana disipilini mpo ete ye oyo azali kobɔkɔla bango azwa ntango ya komesana na bango. Bótika ntango mpo bana bámesana na bolingo ya moto oyo azali kobɔkɔla bango liboso abanda kopesa bango disipilini.
Bongo soki azali tata mobɔkɔli? Ya solo, Biblia elobi ete tata azali mokonzi na libota. (Baefese 5:22, 23; 6:1, 2) Kasi, tata mobɔkɔli akoki kosepela kotika ete moto mosusu apesaka bana disipilini mpo na mwa ntango, mingimingi soki esɛngi kopesa etumbu. Akoki kotika ete bana bátosa ‘mibeko ya mama’ na ntango oyo ye azali kobongisa makambo mpo ete na nsima ‘bátosa disipilini ya tata na bango [ya sika].’ (Masese 1:8; 6:20; 31:1) Makambo emonisi ete kosala bongo ezali kotyola ebongiseli ya bokonzi te. Lisusu, tata mobɔkɔli moko alobi ete: “Nabosanaki te ete kopesa disipilini elimboli kokebisa, kosembola, mpe kopamela. Soki disipilini epesami na bokatikati, na bolingo, mpe na mawa; mpe soki baboti bazali kopesa ndakisa ya malamu, mbala mingi ebotaka mbuma malamu.”
Baboti basengeli kosololaka
Masese 15:22 (NW) elobi: “Mikano ebebaka na esika oyo ezangi kosolola na kofungolana mitema.” Na libota oyo ezali na bana ya libala mosusu, baboti basengeli kosololaka na kofungolana mitema, na kimya mpe na polele. Mokomi moko na zulunalo O Estado de S. Paulo alobaki boye: “Mbala mingi bana balukaka koleka bandelo oyo baboti batyeli bango.” Tokoki komona likambo yango mingi na libota oyo ezali na bana ya libala mosusu. Yango wana, baboti basengeli koyokana na makambo mingi mpo bana bámona ete bazali na bomoko. Kasi, tokoloba boni soki tata to mama mobɔkɔli azali kosala makambo na ndenge oyo moboti ya bana azali komona ete ezali sembo te? Boye bango mibale basengeli kosilisa likambo yango na nkuku, kasi na miso ya bana te.
Mama moko oyo abalaki mobali mosusu alobi: “Likambo oyo eleki mpasi mpo na mama ezali ya komona tata mobɔkɔli azali kopesa bana na yo disipilini, mingimingi soki ozali komona ete azali kosala yango na nkanda to azali mpenza na koponapona. Ekopesa yo mpasi na motema, mpe okoluka kokɔtela bana na yo. Na ntango wana, ezalaka mpasi na kotosa mobali na yo mpe komitya na ngámbo na ye.
“Mokolo moko, bana na ngai mibale ya mibali, moko azali na mbula 12 mosusu na mbula 14, basɛngaki mobali na ngai nzela ya kosala eloko moko. Mbala moko aboyaki mpe abimaki libándá kozanga ete atikela bana ntango ya kolimbola mpo na nini balingaki likambo yango. Bana balingaki kolela, mpe ngai nazangaki likambo ya koloba. Mwana oyo ya mokóló atalaki ngai mpe alobaki: ‘Mama, omoni ndenge asali?’ Nayanolaki ete: ‘Ɛɛ, namoni. Kasi ye nde mokonzi ya ndako, mpe Biblia elobi na biso ete tótosa bokonzi.’ Lokola bazalaki bana malamu, bandimaki mpe bakitisaki motema mwa moke. Na mpokwa, nasololaki likambo yango na mobali na ngai, mpe andimaki ete asalelaki bango makambo na boboto te. Mbala moko, akendaki na chambre ya bana mpe asɛngaki bango bolimbisi.
“Likambo wana eteyaki biso makambo mingi. Mobali na ngai akómaki koyoka naino liboso azwa ekateli. Ngai nazwaki liteya ete nasengeli kondimaka ekateli oyo mokonzi ya libota azwi, ata soki likambo moko esepelisi ngai te. Bana bayekolaki ntina ya kozala na botosi. (Bakolose 3:18, 19) Lokola mobali na ngai asɛngaki bolimbisi, eteyaki biso nyonso komikitisa. (Masese 29:23) Lelo oyo, bana yango mibale bazali bankulutu na lisangá ya boklisto.”
Mabunga ekozanga te. Bana bakoloba to bakosala makambo oyo ekozokisa. Mitungisi ya bomoi ekopusa batata to bamama babɔkɔli na kosala makambo oyo ebongi te. Kasi, mwa maloba oyo: “Nasali mabe, limbisá ngai,” ekoki kosilisa mikakatano.
Ndenge ya kolendisa bomoko ya libota
Esɛngaka ntango molai mpo na koyokana malamu na kati ya libota oyo ezali na bana ya libala mosusu. Soki ozali tata to mama mobɔkɔli, osengeli kozala na motema mawa. Yebá komitya na esika ya basusu, lekisaká ntango elongo na bana. Sakanaká na bana oyo ya mike. Zwaká ntango ya kosolola na bana oyo ya mikóló. Luká ntango ya kozala elongo. Na ndakisa, sɛngá bango bápesa mabɔkɔ na misala ya ndako lokola kolamba to kosukola motuka. Béngá bango bákende kotika bino mpe básalisa bino ntango bokei kosomba biloko na zando. Lisusu, makambo mikemike lokola kozinga bango na mabɔkɔ to komema bango ekolakisa ete olingaka bango. (Na esika oyo, batata babɔkɔli basengeli kokeba ete bálekisa te ndelo oyo ebongi mpo ete bana na bango ya basi báyoka mabe te. Bamama babɔkɔli basengeli mpe koyeba ete ezali na makambo mosusu oyo basengeli kosala epai ya bana ya mibali te.)
Mabota oyo ezali na bana ya libala mosusu ekoki kozala malamu. Kutu mingi ezali malamu. Mabota oyo eleki kozwa matomba mingi ezali mabota oyo bato nyonso, mingimingi baboti, bazali kolona elimo malamu mpe bazali na bokatikati. Ntoma Yoane akomaki ete: “Balingami, tólingana, moto moninga na ye, mpo ete bolingo euti na Nzambe.” (1 Yoane 4:7) Ɛɛ, bolingo oyo euti mpenza na motema ezali sɛkɛlɛ ya bolamu na libota oyo ezali na bana ya libala mosusu.
[Bililingi na lokasa 7]
MABOTA YA ESENGO OYO EZALI NA BANA YA LIBALA MOSUSU
bayekolaka Liloba ya Nzambe elongo . . .
balekisaka ntango elongo . . .
basololaka . . .
basalaka elongo . . .