Losambo ya Baala: Etumba monene na mitema ya Bayisalaele
Na boumeli ya mbula soki nkóto moko, etumba monene ezalaki na mitema ya libota ya Yisalaele. Kobanga oyo euti na biyambayamba mpe milulu ya kosangisa nzoto ezalaki kowelana na kondima mpe bosembo. Kowelana yango oyo ezalaki likambo ya bomoi to ya liwa, ezalaki kati na losambo ya Baala na losambo ya Yehova.
LIBOTA ya Yisalaele ekotikala sembo epai ya Nzambe ya solo, oyo abimisaki bango na Ezipito? (Exode 20:2, 3) To ekobendama na Baala, nzambe oyo Bakanana balingaki mingi, oyo alakaki ete mabelé ekobota malamu?
Etumba wana ya elimo oyo babundaki esili koleka bankóto ya bambula, ezali na ntina mpo na biso. Mpo na nini? Ntoma Paulo akomaki ete: “Makambo oyo . . . ikomami mpo na [kokebisa, NW] biso mpo ete nsuka na bikeke eyei na biso.” (1 Bakolinti 10:11) Mpo na kokanga mpenza ntina ya likebisi oyo ezalaki na kowelana wana, tosengeli naino koyeba soki Baala azalaki nani mpe losambo ya Baala ezalaki na makambo nini.
Baala azalaki nani?
Bayisalaele bayebaki Baala ntango bakómaki na Kanana, soki na mobu 1473 L.T.B. Bamonaki ete Bakanana bazalaki kosambela banzambe mingi oyo bakokanaki na banzambe ya Ezipito, atako bakesanaki na bankombo mpe na makambo mosusu. Nzokande, Biblia emonisi Baala lokola nzambe monene ya Bakanana, mpe biloko oyo bato ya arkeoloji bakundolaki na mabelé endimisi ete azalaki nzambe monene. (Basambisi 2:11) Atako Baala alekaki banzambe nyonso oyo bango bazalaki kosambela te, kasi azalaki nzambe ya ntina mingi epai ya Bakanana. Bazalaki kondima ete azalaki na bokonzi likoló ya mbula, mopɛpɛ, mpe mapata mpe kaka ye nde akokaki kopesa bato na banyama makoki ya kobota to mpe kobikisa bango na liwa mpe kosala ete milona ezala mingi. Soki Baala abateli bango te, Môt nzambe mosusu ya Bakanana, nzambe moko ya nkanda, akokaki koyeisela bango makama.
Losambo ya Baala ezalaki kosalema na milulu ya kosangisa nzoto. Ezala biloko oyo bazalaki kosalela na losambo ya Baala, na ndakisa makonzi ya bulɛɛ na banzete ya bulɛɛ, ezalaki na bilembo ya kosangisa nzoto. Emonani ete, makonzi ya bulɛɛ oyo ezalaki mabanga minene to mabanga oyo basali na elilingi ya moto na enama ya nzoto ya mibali; ezalaki komonisa Baala, lokola mobali mpenza na ntina na kosangisa nzoto. Nzokande, banzete ya bulɛɛ, esalemaki na mabaya to banzete, yango ezalaki na elilingi ya Asela, mwasi ya Baala, ezalaki elilingi ya mwasi ya Baala na ntina na kosangisa nzoto.—1 Mikonzi 18:19.
Losambo ya Baala eyebanaki lisusu mingi mpo na kindumba na kati ya tempelo mpe kotumba bana lokola mbeka. (1 Mikonzi 14:23, 24; 2 Ntango 28:2, 3) Buku moko (The Bible and Archaeology) elobi ete: “Na batempelo ya Bakanana ezalaki na basi na mibali ya ndumba (basi na mibali ya ‘bulɛɛ’) mpe lolenge nyonso ya kosangisa nzoto na ndenge ya bosɔtɔ ezalaki kosalema kuna. [Bakanana] bazalaki kokanisa ete milulu wana ezalaki kosala ete milona mpe bibwele ebota mingi.” Wana ezali ntina oyo likambo yango endimamaki na losambo na bango, kasi longola yango, ntembe ezali te ete etamboli yango ya mbindo ezalaki kosepelisa basambeli na ye mpo na bisengo ya nzoto. Kasi, ndenge nini Bayisalaele babéndamaki na losambo ya Baala?
Mpo na nini Bayisalaele basepelaki na lingomba yango?
Ekoki kozala ete Bayisalaele mingi balingaki lingomba oyo ezali kosɛngisa bango makambo mingi te. Na losambo ya Baala bazalaki kotosa Mibeko te, na ndakisa Sabata mpe ebele ya bipekiseli mpo na etamboli malamu. (Levitike 18:2-30; Deteronome 5:1-3) Ekoki kozala mpenza ete, bozwi ya Bakanana na mosuni endimisaki Bayisalaele mosusu ete ebongi kosambela Baala.
Bisika ya losambo ya Bakanana, oyo eyebani lokola bisika ya likoló, ezalaki na nse ya banzete likoló ya bangomba, na ntembe te ezalaki bisika kitoko mpo na kosala milulu ya makambo ya kobota oyo ezalaki kosalema kuna. Eumelaki te, Bayisalaele basepelaki lisusu te kokende na bisika ya bulɛɛ ya Bakanana; kasi batongaki oyo ya bango moko. “Bamitongelaki bisika na likoló mpe makonzi mpe bikeko na Asela na ngomba nyonso milai mpe na nse na nzete nyonso mibesu.”—1 Mikonzi 14:23; Hosea 4:13.
Kasi, liboso ya makambo nyonso, losambo ya Baala ezalaki kolamusa mposa ya nzoto. (Bagalatia 5:19-21) Balingaki ete milona mpe bibwele ebota mingi, kasi bazalaki kosepela mingi koleka na misala ya nzoto. Bazalaki kokumisa makambo ya kosangisa nzoto. Bikeko mingi oyo bakundoli na mabelé endimisi likambo yango. Bikeko yango etondi na bililingi ya binama ya nzoto ya bato; oyo ezali kolamusa mposa ya kosangisa nzoto. Bafeti oyo bazalaki kosala, mabina, mpe miziki ezalaki kopusa bato na etamboli ya mbindo.
Tósala lokola ete tozali na eleko ya otomnɛ bongo makambo yango ezali kosalema. Basambeli ya Baala bayangani na esika moko ya polele, bazali kosepela, komela vinyo, mpe bazali kobina. Na boumeli ya eleko ya molunge Baala asalaka mosala te, lokola eleko ya milona ebandi, bazali kobina mpo na kolamusa ye na boye ete anɔkisa mbula mpo na kopambola mabelé. Bazali kobaluka mpe kobina zingazinga ya makonzi ya bulɛɛ na banzete ya bulɛɛ. Mabina, mingimingi ya bandumba ya tempelo, ezali mpenza kolamusa mposa ya kosangisa nzoto. Miziki mpe bato oyo bazali kotala ezali kopusa bango. Mpe bongo, na nsima ya kobina, babini yango bakei na bashambre ya ndako ya Baala mpo na kosala pite.—Mituya 25:1, 2; talá Exode 32:6, 17-19; Amosa 2:8.
Batambolaki na komona, kasi na kondima te
Wana bato mingi babendamaki na losambo yango mpo na kosepelisa mposa ya nzoto, kobanga ekangaki Bayisalaele mpe epusaki bango na kosambela Baala. Lokola Bayisalaele babungisaki kondima epai na Yehova, bakómaki kobanga bakufi, kobanga mikolo mikoya, mpe maji mpe bapusamaki na losambo ya bilimo mabe, oyo na nsima esɛngaki milulu ya nsɔmɔ koleka. Buku moko (The International Standard Bible Encyclopedia) elimboli ndenge oyo Bakanana bazalaki kokumisa bato oyo bakufá na losambo na bango ya bankɔkɔ. Elobi boye: “Bafeti . . . ezalaki kosalema na malita ya libota to na esika malita ezali. Bazalaki kolangwa masanga mpe kosangisa nzoto (mbala mosusu bandeko na bandeko). Bazalaki kokanisa ete bakufi mpe bazali kosangana na makambo yango.” Misala wana ya milimo mabe oyo Bayisalaele bazalaki kosangana na yango ezalaki kokabola bango mosika na Nzambe na bango Yehova.—Deteronome 18:9-12.
Bayisalaele oyo basepelaki kotambola na komona kasi na kondima te babendamaki lisusu na bikeko mpe na milulu oyo esangani na yango. (2 Bakolinti 5:7) Ata nsima ya komona bikamwiseli ya Yehova, Nzambe oyo amonanaka te, Bayisalaele mingi oyo babimaki na Ezipito bakómaki na mposa ya eloko moko oyo emonanaka mpo elakisaka bango ete Yehova azali. (Exode 32:1-4) Bana na bango mosusu balingaki kosambela eloko oyo ezali komonana, na ndakisa bikeko ya Baala.—1 Mikonzi 12:25-30.
Nani alongaki etumba yango?
Etumba monene na mitema ya Bayisalaele eumelaki bikeke mingi, kobanda ntango bakómaki na mokili patatalu ya Moaba mwa moke liboso ya kokɔta na Mokili ya Ndaka tii ntango bamemamaki na boombo na Babilone. Bazalaki kolonga mpe kokwea. Ntango mosusu, Bayisalaele mingi bazalaki kotikala sembo epai na Yehova, kasi mbala mingi bazalaki kozongela Baala. Yango ezalaki kosalema mingimingi mpo bazalaki kosala boyokani makasi na bato ya mabota oyo bafandaki pene na bango.
Ntango Bakanana bamonaki ete balongi te na etumba, bakómaki kobunda na mayele mosusu ya mabe. Lokola bafandaki esika moko na Bayisalaele, balendisaki bango ete bábanda kosambela banzambe ya Kanana. Basambisi ya mpiko lokola Gideona na Samwele batɛmɛlaki likambo wana. Samwele alendisaki Bayisalaele ete: “Longolá kati na bino banzambe na bapaya . . . mpe bongisá mitema na bino mpo na [Yehova] ete bósalela bobele ye.” Na mwa ntango Bayisalaele bayokaki elendiseli ya Samwele, mpe “balongolaki Babaala mpe Asetaloti, mpe basalelaki bobele [Yehova].”—1 Samwele 7:3, 4; Basambisi 6:25-27.
Nsima ya boyangeli ya Saulo na Davidi, Salomo na nsuka ya boyangeli na ye abandaki kopesa mbeka na banzambe ya bapaya. (1 Mikonzi 11:4-8) Bakonzi mosusu ya Yisalaele mpe ya Yuda basalaki bongo mpe bamipesaki na Baala. Atako bongo, basakoli mpe bakonzi ya sembo lokola Eliya, Elisa, mpe Yosiya, bazwaki esika ya liboso mpo na kobundisa losambo ya Baala. (2 Ntango 34:1-5) Lisusu, na eleko wana ya lisolo ya Yisalaele, bato mosusu batikalaki sembo epai na Yehova. Ezala na eleko ya Ahaba na Yezabele, ntango losambo ya Baala ekómaki makasi, bato nkóto nsambo baboyaki ‘kogumba mabɔlɔngɔ mpo na Baala.’—1 Mikonzi 19:18.
Na nsuka, nsima wana Bayuda bautaki boombo na Babilone, balobeli lisusu losambo ya Baala te. Lokola baoyo balobelami na Ezela 6:21 ete bango nyonso ‘bamitangoli epai na bango longwa na bosɔtɔ na bapaya na mokili ete báluka [Yehova] Nzambe na Yisalaele.’
Makebisi mpo na losambo ya Baala
Atako losambo ya Baala elimwá kala, kasi lingomba ya Bakanana na mokili ya lelo oyo ekokani na likambo moko: kokumisa makambo ya kosangisa nzoto. Kobendama na bomoi ya pite to ekobo ekómi lokola mopɛpɛ oyo tozali kopema. (Baefese 2:2) Paulo apesi likebisi oyo: “Tozali kobunda . . . na nguya mpe na mikonzi na mokili oyo na molili, mpe na milimo mabe.”—Baefese 6:12.
‘Nguya ya molili’ ya Satana elendisaka bato básala pite mpo na kokómisa bango baombo na elimo. (Yoane 8:34) Na mokili ya lelo oyo makambo nyonso epesameli nzela, komipesa na kosangisa nzoto ezali kosalema te lokola na molulu ya makambo ya kobota, kasi, ekómi nde lolenge ya komonisa bonsomi oyo moto azali na yango mpo na kosala likambo oyo esepelisi ye. Mpe piblisite na yango ezali mpenza kobenda bato. Na nzela ya masano, miziki, mpe piblisite, makanisi ya bato ezali kotonda na mposa ya kosangisa nzoto. Basaleli ya Nzambe mpe batalelami na likambo yango. Yango wana, mingi na kati ya baoyo babimisamaka na lisangá ya boklisto ezali bato oyo bakweaka na misala ya ndenge yango. Moklisto akozala ntango nyonso pɛto soki aboyi makambo wana ya mbindo.—Baloma 12:9.
Bilenge Batatoli bazali mpenza na likama, mpamba te makambo mingi oyo bakoki kosepela na yango etyami esika moko na misala ya kosangisa nzoto. Eloko ezali koyeisa lisusu makambo mpasi ezali ete basengeli kotɛmɛla bopusi ya bilenge mosusu oyo bazali kotungisa bango. (Talá Masese 1:10-15.) Na ndakisa, bilenge mingi bazwaka loyenge na bokutani oyo esangisaka bato mingi. Ndenge moko na losambo ya Baala na ntango ya kala, miziki, mabina, mpe masɛnginya ya kosangisa nzoto ezalaki kotambola elongo.—2 Timote 2:22.
Mokomi na nzembo atunaki ete: “Elenge mobali akopɛtola nzela na ye na nini?” Ayanolaki ete: “Bobele na kokeba ete asala lokola liloba na [Yehova].” (Nzembo 119:9) Ndenge Mibeko ya Nzambe epekisaki Bayisalaele kosala boyokani na Bakanana, Biblia ekebisi mpe biso ete kozala na baninga ya mabe ezali likama. (1 Bakolinti 15:32, 33) Elenge moklisto akomonisa ete akɔmeli ntango azali koboya makambo oyo ayebi ete ekoki kosepelisa nzoto kasi ekobebisa elimo na ye. Na ndakisa ya mosembwi Eliya, tokolanda makanisi ya bato te mpo na kozwa bikateli.—1 Mikonzi 18:21; talá Matai 7:13, 14.
Likebisi mosusu etali kobungisa kondima, elingi koloba “lisumu oyo ezali kokanga biso na bolɛmbu nyonso.” (Baebele 12:1, NW) Emonani ete atako Bayisalaele mingi bazalaki naino kondima Yehova, kasi bazalaki kotyela Baala motema ete azali nzambe oyo abatelaka milona na bango mpe akokisaka bamposa na bango ya mokolo na mokolo. Mbala mosusu bakanisaki ete lokola tempelo ya Yehova ezalaki mosika na Yelusaleme, kotosa mibeko na ye ezalaki na litomba te. Losambo ya Baala ezalaki kosɛngisa makambo mingi te mpe ezalaki pɛtɛɛ—bakokaki kotumbela Baala mbeka ata na nsamba ya bandako na bango. (Yilimia 32:29) Na ntembe te, bakɔtaki na losambo ya Baala bobele na ndenge bakómaki kosangana na milulu mosusu to na ndenge bakómaki kopesa Baala bambeka na nkombo ya Yehova.
Ndenge nini tokoki kobungisa kondima mpe kotangwa mokemoke na Nzambe ya bomoi? (Baebele 3:12) Tokoki kobungisa mokemoke bosepeli oyo tozalaki na yango kala mpo na makita mpe mayangani. Ezaleli motindo wana ekomonisa ete tobungisi elikya na bibongiseli ya elimo oyo Yehova akamati mpo na kopesa “bilei na elaka na yango.” (Matai 24:45-47) Soki tolɛmbi, na ndenge wana tokobungisa “liloba na bomoi” to tokokóma na motema oyo ekabwani, mbala mosusu tokomipesa na koluka biloko ya mosuni to na etamboli ya mbindo.—Bafilipi 2:16; talá Nzembo 119:113.
Tótingama na bosembo na biso
Ntembe ezali te mpo na yango, lelo oyo etumba ya mitema ekómi benda bika. Tokotikala sembo epai na Yehova to tokobendama na etamboli ya mbindo ya mokili oyo? Likambo ya mawa, ndenge moko Bayisalaele babendamaki na misala ya mbindo ya Bakanana, lelo oyo baklisto mosusu mibali mpe basi basili kolɛngolama mpo na kosala misala ya nsɔni.—Talá Masese 7:7, 21-23.
Na ndakisa ya Mose, tokoki koboya Satana alonga biso na etumba wana ya elimo, soki ‘tolandi koyika mpiko lokola ete tozali komona ye oyo amonanaka te.’ (Baebele 11:27) Ɛɛ, tosengeli “kobunda etumba makasi mpo na kondima.” (Yuda 3, NW) Kasi soki totikali sembo epai na Nzambe na biso mpe na mitinda na ye, tokoki kolikya kozala na bomoi na ntango oyo losambo ya lokuta ekolimwa mpo na libela. Se lokola losambo ya Yehova elongaki losambo ya Baala, tokoki komindimisa ete mosika te “mokili ekotonda na boyebi ya [Yehova] lokola mbonge ikozipaka mai-na-monana.”—Yisaya 11:9.
[Elilingi na lokasa 28]
Musée du Louvre, Paris
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 31]
Bitika ya makonzi ya bulɛɛ oyo bazalaki kosalela na losambo ya Baala na Gɛzɛlɛ