Sikoyo nde ntango ya kozwa ekateli
“Kino ntango nini bino bokotambolatambola na nzela mibale ekeseni?”—1 MIKONZI 18:21.
1. Nini ezali kokesenisa eleko na biso na bileko mosusu oyo eleká?
ONDIMAKA ete Yehova azali Nzambe kaka moko ya solo? Ondimaka mpe bisakweli ya Biblia oyo emonisi ete tozali sikoyo na “mikolo ya nsuka” ya ebongiseli mabe ya Satana? (2 Timote 3:1) Soki ondimaka yango, boye ntembe ezali te ete okondima mpe ete koleka eleko mosusu nyonso, sikoyo ezali ntango ya kozwa ekateli. Lelo oyo, bomoi ya bato mingi ezali na likama koleka na bileko mosusu.
2. Na boyangeli ya Mokonzi Ahaba, likambo nini ekɔtaki na Yisalaele, ekólo ya mabota zomi?
2 Na ekeke ya zomi liboso ya ntango na biso (L.T.B.), bato ya ekólo Yisalaele basengelaki kozwa ekateli moko monene. Basengelaki kopona soki balingi kosalela nani. Mokonzi Ahaba alandaki makanisi ya Yezabele, mwasi na ye oyo azalaki mopaya mpe azalaki kosambela banzambe mosusu; yango wana akɔtisaki losambo ya Baala na Yisalaele, ekólo ya mabota zomi. Bazalaki kokanisa ete Baala azali nzambe oyo anɔkisaka mbula mpe asalaka ete milona ebota mingi. Ekoki kozala ete bato mingi oyo bazalaki kosambela Baala bazalaki kofukamela ekeko na yango to kopesa yango bizi na mosika. Mpo Baala apambola milona mpe bibwɛlɛ na bango, bato yango bazalaki kosala bafɛti epai bazalaki kosangisa nzoto na ndenge ya bosɔtɔ ná basi oyo bazalaki kosala kindumba na tempelo. Bazalaki mpe na momeseno ya komikatakata nzoto mpo na kotangisa makila.—1 Mikonzi 18:28.
3. Losambo ya Baala ememaki libota ya Nzambe na makambo nini?
3 Bayisalaele mosusu soki 7 000 baboyaki kosambela nzambe wana ya lokuta mpe kosala makambo ya bosɔtɔ mpe ya nsɔmɔ. (1 Mikonzi 19:18) Babatelaki kondimana na bango na Yehova Nzambe, mpe mpo na yango, bazalaki konyokola bango. Na ndakisa, Yezabele, mwasi ya mokonzi, abomisaki basakoli mingi ya Yehova. (1 Mikonzi 18:4, 13) Lokola makambo ezalaki ndenge wana, Bayisalaele mingi bakómaki kosangisa losambo ya Yehova ná losambo ya Baala. Kasi, kotika Yehova mpo na kosambela nzambe ya lokuta, ezalaki lipɛngwi. Yehova alakaki Bayisalaele ete akopambola bango soki balingi ye mpe bazali kotosa mibeko na ye. Kasi, akebisaki bango ete soki ‘basambeli kaka ye te,’ akoboma bango nyonso.—Deteronome 5:6-10, NW; 28:15, 63.
4. Yesu ná bantoma na ye basakolaki likambo nini oyo esengelaki komonana na kati ya baklisto, mpe ndenge nini ekokisamaki?
4 Makambo ezali mpe ndenge wana na mangomba ya boklisto lelo oyo. Bandimi ya mangomba yango bamibengaka baklisto, kasi bafɛti, mimeseno, mpe bindimeli na bango, eyokani te na mateya ya Biblia. Bakonzi ya mangomba ya boklisto bazali kosala lokola Yezabele; bazali bato ya liboso oyo bazali konyokola Batatoli ya Yehova. Bakonzi yango babandi mpe lelo te kopesa mabɔkɔ na bitumba; yango wana bazali na nyongo ya makila ya ebele ya bandimi ya mangomba na bango. Biblia elobi ete bazali kosala pite ya elimo na ndenge bazali kopesa baguvɛrnema ya mokili mabɔkɔ. (Emoniseli 18:2, 3) Longola yango, mangomba ya boklisto ezali kondima ete bato, ata mpe bakonzi ya mangomba, básalaka pite. Yesu Klisto ná bantoma na ye basakolaki lipɛngwi monene yango. (Matai 13:36-43; Misala 20:29, 30; 2 Petelo 2:1, 2) Bandimi ya mangomba ya boklisto, oyo bazali bato koleka miliare moko, bakosuka ndenge nini? Mpe basambeli ya solo ya Yehova bazali na mokumba nini epai ya bato yango mpe bato mosusu nyonso oyo mangomba ya lokuta ebungisi nzela? Tokozwa eyano na mituna yango soki totaleli makambo oyo elekaki na ntango losambo ya ‘Baala elongolamaki na Yisalaele.’—2 Mikonzi 10:28.
Bolingo ya Nzambe epai ya libota na ye ya motó makasi
5. Ndenge nini Yehova amonisaki bolingo mpe komibanzabanza mpo na libota na ye ya bato ya motó makasi?
5 Yehova Nzambe ayokaka esengo te ntango azali kopesa etumbu epai ya bato oyo bazangi bosembo. Lokola azali Tata ya bolingo, alingaka ete bato mabe bábongola mitema mpe bázonga epai na ye. (Ezekiele 18:32; 2 Petelo 3:9) Kutu, Yehova atindaki basakoli ebele na mikolo ya Ahaba ná Yezabele mpo báyebisa libota na ye mbuma oyo bakobuka soki bakangami kaka na losambo ya Baala. Moko na basakoli yango ezalaki Eliya. Eliya asakolaki ete elanga moko makasi ekoya; elanga yango eyaki mpe bato banyokwamaki mingi. Na nsima, Eliya asɛngaki Mokonzi Ahaba ayanganisa Bayisalaele mpe basakoli ya Baala na Ngomba Kalamele.—1 Mikonzi 18:1, 19.
6, 7. (a) Ndenge nini Eliya amonisaki polele ntina mpenza oyo Bayisalaele bapɛngwaki? (b) Basakoli ya Baala basalaki nini? (c) Eliya asalaki nini?
6 Bayanganaki na esika oyo etumbelo moko ya Yehova ezalaká kala, kasi ‘ebwakamaki na nse,’ mbala mosusu mpo na kosepelisa Yezabele. (1 Mikonzi 18:30) Likambo ya mawa, Bayisalaele oyo bayanganaki wana bayebaki te nani kati na Yehova mpe Baala akoki konɔkisa mbula oyo bazalaki na mposa na yango makasi. Basakoli ya Baala bazalaki 450, nzokande Eliya azalaki kaka ye moko mosakoli ya Yehova. Eliya amonisaki mokakatano ya Bayisalaele mpe atunaki bango boye: “Kino ntango nini bino bokotambolatambola na nzela mibale ekeseni?” Na nsima, ayebisaki bango polele ete: “Soki [ Yehova] azali Nzambe, [bólanda] ye; nde soki Baala, [bólanda] ye.” Mpo na kosalisa Bayisalaele bátika kokakatana mpe básambela kaka Yehova, Eliya apesaki likanisi ya kosala momekano moko mpo na koyeba nani azali Nzambe ya solo. Bakopesa bangɔmbɛ mibale lokola mbeka, moko epai ya Yehova, mpe mosusu epai ya Baala. Nzambe ya solo ekozala oyo akozikisa na mɔtɔ mbeka oyo bakopesa ye. Basakoli ya Baala babongisaki mbeka na bango, na nsima babandaki kobelela ete: “Ee Baala, zongiselá biso!”; basalaki bongo bangonga ebele. Ntango Eliya abandaki kosɛka bango, bamizokisaki nzoto tii makila ebandaki kotanga, mpe bazalaki koganga makasi mpenza. Kasi likambo moko esalemaki te.—1 Mikonzi 18:21, 26-29.
7 Ekómaki sikoyo ngala ya Eliya. Abandaki naino kobongisa etumbelo ya Yehova mpe na nsima, atyaki biteni nyonso ya mwana ya ngɔmbɛ likoló ya etumbelo yango. Na nsima, atindaki básopela mbeka yango mai: mbɛki minei ya minene. Basalaki bongo mbala misato tii mai oyo ezalaki kokita etondisaki libulu oyo batimolaki zingazinga ya etumbelo. Na nsima, Eliya abondelaki boye: “Ee [Yehova], Nzambe ya Abalayama mpe ya Yisaka mpe ya Yisalaele, tiká ete eyebana lelo oyo ete yo ozali Nzambe kati na Yisalaele mpe ete ngai nazali moombo na yo mpe ete ngai nasali makambo oyo bobele na liloba na yo. Zongiselá ngai, ee [Yehova], zongiselá ngai, ete bato oyo báyeba ete yo, ee [Yehova], ozali Nzambe mpe ete yo ozali [kozongisa] mitema na bango nsima.”—1 Mikonzi 18:30-37.
8. Ndenge nini Nzambe ayanolaki libondeli ya Eliya, mpe ekateli nini mosakoli yango azwaki?
8 Nzambe ya solo ayokaki libondeli na ye mpe atindaki mɔtɔ oyo ezikisaki mbeka ná etumbelo nzela moko. Mɔtɔ yango ekausaki ata mai na libulu oyo ezalaki zingazinga ya etumbelo! Kanisá ndenge Bayisalaele bayokaki. “Bakweaki na bilongi na bango, balobaki ete, [Yehova] azali Nzambe, [Yehova] azali Nzambe!” Mbala moko, Eliya alobaki na Bayisalaele ete: “[Bó]simba basakoli ya Baala, [bó]tika te ete moto moko na bango akima.” Basakoli 450 ya Baala babomamaki bango nyonso pembeni ya Ngomba Kalamele.—1 Mikonzi 18:38-40.
9. Ndenge nini basambeli ya solo bakobaki komekama?
9 Kaka na mokolo oyo likambo monene wana esalemaki, Yehova anɔkisaki mbula na mokili nsima ya elanga oyo eumelaki mibu misato na ndambo! (Yakobo 5:17, 18) Ezali mpasi te okanisa lisolo nini ezalaki na minɔkɔ ya Bayisalaele nyonso ntango bazalaki kozonga na bandako na bango; Yehova amonisaki ete ye nde azali Nzambe ya solo. Atako bongo, basambeli ya Baala balɛmbaki te. Yezabele atikaki te konyokola basaleli ya Yehova. (1 Mikonzi 19:1, 2; 21:11-16) Na bongo, bosembo ya basaleli ya Nzambe emekamaki lisusu. Mokolo oyo Yehova akopesa basambeli ya Baala etumbu, akokuta nde basaleli na Ye bazali kosambela kaka ye?
Zwá ekateli sikoyo
10. (a) Na ntango na biso baklisto bapakolami basali mosala nini? (b) Kotosa etinda oyo ezali na Emoniseli 18:4 esɛngi nini?
10 Na ntango na biso, baklisto bapakolami basali mosala lokola oyo Eliya asalaki. Na maloba na bango mpe na mikanda oyo bazali kobimisa, bakebisi bato ya bikólo nyonso, ezala na mikili ya boklisto to te, ete losambo ya lokuta ezali likama. Mpo na yango, bamilio ya bato batiki mangomba ya lokuta. Bamipesi na Yehova mpe bakómi bayekoli ya Yesu Klisto oyo bazwi batisimo. Batosi mpenza maloba ya Nzambe epai ya bato oyo bazali na mangomba ya lokuta ete: “Bóbima na kati na ye, bato ya ekólo na ngai, soki bolingi te kosangana ná ye na masumu na ye, mpe soki bolingi te kozwa ndambo ya malɔzi na ye.”—Emoniseli 18:4.
11. Tosengeli kosala nini mpo Yehova andima biso?
11 Bamilio ya bato mosusu bazali naino kokakatana, atako bazali kosepela na mateya ya Biblia oyo Batatoli ya Yehova bazali kosakola. Bamosusu bayanganaka na makita mosusu, na ndakisa na Elambo ya Mpokwa ya Nkolo to na mayangani ya etúká. Tozali kolendisa bato wana nyonso bákanisa malamumalamu maloba ya Eliya oyo: “Bokozala kolanda banzela mibale tii tango nini?” (1 Bakonzi [Mikonzi] 18:21, Bible na Lingala ya lelo oyo) Na esika bálekisaka ntango, esengeli bázwa ekateli sikoyo mpe básala makasi bámipesa na Yehova, bákóma basambeli na ye oyo bazwi batisimo. Elikya na bango ya kozala na bomoi ya seko nde ezali na likama!—2 Batesaloniki 1:6-9.
12. Baklisto mosusu oyo bazwá batisimo bamitye na ezaleli nini oyo ezali likama na elimo, mpe basengeli kosala nini?
12 Likambo ya mawa ezali ete baklisto mosusu oyo bazwá batisimo balɛmbi to mpe bazongi mpenza nsima. (Baebele 10:23-25; 13:15, 16) Bamosusu balɛmbi mpo bazali kobanga minyoko, mpo na mitungisi ya bomoi, mpo bamipesi na koluka bozwi, to na bisengo. Yesu alobaki ete makambo wana ekobɛtisa libaku, ekotya nkaka, mpe ekozala motambo mpo na bayekoli na ye mosusu. (Matai 10:28-33; 13:20-22; Luka 12:22-31; 21:34-36) Na esika bato yango ‘bátambolatambola na banzela mibale ekeseni,’ esengeli nde ‘bázala na molende mpe bábongola motema’ mpe bázwa ekateli ya komipesa na Nzambe.—Emoniseli 3:15-19.
Nsuka ya mbalakaka mpo na mangomba ya lokuta
13. Makambo ezalaki ndenge nini na Yisalaele ntango bapakolaki Yehu lokola mokonzi?
13 Likambo moko oyo esalemaki na Yisalaele soki mbula 18 nsima ya momekano oyo elekaki na Ngomba Kalamele ezali komonisa ntina oyo bato basengeli kozwa ekateli sikoyo. Mokolo oyo Yehova asukisaki losambo ya Baala eyaki na mbalakaka; ezalaki na ntango ya mosakoli Elisa, mokitani ya Eliya. Yolama, mwana ya Mokonzi Ahaba, azalaki mokonzi ya Yisalaele, mpe Yezabele, mama ya mokonzi, azalaki naino na bomoi. Elisa atindaki mosaleli na ye akende epai ya Yehu, mokonzi ya basoda ya Yisalaele mpe, na esika oyo bato bakomona bango te, apakola ye lokola mokonzi ya sika. Na ntango wana, Yehu azalaki na Lamoto-gilada, na ɛsti ya Ebale Yolodani, azalaki kokamba basoda ya Yisalaele oyo bazalaki kobunda na banguna na bango. Mokonzi Yolama azalaki na Yizelele, na lobwaku oyo ezali pembeni ya Megido, bazalaki kosalisa ye mpota oyo azokaki na etumba.—2 Mikonzi 8:29–9:4.
14, 15. Bapesaki Yehu mokumba nini, mpe asalaki nini?
14 Yehova alobaki na Yehu boye: “Okobɛta libota ya Ahaba, nkolo na yo ete nabukanisa epai ya Yezabele makila ya basakoli baombo na ngai mpe makila ya baombo nyonso ya [Yehova]. Libota mobimba ya Ahaba bakokufa; . . . Bambwa bakolya Yezabele na mokili ya Yizelele mpe moto akozala te mpo na kokunda ye.”—2 Mikonzi 9:7-10.
15 Yehu azalaki moto oyo akakatanaka te. Amataki mbala moko na likalo na ye mpe akendaki mbangu na Yizelele. Kuna, monɔngi moko amonaki likalo ezali koya na mosika mpe na ekumbeli, akanisaki ete esengeli kozala Yehu; ayebisaki Mokonzi Yolama, mpe Yolama azwaki likalo na ye mpe akendaki kokutana na Yehu, mokonzi ya basoda na ye. Ntango bakutanaki, Yolama atunaki: “Yehu, kimya ezali?” Yehu ayanolaki ete: “Kimya ekozala ndenge nini ntango pite ya Yezabele mama na yo mpe ebele ya bondɔki na ye ezali naino?” Bongo, liboso Mokonzi Yolama azwa nzela ya kokima, Yehu abendaki litimbo mpe abɛtaki ye mbanzi oyo etɔbɔlaki ye motema mpe akufaki.—2 Mikonzi 9:20-24, NW.
16. (a) Basali ya Yezabele bakutanaki na likambo nini ya mbalakaka? (b) Ndenge nini maloba ya Yehova mpo na Yezabele ekokisamaki?
16 Yehu alekisaki ntango te, akendaki mbangu mpe akɔtaki na likalo na ye na kati ya engumba. Yezabele, oyo apotaki tilɛ na miso mpe atutaki monzɛlɛ, amonaki Yehu na fenetre mpe amekaki kotombola mongongo mpo na kobangisa ye na maloba. Yehu akipaki maloba na ye te, atunaki mbala moko: “Nani azali mpo na ngai? Nani?” Na ntango wana, esengelaki ete basali ya Yezabele bázwa ekateli mbala moko. Basali mibale to misato ya ndako ya mokonzi babimisaki mitó na fenetre. Na miniti wana, esengelaki bálakisa soki bazali sembo epai ya nani. Yehu apesaki mitindo: “[Bó]bwaká ye na nse!” Basali yango babwakaki Yezabele mpe akweaki na balabala, bampunda mpe likalo ya Yehu enyatanyataki ye. Na bongo, moto oyo akɔtisaki losambo ya Baala na Yisalaele akufaki liwa oyo ebongaki na ye. Liboso bázwa likanisi ya kokende kokunda ye, bambwa balyaki misuni na ye, ndenge kaka esakweli elobaki.—2 Mikonzi 9:30-37.
17. Etumbu oyo Nzambe apesaki Yezabele esengeli kolendisa kondima na biso na likambo nini oyo Nzambe alaki kosala na mikolo ezali koya?
17 Mwasi ya ndumba ya elilingi oyo abengami “Babilone Monene” akosuka mpe na liwa ya nsɔmɔ ndenge wana. Mwasi yango ezali nde mangomba ya lokuta ya mokili ya Satana oyo ebandaki na engumba Babilone ya kala. Nsima ya koboma mangomba ya lokuta, Yehova Nzambe akokata likambo ya bato nyonso oyo bazali na bibongiseli mosusu ya mokili ya Satana. Bango mpe bakobomama liboso Nzambe atya mokili ya sika ya boyengebene.—Emoniseli 17:3-6; 19:19-21; 21:1-4.
18. Nsima ya liwa ya Yezabele, nini ekómelaki basambeli ya Baala na Yisalaele?
18 Nsima ya liwa ya Yezabele, Mokonzi Yehu alekisaki ntango te, abomaki bato nyonso ya libota ya Ahaba mpe bato minene oyo bazalaki na ngámbo na ye. (2 Mikonzi 10:11) Kasi, basambeli ya Baala bazalaki naino ebele na Yisalaele. Mpo na bato wana, Yehu azwaki ekateli oyo emonisaki ete ‘andimaki bombanda te epai Yehova.’ (2 Mikonzi 10:16) Yehu asalaki lokola nde ye mpe azali mosambeli ya Baala; abongisaki fɛti monene na tempelo ya Baala oyo Ahaba atongaki na Samalia. Basambeli nyonso ya Baala oyo bazalaki na Yisalaele bayaki na fɛti yango. Bamikɔtisaki na motambo na ndenge bakɔtaki na tempelo, bato ya Yehu bakɔtelaki bango kuna mpe babomaki bango nyonso. Lisolo wana ya Biblia esuki na maloba oyo: “Boye Yehu alongolaki Baala na kati ya Yisalaele.”—2 Mikonzi 10:18-28.
19. Elikya kitoko nini ezali mpo na “ebele ya bato” oyo bazali basambeli ya sembo ya Yehova?
19 Losambo ya Baala ezalaki lisusu te na Yisalaele. Ndenge moko mpe, mangomba ya lokuta ya mokili oyo ekosuka na mbalakaka mpe na ndenge ya nsɔmɔ. Okozala na ngámbo ya nani na mokolo monene wana? Zwá ekateli sikoyo, mbala mosusu okozwa libaku ya kozala na kati ya “ebele ya bato” oyo bakobika na “bolɔzi monene.” Na ntango wana, okozala na esengo mpe okosanzola Nzambe na ndenge akopesa etumbu na “mwasi ya ndumba monene oyo abebisaki mabelé na pite na ye.” Elongo na basambeli mosusu ya solo, okokokisa maloba ya esengo oyo mingongo ya bikelamu ya likoló ezali koyemba ete: “Bósanzola Yah, mpamba te Yehova Nzambe na biso, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, abandi koyangela.”—Emoniseli 7:9, 10, 14; 19:1, 2, 6.
Mituna mpo na komanyola
• Ndenge nini losambo ya Baala ekɔtaki na Yisalaele ya kala?
• Biblia esakolaki lipɛngwi monene ya banani, mpe ndenge nini esakweli yango ekokisamaki?
• Ndenge nini Yehu asukisaki losambo ya Baala?
• Tosengeli kosala nini mpo tóbika na mokolo oyo Yehova akopesa etumbu?
[Karte na lokasa 25]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Soko
Afeka
Helekata
Yokenama
Megido
Tanake
Dotana
SAMALIA
Ene-dolo
Suneme
Ofela
Yizelele
Yibelama (Gata-limona)
Tilesa
Betesemese
Bete-sana
Yabese-gilada?
Abele-meholo
Ndako ya Alabele
Lamoto-gilada
Bangomba
Ngomba Kalamele
Ngomba Tabolo
Mola
Ngomba Giliboa
[Mai]
Mbu ya Meditelane
Mbu ya Galilai
[Ebale]
Ebale Yolodani
[Liziba ya mai]
Motó ya mai ya Halode
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Euti na karte ya Pictorial Archive (Near Eastern History) Est. and Survey of Israel
[Bililingi na lokasa 26]
Kosakola pɔsɔ na pɔsɔ mpe koyangana na makita ezali makambo ya ntina mingi na losambo ya solo
[Elilingi na lokasa 28, 29]
Lokola Yehu, bato nyonso oyo balingi kobika na mokolo ya Yehova basengeli kozwa ekateli