Basalaki mokano ya Yehova
Moto oyo alekaki bato nyonso asali mosala oyo esɛngaka komikitisa
YESU ayebaki ete bangonga ya nsuka oyo akolekisa na bayekoli na ye ekozala na ntina mingi. Mosika te bakokanga ye, mpe kondima na ye ekomekama na ndenge oyo esalemaki naino liboso te. Yesu ayebaki lisusu ete mapamboli minene ezali kozela ye. Etikali moke bakotombola ye na lobɔkɔ ya mobali ya Nzambe mpe bakopesa ye “nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso, ete na nkombo na Yesu mabɔlɔngɔ nyonso mákumbama, yango na likoló mpe yango na mokili, mpe yango na nse na mokili.”—Bafilipi 2:9, 10.
Kasi, ezala mpo na liwa oyo ekómaki pene to mposa makasi ya kozwa libonza oyo balakaki ye, Yesu abosanaki bamposa ya bantoma na ye te. Na nsima Yoane akomaki na Evanzile na ye ete: “Alingaki bango kino nsuka.” (Yoane 13:1) Mpe na bangonga ya mpasi oyo alekisaki na nsuka ya bomoi na ye lokola moto ya kokoka, Yesu apesaki bantoma na ye liteya moko monene.
Liteya ya komikitisa
Yesu na bantoma na ye bafandaki na ndako moko ya etaze na Yelusaleme mpo na kosala elambo ya Elekeli. Liboso, Yesu ayokaki bango bazali kowelana soki nani aleki baninga na kati na bango. (Matai 18:1; Malako 9:33, 34) Yesu asololaki na bango likambo yango mpe asalaki makasi mpo na kosembola makanisi na bango na likambo wana. (Luka 9:46) Kasi, na mbala oyo, Yesu asaleli mayele mosusu. Amonisi bango ezaleli ya komikitisa bobele na maloba te kasi asali elakiseli oyo eteyi bango.
Yoane akomi ete: Yesu “atɛlɛmi wana bazali kolya, alongoli bilamba na ye ya likoló mpe akamati esumɛ mpe alati yango. Bongo, atii mai na saani mpe abandi kosukola bayekoli makolo mpe kopangusa yango na esumɛ oyo alati.”—Yoane 13:4, 5, NW.
Na ntango ya kala, na Moyen-Orient, na eleko ya molunge, mbala mingi bato bazalaki kolata basandale ntango bazali kotambola na banzela oyo etondi na mputulu. Soki bakɔti na ndako ya mobola, moto yango azalaki koyamba bango, mpe akopesa bango basaani ya mai mpo básukola makolo. Na ndako ya mozwi, moombo moko nde azalaki kosukola bapaya makolo.—Basambisi 19:21; 1 Samwele 25:40-42.
Na ndako wana ya etaze, Yesu na bantoma na ye bazalaki bapaya ya moto te. Moto ayambaki bango te mpo na kopesa bango basaani, mpe baombo bazalaki te mpo na kosukola bango makolo. Ntango Yesu abandaki kosukola bango makolo, bantoma bayokaki nsɔni. Talá moto oyo alekaki bango nyonso azali kosala mosala oyo esɛngaka komikitisa mingi!
Liboso, Petelo aboyaki Yesu asukola ye makolo. Kasi Yesu alobaki na ye: “Soko nakosukola yo te, ozali kosangana na ngai te.” Ntango Yesu asilisaki kosukola bantoma makolo, alobaki ete: “Bososoli nde likambo lisili ngai kosalela bino? Bino [bobéngaka] ngai Molakisi mpe Nkolo, mpe bozali koloba sembo mpo ete nazali bongo. Soko nde ngai, Nkolo mpe Molakisi, nasukoli [makolo] na bino ekoki na bino ete bósukolana [makolo]; mpo ete napesi bino [elakiseli] ete bino mpe bósala [lokola] esili ngai kosalela bino.”—Yoane 13:6-15.
Yesu abandisaki molulu ya kosukolaka bato makolo te. Kasi azalaki nde kosalisa bantoma na ye ete bákolisa elimo ya sika ya komikitisa mpe bolingo malamu ya kosala misala oyo esɛngaka komikitisa mingi mpo na bolamu ya bandeko na bango. Tomoni ete bakangaki ntina na yango. Tótala oyo esalemaki ntango likambo ya kokatama ngenga ebimaki. Atako “ntembe mingi” ebimaki, baoyo bazalaki wana bafandaki kimya mpe bazalaki koyoka na limemya nyonso makanisi ya moto mokomoko. Lisusu, Lokola bantoma bazalaki wana, tokokaki kolikya ete moko na bango akamba likita yango, kasi emonani ete moyekoli Yakobo, oyo azalaki ntoma te, nde akambaki likita yango. Likambo yango elobelami na mokanda ya Misala ya Bantoma emonisi ete bantoma basalaki mbongwana monene na likambo ya komikitisa.—Misala 15:6-29.
Liteya mpo na biso
Yesu apesaki liteya monene ya komikitisa ntango asukolaki bayekoli na ye makolo. Ɛɛ, baklisto basengeli kokanisa te ete bazali na ntina mingi koleka basusu na boye ete bato mosusu basengeli ntango nyonso kosalelaka bango, basengeli kolukaka lokumu te, mpe balukaka mpifo te. Nzokande, basengeli kolanda ndakisa ya Yesu, oyo ‘ayaki mpo na kosungama te kasi mpo na kosunga mpe kopesa bomoi na ye lokola lisiko mpo na mingi.’ (Matai 20:28) Ɛɛ, bayekoli ya Yesu basengeli kozala na bolingo malamu ya kosala misala oyo esɛngaka komikitisa mingi bamoko mpo na bamosusu.
Ezali mpenza na ntina ntoma Petelo akoma ete: “[Bólata komikitisa, NW], moko asunga mosusu, mpo ete Nzambe akotɛmɛlaka bato na lolendo, nde akopesaka [bato ya komikitisa, NW] ngɔlu.” (1 Petelo 5:5) Liloba ya Greke oyo ebongolami na ‘kolata’ euti na liloba oyo elimboli “elamba ya moombo,” oyo azalaki kobakisa likoló ya bilamba oyo alati. Ekoki kozala ete ntoma Petelo azalaki kokanisa likambo Yesu asalaki, kolata esumɛ mpe kosukola bantoma na ye makolo. Kasi, toyebi mpenza te soki makanisi na ye ezalaki bongo. Atako bongo, mosala oyo esɛngaka komikitisa oyo Yesu asalaki esimbaki mpenza motema ya ntoma Petelo; esengeli mpe kozala bongo na mitema ya bato nyonso oyo bazali kokóma bayekoli ya Klisto.—Bakolose 3:12-14.